Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/2 lok. 8
  • Likabo ya seko oyo Mozalisi apesi bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likabo ya seko oyo Mozalisi apesi bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te
    Lamuká!—2023
  • Bato bakobebisa mabele mpo na libela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mabele ekobebisama?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Moi ná baplanɛti na yango ebimaki ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/2 lok. 8

Likabo ya seko oyo Mozalisi apesi bato

OMONAKA te ete ezali mpenza likambo ya kokamwa ete mokapo ya liboso ya mokanda ya Genese etángi makambo oyo bato ya siansi balobaka ete ezali na ntina mpo bomoi ezala na planɛti moko? Makambo yango ezali nini?

Mpo bomoi ezala, esengeli mai ezala mingi; Genese 1:2 elobeli yango. Molunge mpe malili esengeli kozala oyo ekoki mpo mai nyonso oyo ezali na planɛti ekóma londende te to mpe ekangama lokola mabanga ya ngalasi te. Yango esɛngi ete ntaka oyo ekaboli planɛti yango na moi ezala oyo ebongi mpenza. Mokanda ya Genese elobeli moi mbala na mbala mpe makambo oyo yango esalaka mpo na mabelé.

Mpo bato báfanda na planɛti moko, esengeli kozala na mipɛpɛ ndenge na ndenge. Genese 1:6-8 elobeli likambo yango ya ntina mingi. Banzete mpe matiti oyo Genese 1:11, 12 elobeli, esalisaka mpo oxygène ezala mingi. Ebongi ete planɛti oyo banyama ndenge na ndenge bakoki kobotana ezala na mabelé oyo ekoki kobimisa matiti, ndenge Genese 1:9-12 emonisi yango. Longola yango, mpo molunge to mpe malili eleka mingi te, esengeli ete planɛti etɛngama mwa moke mpe etikala ndenge wana​—mpo na mabelé, sanza mpe esalaka ete etɛngama mwa moke. Genese 1:14, 16 elobelaki sanza mpe mosala oyo yango esalaka mpo na mabelé.

Ndenge nini Moize, mokomi ya mokanda ya Genese, oyo ayebaki te makambo oyo bato bayekoli lelo oyo na lisalisi ya siansi, akokaki kokoma makambo nyonso wana? Tokoki nde koloba ete Moize azalaki kaka na mayele ya koyeba kolimbola makambo liboso ya bato ya ntango na ye? Te, Moize ayebaki makambo nyonso wana mpo apemamaki na Mozalisi ya likoló mpe mabelé. Tokoki komona yango polele soki totaleli ndenge oyo lisolo ya Genese elobeli makambo oyo siansi elongisi.

Biblia emonisi ete biloko nyonso oyo tomonaka na molɔ́ngɔ́ esalemaki na ntina. Nzembo 115:16 elobi boye: “Lola mpe likoló-ya-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.” Nzembo mosusu elobi boye: “Yo otɛmisaki mokili likoló na moboko na yango ete yango eningana libela na libela te.” (Nzembo 104:5) Soki ezali na Mozalisi oyo akelaki likoló mpe mabelé, tosengeli kondima ete azali na likoki ya kobatela yango. Yango elingi koloba ete okoki kotya motema ete elaka kitoko oyo ekokokisama: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Kutu, Nzambe “asalaki [mabelé] eloko ya mobulu te” kasi, “atongaki yango ete bato báfanda wana” mpo na libela; bato yango ezali baoyo bayebi ntina oyo Nzambe akelaki yango.​—Yisaya 45:18.

Biblia elobi ete Yesu ayaki awa na mabelé mpo na koteya biso makambo ya Nzambe mpe mokano na Ye ya kopesa bato ya botosi bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Tondimisami ete mosika te Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé,’ mpe akobikisa bato ya kimya na mabota nyonso, oyo bandimi ebongiseli oyo azwi mpo na lobiko. (Emoniseli 7:9, 14; 11:18) Bomoi ekozala mpenza esengo wana bato bakokoba koyekola makambo kitoko oyo Nzambe akelá na mabelé mpo na libela.​—Mosakoli 3:11; Baloma 8:21.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Fɔtɔ ya NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto