Lisolo ya bomoi
Ntina oyo nasepelaka kokómisa bato bayekoli
Ya Pamela Moseley
Etumba ezalaki konginda na Angleterre na 1941, ntango mama amemaki ngai na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaki na engumba Leicester. Joseph Rutherford asalaki lisukulu moko oyo elobelaki bana mike. Ntango ngai ná mama tozwaki batisimo na liyangani yango, namonaki ete bandeko oyo basalisaki biso tóyeba solo basepelaki makasi. Na ntango wana, nayebaki te esengo ya kosalisa moto akóma moyekoli ya Yesu Klisto.
TOBANDAKI koyekola Biblia na 1940. Nazali koyeba lisusu mokolo oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, na Sɛtɛmbɛ 1939. Ezalaki mokolo moko ya nsɔmɔ! Namonaki mama azali kotangisa mpisoli mpe kotuna: “Mpo na nini mokili ekoki kozala na kimya te?” Baboti na ngai nyonso mibale bazalaki basoda na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe bamonaki na miso makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki na etumba yango. Mama atunaki mokambi moko ya Lingomba ya Anglican motuna wana. Ayanolaki ye ete: “Bitumba ebandi lelo te, mpe ekosila te.”
Kasi, mwa moke na nsima, mobange moko ayaki kotala biso na ndako. Azalaki Motatoli ya Yehova. Mama atunaki ye kaka motuna yango: “Mpo na nini mokili ekoki kozala na kimya te?” Motatoli yango ayanolaki ete bitumba ezali moko ya bilembo oyo ezali komonisa ete tokómi na nsuka ya mokili oyo ya mabe. (Matai 24:3-14) Na nsima, mwana na ye ya mwasi akómaki koyekola na biso Biblia. Bango mibale bazalaki na kati ya bato oyo bazalaki kotala biso na esengo ntango tozwaki batisimo. Mpo na nini kokómisa bato bayekoli epesaka bato esengo makasi? Nayebaki ntina ya esengo yango sima ya bambula. Tiká nayebisa bino mwa makambo oyo namoni na boumeli ya mbula koleka 65 oyo nazali kokómisa bato bayekoli.
Nayebi sikoyo esengo ya koteya
Nabandaki kosakola Bokonzi na engumba Bristol, ntango nazalaki na mbula 11. Ndeko moko apesaki ngai fono ná mwa lokasa moko ya litatoli mpe alobaki na ngai ete: “Bandá sikoyo kokɔta na lopango mokomoko na ngámbo wana. Mbala moko, nabandaki kosakola kaka ngai moko. Kasi, nazalaki kobanga makasi. Nazalaki koyokisa bato lisolo moko ya mateya ya Biblia mpe kolakisa bango lokasa ya litatoli, oyo ezalaki kolendisa bato bándimaka mikanda na biso.
Banda na 1950, basɛngaki biso totángelaka bato Biblia ntango tozali kosakola ndako na ndako. Na ebandeli, lokola nazalaki nsɔninsɔni, ezalaki pɛtɛɛ te mpo nasolola na bato oyo nayebi te mpe nalimbolela bango Biblia. Kasi mokemoke, namesanaki. Na ntango wana nde nabandaki koyoka elɛngi ya mosala ya kosakola. Bato mosusu bazalaki komona biso lokola batɛki ya babuku, kasi ntango tozalaki kotángela mpe kolimbolela bango Biblia, bakómaki kondima ete tozali mpenza bateyi ya Liloba ya Nzambe. Lokola nazalaki kosepela na mosala yango mingi, nakómaki na mposa ya kobimaka mingi. Yango wana, na Sɛtɛmbɛ 1955, nakómaki mobongisi-nzela.
Molende efutaka
Moko ya makambo oyo nayekolaki ezali ete molende ekoki kofuta. Mokolo moko, natikelaki mwasi moko na nkombo Violet Morice Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ntango nazongelaki ye, afungolaki monɔkɔ ya ndako na ye, akangaki mabɔkɔ mpe azalaki kolanda ngai na likebi mpenza ntango nazali kolimbolela ye Makomami. Mbala nyonso oyo nazalaki kokende kotala ye, azalaki kosala lokola azali mpenza kosepela na nsango malamu. Kasi, ntango nasɛngaki ye tóbanda mpenza koyekola Biblia, alobaki: “Te. Nakoyekola ntango bana bakokola.” Nalɛmbaki mpenza nzoto! Biblia elobi ete ezali na “ntango mpo na koluka mpe ntango mpo na kobungisa.” (Mosakoli 3:6, NW) Nalingaki kotika ye te.
Sanza moko na nsima, nazongelaki Violet mpe natángelaki ye mwa mikapo mosusu ya Biblia. Mosika te, abandaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na monɔkɔ ya ndako na ye. Nsukansuka, alobaki boye: “Nakanisi ekozala malamu okɔta na ndako.” Violet akómaki mpenza ndeko mpe moninga na ngai ya motema. Ɛɛ, Violet azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.
Mokolo moko, Violet azalaki na mawa ya koyoka ete mobali na ye atɛkaki ndako na bango kozanga koyebisa ye mpe asundolaki ye. Likambo ya esengo, bandeko ya lisangá basalisaki ye mpe azwaki ndako mosusu kaka na mpokwa wana. Mpo na kotɔnda Yehova, azwaki ekateli ya kosala mosala ya mobongisi-nzela bomoi na ye mobimba. Ntango namonaki ndenge elimo ya Yehova etondisaki ye na molende mpo na losambo ya solo, nayaki koyeba ntina oyo kokómisa bato bayekoli ememelaka bato esengo. Ɛɛ, yango nde mosala oyo nazali kosala bomoi na ngai mobimba!
Na 1957, batindaki ngai ná Mary Robinson babongisi-nzela na engumba Rutherglen, na etúká ya Glasgow, na Écosse. Tozalaki kosakola na nse ya londende, mipɛpɛ, mbula mpe mbula mpɛmbɛ, kasi tosalaki mosala ya mpunda te. Mokolo moko, nakutanaki na Jessie. Koyekola Biblia ná ye ezalaki mpenza elengi. Mobali na ye, Wally, azalaki Mokoministe mpe na ebandeli azalaki kolinga te kosolola na ngai. Ntango ayekolaki Biblia mpe ayebaki ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato, asepelaki makasi. Na nsima, bango nyonso mibale bakómaki kokómisa bato bayekoli.
Ndenge oyo moto ayambi yo mbala ya liboso ekoki kokosa yo
Na nsima, batindaki biso na engumba Paisley, na Écosse. Mokolo moko, ntango nazalaki kosakola kuna, mwasi moko na nkombo Pearl aboyaki koyamba ngai mpe akangaki ndako na ye. Kasi, na nsima ayaki koluka ngai mpo asɛnga ngai bolimbisi. Ntango nazongelaki ye na pɔsɔ oyo elandaki, alobaki boye: “Nayokaki lokola nde nakangeli Nzambe ndako. Nasengelaki kaka koluka yo.” Ayebisaki ngai ete baninga mpe bandeko na ye basalaki ye mabe mingi, yango wana abondelaki Nzambe apesa ye moninga ya solosolo. Na nsima, abakisaki boye: “Mpe na mbala moko yo oyaki kotala ngai. Namoni sikoyo ete yo nde moninga yango ya solosolo.”
Kozala moninga ya Pearl ezalaki lisɛki te. Azalaki kofanda na likoló mpenza ya ngomba, mpe nasengelaki komataka ngomba yango na makolo. Mokolo nakendaki kozwa ye mpo namema ye na makita mpo na mbala ya liboso, etikalaki moke mopɛpɛ mpe mbula ebamba ngai na mabelé. Lingɛmbu na ngai epanzanaki mpe nabwakaki yango. Kaka sanza motoba nsima ya kokangela ngai ndako, Pearl amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo.
Mwa moke na nsima, mobali na ye azwaki ekateli ya koyekola Biblia, mpe mosika te, nabimaki na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako. Lokola momeseno, mbula ezalaki kobɛta. Alobaki boye: “Komitungisa te! Lokola natɛlɛmaka ebele ya bangonga na nse ya mbula mpo na kotala bale, nakoki mpe kosala yango mpo na Yehova.” Nazalaka na limemya mingi mpo na molende ya bato ya Écosse.
Nasepelaki makasi ntango nazongaki kuna bambula na nsima mpe namonaki ete bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia bakangamá kaka na solo. Wana nde esengo ya mosala ya kokómisa bato bayekoli. (1 Batesaloniki 2:17-20) Na 1966, nsima ya kosala mbula koleka mwambe na mosala ya mobongisi-nzela, babengaki ngai nakende kolanda mateya na Gileadi, Eteyelo ya Watchtower, mpo na kokóma misionɛrɛ.
Na mboka mopaya
Batindaki ngai na Bolivie, na engumba Santa Cruz, oyo ezalaki na lisangá moko ya bato soki 50. Engumba yango etindaki ngai nakanisa mokili ya Far West oyo nazalaki komona na bafilme ya Hollywood. Soki nakanisi lisusu ntango wana, namonaka ete nazalaki kaka lokola bamisionɛrɛ nyonso. Bangando elandá ngai te, bato bazingá ngai te mpo na kosala ngai mabe, nabungá na kati ya esobe te, nazindá mpe na masuwa na kati ya mbu te. Nzokande, nazalaki na esengo monene ya kokómisa bato bayekoli.
Antonia azalaki moko ya basi ya liboso oyo nayekolaki na bango Biblia na Santa Cruz. Koteya na monɔkɔ ya Espagnol ezalaki etumba mpo na ngai. Mokolo moko, mwana ya Antonia ya moke atunaki mama na ye boye: “Mama, azali koloba mabe boye na nko mpo na kosɛkisa biso?” Nsukansuka, Antonia ná mwana na ye Yolanda bakómaki baklisto. Yolanda azalaki na moninga moko na nkombo Dito, oyo azalaki kotánga kelasi ya mibeko. Ye mpe abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita. Nazwaki liteya moko epai na ye na mosala ya koteya Biblia: Mbala mosusu bato balingaka kaka báningisa bango mwa moke.
Ntango Dito akómaki mbala mosusu koboya koyekola, nalobaki na ye boye: “Dito, Yehova azali kosɛnga yo na makasi te ete osalela ye. Osengeli kopona.” Ntango alobaki ete alingi kosalela Nzambe, nazongiselaki ye boye: “Namoni yo na bafɔtɔ ya mokonzi moko ya politiki awa. Soki moto akɔti awa akoloba ete oponi Bokonzi ya Nzambe?” Wana nde ndenge naningisaki ye!
Pɔsɔ mibale na nsima, botomboki ebandaki na mboka mpe bayekoli ya iniversite ná bapolisi babandaki kobɛtana masasi. Dito alobaki na moninga na ye moko ete: “Tókima!” Kasi, moninga na ye alobaki ete: “Te! Lelo ezali mokolo monene oyo tozalaki kozela.” Azwaki mondoki mpe amataki likoló ya ndako. Azali moko ya baninga mwambe ya Dito oyo bakufaki mokolo wana. Kanisá naino esengo oyo nazalaka na yango ntango namonaka mobali yango, Dito, oyo alingaki kokufa soki aponaka te kokóma moklisto ya solo!
Namoni nguya ya elimo santu na miso
Mokolo moko, nazalaki koleka liboso ya ndako moko; nakɔtaki te mpo nayebaki ete tosilaki kokɔta wana, kasi mama ya ndako yango abengaki ngai. Nkombo na ye ezalaki Ignacia. Ayebaki Batatoli ya Yehova malamu, kasi botɛmɛli makasi ya mobali na ye, Adalberto, oyo azalaki polisi mpe engambe ya mobali, ezalaki kopekisa ye akola na elimo. Mwa mobulu makasi ezalaki na motó na ye na ntina na mateya mingi ya Biblia; mpe nabandaki koyekola na ye Biblia. Atako Adalberto alingaki mpenza tótika koyekola, nazwaki ntango molai mpo na kosolola na ye kozanga kosalela Biblia. Na ndenge wana nde tobandaki kokóma baninga.
Kanisá naino esengo na ngai ntango Ignacia akómaki ndeko moko ya boboto mpenza, oyo azalaki kosunga bato mingi oyo bazalaki na bosɛnga, ezala na elimo to na mosuni. Na nsima, mobali na ye ná bana na bango misato bakómaki mpe Batatoli. Ntango Adalberto akangaki ntina ya nsango malamu, akómaki kolobela yango na esengo nyonso na biro ya bapolisi. Yango wana, bapolisi 200 basɛngaki ete báyelaka bango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! nyonso oyo ekobima.
Yehova azali kokolisa
Naumelaki mbula motoba na Santa Cruz, mpe na nsima batindaki ngai na La Paz, mboka mokonzi ya ekólo Bolivie, epai nasalaki mbula 25. Na ebandeli ya bambula ya 1970, biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na La Paz ezalaki kaka na bato 12. Lokola mosala ya kosakola ezalaki kobota mbuma mingi, esɛngaki mpe bátonga biro ya monene. Batongaki Betele ya sika na engumba Santa Cruz, epai bato bazalaki se kokóma mingi. Na 1998, biro ya filiale, oyo ekómaki na bato koleka 50, ezongaki na Santa Cruz, mpe basɛngaki ngai nakende kosala kuna.
Lisangá kaka moko oyo ezalaki na Santa Cruz na 1966, ebotá masangá koleka 50. Bolivie mobimba ezalaki kaka na Batatoli 640, kasi lelo oyo bazali 18 000!
Likambo ya esengo ezali ete mosala na ngai na Bolivie eboti mbuma mingi. Atako bongo, nalendisamaka mingi ntango nazali koyoka ete bandeko na bipai nyonso bakangami na Yehova makasi. Biso nyonso tozalaka na esengo ntango tozali komona ndenge Yehova azali kopambola mosala ya Bokonzi. Na ntembe te, kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali mpenza esengo.—Matai 28:19, 20.
[Elilingi na lokasa 13]
Na mosala ya mobongisi-nzela na Écosse
[Bililingi na lokasa 15]
Nazali kosala na biro ya filiale ya Bolivie; (elilingi ya moke) mokolo bana-kelasi ya mbala ya 42 ya Gileadi bazwaki badiplome