Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/3 nk. 21-25
  • Baanzelu basalaka nini mpo na bato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu basalaka nini mpo na bato?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bautá wapi?
  • Baanzelu bakokisaka mikumba nini?
  • Na ntango ya Klisto
  • Na ntango na biso
  • Mokumba oyo bakokokisa na mikolo ezali koya
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/3 nk. 21-25

Baanzelu basalaka nini mpo na bato?

“Nsima ya makambo wana namonaki anzelu mosusu azali kokita uta na likoló, na bokonzi monene . . . Mpe agangaki na mongongo makasi, kolobáká ete: ‘Akwei! Babilone Monene akwei!’”​—EMONISELI 18:1, 2.

1, 2. Nini emonisi ete Yehova asalelaka baanzelu mpo na kokokisa mokano na ye?

NTOMA Yoane akómaki mobange ntango bakangaki ye mpe bamemaki ye na esanga ya Patimosi; kuna, azwaki bimonaneli oyo ezalaki kosakola makambo oyo ekoya. “Na kopemama,” akómaki “na mokolo ya Nkolo” mpe amonaki makambo ya kokamwa mpenza. Mokolo ya Nkolo ebandaki na 1914, ntango Yesu Klisto akómaki mokonzi, mpe ekokoba tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto.​—Emoniseli 1:10.

2 Yehova Nzambe apesaki emoniseli yango mbala moko na Yoane te. Emoniseli 1:1 elobi boye: “Emoniseli na Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke. Mpe atindaki anzelu na ye mpe amonisaki yango na bilembo na nzela na ye epai ya moombo na ye Yoane.” Na nzela ya Yesu, Yehova atindaki anzelu ayebisa Yoane makambo minene oyo ekosalema na “mokolo ya Nkolo.” Na emonaneli moko, Yoane amonaki mpe “anzelu mosusu azali kokita uta na likoló, na bokonzi monene.” Anzelu yango azalaki na mokumba nini? “Agangaki na mongongo makasi, kolobáká ete: ‘Akwei! Babilone Monene akwei!’” (Emoniseli 18:1, 2) Anzelu yango ya nguya mingi azwaki mokumba ya kosakola ete Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, ekwei. Makambo nyonso wana emonisi polele ete Yehova asalelaka mpenza baanzelu mpo na kokokisa mokano na ye. Liboso tólobela na molai mosala ya baanzelu mpo na kokokisa mokano ya Nzambe mpe makambo oyo basalaka mpo na biso, tótalela naino soki babandaki ndenge nini.

Baanzelu bautá wapi?

3. Makanisi nini ya lokuta bato mingi bazalaka na yango na ntina na baanzelu?

3 Bato mingi bandimaka ete baanzelu bazalaka. Kasi, mingi bazalaka na makanisi kilikili ya lokuta mpo na baanzelu mpe mpo na epai oyo bautá. Na ndakisa, bato mosusu oyo basambelaka bakanisaka ete soki ndeko to moninga na bango akufi, akendaka epai ya Nzambe mpe kuna, akómaka anzelu. Kasi, Biblia eteyaka bongo mpo na kozalisama, bomoi, mpe mosala ya baanzelu?

4. Biblia elobi ete baanzelu babandaki ndenge nini?

4 Biblia ebengi anzelu oyo aleki na nguya mpe na bokonzi Mikaele anzelu-mokonzi. (Yuda 9) Anzelu yango ezali Yesu Klisto. (1 Batesaloniki 4:16) Ntango Yehova azwaki mokano ya kozalisa, akelaki libosoliboso anzelu yango oyo abengami Mwana na ye. (Emoniseli 3:14) Na nsima, na nzela ya Mwana yango ya liboso, Yehova azalisaki baanzelu mosusu. (Bakolose 1:15-17) Ezali baanzelu yango nde Yehova abengaki bana na ye ntango atunaki Yobo boye: “Yo ozalaki wapi wana natyaki miboko ya mokili? Yebisá ngai, soki oyebi kososola. . . . Nani atye libanga na yango ya nsuka, wana minzoto ya ntɔngɔntɔngɔ eyembaki elongo moko mpe bana nyonso ya Nzambe bagangaki na esengo?” (Yobo 38:4, 6, 7) Tomoni ete baanzelu bazali bikelamu ya Nzambe mpe azalisaki bango bambula mingi liboso azalisa bato.

5. Ndenge nini baanzelu bakabolami?

5 Mokapo ya 1 Bakolinti 14:33 elobi boye: “Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” Yango wana, Yehova akabolá bana na ye ya elimo na bituluku misato ya minene: (1) baselafa, bango basalaka na kiti ya bokonzi ya Nzambe, basakolaka bosantu na ye, mpe babatelaka basaleli na ye pɛto na elimo; (2) bakeluba, bango basimbi bokonzi ya Yehova; mpe (3) baanzelu mosusu oyo atindaka mpo na kokokisa mokano na ye. (Nzembo 103:20; Yisaya 6:1-3; Ezekiele 10:3-5; Danyele 7:10) Wapi mwa makambo oyo baanzelu basalaka mpo na bato?​—Emoniseli 5:11.

Baanzelu bakokisaka mikumba nini?

6. Mokumba nini Yehova apesaki bakeluba na elanga ya Edene?

6 Esika ya liboso oyo balobeli bikelamu ya elimo na kati ya Biblia ezali na Genese 3:24, epai tozali kotánga boye: “[Yehova] abimisaki moto, mpe epai na ebimelo ya ntango na elanga ya Edene, atyaki bakeluba ná mopanga ya mɔtɔ, mokobongwana bipai nyonso ete básɛnzɛla nzela ya nzete ya bomoi.” Bakeluba yango bazalaki kopekisa Adama ná Eva kozonga na elanga ya Edene. Wana ezalaki na ebandeli mpenza. Banda wana, makambo nini baanzelu basalaka mpo na bato?

7. Liloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “anzelu” ezali komonisa ete baanzelu bakokisaka mpe mokumba nini?

7 Biblia elobeli baanzelu mbala soki 400. Liloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “anzelu” elimboli “momemi-nsango.” Na bongo, Nzambe azalaki kosalela baanzelu mpo na koyebisa bato makambo. Ndenge tomonaki yango na paragrafe ya liboso mpe ya mibale, Yehova atindaki anzelu moko ayebisa ntoma Yoane nsango na ye.

8, 9. (a) Manoa ná mwasi na ye bayokaki ndenge nini ntango anzelu moko abimelaki bango? (b) Liteya nini baboti bakoki kozwa na likambo oyo Manoa atunaki anzelu?

8 Nzambe atindaka mpe baanzelu mpo na kosunga mpe kolendisa basaleli na ye awa na mabelé. Na ndakisa, na eleko ya basambisi, na Yisalaele ya kala, mobali moko nkombo na ye Manoa ná mwasi na ye, bazalaki mpenza na mposa ya mwana; kasi mwasi azalaki kobota te. Yehova atindaki anzelu moko ayebisa mwasi ya Manoa ete akobota mwana ya mobali. Anzelu alobaki na ye boye: “Talá, okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Lotɛbu ekokóma na motó na ye te, mpo ete mwana oyo akozala Monasili epai ya Nzambe longwa na kobotama. Ye mpe akobanda kobikisa Yisalaele na lobɔkɔ ya Bafilistia.”​—Basambisi 13:1-5.

9 Na nsima, mwasi ya Manoa abotaki mwana ya mobali, Samasona, oyo asalaki makambo minene na ntango ya kala. (Basambisi 13:24) Liboso mwana yango abotama, Manoa asɛngaki ete anzelu azonga mpo na koyebisa bango ndenge oyo basengeli kobɔkɔla ye. Manoa atunaki boye: “Mobeko na ntina na mwana ekozala nini, mpe tósalela ye boni?” Anzelu ya Yehova azongelaki malako oyo alobaki liboso epai ya mwasi ya Manoa. (Basambisi 13:6-14) Na ntembe te, Manoa alendisamaki mpenza! Lelo oyo baanzelu bamimonisaka lisusu ndenge wana te epai ya bato; kasi, na ndakisa ya Manoa, baboti bakoki koluka malako ya Yehova mpo na ndenge ya kobɔkɔla bana na bango.​—Baefese 6:4.

10, 11. (a) Mosaleli ya Elisa ayokaki ndenge nini mpe ye moko Elisa ayokaki ndenge nini ntango basoda ya Sulia bazingaki engumba oyo bazalaki? (b) Tokoki kozwa litomba nini soki tokanisi likambo yango?

10 Likambo moko oyo esalemaki na mikolo ya mosakoli Elisa emonisi polele ete baanzelu basungaka mpenza basaleli ya Yehova. Elisa azalaki na engumba Dotana, na Yisalaele. Mokolo moko, ntango mosaleli ya Elisa alamukaki na ntɔngɔ mpe atalaki libándá, amonaki ebele ya bampunda ná makalo ya bitumba ezingi engumba. Mokonzi ya Sulia atindaki ebele ya basoda wana mpo báya kokanga Elisa. Mosaleli ya Elisa asalaki nini? Ayokaki nsɔmɔ mpe agangaki ete: “Ee Nkolo na ngai, tokosala nini?” Na makanisi na ye, ndenge ya kobika ezalaki te. Kasi, Elisa alobaki na ye boye: “Bangá te mpo ete baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!” Alingaki koloba nini na maloba yango?​—2 Mikonzi 6:11-16.

11 Elisa ayebaki ete ebele ya baanzelu bazalaki wana mpo na kosunga ye. Kasi, mosaleli na ye azalaki komona bango te. Na yango, “Elisa abondelaki ete, [Yehova], fungolá miso na ye ete amona! Mpe [Yehova] afungolaki miso ya elenge mpe amonaki. Talá, ngomba etondaki na mbalata mpe makalo ya mɔtɔ oyo ezali kozingela Elisa.” (2 Mikonzi 6:17) Mosaleli ya Elisa amonaki ebele ya baanzelu. Na miso ya elimo, biso mpe tokoki komona ete baanzelu, oyo Yehova ná Klisto batambwisaka, basungaka mpe babatelaka basaleli ya Yehova.

Na ntango ya Klisto

12. Ndenge nini anzelu Gabiliele alendisaki Malia?

12 Kanisá ndenge oyo Malia, mwasi moko Moyuda oyo azalaki naino ngɔndɔ, alendisamaki ntango bayebisaki ye nsango oyo: “Okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu.” Liboso anzelu Gabiliele ayebisa Malia nsango yango oyo eutaki epai ya Nzambe, alobaki na ye boye: “Kobanga te, Malia, mpo ozwi boboto epai ya Nzambe.” (Luka 1:26, 27, 30, 31) Tokanisi mpenza ete maloba yango elendisaki Malia mpe endimisaki ye ete Nzambe asepelaki na ye!

13. Ndenge nini baanzelu basungaki Yesu?

13 Baanzelu balendisaki mpe Yesu ntango alongaki komekama misato oyo Satana abimiselaki ye na esobe. Lisolo elobi ete nsima ya komeka ye, “Zabolo atikaki ye, mpe, talá! Baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela ye.” (Matai 4:1-11) Likambo ya ndenge wana mpe esalemaki na butu oyo ezalaki liboso ya mokolo oyo Yesu akufaki. Lokola Yesu atungisamaki makasi, afukamaki mpe abandaki kobondela, ete: “‘Tata, soki olingi, longolá kɔpɔ oyo epai na ngai. Nzokande, ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.’ Bongo anzelu moko oyo autaki na likoló abimelaki ye mpe alendisaki ye.” (Luka 22:42, 43) Kasi, ndenge nini baanzelu basungaka biso lelo oyo?

Na ntango na biso

14. Minyoko nini Batatoli ya Yehova bayikeli mpiko na mikolo na biso, mpe yango ebimisi likambo nini?

14 Soki totaleli mosala ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala mpe makambo oyo bakutanaka na yango, tokomona ete baanzelu nde basungaka bango! Na ndakisa, basaleli ya Yehova bazongaki nsima te ntango Banazi banyokolaki bango makasi na Allemagne mpe na mikili mosusu ya Mpoto liboso mpe na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba (1939-1945). Basaleli ya Yehova bayikaki mpiko na minyoko bambula mingi ntango Bafasiste bazalaki koyangela na Italie, na Espagne, mpe na Portugal. Na boumeli ya bambula mingi lisusu koleka, bayikaki mpiko na minyoko na Union soviétique mpe na mikili mosusu oyo ezalaki na ngámbo na yango. Tobosani mpe te minyoko oyo Batatoli bayikelaki mpiko na mikili mosusu ya Afrika.a Na bambula oyo euti koleka, basaleli ya Yehova banyokwamaki mingi na ekólo Géorgie. Satana asali nyonso mpo na kosukisa mosala ya Batatoli ya Yehova. Atako bongo, basaleli ya Yehova balongi botɛmɛli yango mpe bazali kaka kokende liboso. Soki balongi ezali mpe mpo baanzelu babatelaki bango.​—Nzembo 34:7; Danyele 3:28; 6:22.

15, 16. Ndenge nini baanzelu basungaka Batatoli ya Yehova na mosala ya kosakola oyo bazali kosala na mokili mobimba?

15 Batatoli ya Yehova bazwaka na lisɛki te mokumba oyo Nzambe apesi bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba mpe koteya Biblia epai ya bato oyo basepeli mpo bákóma bayekoli. (Matai 28:19, 20) Nzokande, bayebi malamu ete bakoki te kokokisa mokumba yango kozanga lisungi ya baanzelu. Yango wana, balendisamaka ntango nyonso na maloba oyo ezali na Emoniseli 14:6, 7. Bavɛrsɛ yango elobi boye: “[Ngai ntoma Yoane] namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso, alobi na mongongo makasi ete: ‘Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei, mpe na yango bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe maziba ya mai.’”

16 Maloba yango emonisi ete mosala monene ya kosakola na mokili mobimba oyo Batatoli ya Yehova basalaka esimbami mpe etambwisami na baanzelu. Yehova azali kosalela baanzelu mpo na kosalisa bato ya mitema sembo bákutana na Batatoli na ye. Baanzelu yango batambwisaka mpe Batatoli epai ya bato oyo bazali na ezaleli ebongi. Yango ezali kosalisa biso tóyeba mpo na nini ekómaka mbala mingi ete Motatoli ya Yehova akutana na moto moko na ntango oyo moto yango azalaki na mikakatano makasi mpe azalaki mpenza na mposa ya lisalisi na elimo.

Mokumba oyo bakokokisa na mikolo ezali koya

17. Ndenge nini anzelu moko mpamba asukisaki Baasulia?

17 Longola mosala ya komemela basaleli ya Yehova nsango euti na Nzambe mpe kolendisa bango, baanzelu bazali mpe na mokumba mosusu. Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kosalela bango mpo na kopesa bato mabe etumbu. Na ndakisa, na siɛklɛ ya 8 L.T.B., ebele ya basoda ya Asulia bazingaki Yelusaleme. Yehova asalaki nini? Alobaki boye: “Nakobatela mboka oyo mpo na kobikisa yango mpo na nkombo na ngai mpe mpo na Davidi, moombo na ngai.” Biblia eyebisi biso likambo oyo elekaki: “Na butu yango, [anzelu ya Yehova] abimaki mpe abɛtaki kati na efandelo ya Baasulia bato nkóto monkama na ntuku mwambe na mitano. Elongwaki bango na mpɔngi na ntɔngɔntɔngɔ, talá bazalaki nyonso bibembe.” (2 Mikonzi 19:34, 35) Tomoni ete ata limpinga monene ya basoda ekoki kotɛlɛma te liboso ya anzelu moko!

18, 19. Mokumba nini baanzelu bakokokisa na mikolo ezali koya, mpe yango ekosala nini na bomoi ya bato?

18 Na mikolo ezali koya, Nzambe akotinda baanzelu bápesa bato mabe etumbu. Mosika te Yesu akoya “elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela.” Mokumba na bango ekozala ya ‘kozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.’ (2 Batesaloniki 1:7, 8) Baoyo baboyi kotosa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kosakolama na mokili mobimba, bakobomama. Kaka bato oyo bazali koluka Yehova, boyengebene mpe bopɔlɔ nde ‘bakobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova’ mpe bakozwa likama te.​—Sefania 2:3.

19 Tokoki mpenza kotɔnda Yehova na ndenge asalelaka baanzelu, bikelamu na ye oyo bazali na nguya mingi, mpo na kosunga mpe kolendisa basaleli na ye awa na mabelé. Koyeba mikumba oyo baanzelu bakokisaka na mokano ya Yehova ezali kokitisa biso motema, mpamba te ezali na baanzelu mosusu oyo batombokelaki Yehova mpe bamityá na ngámbo ya Satana. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo oyo baklisto ya solo bakoki kosala mpo bákwea te na mitambo ya Satana Zabolo ná bademo na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masolo oyo elobeli minyoko yango ezali na Annuaire des Témoins de Jéhovah ya 1974 mpe 1999 (Allemagne), 1983 (Angola), 1978 (Espagne), 1992 (Éthiopie), 1982 (Italie), 1999 (Malawi), 2004 (Moldavie), 1996 (Mozambique), 1994 (Pologne), 1983 (Portugal), 2000 (République tchèque), 1972 (Tchécoslovaquie), 2002 (Ukraine), mpe 2006 (Zambie).

Oyekoli makambo nini?

• Baanzelu bautaki wapi?

• Nzambe asalelaki baanzelu na makambo nini na ntango ya kala?

• Emoniseli 14:6, 7 emonisi nini mpo na mosala ya baanzelu lelo oyo?

• Mokumba monene nini baanzelu bakokokisa na mikolo ezali koya?

[Elilingi na lokasa 22]

Anzelu moko alendisaki Manoa ná mwasi na ye

[Elilingi na lokasa 23]

“Baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango!”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto