Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/5 nk. 11-13
  • Bantina ya koyanganaka na makita

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bantina ya koyanganaka na makita
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bóya epai na ngai”
  • “Bino nyonso oyo bozali koyoka mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba”
  • “Ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ”
  • “Nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema”
  • “Bokozwa kopema mpo na milimo na bino”
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge oyo Yehova azali kotambwisa biso.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yo mpe osalaka mpo makita ya bokristo etonga basusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/5 nk. 11-13

Bantina ya koyanganaka na makita

NSIMA ya mbula ntuku mibale ya libala, mobali ya Christine asundolaki ye. Atikaki ye ná bana mwambe, moko ya mwasi mpe nsambo ya mibali. Mwana ya liboso azalaki na mbula 18 mpe ya nsuka azalaki na mbula 7. Christine alobi boye: “Nasengelaki kobanda kozwa bikateli nyonso ya minene kaka ngai moko. Mokumba yango ezalaki makasi mingi mpo na ngai mpe nazalaki na mposa makasi ya lisungi mpe batoli.” Epai wapi Christine azwaki lisungi yango?

Alobi boye: “Makita ebatelaki libota na biso. Na makita bandeko bazalaki kolendisa biso mpe tozalaki koyoka batoli ya Liloba ya Nzambe. Koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ esalisaki biso na makambo nyonso.”

Na ‘bantango oyo ya ndenge mosusu mpe ya mpasi’ biso nyonso tozali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. (2 Timote 3:1) Ndenge moko na Christine, mbala mosusu yo mpe omonaka ete makita ezali na ntina mingi mpo na kobatela kondima, mpe ezali na esika monene na losambo na yo epai ya Yehova. Na ntembe te, makita mitano oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na lisangá ekolisaka bolingo na biso mpo na Nzambe, elendisaka elikya na biso mpo na mikolo ezali koya, mpe epesaka biso mayele oyo euti na Biblia mpo na koyika mpiko na mikakatano.

Kasi, bandeko mosusu bazalaka na mokakatano mpo na koyanganaka na makita. Nsima ya kosala mokolo mobimba balɛmbaka mpe komibongisa mpo na kokende na makita ekómaka kilo. Mpo na basusu, programɛ ya mosala na bango epesaka bango nzela te ya koyanganaka na makita nyonso. Soki balobi ete báyanganaka na makita nyonso bakofuta bango mbongo moke to mpe bakolongola bango na mosala. Basusu mpe bazangisaka makita mpo balingaka lisano moko boye koleka makita.

Na yango, bantina nini esengeli kotinda biso tóyanganaka na makita? Nini osengeli kosala mpo ete makita elendisaka yo? Mpo na kozwa biyano na mituna yango, tótalela naino maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 11:28-30. Yesu alobaki boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ekanganeli na ngai ezali pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ.”

“Bóya epai na ngai”

Yesu alobaki ete: “Bóya epai na ngai.” Koyangana na makita nyonso emonisaka ete tondimi libyangi yango. Ezali mpe na ntina mosusu oyo mpo na yango tosengeli koyanganaka na makita; Yesu alobaki boye: “Epai mibale to misato bayangani na nkombo na ngai, nakozala kuna na katikati na bango.”​—Matai 18:20.

Na siɛklɛ ya liboso, Yesu asɛngaki bato ndenge na ndenge bálanda ye. Na ndenge yango, apesaki bango libaku ya kozala penepene na ye. Basusu bandimaki mbala moko. (Matai 4:18-22) Kasi, basusu batikaki makambo lokola koluka bozwi epekisa bango kolanda Yesu. (Malako 10:21, 22; Luka 9:57-62) Yesu ayebisaki bato oyo balandaki ye boye: “Bino boponaki ngai te, kasi ngai nde naponaki bino.”​—Yoane 15:16.

Nsima ya lisekwa na ye, Klisto azalaki lisusu esika moko na bayekoli na ye te. Kasi, na maloba ya elilingi azalaki kaka elongo na bango mpo azalaki kotambwisa mosala na bango mpe kolandela ndenge oyo bazalaki kotosa toli na ye. Na ndakisa, mbula soki 70 nsima ya lisekwa na ye, Yesu apesaki masangá nsambo ya Azia toli mpe alendisaki yango. Maloba na ye emonisi ete ayebaki malamumalamu makambo ya malamu mpe bolɛmbu ya moto mokomoko na kati ya masangá yango.​—Emoniseli 2:1–3:22.

Ata lelo oyo, Yesu atyaka likebi na moyekoli na ye mokomoko. Apesaki elaka oyo: “Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:20) Tozali lelo oyo na ntango ya nsuka, mpo na yango tosengeli kotosa maloba ya Yesu mpe kolanda ye. Tokoki koloba ete koyangana na makita nyonso emonisaka ete tozali kolanda Yesu. Alingi ete tóyoka ye mpe ‘tóteyama na nzela na ye’ na boyekoli ya Biblia mpe masolo oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na lisangá. (Baefese 4:20, 21) Ondimaka libyangi ya Yesu ete “bóya epai na ngai”?

“Bino nyonso oyo bozali koyoka mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba”

Ntina monene oyo tosengeli koyanganaka na makita ezali mpo na kolendisama. (Baebele 10:24, 25) Mingi kati na biso ‘tozali koyoka mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba’ na ndenge mingi. Okoki kokumbisama mikumba na ntango ozali komitungisa na ndakisa mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Makita ya lisangá epesaka biso libaku ya kolendisana. (Baloma 1:11, 12) Na ndakisa, na makita okoyoka biyano oyo ekolendisa yo, ekolendisa elikya oyo Biblia epesi biso, mpe okoki komona kondima ya bandeko mosusu oyo bazali mpe koyika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge. Nyonso wana ekoki kosalisa yo oyika mpiko mpe otalela mokakatano na yo na ndenge oyo ebongi.

Tótalela maloba ya ndeko mwasi moko oyo abɛlaka. Alobaki boye: “Maladi na ngai esɛngaka na bantango mosusu nakɔta lopitalo. Kozongela momeseno ya koyangana na makita nsima ya kobima lopitalo ezalaka mwa mpasi, kasi makita nde esika oyo ebongi nakendaka. Boboto mpe bolingo oyo bandeko bamoniselaka ngai epesaka ngai esengo, lisusu mateya mpe toli ya Yehova mpe Yesu esalaka ete nazala na bomoi ya esengo.”

“Ekanganeli na ngai ezali ya pɛtɛpɛtɛ mpe mokumba na ngai ezali pɛpɛlɛ”

Na vɛrsɛ oyo tozali kotalela, Yesu alobaki ete: “Bóyekola epai na ngai.” Koyekola epai ya Yesu esalaka ete tókóma bayekoli na ye, mpe tokamataka ekanganeli na ye likoló na biso ntango tomipesi na Nzambe mpe tozwi batisimo. (Matai 28:19, 20) Kosangana na makita esalisaka biso tótikala ntango nyonso bayekoli ya Yesu. Na ndenge nini? Ezali na makita ya boklisto nde toyekolaka mateya ya Yesu mpe bizaleli na ye.

Mokumba oyo Yesu alingi biso tómema ezali nini? Ezali mokumba oyo ye mpe amemaka, elingi koloba libaku malamu ya kosala mokano ya Nzambe. (Yoane 4:34; 15:8) Esɛngaka milende mpo na kotosa mibeko ya Nzambe, kasi mokumba yango ezali kilo te mpo na komema. Tokoyoka yango kilo soki toluki komema yango na makasi na biso moko. Nzokande, soki tozali kobondela mpo na kozwa elimo ya Nzambe mpe soki tozali kolya malamu bilei ya elimo oyo epesamaka na makita, Nzambe akopesa biso “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Soki tozali kobongisa makita mpe kopesa biyano, bolingo na biso mpo na Yehova ekokóma makasi. Mpe soki tolingi mpenza Yehova, kotosa bakomandema na ye ‘ekozala kilo te.’​—1 Yoane 5:3.

Tokutanaka na mikakatano lokola kozanga mbongo, maladi, mpe mikakatano mosusu ya bomoi. Kasi, tosengeli te kotya elikya na mayele ya bato mpo na kolonga yango. Makita ya lisangá esalisaka biso ‘tótika komitungisa,’ mpamba te Yehova akokisaka bamposa na biso mpe asalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano. (Matai 6:25-33) Ya solo, makita emonisaka bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso.

“Nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema”

Yesu azalaki na momeseno ya kokende na sinagoga epai Liloba ya Nzambe ezalaki koteyama. Mokolo moko, Yesu azwaki rulo ya Yisaya mpe atángaki boye: “Elimo ya Yehova ezali likoló na ngai, mpamba te apakoli ngai mpo na kosakola nsango malamu epai ya babola, atindi ngai mpo na kosakola kosikolama epai ya bakangami mpe kofungwama ya miso epai ya bato oyo bakufá miso, mpo na kotika bato oyo batutamá ete bákende na bonsomi, mpo na kosakola mbula ya kondimama na Yehova.” (Luka 4:16, 18, 19) Kanisá esengo oyo tolingaki koyoka soki tozalaki wana mpe toyoki Yesu azali koloba ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.”​—Luka 4:21.

Yesu, “mobateli ya mpate mokonzi” oyo azali na elimo ya boboto, azali ntango nyonso kotya likebi na bamposa ya elimo ya bayekoli na ye. (1 Petelo 5:1-4) Na litambwisi na ye, “moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kopona mibali oyo bazali bankulutu na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. (Matai 24:45-47; Tito 1:5-9) Mibali yango ‘babatelaka lisangá ya Nzambe’ na boboto mpe bapesaka ndakisa malamu na ndenge bayanganaka na makita nyonso. Soki ozali koyangana na makita nyonso ya lisangá epai okoki kolendisa bandeko mosusu mpe soki ozali kopesa biyano, okomonisa ete ozali na botɔndi mpo na “makabo oyo ezali bato.”​—Misala 15:30-33; 20:28; Baefese 4:8, 11, 12.

“Bokozwa kopema mpo na milimo na bino”

Ntango okei na makita, nini okoki kosala mpo olendisama mpenza? Moko na makambo ezali ya kolanda toli ya Yesu oyo: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.” (Luka 8:18) Bato oyo bazalaki na mposa makasi ya koyoka batyaki likebi na maloba ya Yesu. Bazalaki kosɛnga ye alimbwela bango bandakisa oyo azalaki kopesa mpe mpo na yango bakómaki na boyebi mingi.​—Matai 13:10-16.

Yo mpe soki ozali koyoka malamumalamu masolo oyo esalemaka na makita okomonisa ete ozali kolanda ndakisa ya bayekoli wana ya Yesu. (Matai 5:3, 6) Mpo makanisi na yo ezala ntango nyonso na makambo oyo ezali kolobama na makita, osengeli kolanda malamumalamu molobi ntango azali kobimisa makanisi mpe kolimbola yango. Osengeli komitunaka boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalela makambo yango na bomoi na ngai? Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kosalisa basusu? Ndenge nini nakoki kolimbola likambo yango?’ Lisusu, osengeli kolukaka na Biblia na yo bavɛrsɛ oyo molobi azali kopesa. Soki ozali kokeba na ndenge ozali koyoka, makita ekolendisa yo mingi.

Nsima ya makita, sololáká na bato mosusu makambo oyo oyoki. Lobeláká makambo oyo oyoki mpe ndenge oyo okoki kosalela yango. Masolo ya kolendisa esalisaka moto amona ete makita elendisaka.

Ntembe ezali te, tozali na bantina malamu ya koyanganaka elongo. Nsima ya kotalela makambo nyonso oyo touti kolobela, mpo na nini te komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki koyanola na maloba oyo ya Yesu ete: “Bóya epai na ngai”?’

[Bililingi na lokasa 11]

Makambo mosusu epekisaka yo koyangana na makita?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto