“Mikano na yo ekobongisama”
NA LOYEMBO moko oyo akomaki, Davidi abondelaki boye: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai. Zongiselá ngai esengo ya kobikisa na yo mpe kangá ngai na [elimo oyo elingaka kotosa, NW].” (Nzembo 51:10, 12) Bavɛrsɛ yango emonisi ete nsima ya kokwea na lisumu na Bata-seba, Davidi abongolaki motema mpe asɛngaki Yehova Nzambe apɛtola motema na ye mpe atya kati na ye mposa ya kosala oyo ezali malamu.
Yehova azalisaka mpenza na kati na biso motema ya sika, mpe atyaka mpenza na kati na biso elimo ya sika, oyo elingaka kotosa? To biso moko nde tosengeli kosala makasi mpo tókóma na motema ya pɛto mpe tóbatela yango? “Yehova atalaka mitema,” kasi na meko nini abongolaka yango? (Masese 17:3, NW; Yilimia 17:10) Ndenge nini atambwisaka bomoi, makanisi, mpe misala na biso?
Masese mokapo 16 vɛrsɛ ya 1 tii na vɛrsɛ ya 9 etángi nkombo ya Nzambe mbala mwambe mpe emonisi biso ndenge oyo tokoki kotika Nzambe atambwisa bomoi na biso mpo ‘mikano na biso ebongisama.’ (Masese 16:3) Vɛrsɛ ya 10 tii vɛrsɛ ya 15 elobeli mingimingi mokumba ya mokonzi to moyangeli.
Nani asalaka “myango ya motema”?
Masese 16:1a elobi ete “myango ya motema ezali likambo ya moto.” Ezali polele ete biso moko nde tozali na mokumba ya kosala “myango ya motema.” Yehova abongisaka motema na biso na ndenge ya likamwisi te; apesaka mpe biso elimo oyo elingaka kotosa na ndenge ya likamwisi te. Tosengeli kosala makasi mpo na kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia, Liloba na ye, komanyola makambo oyo tozali koyekola, mpe koyokanisa makanisi na biso na oyo ya ye.—Masese 2:10, 11.
Nzokande, libondeli oyo Davidi asalaki mpo na kosɛnga “motema ya pɛto” mpe “elimo ya sika” emonisi ete ayebaki ete azali moto ya masumu mpe ete azali na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpo na kopɛtola motema na ye. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobendama na “misala ya mosuni.” (Bagalatia 5:19-21) Tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova mpo na ‘koboma binama ya nzoto na biso oyo bizali na mabelé na oyo etali pite, bosɔtɔ, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo esalaka mabe, mpe ezaleli ya kolula biloko ya bato.’ (Bakolose 3:5) Ezali na ntina tóbondelaka Nzambe mpo na kosɛnga ye asalisa biso tókwea te na komekama mpe tólongola na mitema na biso mposa ya kosala masumu!
Tokoki nde kosalisa basusu na kosala “myango” ya mitema na bango? Biblia elobi boye: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama ya mbeli; nde lolemo ya bato ya mayele [ebikisaka, NW].” (Masese 12:18) Ntango nini lolemo na biso ebikisaka basusu? Ezali ntango “kozongisa ya lolemo euti na [Yehova],” elingi koloba, ntango tozali koloba makambo ya solo oyo euti na Biblia.—Masese 16:1b.
Biblia elobi ete “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Motema na biso ya elilingi elukaka komilongisa mpe emikosaka mingi. Lokola Mokonzi Salomo ayebaki likama yango, alobaki boye: “Nzela nyonso ya moto ezali pɛto na miso na ye, nde [Yehova amekaka bilimo, NW].”—Masese 16:2.
Mpo na kobatela lokumu na biso, tokoki koluka kolongisa mabunga na biso, kobomba bizaleli na biso ya mabe, to mpe kokanga miso na mabe na biso. Nzokande, Yehova akoki kokosama te. Azali ye oyo amekaka bilimo. Elimo ya moto ezali mposa oyo etindaka ye na kosala makambo mpe yango ezali na boyokani na motema. Mbala mingi, mposa yango eutaka na motema ya elilingi, epai makanisi na biso, mayoki, mpe mikano na biso ezalaka. Ye oyo “atalaka mitema,” alukaka koyeba soki elimo na biso ezali ndenge nini, mpe asalaka yango kozanga kopona bilongi. Yango wana, ezali malamu tóbatela makanisi na biso.
“Pesá misala na yo epai ya Yehova”
Mpo na kosala mikano, esɛngaka kokanisa. Mbala mingi, tosalaka makambo oyo tokanisaki. Ndenge nini mikano na biso ekoki kolonga? Salomo alobi boye: “Pesá misala na yo epai ya [Yehova] mpe mikano na yo ekobongisama.” (Masese 16:3) Kopesa misala na biso epai ya Yehova elimboli kotyela ye motema, kotika ye atambwisa biso; ezali lokola nde tolongoli mokumba na mapeka na biso mpe totye yango na oyo ya ye. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.”—Nzembo 37:5.
Kasi, mpo mikano na biso ebongisama, esengeli koyokana na Liloba ya Nzambe, mpe tosengeli kosala yango na makanisi ya malamu. Longola yango, tosengeli kobondela Yehova asalisa biso mpe kosala makasi tólandaka batoli ya Biblia. Ezali na ntina ete ‘tókitisa mokumba na biso epai ya Yehova’ ntango tokutani na mikakatano to mpasi, mpo ‘ye akokumba biso.’ Ya solo, “libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”—Nzembo 55:22.
“Yehova asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye”
Litomba mosusu nini tokozwa soki topesi misala na biso epai ya Yehova? Salomo alobi boye: “Yehova asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye.” (Masese 16:4a, NW) Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ azali Nzambe oyo azali na mokano. Ntango topesi ye misala na biso, tokobanda kosala makambo ya ntina na bomoi na biso, kasi te makambo ya mpambampamba. Lisusu, Yehova azali na mokano ya seko mpo na mabelé mpe mpo na bato. (Baefese 3:11) Atongaki mabelé mpe azalisaki yango mpo “bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Longola yango, mokano na ye ya ebandeli mpo na bato awa na mabelé ekozanga te kokokisama. (Genese 1:28) Moto oyo amipesi mobimba na Nzambe ya solo akozala na bomoi ya ntina mpo na libela.
Yehova asalaki “ata moto mabe mpo na mokolo ya mpasi.” (Masese 16:4b) Yango elingi koloba te ete azalisaki bato ya mabe mpamba te “mosala na ye ebongi.” (Deteronome 32:4) Kasi, atikelaka bango nzela bázala na bomoi tii mokolo oyo abongisi mpo na kopesa bango etumbu. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Falao boye: “Natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama bipai nyonso na molɔ́ngɔ́.” (Exode 9:16) Malɔzi Zomi mpe ndenge oyo Falao ná basoda na ye babomamaki na Mai ya Motane emonisaki mpo na libela ete Nzambe azali na nguya oyo eleki nyonso.
Yehova akoki mpe kosala ete bato mabe bákokisa mokano na ye kozanga ete báyeba yango. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Nkɛlɛ ya bato ekokumisa yo solo; yo [Yehova] okomilatisa nkanda oyo etikali.” (Nzembo 76:10) Yehova akoki kotika ete banguna na ye bányokola basaleli na ye kaka soki alingi kopesa basaleli na ye disipilini mpe na bongo, koteya bango. Soki banguna balekisi ndelo, Nzambe ye moko azwaka makambo na mabɔkɔ.
Yehova asungaka basaleli na ye oyo bazali na komikitisa; ezali boni mpo na bato ya lolendo? Mokonzi ya Yisalaele alobi boye: “Mitema nyonso ya lolendo eboyami na [Yehova]; ata lobɔkɔ ekangami na lobɔkɔ, akokima etumbu te.” (Masese 16:5) Bato ya ‘mitema ya lolendo’ bakoki kosangana, kasi bakokima etumbu te. Yango wana, ebongi tólona ezaleli ya komikitisa ata soki tozali mayele mingi, toyebi kosala makambo mingi to mpe tozali na mikumba minene.
“Na kobanga Yehova”
Lokola tobotamaka na masumu, tosalaka mabunga mbala mingi. (Baloma 3:23; 5:12) Nini ekoki kosalisa biso tósalaka te mikano oyo ekoki komema biso na nzela ya mabe? Masese 16:6 (NW) elobi boye: “Libunga ekolimbisama mpo na motema-boboto mpe bosolo, mpe na kobanga Yehova, moto alongwaka na mabe.” Atako Yehova alimbisaka masumu mpo na motema-boboto mpe bosolo na ye, kobanga Yehova nde epekisaka biso tósala masumu. Ezali malamu mingi soki, longola bolingo na biso mpo na Nzambe mpe botɔndi mpo na motema-boboto na ye, tozali mpe kobanga kosala makambo oyo eyokisaka ye mawa!
Tokobanga Yehova na motema mobimba soki tokolisi limemya mpo na nguya na ye ya kokamwa. Kanisá kaka ndenge oyo biloko oyo azalisá emonisaka nguya na ye! Ntango Nzambe akundwelaki Yobo ndenge oyo nguya na ye emonanaka na biloko oyo azalisá, Yobo abongolaki makanisi na ye. (Yobo 42:1-6) Biso mpe tobongolaka makanisi na biso ntango totángi to tomanyoli masolo ya Biblia oyo elobeli ndenge oyo Yehova azalaki kotambwisa bato na ye. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yaká komona misala ya Nzambe; asali makambo ya kokamwa epai ya bana ya bato.” (Nzembo 66:5) Motema-boboto ya Yehova ezali eloko ya kozwa na lisɛki te. Ntango Bayisalaele ‘batombokaki, mpe bayokisaki [elimo santu, NW] ya Nzambe mawa, Yehova abongwanaki ete azala motɛmɛli na bango, mpe ye moko abundaki na bango.’ (Yisaya 63:10) Nzokande, “wana ezaleli ya moto ekosepelisa [Yehova] akofanda ata na bayini na ye na kimya.” (Masese 16:7) Ya solo, kobanga Yehova ebatelaka mpenza!
Salomo alobi boye: “Mwa moke ná boyengebene elongo eleki bozwi monene soki ezali na sembo te.” (Masese 16:8) Masese 15:16 (NW) elobi boye: “Kozala na moke kati na kobanga Yehova eleki malamu kozala na biloko beboo ná mobulungano elongo na yango.” Kobanga Yehova ezali na ntina mingi mpo na kotikala na nzela ya boyengebene.
“Motema ya moto ekobongisa nzela na ye”
Nzambe akelá moto na bonsomi ya kopona kati na malamu ná mabe. (Deteronome 30:19, 20) Motema na biso ya elilingi ezali na likoki ya kotalela makambo mingi mpe kopona likambo moko to koleka na kati na yango. Mpo na komonisa ete kopona to kozwa bikateli ezali mokumba na biso, Salomo alobi boye: “Motema ya moto ekobongisa nzela na ye.” Na nsima, “[Yehova] akotambolisa matambe.” (Masese 16:9) Lokola Yehova akoki kotambwisa matambe na biso, ezali malamu tólukaka lisalisi na ye soki tolingi ete ‘mikano na biso ebongisama.’
Ndenge tolobaki yango, motema ezali na bokosi mpe ekoki kozala na makanisi ya mabe. Na ndakisa, moto moko akoki kosala lisumu, kasi motema na ye ekoki koluka kolongisa ye. Na esika moto yango alongwa na nzela ya masumu, akoki kokanisa ete Nzambe azali bolingo, boboto, motema mawa, mpe alimbisaka. Moto ya ndenge wana alobaka na nse ya motema ete: “Nzambe abosani; azipi elongi na ye ete amona libela te.” (Nzembo 10:11) Nzokande, ezali mabe mpe likama soki tozali kosakana na motema mawa ya Nzambe.
“Epimeli mpe emekeli ya sembo ezali na Yehova”
Salomo atiki kolobela motema mpe misala ya bato mpe alobeli oyo ya mokonzi na maloba oyo: “Myango ya Nzambe ezali na bibɛbu ya mokonzi; monɔkɔ na ye ekosala mabe na ntango ya kosambisa te.” (Masese 16:10) Maloba yango ebongi na Yesu Klisto, mokonzi oyo azali koyangela na likoló. Akoyangela mabelé na boyokani na mokano ya Nzambe.
Salomo amonisi esika oyo bosembo mpe boyengebene eutaka na maloba oyo: “Epimeli mpe emekeli ya sembo ezali na [Yehova]; mabanga ya bozito nyonso na libenga ezali mosala na ye.” (Masese 16:11) Yehova nde asalaki epimeli mpe emekeli ya sembo. Mokonzi moko te akoki kotya biloko yango na likanisi na ye moko. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, alobaki boye: “Nakoki kosala ata eloko moko te na likanisi na ngai moko; kaka ndenge nazali koyoka, ndenge mpe nazali kosambisa; mpe lisambisi oyo ngai nazali kosala ezali ya sembo, mpamba te nazali koluka, mokano na ngai moko te, kasi mokano ya moto oyo atindaki ngai.” Tokoki kotya motema ete Mwana, oyo Tata “apesi kosambisa nyonso,” akosala makambo na bosembo.—Yoane 5:22, 30.
Tokoki kozela lisusu likambo nini epai ya mokonzi oyo azali komonisa Yehova? Salomo alobi ete, “ezali likambo mabe mingi wana mikonzi bakosalaka masumu, zambi bokonzi ekokokisama na boyengebene.” (Masese 16:12) Yesu akoyangela na kolanda mitinda ya sembo ya Nzambe. Bokonzi na ye ezali na boyokani moko te na “kiti ya bokonzi oyo ezali kobimisa minyoko.”—Nzembo 94:20, NW; Yoane 18:36; 1 Yoane 5:19.
Mpo mokonzi asepela na moto
Bato oyo mokonzi moko ya lokumu azali koyangela basengeli kosala nini? Salomo alobi boye: “Bibɛbu ya boyengebene ekosepelisa mokonzi; alingi ye oyo akolobaka sembo. Nkanda ya mokonzi ezali ntoma ya kufa, moto ya mayele akokitisa yango.” (Masese 16:13, 14) Lelo oyo, basambeli ya Yehova bazali kotosa maloba yango mpe bamipesi na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bayebi ete ntango bazali kosalela monɔkɔ na bango na ndenge wana, bazali kosepelisa Mokonzi Yesu Klisto. Bato oyo bazalaki koboya kosilikisa mokonzi mpe koluka ete asepela na bango, bazalaki bato ya bwanya. Ezali malamu mpenza koluka ete Mokonzi Masiya asepela na biso!
Salomo alobi lisusu boye: “Na pole ya elongi ya mokonzi bomoi ezali, mpe motema boboto na ye ezali lokola lipata ya mbula ya prɛnta.” (Masese 16:15, NW) “Pole ya elongi ya mokonzi” elimboli lipamboli na ye, ndenge moko mpe ‘pole ya elongi ya Yehova’ elimbolaka lipamboli ya Nzambe. (Nzembo 44:3; 89:15) Likoló oyo eyindi emonisaka ete mbula ekobɛta mpe ekopesa mai mpo na kokolisa milona; ndenge moko mpe motema malamu ya mokonzi emonisaka ete makambo ya malamu ezali koya. Ntango Masiya akoyangela, bato bakozala na bomoi ya esengo mpe ya malamu, ndenge ezalaki na boyangeli ya Mokonzi Salomo atako yango ezalaki na mabelé mobimba te.—Nzembo 72:1-17.
Wana tozali kozela ete Bokonzi ya Nzambe eyangela mabelé mobimba, tiká ete tólukaka lisalisi na ye mpo na kopɛtola mitema na biso. Lisusu, tiká ete tótyela Yehova motema mpe tóyekola kobanga ye. Soki tozali kosala bongo, ‘mikano na biso ekobongisama’ mpenza.—Masese 16:3.
[Elilingi na lokasa 18]
Na ndimbola nini Yehova asalaki “moto mabe mpo na mokolo ya mpasi”?