Elikya na mokili oyo etondi na bampasi
NA LIKITA moko monene oyo esalemaki na sanza ya Marsi 2006 na engumba Ottawa, na Canada, Bill Clinton, prezida ya kala ya États-Unis alobaki boye: “Lelo oyo, koleka na eleko mosusu nyonso, bato bakómi na mposa ya kosala makambo mpo na bolamu ya bato nyonso.” Abakisaki ete bato mingi bakómi kopesa mbongo to komipesa bango moko mpo na kosala na bibongiseli oyo ezali kosunga bato, mingimingi banda 2004, ntango mabelé eninganaki makasi mpe mai ya mbu emataki na mikili ya Azia. Na elikya nyonso, asukisaki na koloba ete bato ya bikólo nyonso lelo oyo bakómi na makanisi ya kosalisana mpenza.
Tokoki nde kolikya ete makama oyo ezali kobima na mokili ekotinda bato nyonso básala makasi mpo na kobongisa avenire ya mokili? Tokoki nde kolikya kozwa kimya ya libela mpe ya solosolo lokola bato ya bikólo nyonso bakómi na makanisi ya kosalisana?
Elikya ya solosolo ezali wapi?
Soki totali makambo oyo bato basali na boumeli ya bambula koleka 6 000 oyo eleki, tokomona ete mbala mingi moto alongaka te kokokisa bamposa ya bazalani na ye. Yango wana Biblia epesi biso toli oyo: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” (Nzembo 146:3) Soki totye elikya na bibongiseli ya mokili oyo, na bozwi na yango, to na makambo oyo bato ya mokili bazali kolaka, tokozwa eloko moko te. Mpo na nini? Mpamba te “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango.”—1 Yoane 2:17.
Nzokande, banda kala mpenza bato ya sembo batyaka elikya na bango mobimba epai ya Nzambe. Biblia ebengi ye “elikya ya Yisalaele” mpe “elikya ya batata ya [Bayisalaele].” Biblia ezali mpe na maloba mingi ya bato oyo bamonisaki ete bazalaki kotyela Yehova motema. (Yilimia 14:8; 17:13; 50:7) Kutu, Biblia ezali kolendisa biso ‘tótyela Yehova elikya.’—Nzembo 27:14, NW.
Masese 3:5, 6 epesi biso toli oyo: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.” Tosengeli mpenza kotya motema mobimba na elaka yango mpamba te Yehova Nzambe abongwanaka te, tokoki kotyela ye motema, mpe akokisaka maloba na ye. (Malaki 3:6; Yakobo 1:17) Alukaka bolamu na yo, mpe soki ozali ntango nyonso kolanda makambo oyo ezali na Liloba na ye, Biblia, yango ekotambwisa yo na mikolo oyo ya mabe.—Yisaya 48:17, 18.
Moto oyo azali kolanda na motema na ye mobimba litambwisi ya Nzambe akoki kotya motema na elaka oyo: “Bangá te, zambi ngai nazali na yo; yoká nsɔmɔ te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo, nakotombola mpe yo na lobɔkɔ na ngai ya boyengebene.” (Yisaya 41:10) Kobondela na etingya mpe komanyola maloba yango ekolendisa baoyo nyonso balingaka Yehova Nzambe, ekosalisa bango báyika mpiko na bampasi mpe mitungisi.
Tózwa ndakisa ya Andrea, Motatoli ya Yehova oyo azali mama ya bana mibale. Ye alobi boye: “Kobondela Yehova mpe komanyola bilaka na ye nde esalisaka ngai nayika mpiko ntango nakutani na makambo ya mpasi. Kotalela Yehova na makambo nyonso esalisaka ngai nalɛmba te.”
Lendisá elikya na yo epai ya Yehova
Mokomi ya nzembo amonisaki ntina ya kotyela Yehova elikya; alobaki boye: “Kimya mingi ezali na bango balingi mobeko na yo; libaku ezali liboso na bango te.” (Nzembo 119:165) Soki tozali koyekola mpenza Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tókɔtisa na makanisi mpe na mitema na biso ‘makambo nyonso oyo ezali solo, makambo nyonso oyo ebongi na lobanzo, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, ezaleli moko ya malamu mpe eloko moko oyo ebongi kosanzolama.’ Soki ozali kosala milende mpenza mpo na koyoka, koyekola, kondima mpe kosalela makambo yango, ‘Nzambe ya kimya akozala elongo na yo.’—Bafilipi 4:8, 9.
John oyo azwá batisimo esili koleka bambula mingi, alobi boye: “Mpo nakóma na ndenge malamu ya kotalela avenire, nasengelaki kobongola bomoto mpe makanisi na ngai liboso ya kosala boninga ná Nzambe. Lolenge bobele moko oyo nakokaki kosala boninga yango ezalaki ya komipesa na makambo ya elimo. Yango esɛngaki nakóma kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango mpo nakóma kotalela makambo ndenge Nzambe atalelaka yango.”
Liloba ya Nzambe ezali lokola mai oyo ekitisaka motema; soki ozali koyekola yango, okobanga te ata ntango ozali koyoka bansango ya mabe oyo ezali koleka na mokili. Soki ozali kosalela makambo oyo ozali koyekola na Biblia ekosalisa yo ná libota na yo bózala malamu mpe bómitungisaka mingi te. Lisusu, Nzambe alobi ete azali pene ya ‘komonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.’ (2 Ntango 16:9) Akobongisa makambo na boye ete obanga eloko moko te.
Phinehas, ndeko moko oyo abikaki na bitumba, alobi boye: “Nayekoli komitika na mabɔkɔ ya Yehova. Kotosa mitinda ya Biblia ebikisi ngai na mikakatano mingi.” Soki ozali mpenza kotyela Yehova Nzambe motema, akoki kosalisa yo olonga ata mokakatano nini. (Nzembo 18:29) Mwana oyo ameseni na baboti na ye atyelaka bango motema mobimba mpe amiyokaka ete bazali kobatela ye, ata soki azali kobɛla to soki akutani na makambo ya mpasi. Yo mpe okoki koyoka bongo soki osali milende ya kondima kotyela Yehova motema ndenge asɛngi yo.—Nzembo 37:34.
Eloko oyo esimbi mpenza elikya
Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.’” (Matai 6:9, 10) Nzambe akoyangela mabelé na nzela ya Bokonzi yango—guvernɛma oyo Yesu Klisto azali kokamba.—Nzembo 2:7-12; Danyele 7:13, 14.
Makambo ndenge na ndenge ya kobangisa oyo tozali komona lelo oyo na mokili ezali komonisa ete Nzambe asengeli mpenza kozwa makambo na mabɔkɔ. Tozali na esengo ete etikali moke asala yango! Lelo oyo Yehova asili kopesa Masiya Yesu Klisto lotomo ya kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kosantisa nkombo na Ye. (Matai 28:18) Mosika te, Bokonzi ekoyangela mabelé mpe ekolongola makambo nyonso oyo ebangisaka mpe etungisaka bato. Yisaya 9:6 elobeli makambo oyo ezali komonisa ete Yesu azali mokonzi oyo akoki kolongola biso kobanga. Na ndakisa, ebengi ye “Tata ya seko,” “Mosungi ya kokamwa,” mpe “Nkolo ya kimya.”
Ebengeli “Tata ya seko” ezali komonisa ete Yesu azali na nguya mpe lotomo ata mpe mposa makasi ya kopesa bato ya botosi bomoi ya seko awa na mabelé na nzela ya mbeka ya lisiko na ye. Yango elingi koloba ete nsukansuka, bato bakosikolama na lisumu mpe kozanga kokoka oyo Adama atikelá biso. (Matai 20:28; Baloma 5:12; 6:23) Klisto akosalela mpe bokonzi oyo Nzambe apesi ye mpo na kosekwisa ebele ya bato oyo bakufá.—Yoane 11:25, 26.
Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki ete azali “Mosungi ya kokamwa.” Lokola Yesu ayebaki malamumalamu bizaleli ya bato mpe Liloba ya Nzambe, azalaki na likoki ya kosilisa mikakatano ndenge na ndenge oyo bato bazalaki na yango. Lelo oyo, Klisto azali mokonzi na likoló mpe azali kokoba kosala lokola “Mosungi ya kokamwa,” azali moto ya libosoliboso oyo Yehova azali kosalela mpo na koyebisa mikano na ye epai ya bato. Batoli ya Yesu oyo ezali na kati ya Biblia ezalaka ntango nyonso na bwanya mpe na bosembo. Soki toyebi yango mpe tozali kondima yango tokozala na bomoi ya kimya mpe tokobanga eloko te.
Yisaya 9:6 elobi mpe ete Yesu azali “Nkolo ya kimya.” Mpo na yango, etikali moke Klisto alongola makambo nyonso oyo ezangi sembo. Ndenge nini? Bokonzi na ye ya kimya ekoyangela mokili mobimba.—Danyele 2:44.
Ntango Bokonzi ekoyangela mabelé, kimya ekozala mpo na libela. Mpo na nini tondimi yango? Eyano ezali na Yisaya 11:9, epai tozali kotánga boye: “[Bato oyo Bokonzi yango ekoyangela] bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbɔngɛ ekozipaka mai-ya-monana.” Nsukansuka, moto nyonso awa na mabelé akozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe akotosa ye. Elikya yango ezali kosepelisa motema na yo? Soki ezali bongo, koumela te kozwa “boyebi ya Yehova.”
Soki ozali kotánga Biblia mpo na koyeba oyo yango eteyaka mpenza na ntina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo na biso mpe elikya oyo epesi mpo na mikolo ezali koya, ekosalisa yo okóma na boyebi mpenza ya Nzambe mpe ekolendisa kondima na yo. Yango wana, tozali kolendisa yo ondima koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova kozanga kofuta mbongo. Na ndenge yango, okolongola kobanga mpe okokóma na elikya ya solosolo na kati ya mokili oyo etondi na bampasi.
[Etanda/Bililingi na lokasa 7]
Ntina oyo tozali kolikya na Bokonzi ya Nzambe
Yesu Klisto, mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe asili kozwa nguya mpe lotomo ya koyangela mokili mobimba. (Matai 28:18) Akozongisa mabelé sika. Azali mpe na nguya ya kosilisa maladi ya ndenge nyonso. Makamwisi oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé emonisaki mapamboli oyo bato bakozwa ntango akoyangela mokili lokola Mokonzi ya kokoka mpe oyo bakoki kotyela motema. Na kati ya bizaleli ya Masiya oyo emonisami awa na nse wapi oyo esimbaka mpenza motema na yo?
▪ Azalaki kosolola na moto nyonso.—Malako 10:13-16.
▪ Azalaki makambo makasimakasi te mpe azalaki kopona bilongi te.—Malako 10:35-45.
▪ Bato bakokaki kotyela ye motema mpe azalaki koluka bolamu na ye moko te.—Matai 4:5-7; Luka 6:19.
▪ Azalaki na boyengebene mpe na bosembo.—Yisaya 11:3-5; Yoane 5:30; 8:16.
▪ Azalaki na boboto, azalaki komitya na esika ya basusu, mpe azalaki na komikitisa.—Yoane 13:3-15.
[Elilingi na lokasa 4]
Kotánga Biblia mpe komanyola yango ekosala ete tókóma na elikya epai ya Yehova