Kozala na boyokani na Nzambe
NA LISOLO Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Na ntembe te, yo mpe ondimi maloba wana. Na mokili mobimba, bato balobaka ete soki bazali na boyokani na Nzambe bakozala na esengo. Kasi, kozala na boyokani na Nzambe esɛngaka nini?
Koyeba Nzambe esɛngaka koyeba ndenge atalelaka mpe asalaka makambo. Kozala na boyokani na Nzambe elimboli kokangama na ye mpe komemyaka mpenza makambo na ye. Kaka ndenge moto oyo amipesá na mombongo ayebaka mpenza makambo ya mombongo, moto oyo azali na boyokani na Nzambe ayebaka Nzambe malamu mpenza.
Kasi, ndenge nini moto akoki kozala na boyokani na Nzambe? Atako mangomba nyonso elobaka ete ekoki kosalisa moto akóma na boyokani na Nzambe, lingomba na lingomba ezali na nzela oyo yango ezali komema bato. Moto ya Protesta akoki Kotatola na liyangani moko ete abikisami. Moto ya Katolike akoluka kobɛlɛma na Nzambe na nzela ya Misa. Banzela nyonso wana ekoki kosalisa moto azala na boyokani na Nzambe? Ezali mpenza na nzela moko oyo ekoki kosalisa moto akóma na boyokani na Nzambe?
Mpo na bato mingi, eyano yango oyo: Te. Balobaka ete Lingomba ezali na ntina te, likambo ya ntina ezali kaka kondimela Nzambe. Bamosusu balobaka ete esɛngaka te kozala lingomba moko to na boyokani na Nzambe ata soki bazali na lingomba te. Bamosusu balobaka ete esɛngaka te kozala na lingomba moko to na boyokani na Nzambe mpo na koyeba mpenza ntina ya bomoi mpe kozala na kimya. Ezali kaka likambo ya motema. Mokomi moko alobi ete sɛkɛlɛ ya koyeba mpenza ntina ya bomoi “ebombami kaka na motema ya moto. Ezali lolenge na yo ya kolinga, ya kondima mokili mpe kozala na boyokani na yango mpe na bato oyo ofandi na bango. Okoki kozwa yango na lingomba to na bindimeli moko boye te.”
Emonani polele ete bato na bato batalelaka boyokani na Nzambe na ndenge na bango. Ezali na ebele ya babuku oyo ekomamá mpo na kosalisa bato bákóma na boyokani na Nzambe, kasi mbala mingi etikaka bango kaka na mposa mpe ebulunganisaka bango makanisi. Kasi, ezali na buku moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba makambo ya Nzambe malamumalamu. Buku yango emonisaka mpenza ete ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. (2 Timote 3:16) Tiká tótalela oyo Biblia elobi mpo na boyokani na Nzambe mpe ntina na yango.