Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/5 nk. 14-16
  • Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai báteyama malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai báteyama malamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moboko ya mateya ya malamu
  • Bana na yo batalaka yo!
  • Kokisá mokumba na yo
  • Zwáká ntango mpo na koteya bana na yo
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/5 nk. 14-16

Ndenge nini nakoki kosalisa bana na ngai báteyama malamu?

KOTEYA bana ezali lokola kosala mobembo moko ya esengo, kasi oyo ezali mpe mpasi mingi. Ezali mobembo oyo yo ná bana na yo bozali kosala elongo. Na bolingo nyonso, ozali kolendisa bango, ozali kolakisa bango nzela mpe kosalisa bango bátambola malamu. Basengeli koyekola makambo mingi!

Mpo bana bázala mpenza na bomoi ya malamu mpe ya esengo, basengeli koyekola bizaleli malamu mpe makambo ya Nzambe; basengeli koyeba kokesenisa mabe ná malamu. Soki bayebi Yehova mpe balingi ye, mateya oyo bazwi ekomemela bango matomba mpe ekotikala mpo na libela. Lokola ozali moboti, ozali na mokumba monene ya koteya bana mpe kosalisa bango bákanga ntina ya makambo oyo bazali koyekola.

Mobembo yango ezali na mikakatano oyo baboti basengeli kolonga. Bana babendamaka na makambo mingi, mpe bakoki koyekola makambo ya mabe na libándá. Satana Zabolo nde azali koyangela mokili oyo. (1 Yoane 5:19) Alingaka ete bana na yo báteyama, kasi makambo ya mabe. Satana ayebi mpenza koteya​—kasi, ateyaka makambo ya mabe. Atako amimonisaka lokola “anzelu moko ya pole,” boyebi oyo apesaka ebungisaka bato nzela mpe eyokani te na Liloba ya Yehova mpe mokano na ye. (2 Bakolinti 4:4; 11:14; Yilimia 8:9) Zabolo ná bademo na ye bazali na mayele mingi ya kokosa bato, batindaka bato bálukaka liboso bolamu na bango moko, bázala sembo te, mpe básalaka makambo ya mbindo.​—1 Timote 4:1.

Okoki kosala nini mpo bana na yo bákosama te? Ndenge nini okoki koteya bango mpo bándima makambo oyo ezali solo mpe ya ntina? Ya liboso, osengeli komitalela yo moko. Osengeli kopesa ndakisa ya malamu. Osengeli mpe kondima mokumba na yo ya koteya bana mpe kozwaka ntango oyo ekoki mpo na kosala yango. Kasi, liboso tólobela makambo yango, tótalela naino moboko ya mateya ya malamu.

Moboko ya mateya ya malamu

Salomo, mokonzi ya Yisalaele oyo azalaki na bwanya mingi akoki koyebisa biso yango. Biblia elobi boye: “Nzambe apesaki Salomo mayele mpe bososoli koleka bipimeli mpe motema monene lokola mingi na zɛlo na libongo ya mai-ya-monana. Boye mayele ya Salomo elekaki mayele ya bato nyonso ya epai na ebimelo ya moi mpe mayele nyonso ya Ezipito.” Salomo “alobaki mpe masese nkóto misato mpe nzembo na ye ezalaki nkóto mpe mitano.” Ayebaki malamu banzete mpe banyama. (1 Mikonzi 4:29-34) Mokonzi Salomo atambwisaki mpe misala minene ya kotonga na Yisalaele, na ndakisa, mosala ya kotonga tempelo monene ya Yehova na Yelusaleme.

Maloba ya Salomo, na ndakisa oyo ezali na mokanda ya Mosakoli, emonisaka ete ayebaki malamu ndenge bato bazalaka. Elimo santu ya Nzambe esalisaki ye alobela moboko ya mateya ya malamu. Salomo alobaki boye: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi.” Alobaki lisusu boye: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya, mpe boyebi ya ye Oyo-Aleki-Bosantu ezali mayele.”​—Masese 1:7; 9:10, NW.

Kobanga Nzambe esalisaka biso tótosa ye mpe tósala te makambo oyo eyokisaka ye mawa. Na ndenge yango, tondimaka ete azali Oyo-Aleki-Nyonso mpe ete tokozongisa monɔkɔ epai na ye. Bato oyo bandimaka te ye oyo azali nkolo ya bomoi na biso bakoki komonana lokola bato ya bwanya na mokili; kasi, bwanya yango ezali “bozoba epai ya Nzambe.” (1 Bakolinti 3:19) Bana na yo basengeli kozwa mateya oyo moboko na yango ezali “bwanya oyo euti na likoló.”​—Yakobo 3:15, 17.

Kolinga Yehova etambolaka nzela moko na kobanga kosala makambo oyo eyokisaka ye mawa. Yehova alingi ete basaleli na ye bábanga ye mpe bálinga ye. Moize alobaki boye: “Ee Yisalaele, eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo soki ezali te kaka kobanga Yehova Nzambe na yo, elingi koloba, otambola na banzela na ye nyonso mpe olinga ye mpe osalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba; obatela masɛngami ya Yehova mpe mibeko na ye oyo nazali kopesa yo etinda lelo, mpo na bolamu na yo?”​—Deteronome 10:12, 13, NW.

Soki tozali kokɔtisa ezaleli ya kobanga Yehova na mitema ya bana na biso, tokotya moboko ya mateya oyo ekokómisa bango bato ya bwanya. Soki batongi likoló ya moboko yango, bakolinga mingi Mozalisi na bango, oyo apesaka boyebi ya solosolo. Yango ekosalisa bana báyebaka ntina ya makambo oyo bazali koyekola mpe bázwaka te bikateli ya mabe. Bakokóma na likoki ya “kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:​14) Moboko ya ndenge wana ekosalisa mpe bango bázalaka na komikitisa mpe báboya kosalaka makambo ya mabe.​—Masese 8:13; 16:6.

Bana na yo batalaka yo!

Kasi, ndenge nini tokoki kosalisa bana bálinga Yehova mpe bábanga ye? Eyano na motuna yango ezali na Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele na nzela ya mosakoli Moize. Ayebisaki baboti boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.”​—Deteronome 6:5-7.

Mokapo yango ezali koteya baboti makambo mingi. Moko yango oyo: Lokola ozali moboti, osengeli kopesa bana ndakisa ya malamu. Mpo na koteya bana na yo bálinga Yehova, yo moko osengeli kolinga ye mpe maloba na ye esengeli kozala na motema yo. Mpo na nini ezali na ntina? Mpamba te yo nde ozali moteyi ya libosoliboso ya bana na yo. Makambo oyo bamonaka epai na yo nde ekotikala na mitema na bango. Ntango bana bakoli, basalaka mingimingi makambo oyo bazalaki komona epai ya baboti na bango.

Bamposa na yo, mikano na yo, makanisi na yo, mpe makambo oyo esepelisaka yo emonanaka kaka na maloba na yo te, kasi mpe na misala na yo. (Baloma 2:21, 22) Banda bomwana, bana bamekolaka makambo oyo baboti na bango bazali kosala. Bana bayebaka makambo oyo baboti na bango batalelaka na motuya mpe mbala mingi, ntango bakoli, bango mpe bapesaka motuya na makambo yango. Soki olingaka mpenza Yehova, bana na yo bakomona yango. Na ndakisa, bakomona ete opesaka motuya mingi na kotánga Biblia mpe koyekola yango. Bakoyeba ete otyaka Bokonzi na esika ya liboso. (Matai 6:33) Soki oyanganaka na makita nyonso mpe obimaka mosala ya kosakola, ekomonisa ete likambo eleki ntina mpo na yo ezali kosalela Yehova mosala ya bosantu.​—Matai 28:19, 20; Baebele 10:24, 25.

Kokisá mokumba na yo

Liteya mosusu oyo moboti akoki kozwa na Deteronome 6:5-7 ezali oyo: Ozali na mokumba ya koteya bana na yo. Na Yisalaele, baboti nde bazalaki koteya bana na bango. Na siɛklɛ ya liboso mpe, baklisto bazalaki na mokumba ya koteya bana na bango. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Na mokanda moko oyo Paulo akomelaki bandeko na ye baklisto, amonisaki ete mingimingi batata nde basengeli ‘kokoba kobɔkɔla bana na bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.’​—Baefese 6:4.

Lokola mosala mpe makambo mosusu na mokili ya lelo ezali kozwa ntango mingi mpe ezali kosɛnga bato makasi mingi, baboti bakoki koluka kopesa mokumba ya koteya bana epai ya bato mosusu, na ndakisa balakisi. Nzokande, moto moko te akoki kozwa esika ya moboti. Kobosana te ete ozali na mokumba ya koteya bana na yo mpe kopesa bango ndakisa ya malamu. Soki ozali na mposa ete moto mosusu asalisa yo, osengeli kopona ye malamu; kasi, osengeli te kotikela ye mokumba oyo Nzambe apesi yo.

Zwáká ntango mpo na koteya bana na yo

Liteya mosusu oyo baboti bakoki kozwa na Deteronome 6:5-7 yango oyo: Koteya bana esɛngaka ntango mpe milende. Na Yisalaele, baboti basengelaki ‘kolakisa na etingya’ makambo ya Nzambe epai ya bana na bango. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “kolakisa na etingya” elimboli “kozongela,” “koloba mbala na mbala.” Baboti basengelaki kosala yango mokolo mobimba, elingi koloba banda ntɔngɔ tii mpokwa, ezala “na ndako” to “na nzela.” Esɛngaka ntango mpe milende mpo na koteya bana mpe kobongisa makanisi mpe bizaleli na bango mpo básepelisa Nzambe.

Na bongo, osengeli kosala makambo mingi mpo osalisa bana na yo báteyama malamu. Makambo yango nini? Osengeli koteya bango bálinga Yehova mpe bábanga ye. Osengeli kopesa ndakisa ya malamu. Osengeli kokokisa mokumba na yo ya koteya bana na yo, mpe kozwaka ntango oyo esengeli mpo na koteya bango. Ozali moto ya kokoka te, yango wana okoki kosala mabunga. Kasi, soki ozali kosala makasi mpo okokisa mokano ya Nzambe, na ntembe te bana na yo bakozala na botɔndi mpo na milende na yo mpe yango ekomemela bango matomba. Masese 22:6 elobi boye: “Bókola mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.”

Moto akoki koyekola makambo ya sika bomoi na ye mobimba. Soki yo ná bana na yo bolingi Yehova, libela na libela bokobanda koyekola makambo ya sika. Ezali bongo mpamba te ekozala ntango nyonso na makambo oyo tokoyekola mpo na Yehova mpe ndenge tokoki kokokisa mokano na ye.​—Mosakoli 3:10, 11.

[Elilingi na lokasa 15]

Otángelaka bana na yo Biblia?

[Elilingi na lokasa 16]

Zwáká ntango ya koteya bana na yo makambo etali Mozalisi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto