Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/2 lok. 3
  • Kaka bato mosusu nde basengeli kolobaka solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kaka bato mosusu nde basengeli kolobaka solo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabe oyo lokuta ekoki kobimisa
  • Mpo na nini tosengeli kolobaka solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yehova, Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo na kokosa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/2 lok. 3

Kaka bato mosusu nde basengeli kolobaka solo?

ELENGE mwasi moko ya mbula 16 alobaki boye: “Nayiná mpenza lokuta, mpe nalingaka te bákosa ngai!” Mingi kati na biso toyokaka mpe bongo. Tolingaka soki bayebisi biso likambo, ezala na monɔkɔ to na mokanda, likambo yango ezala solo. Kasi, biso moko tolobaka solo ntango tozali koyebisa bato makambo?

Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Allemagne, bato mingi balobaki ete, “kokosa na mwa makambo ya mikemike mpo na komibatela to kobatela bato mosusu ezali mabe te, kutu ezali nde na ntina mingi mpo kimya ezala na kati ya bato.” Mopanzi-nsango moko akomaki boye: “Kolobaka kaka solo ntango nyonso ezali malamu mingi, kasi elɛmbisaka.”

Ebongi kaka bato mosusu bálobaka solo bongo biso moko tókosaka ntango mosusu? Ezali mpenza na ntina tólobaka solo? Soki tozali koloba solo te ekosala nini?

Mabe oyo lokuta ekoki kobimisa

Kanisá naino mabe oyo lokuta ekoki kobimisa. Lokuta esalaka ete mwasi ná mobali to bato ya libota moko bátyelanaka motema lisusu te. Lokuta ekoki kobebisa lokumu ya moto. Moyibi ya bato ya mosala esalaka ete kompanyi ebimisa mbongo mingi mpo na kosala biloko; yango wana ntalo ya biloko ezali se komata. Kokosa Leta mpo na kofuta mpako moke ezali kozangisa baguvɛrnema mbongo oyo esengeli na yango mpo na kobongisa mboka. Lokuta ya bato ya siansi ezali kobebisa lokumu na bango mpe ya bibongiseli na bango. Mpo na koluka kokóma na bozwi nokinoki, bato mosusu bazali kopesa bato ya lokuta mbongo na bango nyonso, mbala mosusu bomoi na bango mobimba. Yango wana, tokokamwa te ndenge Biblia elobi ete Yehova Nzambe ayini “lolemo ya nkuta” mpe “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba ya sembo te.”​—Masese 6:16-19.

Soki lokuta epalangani mingi, ekoki kobebisa bato, ata mpe mboka to mokili mobimba. Moto moko te akoki kobɛta ntembe na likambo yango. Kasi, mpo na nini bato balobaka solo te na nko? Mbala nyonso oyo moto alobi solo te, akosaka kaka? Lisolo oyo elandi ekopesa biso biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu.

[Elilingi na lokasa 3]

Lokuta esalaka ete mwasi ná mobali bátyelanaka lisusu motema te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto