Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/1 nk. 12-13
  • Mosala monene ya kobimisa Biblia na minɔkɔ ya Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala monene ya kobimisa Biblia na minɔkɔ ya Afrika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mabongoli ya Biblia na nkotá ya Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Libongoli ya Liloba ya Nzambe oyo ebongi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/1 nk. 12-13

Mosala monene ya kobimisa Biblia na minɔkɔ ya Afrika

ELEKI bambula mingi, bato ya mitema sembo na Mpoto mpe na Amerika ya nɔrdi oyo bazalaki kosepela kotánga Biblia, bamonaki ete basengeli mpe kosalisa bato ya Afrika mpo bákoka kotánga Liloba ya Nzambe na minɔkɔ ya mboka na bango. Mpo na kokokisa mokano yango, mingi bakendaki na Afrika mpo na koyekola minɔkɔ oyo elobamaka kuna. Basusu balukaki ndenge ya kokoma minɔkɔ yango mosusu mpe babimisaki badiksionɛrɛ. Na nsima, babandaki kobongola Biblia na minɔkɔ ndenge na ndenge ya Afrika. Yango ezalaki pɛtɛɛ te. Buku moko (The Cambridge History of the Bible) elobi boye: “Mpo na kobongola malamu ata likambo oyo eleki pɛtɛɛ mpe ya ntina mingi na mateya ya boklisto, ezalaki kosɛnga na mobongoli alukaluka bambula mingi liboso ya kozwa liloba oyo ebongi.”

Na mobu 1857, Batswana bazalaki bato ya liboso oyo babimiselaki bango Biblia mobimba na Tswana, moko ya minɔkɔ ya Afrika oyo liboso ekomamaki ata na mokanda moko te.a Biblia yango ebimisamaki na buku moko te, kasi na mikanda mikemike. Na nsima, babimisaki mpe Babiblia na minɔkɔ mosusu ya Afrika. Mabongoli wana mingi ya liboso ezalaki na nkombo ya Nzambe, Yehova, na Makomami ya Liebele to “Kondimana ya kala,” mpe na Makomami ya Grɛki ya boklisto, to “Kondimana ya sika.” Kasi, bato oyo basalaki mosala ya kotalela lisusu mabongoli wana ya kala mpe kobimisa mabongoli mosusu ya sika, bazalaki na limemya te mpo na nkombo mosantu ya Yehova, Mobandisi ya Biblia. Kutu, balandaki nde momeseno ya Bayuda ya kolongola Nkombo ya Nzambe mpe kosalela kaka batitre lokola Nzambe to Nkolo. Yango wana, esengelaki kosalisa bato ya Afrika oyo balingaka Nzambe bázala na libongoli ya Biblia oyo ezali na nkombo ya Nzambe.

Banda bambula ya 1980, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali kosala milende mpo Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu ebima na minɔkɔ oyo bato mingi balobaka na Afrika. Mpo na yango, lelo oyo, bankóto na bankóto ya bato ya Afrika oyo balingaka Biblia bazali na likoki ya kotánga Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ ya mboka na bango. Lelo oyo, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na mobimba mpe na ndambo na minɔkɔ 17 ya Afrika.

Bato oyo batángaka minɔkɔ yango ya Afrika basepelaka mingi na libongoli yango oyo esaleli nkombo monene ya Yehova. Na ndakisa, ntango Yesu atɛlɛmaki na sinagoga na Nazalete, ayebisaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye ntango atángaki na rulo ya Yisaya, na esika oyo bazongeli nkombo ya Tata na ye. (Yisaya 61:1, 2) Libongoli ya Mokili ya sika ebongoli maloba yango boye na evanzile ya Luka: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola, atindi ngai mpo na kosakola kosikolama epai ya bakangami mpe kofungwama ya miso epai ya bato oyo bakufá miso, mpo na kotika bato oyo batutamá ete bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.”​—Luka 4:18, 19.

Likambo mosusu ya monene esalemaki na Augusto 2005, na oyo etali kobimisa Biblia na minɔkɔ ya Afrika. Na boumeli ya sanza yango, masini ya konyata mikanda na Betele ya Afrika ya Sudi ebimisaki Babiblia Libongoli ya mokili ya sika koleka 76 000 na minɔkɔ ndenge na ndenge ya Afrika. Na kati na yango, ezalaki na Babiblia 30 000 na monɔkɔ ya Shona. Balakisaki Biblia yango na Zimbabwe, na mayangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe.”

Na sanza yango, bato oyo bakendaki kotala Betele ya Afrika ya Sudi basepelaki mingi na komona ndenge oyo bazalaki kobimisa Babiblia yango oyo ebongolamaki na minɔkɔ mosusu ya Afrika. Nhlanhla, ndeko moko ya Betele ya Afrika ya Sudi oyo asalaka na esika oyo bakangisaka mikanda nsima ya kobimisa yango na masini, alobaki boye: “Nazalaki na esengo mingi ya kopesa mabɔkɔ na kobimisa Libongoli ya Mokili ya sika na monɔkɔ ya Shona mpe na minɔkɔ mosusu ya Afrika.” Maloba ya ndeko yango emonisi makanisi ya bandeko nyonso ya Betele ya Afrika ya Sudi.

Sikoyo, bato ya Afrika bakómi na likoki ya kozwa nokinoki Babiblia na minɔkɔ ya mboka na bango koleka ndenge ezalaki kala, ntango ezalaki kobimisama na mikili mosusu. Kasi, likambo oyo eleki ntina ezali ete bato ya Afrika bazali lelo oyo na Biblia oyo ebongolami malamu mpe ezali kosalela nkombo mosantu ya Mobandisi ya Biblia, Yehova Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na 1835, basilisaki kobongola Biblia na Malgache, monɔkɔ oyo elobamaka na Madagascar mpe na 1840, Biblia ebongolamaki na Amharique, monɔkɔ oyo elobamaka na Éthiopie. Minɔkɔ yango ezalaki kokomama liboso kutu bábongola Biblia na minɔkɔ yango.

[Elilingi na lokasa 12]

Nkombo ya Nzambe na Biblia moko na monɔkɔ ya Tswana oyo ebimisamaki na mobu 1840

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Harold Strange Library of African Studies

[Elilingi na lokasa 13]

Bato oyo bautaki Swaziland mpo na kotala Betele ya Afrika ya Sudi bamonaki ndenge oyo bazali kobimisa Babiblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto