Kokatama ngenga nde ekómisaka moto mobali?
NA MIKILI mingi, bakataka bana mibali ngenga (circoncision) mpo bázala nzoto kolɔngɔnɔ. Na mikili mosusu, bakataka mibali ngenga te banda bonkɔkɔ na bango. Epai ya bato mosusu, lokola Bayuda mpe Bamizilma, bakataka ngenga kaka mpo nzoto ezala kolɔngɔnɔ te, kasi mpo na makambo ya losambo.
Nzokande na bikólo mosusu, milulu ya kokata ngenga esalemaka ntango mwana asili kokóma mobali. Na momeseno, batindaka mwana akende kolanda mateya mpe mimeseno ya bonkɔkɔ. Kuna, bakokata ye ngenga mpe akotikala kaka kuna na boumeli ya bapɔsɔ, tii ntango mpota ekobela. Na ntango wana, elenge akolanda milulu mpe bakolakisa ye ndenge ya kozala mobali. Mpo mwana mobali akóma mpenza mobali ya solosolo, esengeli bákata ye ngenga ndenge wana? Tiká tóluka likanisi ya Nzambe na likambo yango na kati ya Biblia.—Masese 3:5, 6.
Ndenge Nzambe atalelaka ngenga
Na ntango ya kala, bato mosusu lokola Baezipito, bazalaki kokata ngenga, elingi koloba kolongola mposo na nsɔngɛ ya enama ya mobali. Kasi, Abalayama abotamaki na ekólo oyo bazalaki kokata ngenga te. Yango wana, alekisaki bambula mingi ya bomoi na ye kozanga kokatama ngenga. Longola yango, atako akatamaki naino ngenga te, Abalayama azalaki elombe mobali. Elongo na mwa mibali ya kotánga, alandaki mpe alongaki mampinga ya basoda ya bakonzi minei oyo bakangaki Lota, mwana ya ndeko na ye. (Genese 14:8-16) Mbula soki 14 na nsima, Nzambe asɛngaki ye ná bato na ye nyonso bámikata ngenga. Mpo na nini Nzambe asɛngaki ye asala bongo?
Emonani ete ezalaki te mpo na komonisa ete azali lisusu elenge te. Kutu, na ntango wana Abalayama azalaki na mbula 99! (Genese 17:1, 26, 27) Nzambe ayebisaki ntina oyo asɛngaki ye asala yango na maloba oyo: “Bino bokokatama ngenga, mpe yango ekozala elembo ya kondimana kati na ngai ná bino.” (Genese 17:11) Na kati ya kondimana yango, Nzambe alakaki mpe Abalayama ete “mabota nyonso na nse” bakopambolama mpenza na nzela na ye. (Genese 12:2, 3) Na yango, mpo na Nzambe, ngenga ezalaki te elembo oyo emonisaka ete moto akómi mobali. Ezalaki nde komonisa ete moto yango azali na libota ya Yisalaele, elingi koloba bankɔkɔ ya Abalayama, oyo bazwaki lokumu mpo “bapesaki bango maloba mosantu ya Nzambe.”—Baloma 3:1, 2.
Na nsima, ekólo Yisalaele ebongaki lisusu na lokumu yango te, mpo baboyaki Yesu Klisto, Momboto ya solosolo ya Abalayama. Yango wana, Nzambe aboyaki bango mpe ngenga na bango ezalaki lisusu na ntina te na miso na ye. Nzokande, baklisto mosusu ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.) bakobaki koyebisa bato ete Nzambe akoki kondima bango te soki bakatami ngenga te. (Misala 11:2, 3; 15:5) Mpo na likambo yango, ntoma Paulo atindaki Tito na masangá ndenge na ndenge mpo akende “kosembola makambo oyo ezalaki kotambola malamu te.” Na mokanda oyo akomelaki Tito, alobelaki moko ya makambo yango: “Ezali na bato mingi ya mitó makasi, bato ya bilobaloba, mpe bato oyo babebisaka makanisi, mingimingi mpenza bato oyo bazali kokangama na kokatama ngenga. Esengeli kokanga bango minɔkɔ, mpo bato yango bazali kokoba kokɔtisa mobulu na bandako mobimba na koteyáká mpo na litomba ezangi sembo makambo oyo basengeli koteya te.”—Tito 1:5, 10, 11.
Toli ya Paulo wana ezali mpe na ntina lelo oyo. Soki moklisto moko asɛngi ete bákata mwana ya moto mosusu ngenga, yango ekozala na boyokani te na Makomami. Na esika “amikɔtisaka na makambo ya bato mosusu,” moklisto atikaka baboti ya mwana bázwa bikateli ya ndenge wana bango moko. (1 Petelo 4:15) Longola yango, Paulo akomaki mpo na ngenga oyo Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga ete: “Moto moko abengamaki nde asilá kokatama ngenga? Tiká ete akóma te moto oyo azangi kokatama ngenga. Moto moko abengamaki nde na ezaleli ya kozanga kokatama ngenga? Tiká ete amikatisa ngenga te. Kokatama ngenga ezali eloko te, mpe kozanga kokatama ngenga ezali eloko te, kasi nde kotosa [mibeko] ya Nzambe. Na kati ya ezalela nyonso oyo moto na moto abengamaki, tiká ete atikala na kati na yango.”—1 Bakolinti 7:18-20.
Tokoloba nini mpo na mateya mpe milulu ya kokata ngenga?
Ezali boni soki baboti baklisto bazwi ekateli ya kokatisa bana na bango ngenga? Bakotosa Biblia soki batindi bana na bango bákende kolanda mateya mpe milulu ya ngenga? Kuna, basukaka kaka te na kokata ngenga. Na boumeli ya bapɔsɔ, elenge mobali akozala esika moko na bilenge mibali mosusu mpe bateyi oyo basambelaka Yehova te. Makambo mingi oyo bateyaka kuna eyokani na mitinda ya Biblia te. Biblia epesi toli oyo: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”—1 Bakolinti 15:33.
Milulu ya kokata ngenga ekómi na makama mingi ya nzoto. Na 2003, zulunalo moko (South African Medical Journal) elobaki boye: “Na mbula oyo, kokata ngenga ebimisi lisusu makama ya nsɔmɔ. Na mokili mobimba, bibongiseli ya minene ya bapanzi nsango ezali koyebisa ete bato bazali kokufa na ngenga mpe bamosusu bazali kotikala binama ndambo. . . . Na mokuse, bisika mingi oyo bana bakendeke kolanda mateya mpe milulu ya kokata ngenga lelo oyo ezali nde bisika ya liwa.”
Longola likama ya kotikala enama ndambo, ezali na likama mosusu ya mabe koleka: oyo ya elimo. Mateya mpe mimeseno oyo balandaka kuna, ezali na boyokani mpenza na bikelakela mpe losambo ya bankɔkɔ. Na ndakisa, na esika ya kondima ete makama ezali kosalema mpo na mabunga ya bakati to mpo na bosɔtɔ, balobaka ete ezali nde mpo balɔki bango to mpo bankɔkɔ basiliki. Na likambo etali kosangana na losambo ya lokuta, Biblia elobi boye: “Bósala te ekanganeli ya mabe elongo na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe botyoli-mibeko? To bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili? . . . ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’” (2 Bakolinti 6:14-17) Toli wana emonisi ete baboti baklisto bakosala bozoba mpenza soki batindi bana na bango ya mibali bákende kolanda mateya mpe milulu wana.
Nini ekómisaka moklisto mobali ya solosolo?
Ezala moklisto akatamá ngenga to te, yango te nde ekokómisa ye mobali ya solosolo. Baklisto balukaka libosoliboso nde kosepelisa Nzambe, kasi balukaka te “komonana malamu na libándá na mosuni.”—Bagalatia 6:12.
Nzokande, mpo na kosepelisa Nzambe, moklisto asengeli ‘kokatama ngenga ya motema.’ (Deteronome 10:16; 30:6; Matai 5:8) Yango esalemaka na mbeli te, kasi na kotika bamposa ya mabe mpe makanisi ya lolendo; na ndakisa kokanisa ete oleki basusu mpo okatamá ngenga. Ezala moklisto akatamá ngenga to te, akoki komonisa ete azali mobali soki azali koyika mpiko na komekama mpe kotɛlɛma “ngwi na kati ya kondima.”—1 Bakolinti 16:13; Yakobo 1:12.