Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/5 nk. 21-25
  • Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge malamu ya kopesa eyano
  • Bendá likebi na bizaleli ya Yehova
  • Ezaleli ya Yehova oyo eleki monene
  • Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mpo na nini bampasi etondi na mokili?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/5 nk. 21-25

Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila

“Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka.”​—DETERONOME 32:4, NW.

1, 2. (a) Mpo na nini osepelaka na elikya ya bomoi ya seko? (b) Mpo na nini bato mingi bandimaka te Nzambe oyo alaki makambo ya malamu mingi na mikolo ezali koya?

OKANISAKA bomoi oyo okozala na yango na Paladiso? Mbala mosusu okanisaka mibembo oyo okobanda kosala mpo na komona bisika ya kitoko mpe koyeba bikelamu ndenge na ndenge oyo ezali awa na mabelé. To mpe okanisaka esengo oyo okoyoka ntango okobanda kosala na bato mosusu mpo na kobongisa mabelé mpe kokómisa yango paladiso. Mbala mosusu mpe okanisaka mayele oyo okokóma na yango ya kosala misala ya ntɔki, koyema mpe kotonga bandako, kobɛta miziki, mpe kosala makambo mosusu oyo ozalaka na ntango te ya kosala lelo oyo. Ata soki okanisaka kosala nini, ntembe ezali te ete osepelaka kozala na bomoi oyo Biblia ebengi “bomoi ya solosolo”​—bomoi ya seko oyo Yehova akanaki tózala na yango.​—1 Timote 6:19.

2 Ezali mpenza esengo mpe libaku malamu koyebisa bato elikya yango oyo euti na Biblia! Kasi, bato mingi bandimaka elikya yango te. Mpo na bango, ezali makanisi ya bato oyo bandimaka makambo bindimelá. Bato yango bakakatanaka ata mpo na kondima Nzambe oyo alaki bomoi ya seko na kati ya Paladiso. Mpo na nini? Mpo bamonaka ete mabe eleki mingi. Mpo na bango, soki Nzambe azali mpenza, azali na nguya nyonso mpe na bolingo, mabe ná bampasi ekoki kozala te na mokili. Na makanisi na bango, Nzambe moko te akoki kotika nzela na mabe; soki Nzambe azali, boye azali na nguya nyonso te to amibanzabanzaka mpo na bato te. Bato mosusu bamonaka ete makanisi ya ndenge wana elongobani mpenza. Satana alongi mpenza kozipa makanisi ya bato.​—2 Bakolinti 4:4.

3. Tokoki kosalisa bato bázwa eyano na motuna nini ya mpasi, mpe mpo na nini biso nde tokoki kosalisa bango?

3 Biso Batatoli ya Yehova tokoki mpenza kosalisa bato oyo bazali kokosama na Satana mpe na bwanya ya mokili oyo. (1 Bakolinti 1:20; 3:19) Toyebi ntina oyo bato mingi bandimaka bilaka ya Biblia te. Ezali mpo bayebi Yehova te. Ntango mosusu bayebi nkombo na ye te to mpe ndimbola na yango, mbala mosusu mpe bayebi te bizaleli na ye to mpe ndenge oyo akokisaki bilaka na ye na ntango ya kala. Biso tozwi libaku ya koyeba nyonso wana. Ezali na ntina tótalelaka mbala na mbala ndenge oyo tokoki kosalisa bato oyo bazali “na kati ya molili na makanisi” mpo bázwa eyano na moko ya mituna eleki mpasi oyo bato bamitunaka, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe mpe bampasi?” (Baefese 4:18) Tokolobela liboso lolenge malamu ya koyanola na motuna yango. Na nsima, tokolobela ndenge oyo bizaleli ya Yehova ezali komonana polele na lolenge oyo aponaki kokata likambo oyo ekɔtisaki mabe na mokili.

Lolenge malamu ya kopesa eyano

4, 5. Ntango moto moko atuni biso ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, ekoki kozala malamu tósala nini liboso? Limbolá.

4 Tolobaka nini ntango moto moko atuni biso ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe? Mbala mosusu tobandaka mbala moko kolimbola na molai, banda na likambo oyo esalemaki na Edene. Kosala bongo ekoki kozala malamu na bantango mosusu. Kasi, tosengeli kokeba. Ntango mosusu esɛngaka tóbongisa naino makanisi ya moto. (Masese 25:11; Bakolose 4:6) Tótalela makambo misato oyo Biblia ezali kolendisa, oyo tosengeli komonisa polele liboso tóyanola na motuna wana.

5 Ya liboso, soki moto azali mpenza komitungisa mpo na mabe oyo etondi na mokili, ekoki kozala ete likambo moko ya mabe ekómelaki ye moko, ndeko na ye to moninga na ye. Yango wana, ekozala malamu tómonisa ye ete tozali mpenza komitya na esika na ye. Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bólela elongo na bato oyo bazali kolela.” (Baloma 12:15) Komitya na esika ya moto ekoki kosimba motema na ye. (1 Petelo 3:8) Ntango moto amoni ete tozali komibanzabanza mpo na ye, akoki mpe kofungola motema mpe koyoka makambo oyo tolingi koloba na ye.

6, 7. Mpo na nini ebongi tópesa longonya na moto oyo atuni motuna moko oyo ezali kotungisa ye?

6 Ya mibale, tokoki kopesa moto yango longonya na ndenge atuni motuna wana. Bato mosusu bakanisaka ete soki batuni motuna ya ndenge wana, elakisi ete bazali na kondima te mpe babangaka Nzambe te. Ekoki kozala ete basango to bapastɛrɛ bateyá bango bongo. Nzokande, kotuna motuna ya ndenge wana emonisaka kaka te ete moto azangi kondima. Kutu, na ntango ya kala basaleli ya Nzambe batunaki mituna ya ndenge wana. Na ndakisa, Davidi, mokomi moko ya nzembo, atunaki boye: “Ee [Yehova] mpo nini okotikala mosika? Mpo nini okobombama na ntango ya mpasi?” (Nzembo 10:1) Ata mosakoli Habakuku, ye mpe atunaki ete: “Ee [Yehova], kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te? Nde okobikisa te. Mpo na nini okomonisa ngai mabe mpe okotala mikakatano? Libebi mpe yauli ezali liboso na ngai; kowelana mpe kobunda ekobimaka.”​—Habakuku 1:2, 3.

7 Davidi ná Habakuku bazalaki bato ya sembo oyo bazalaki na limemya mingi epai ya Nzambe. Yehova apamelaki bango lokola batunaki mituna wana? Te! kutu, amonaki malamu ete mituna na bango ekomama na kati ya Liloba na ye. Lelo oyo, soki moto moko azali komitungisa mpo mabe eleki mingi, ekoki kolakisa ete azali mpenza na nzala na elimo, azali koluka biyano oyo ezali kaka na Biblia. Tóbosana te ete Yesu alobaki malamu mpo na bato oyo bazali na nzala na elimo to, “bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Kosalisa bato báyoka esengo oyo Yesu alakaki ezali mpenza libaku malamu!

8. Mateya nini ya lokuta ememi bato bákanisa ete bampasi eutaka epai ya Nzambe, mpe ndenge nini tokoki kosalisa bato yango?

8 Ya misato, ekozala malamu kosalisa moto ayeba ete soki lelo oyo mabe etondi na mokili ezali foti ya Nzambe te. Bato mingi bateyá bango ete Nzambe nde azali koyangela mokili oyo, asilá kokana makambo nyonso oyo ekómelaka biso, mpe anyokolaka bato mpo na bantina oyo kaka ye moko ayebi. Nyonso wana ezali mateya ya lokuta. Mateya yango ebebisaka lokumu ya Nzambe mpe etindaka bato bámona ete ye nde atindaka bampasi nyonso oyo ezali lelo na mokili. Yango wana, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kosembola makanisi na bango. (2 Timote 3:16) Ezali Satana Zabolo, kasi Yehova te nde azali koyangela mokili oyo etondi na mabe. (1 Yoane 5:19) Yehova akanaka te makambo nyonso oyo ekómelaka bato; apesi moto na moto bonsomi mpe likoki ya kopona kati na malamu mpe mabe. (Deteronome 30:19) Ata mokolo moko te Yehova abimiselá bato mabe; ayinaka mabe mpe amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali konyokwama.​—Yobo 34:10; Masese 6:16-19; 1 Petelo 5:7.

9. Wapi mwa bisaleli oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” apesi biso mpo tósalisa bato báyeba ntina oyo Yehova Nzambe atiki nzela na mabe?

9 Nsima ya komonisa makambo yango polele, moto oyo ozali kosolola na ye akoki kokóma na mposa ya koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisi bisaleli ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa yo. (Matai 24:45-47) Na ndakisa, na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe,” oyo esalemaki na 2006, trakte moko ya sika ebimaki; motó ya likambo na yango elobi ete Etikali moke bampasi nyonso esila! Tozali kolendisa yo otángaka trakte yango mpo oyeba malamumalamu makambo ekomami na kati. Lisusu, buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo ebongolami sikoyo na minɔkɔ 157, ezali na mokapo mobimba oyo eyanoli motuna yango ya ntina mingi. Tolendisi yo osalelaka mikanda yango. Na lisalisi ya Biblia, elimboli malamu ntembe monene oyo ebimaki na Edene mpo na boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ntina oyo Yehova aponaki kosukisa ntembe yango na ndenge oyo asalaki. Lisusu, kobosana te ete ntango ozali kosolola na moto likambo yango, ozali kopesa ye libaku ya kozwa boyebi oyo eleki boyebi nyonso. Ozali kopesa ye libaku ya koyeba Yehova mpe koyeba bizaleli na ye ya malamu mingi.

Bendá likebi na bizaleli ya Yehova

10. Mpo na nini bato mingi bazalaka na mokakatano mpo na kokanga ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi, mpe boyebi nini ekoki kosalisa bango?

10 Ntango ozali kosalisa bato báyeba ntina oyo Yehova atiki nzela ete bato bámiyangela bango moko na litambwisi ya Satana, luká kobenda likebi na bizaleli malamu ya Yehova. Bato mingi bayebaka ete Nzambe azali na nguya mingi; bayokaka ndenge bato mosusu babengaka ye ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kasi, bato yango bamitunaka mpo na nini asalelaka nguya yango te mpo na kosilisa mbala moko bampasi nyonso mpe makambo ya mabe. Mbala mosusu bayebaka malamu te bizaleli mosusu ya Yehova, na ndakisa bosantu, bosembo, bwanya, mpe bolingo na ye. Yehova amonisaka bizaleli wana na ndenge ya kokoka mpe abosanaka ata moko te. Yango wana Biblia elobi ete: “Mosala na ye ezali ya kokoka.” (Deteronome 32:4, NW) Ndenge nini okoki kobenda likebi na bizaleli yango ntango ozali koyanola na mituna oyo bato mingi batunaka na ntina etali bampasi? Tótalela mwa bandakisa.

11, 12. (a) Mpo na nini Yehova alimbisaki kaka te lisumu ya Adama ná Eva? (b) Mpo na nini Yehova akoki kotika nzela te ete lisumu etikala libela?

11 Yehova akokaki kaka te kolimbisa Adama ná Eva? Likambo oyo basalaki ekokaki kolimbisama te. Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka, baboyaki bokonzi ya Yehova na nko mpe bandimaki ete Satana atambwisa bango. Yango wana, babongolaki motema ata moke te. Nzokande, ntango bato batunaka mpo na nini Nzambe alimbisaki te, na maloba mosusu batunaka ete mpo na nini Nzambe alɛmbisaki kaka te mobeko na ye mpe andimaki kaka te lisumu ná botomboki. Eyano na motuna yango ezali kotalela ezaleli moko ya Yehova oyo etaleli ye mpenza: bosantu na ye.​—Exode 28:36; 39:30.

12 Biblia elobi na bisika ebele ete Yehova azali mosantu. Kasi, likambo ya mawa, bato moke kaka bakangaka ntina ya ezaleli yango na kati ya mokili oyo esili kobeba. Yehova azali pɛto mpe azali na lisumu ata moke te. (Yisaya 6:3, 59:2) Azwi bibongiseli mpo na kolongola masumu; akotika yango mpo na libela te. Soki Yehova andimaki lisumu etikala mpo na libela, tolingaki kozala na elikya ata moke te. (Masese 14:12) Na ntango oyo ye moko aponá, Yehova akokómisa lisusu bikelamu na ye nyonso mosantu. Likambo yango ekosalema, mpamba te ezali mokano ya oyo azali Mosantu.

13, 14. Mpo na nini Yehova abomaki te batomboki na Edene?

13 Mpo na nini Yehova abomaki kaka te batomboki wana na Edene mpe kokela bato mosusu? Yehova azalaki na nguya ya kosala yango; kutu, mosika te akoboma bato nyonso ya mabe. Bato mosusu bakoki kotuna ete, ‘Mpo na nini asalaki yango te ntango basumuki bazalaki kaka misato na molɔ́ngɔ́ mobimba? Na bongo, lisumu elingaki kopalangana te mpe elingaki te komema ebele ya bampasi oyo tozali komona.’ Mpo na nini Yehova asalaki bongo te? Deteronome 32:4 (NW) elobi boye: “Banzela na ye nyonso ezali sembo.” Yehova alandelaka mpenza bosembo. “Yehova alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28, NW) Lokola Yehova alingaka bosembo, aboyaki koboma batomboki wana na Edene. Mpo na nini?

14 Ntango Satana atombokelaki Nzambe, abɛtaki ntembe na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi. Bosembo ya Yehova esɛngaki ete eyano ebongi epesama na ntembe oyo Satana abimisaki. Soki Nzambe abomaki batomboki na ntango wana, atako etumbu yango ebongaki na bango, alingaki kozanga libaku ya kopesa eyano na ntembe ya Satana. Koboma bango elingaki komonisa malamumalamu ete Yehova aleki na nguya; nzokande, Satana abɛtelaki nguya ya Nzambe ntembe te. Lisusu, Yehova asilaki koyebisa Adama ná Eva mokano oyo azalaki na yango. Basengelaki kobota bana mpe kotondisa mabelé, koyangela yango, mpe koyangela bikelamu nyonso. (Genese 1:28) Soki Yehova abomaki Adama ná Eva, mokano na ye mpo na bato elingaki kokokisama te. Na kotalela bosembo na ye, Yehova akokaki te kosala makambo ndenge wana, mpamba te mokano na ye ezangaka te kokokisama.​—Yisaya 55:10, 11.

15, 16. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bapesaka makanisi na bango na ndenge likambo oyo ebimaki na Edene esengelaki kokatama?

15 Ezali nde na moto mosusu oyo akokaki kokata likambo ya botomboki na bwanya mingi koleka Yehova? Bato mosusu bapesaka makanisi na bango mpo na ndenge oyo likambo yango esengelaki kokatama. Nzokande, na maloba na bango bamonisaka ete bayebi ndenge eleki malamu oyo likambo yango esengelaki kokatama. Ntango mosusu balobaka yango na makanisi ya mabe te, kasi bayebi mpenza Yehova te mpe bwanya na ye ya kokamwa. Ntango ntoma Paulo azalaki kokomela baklisto ya Loma, akanisaki mingi likoló ya bwanya ya Nzambe, bakisa mpe “sɛkɛlɛ mosantu” ya mokano na ye ya kosalela Bokonzi ya Masiya mpo na kosikola bato ya kondima mpe kosantisa nkombo na Ye mosantu. Paulo alobaki nini mpo na bwanya ya Nzambe oyo asalaki mokano wana? Asukisaki mokanda na ye na maloba oyo: “Epai ya Nzambe, oyo kaka ye moko nde azali moto ya bwanya, nkembo ezala na nzela ya Yesu Klisto libela na libela. Amen.”​—Baloma 11:25; 16:25-27.

16 Paulo akangaki ntina ete “kaka [Yehova] nde azali moto ya bwanya”—ye nde asukisi bwanya nyonso. Moto nini ya kozanga kokoka akoki koyeba ndenge malamu koleka ya kosilisa ata mokakatano nini, mpe na koleka ntembe monene oyo Satana abɛtelaki bokonzi ya Nzambe? Na yango, tosengeli kosalisa bato bázala na kobanga mpe na limemya lokola oyo biso tozali na yango liboso ya Nzambe oyo azali “na [bwanya, NW] kati na motema.” (Yobo 9:4) Soki tokangi malamu ntina ya bwanya ya Yehova, tokotya motema ete ndenge na ye ya kokata likambo nde eleki malamu.​—Masese 3:5, 6.

Ezaleli ya Yehova oyo eleki monene

17. Ndenge nini koyeba malamu bolingo ya Yehova ekoki kosalisa bato oyo bazali komitungisa na ndenge Nzambe atiki nzela na mabe?

17 “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Na maloba yango, Biblia emonisi ezaleli eleki monene ya Yehova; ezaleli na ye oyo esepelisaka mingi koleka mpe ebɔndisaka bato oyo bazali kotungisama ntango bazali komona ndenge mabe epalangani. Yehova amonisi bolingo mingi na nyonso oyo asali mpo na kosilisa mpasi oyo lisumu ememelaki bikelamu na ye. Bolingo etindaki ye apesa bana ya Adama ná Eva elikya, apesaki bango likoki ya kopusana penepene na Ye mpe kozala na boyokani malamu elongo na ye. Bolingo ya Nzambe etindaki ye abongisa lisiko oyo esengelaki kopesa nzela na kolimbisama ya masumu mpe likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Bolingo mpe etindi ye azala na motema molai epai ya bato, yango epesi bato mingi likoki ya koboya Satana mpe kopona bokonzi ya Yehova.​—2 Petelo 3:9.

18. Tozali na libaku ya koyeba nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Mokolo moko, pastɛrɛ moko oyo azalaki koteya bato oyo bayanganaki mpo na kokanisa bato oyo bateroriste babomaki, alobaki boye: “Toyebi te ntina oyo Nzambe azali kotika mabe mpe bampasi ezala tii lelo.” Ezali mpenza mawa! Biso tozali na libaku ya koyeba ntina yango! (Deteronome 29:29) Lokola Yehova azali na bwanya, azali sembo mpe bolingo, toyebi ete etikali moke asukisa bampasi nyonso. Kutu, alaki kosala yango. (Emoniseli 21:3, 4) Kasi, akosala nini mpo na bato nyonso oyo bakufá? Ndenge oyo Yehova akosilisa likambo oyo ebimaki na Edene epesi biso mpe elikya mpo na bato oyo bakufá. Bolingo na ye ekotinda ye asekwisa bango. Yango nde likambo tokolobela na lisolo oyo elandi.

Okopesa eyano nini?

• Tokoki koloba nini na moto oyo atuni ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi?

• Ndenge nini bosantu mpe bosembo ya Yehova ezali komonana na ndenge oyo akataki likambo ya batomboki na Edene?

• Mpo na nini tosengeli kosalisa bato bákanga ntina ya bolingo ya Yehova?

[Elilingi na lokasa 21]

Luká kosalisa bato oyo bazali komitungisa na ndenge bampasi etondi na mokili

[Bililingi na lokasa 23]

Davidi ná Habakuku batunaki Nzambe mituna

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto