Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/7 nk. 27-31
  • Tózela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Maladi ezongisaka bango nsima te
  • Koyika mpiko ntango tokufeli
  • Tóyikela mikakatano ndenge na ndenge mpiko
  • Okoki koyika mpiko!
  • Koyika mpiko ezali na ntina mingi mpo na baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • “Bótya likebi mpenza epai ya moto oyo ayiki mpiko”
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/7 nk. 27-31

Tózela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko

“Bóbakisa na kondima na bino . . . ezaleli ya koyika mpiko.”​—2 PETELO 1:5, 6.

1, 2. Ezaleli ya koyika mpiko elimboli nini, mpe mpo na nini baklisto basengeli na yango?

MOKOLO monene ya Yehova ebɛlɛmi mpenza. (Yoele 1:15; Sefania 1:14) Biso baklisto tozali na ekateli makasi ya kotikala sembo epai ya Nzambe mpe tozali kozela na motema mobimba mokolo yango oyo bokonzi ya Yehova ekolongisama. Kasi, liboso na yango, banguna bazali koyina biso, kofinga biso, konyokola biso mpe koboma biso mpo na kondima na biso. (Matai 5:10-12; 10:22; Emoniseli 2:10) Yango ezali kosɛnga ete tóyika mpiko, elingi koloba tózonga nsima te liboso ya mikakatano. Ntoma Petelo alendisi biso na maloba oyo: “Bóbakisa na kondima na bino . . . ezaleli ya koyika mpiko.” (2 Petelo 1:5, 6) Tosengeli koyika mpiko mpamba te Yesu alobaki ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”​—Matai 24:13.

2 Longola yango, tobɛlaka, tokufelaka, mpe tokutanaka na mikakatano mosusu. Satana akosepela mpenza soki kondima na biso elɛmbi. (Luka 22:31, 32) Kasi, na lisalisi ya Yehova, tokoki koyikela mikakatano ya ndenge na ndenge mpiko. (1 Petelo 5:6-11) Tótalela mwa masolo ya bato mosusu oyo ezali kondimisa ete tokoki kozela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko mpe na kondima makasi.

Maladi ezongisaka bango nsima te

3, 4. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ete tokoki kosalela Yehova atako tozali na maladi.

3 Lelo oyo, Nzambe abikisaka biso na ndenge ya likamwisi te, kasi apesaka biso makasi ya koyikela maladi mpiko. (Nzembo 41:1-3) Ndeko mwasi moko nkombo na ye Sharon alobaki boye: “Natambolaka na kiti ya bibɔsɔnɔ banda bomwana na ngai. Ntango kaka nabotamaki, nabɛlaki maladi moko ya bɔɔngɔ oyo ekómisá ngai paralize mpe natikalá te kosakana lokola bana mosusu.” Sharon akómaki na elikya ntango ayebaki Yehova mpe elaka na ye ya kosilisa maladi nyonso. Atako Sharon azali na mokakatano ya koloba mpe ya kotambola, asepelaka na mosala ya kosakola. Eleki mbula soki 15, alobaki boye: “Nzoto na ngai ekoki kokoba kolɛmba, kasi elikya na ngai epai ya Nzambe mpe boninga na ngai ná ye nde esimbaka ngai. Kozala mosaleli ya Yehova mpe kozala na lisungi na ye epesaka ngai esengo mingi mpenza!”

4 Ntoma Paulo alendisaki baklisto ya Tesaloniki ete ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Kokoka te kosala likambo moko boye ekoki konyokola moto na makanisi. Na 1993, Sharon akomaki boye: “Namiyokaki ete nakómi mpenza na nsuka, . . . nanyokwamaki na makanisi mbula misato mobimba. . . . Bankulutu bazalaki kobɔndisa ngai mpe kopesa ngai batoli mingi. . . . Na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Yehova asalisaki ngai nayeba makambo mingi etali konyokwama na makanisi. Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye mpe ayebaka mabanzo na bango.” (1 Petelo 5:6, 7) Tii lelo oyo, Sharon azali kosalela Nzambe na bosembo mpe azali kozela mokolo monene ya Yehova.

5. Nini ezali komonisa ete baklisto bakoki koyikela mikakatano makasi mpiko?

5 Baklisto mosusu banyokwamaka mingi mpo na makambo oyo bakutaná na yango. Ndeko moko nkombo na ye Harley amonaki makambo ya nsɔmɔ na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba; na nsima, akómaki kolɔta bandɔtɔ ya nsɔmɔ. Ntango mosusu, na kati ya mpɔngi azalaki koganga: “Kebá! Kimá!” Ntango akosutuka, nzoto mobimba epɔli na motoki. Atako bongo, akobaki kosalela Nzambe mpe nsukansuka, azalaki lisusu kolɔta bandɔtɔ yango mingi te.

6. Ndenge nini moklisto moko ayikaki mpiko atako azalaki na maladi?

6 Moklisto moko oyo abɛlaki maladi moko ya motó azalaki na mokakatano mpo na kosakola ndako na ndako. Atako bongo, atikaki te mosala yango, mpamba te ayebaki ete kosakola ekobikisa bomoi na ye mpe ya baoyo bakoyoka ye. (1 Timote 4:16) Na bantango mosusu azalaki kokoka te kobɛta porte ya moto, kasi alobaki boye: “Na nsima, nakómaki kolonga kokende na porte oyo elandi mpe kosolola na moto mosusu. Lokola natikaki te kobima na mosala ya kosakola, natikalaki makasi na elimo.” Ndeko yango azalaki mpe na mokakatano mpo na koyanganaka na makita, kasi ayebaki ete kosangana na bandeko mosusu ezali na ntina mingi. Yango wana azalaki kosala milende oyo esengeli mpo azangisaka makita te.​—Baebele 10:24, 25.

7. Atako bamosusu babangaka kozala to koloba liboso ya bato ebele, na ndenge nini bayikaka mpiko?

7 Baklisto mosusu bayokaka nsɔmɔ soki bazali na bisika mosusu to mpo na kosala makambo mosusu. Na ndakisa, bamosusu babangaka koloba liboso ya bato, ata mpe kozala na esika ya bato ebele. Kanisá mokakatano oyo bazalaka na yango mpo na kopesa biyano na makita to mpe kosala masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi! Atako bongo, bazali koyika mpiko mpe, komona bango na makita mpe koyoka biyano na bango elendisaka biso.

8. Likambo nini esalisaka mpenza ntango moto azali kotungisama na makanisi?

8 Kopema mpe kolala mingi ekoki kosalisa moto oyo azali kotungisama na makanisi. Ekoki mpe kozala malamu aluka lisalisi ya monganga. Kasi, likambo oyo esalisaka mingi ezali kobondela Nzambe mpe kotyela ye motema. Nzembo 55:22 elobi boye: “Kitisá mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atɛlɛngana.” Yango wana, ‘taleláká [Yehova] na motema na yo mobimba.’​—Masese 3:5, 6.

Koyika mpiko ntango tokufeli

9-11. (a) Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango moto moko oyo tolingaki akufi? (b) Ndenge nini ndakisa ya Ana ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango tozali na mawa mpo tokufeli?

9 Ntango moto moko na kati ya libota akufi, bandeko na ye batikalaka na mawa mingi. Abalayama alelaki mwasi na ye Sala. (Genese 23:2) Ata Yesu oyo azalaki moto ya kokoka “alelaki na mai na miso” ntango moninga na ye Lazalo akufaki. (Yoane 11:35) Na yango, ezali mabe te tóyoka mawa ntango moto oyo tolingaki mingi akufi. Atako bongo, baklisto bayebi ete bato bakufá bakosekwa. (Misala 24:15) Yango wana, ‘bayokaka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.’​—1 Batesaloniki 4:13.

10 Ndenge nini tokoki koyika mpiko ntango tokufeli? Mbala mosusu ndakisa moko ekoki kosalisa biso. Ntango moninga na biso moko akei mobembo, mbala mingi totikalaka na mawa, kasi ezalaka mpo na libela te mpo toyebi ete tokomonana na ye ntango akozonga. Soki tozali kotalela liwa ya moklisto ya sembo ndenge wana, yango ekoki kolɛmbisa mawa na biso mpo toyebi ete akosekwa.​—Mosakoli 7:1.

11 Kotyela “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” motema mobimba ekosalisa biso tóyika mpiko ntango tozali na mawa mpo ndeko to moninga na biso akufi. (2 Bakolinti 1:3, 4) Tokoki mpe kobɔndisama soki tozali kokanisa likambo oyo Ana, mwasi moko oyo akufelá mobali, azalaki kosala na siɛklɛ ya liboso. Afandaki na mobali na ye mbula nsambo mpamba, na nsima, mobali yango akufaki. Kasi, ata ntango Ana akómaki na mbula 84, azalaki kaka kosalela Yehova mosala mosantu na tempelo. (Luka 2:36-38) Komipesa ndenge wana na mosala ya Nzambe esalisaki ye ayika mpiko atako azalaki na mawa mpo azalaki na molongani te. Kobimaka mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe komipesa na makambo mosusu ya lisangá ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango tozali na mawa mpo tokufeli.

Tóyikela mikakatano ndenge na ndenge mpiko

12. Baklisto mosusu bazali koyika mpiko na mokakatano nini na libota?

12 Baklisto mosusu bazali koyika mpiko na mikakatano oyo ezali kobima na kati ya libota. Na ndakisa, moto ayokaka mpasi mingi soki molongani na ye asali ekobo! Lokola azali na mpasi na motema mpe azali kotungisama mingi, akoki kozanga mpɔngi mpe kolela ntango nyonso. Ata misala ya mikemike ekoki kokóma kilo mpe akoki kosala mabunga mingi to mpe kobebisa biloko. Akoki kozanga mposa ya kolya, akoki kokɔnda, mpe kobulungana makanisi. Akoki kozala na mokakatano mpo na kobima na mosala ya kosakola to koyangana na makita. Likambo wana ekoki mpe kobulunganisa bana!

13, 14. (a) Na ndenge nini libondeli oyo Salomo asalaki na mokolo ya bofungoli tempelo ezali kolendisa yo? (b) Mpo na nini tosɛngaka elimo santu?

13 Ntango tokutani na mikakatano ya ndenge yango, Yehova asalisaka biso. (Nzembo 94:19) Libondeli oyo Mokonzi Salomo asalaki na mokolo ya bofungoli tempelo ezali komonisa ete Nzambe ayokaka mabondeli ya basaleli na ye. Abondelaki boye: “Wana libondeli to kolɔmba ebondelami na moto nani to na bato nyonso na yo Yisalaele, soki moto na moto ayebi mawa ya motema na ye moko mpe asemboli mabɔkɔ na ye epai na ndako oyo, yoká kuna na lola efandelo na yo mpe limbisá mpe salá; zongiselá moto na moto [lokola] nzela na ye nyonso, zambi yo oyebi motema na ye, bobele yo, oyebi mitema ya bana nyonso ya bato, ete bátosa yo mikolo nyonso mpe ete báfanda na mokili mopesi yo epai ya batata na biso.”​—1 Mikonzi 8:38-40.

14 Tokoki mpenza kozwa lisalisi soki tozali kokoba kobondela mpo na kosɛnga elimo santu. (Matai 7:7-11) Mbuma ya elimo esangisi bizaleli lokola esengo mpe kimya. (Bagalatia 5:22, 23) Soki Tata na biso ya likoló ayoki mabondeli na biso, toyokaka ete motema na biso ekiti mpenza, mawa ebongwanaka esengo, mpe komitungisa etikaka esika na kimya!

15. Bavɛrsɛ nini ekoki kosalisa biso tómitungisaka mingi te?

15 Ntango tokutani na makambo ya mpasi, tokoki te kozanga komitungisa ata mwa moke. Kasi, motungisi yango ekokita soki tozali kokanisa maloba ya Yesu oyo: “Bótika komitungisa mpo na milimo na bino na oyo etali nini bokolya to nini bokomɛla, to mpo na banzoto na bino na oyo etali nini bokolata. . . . Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe], mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.” (Matai 6:25, 33, 34) Ntoma Petelo alendisi biso ete ‘tóbwaka mitungisi na biso nyonso likoló na Nzambe, mpamba te ye atyelaka biso likebi.’ (1 Petelo 5:6, 7) Ebongi mpenza kosala molende mpo na kosilisa mokakatano nyonso oyo tokutani na yango. Nzokande, nsima ya kosala oyo tokoki, esengeli te ete tókoba komitungisa; tosengeli nde kobondelaka. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Tikelá [Yehova] elekelo na yo, zalá na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.”​—Nzembo 37:5.

16, 17. (a) Mpo na nini bomoi na biso ekoki kozanga mitungisi te? (b) Litomba nini tokozwa soki tolandi toli ya Bafilipi 4:6, 7?

16 Paulo akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Ya solo, lokola tozali biso nyonso bankɔkɔ ya Adama mpe bato ya kozanga kokoka, bomoi na biso ekoki kozanga mitungisi te. (Baloma 5:12) Basi Bahiti oyo Esau abalaki “batungisaki Yisaka mpe Lebeka mingi.” (Genese 26:34, 35) Na ntembe te baklisto lokola Timote mpe Tolofimi bazalaki komitungisa mpo na maladi na bango. (1 Timote 5:23; 2 Timote 4:20) Paulo azalaki komitungisa mpo na bandeko na ye bandimi. (2 Bakolinti 11:28) Kasi, Ye oyo ‘ayokaka mabondeli’ asungaka ntango nyonso bato oyo balingaka ye.​—Nzembo 65:2.

17 Liboso mokolo ya Yehova eya, tozali na lisungi mpe libɔndisi ya “Nzambe ya kimya.” (Bafilipi 4:9) Yehova azali na “mawa mpe na ngɔlu,” azali ‘malamu mpe alimbisaka’; ‘abosanaka te ete tozali bobele putulu.’ (Exode 34:6; Nzembo 86:5; 103:13, 14) Tiká ete ‘masɛngi na biso eyebana epai na ye,’ mpamba te yango ekopesa biso “kimya ya Nzambe” oyo eleki makanisi nyonso.

18. Ndenge Yobo 42:5 emonisi yango, ndenge nini tokoki ‘komona’ Nzambe?

18 Ntango tozali kozwa biyano na mabondeli na biso, toyebaka ete Nzambe azali na biso elongo. Nsima ya koyika mpiko na mikakatano makasi oyo ekómelaki ye, Yobo alobaki boye: “Nayokaki mpo na yo na koyoka na litoi, nde [sikoyo] miso mamoni yo.” (Yobo 42:5) Soki tosaleli bososoli, tozali na kondima mpe botɔndi, tokoki komanyola makambo oyo Nzambe asalaka mpo na biso mpe tokoki ‘komona’ ye na ndenge oyo tomoná ye naino te. Boyokani makasi ndenge wana epesaka biso kimya ya motema mpe ya makanisi!

19. Litomba nini tokozwa soki ‘tobwaki mitungisi na biso nyonso likoló na Yehova’?

19 Soki ‘tobwaki mitungisi na biso nyonso likoló na Yehova,’ tokoki koyikela mikakatano mpiko mpe kozala na kimya oyo ekobatela motema mpe makoki na biso ya kokanisa. Na kati ya motema na biso ya elilingi, tokozala na motungisi to na kobanga te. Tokozinda te na mabanzo mpe mitungisi.

20, 21. (a) Likambo oyo Setefano akutanaki na yango ezali komonisa ete tokoki kozala na kimya ya ndenge nini ntango bazali konyokola biso? (b) Tángá bandakisa ya basaleli ya Yehova ya mikolo na biso oyo bayikelaki minyoko mpiko na kimya na motema.

20 Moyekoli Setefano akutanaki na komekama moko makasi, kasi azalaki motema mpiɔ. Liboso apesa bato oyo bazalaki na Sanedrina litatoli ya nsuka, bango nyonso “bamonaki ete elongi na ye ezalaki lokola elongi ya anzelu.” (Misala 6:15) Azalaki na kimya lokola anzelu, to momemi-nsango ya Nzambe. Nsima ya komonisa bango ete bazalaki na ngambo mpo na liwa ya Yesu, bazuzi yango “bazokaki na mitema na bango mpe babandaki kokekitinyela ye mino.” “Lokola atondaki na elimo santu”, Setefano “atalaki mpenza na kati ya likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” Emonaneli yango elendisaki Setefano mpe atikalaki sembo tii na liwa. (Misala 7:52-60) Atako tozwaka bimonaneli te lelo oyo, tokoki kozala na kimya ya Nzambe na ntango ya minyoko.

21 Tótalela makanisi ya baklisto mosusu oyo Banazi babomaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Moko na bango akomaki likambo oyo elekaki ntango basambisaki ye na tribinale: “Bakatelaki ngai etumbu ya liwa. Nsima ya koyoka bango, nalobaki na nse ya motema ete, ‘Zalá sembo tii na liwa,’ mpe mwa maloba mosusu ya Nkolo na biso, nazalaki lisusu na kobanga ata moke te. . . . Bómitungisa te. Mpamba te nazali na kimya mpe na motema mpiɔ oyo bokoki kokanisa te!” Elenge mosusu oyo bakatelaki etumbu ya liwa mpe azalaki kozela bákata ye nkingo, akomelaki baboti na ye boye: “Toleki midi ya butu. Nazali naino na mwa ntango mpo na kobongola makanisi. Kasi, nakozala lisusu na esengo na mokili oyo soki nawangani Nkolo na biso? Te! Bóyeba ete nazali kotika mokili oyo na esengo mpe na kimya.” Ntembe ezali te ete Yehova asungaka basaleli na ye ya sembo.

Okoki koyika mpiko!

22, 23. Okoki kozala na elikya nini wana ozali kozela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko?

22 Mbala mosusu okokutana te na mikakatano mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo. Kasi, Yobo, moto moko oyo azalaki kobanga Nzambe, alobaki solo ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Mbala mosusu ozali moboti mpe ozali kosala makasi oteya bana na yo banzela ya Nzambe. Bana yango bazali koyika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge na eteyelo, kasi ozali na esengo mpo bazali sembo epai ya Yehova mpe bazali kotosa mibeko na ye! Mbala mosusu yo moko mpe okutanaka na mikakatano mpe omekamaka na esika ya mosala. Kasi, okoki koyikela mikakatano yango mpe mikakatano mosusu mpiko, mpamba te ‘Yehova amemaka mikumba na yo mokolo na mokolo.’​—Nzembo 68:19.

23 Mbala mosusu omonaka ete okeseni te na bato mosusu, kasi yebá ete Yehova akobosana te mosala na yo mpe bolingo oyo ozali komonisa mpo na nkombo na ye. (Baebele 6:10) Na lisalisi na ye, okoki koyika mpiko soki kondima na yo emekami. Yango wana, na mabondeli na yo, lobeláká mposa na yo ya kosala mokano ya Nzambe mpe taleláká yango ntango ozali kozwa bikateli. Na ndenge yango, okoki kolikya kozwa mapamboli mpe lisungi ya Nzambe wana ozali kozela mokolo monene ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini baklisto basengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko?

• Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko ntango tobɛli to tokufeli?

• Ndenge nini libondeli esalisaka biso tóyika mpiko na minyoko?

• Mpo na nini tolobi ete moto akoki kozela mokolo ya Yehova na ezaleli ya koyika mpiko?

[Elilingi na lokasa 29]

Kotyela Yehova motema esalisaka biso tóyika mpiko ntango ndeko to moninga na biso akufi

[Elilingi na lokasa 31]

Kobondela na etingya esalisaka biso tóyika mpiko ntango kondima na biso emekami

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto