“Bókeba na motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato”
“Ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.”—LUKA 12:15.
1, 2. (a) Soki otali malamu lelo na mokili, eloko nini mpenza bato balukaka mingi? (b) Ndenge nini ezaleli yango ekoki kobenda biso?
KOZALA na mbongo mingi, na lokumu, na mosala ya malamu to kobota ezali makambo oyo bato mingi batalelaka lokola sɛkɛlɛ ya kolonga na bomoi to ya kozala malamu na mikolo ekoya. Emonani ete ezala na mikili ya bozwi to ya bobola, bato mingi bazalaka na mposa ya kozala na biloko mingi mpe ya kolonga na bomoi. Nzokande, bakipaka mpenza makambo ya Nzambe te.
2 Likambo yango eyokani mpenza na oyo Biblia elobá ete: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, . . . bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” (2 Timote 3:1-5) Lokola baklisto ya solo bazali esika moko na bato yango mokolo na mokolo, makanisi na bango ezali kobenda bango makasi. Nini ekoki kosalisa biso tólanda makanisi ya mokili te?—Baloma 12:2.
3. Toli nini Yesu apesaki oyo tokotalela sikoyo?
3 Yesu Klisto, “Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso,” apesi biso mateya ya ntina mpenza na likambo yango. (Baebele 12:2) Mokolo moko oyo Yesu azalaki koteya ebele ya bato, mobali moko akataki lisolo na ye mpe alobaki na ye boye: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola libula elongo na ngai.” Mpo na koyanola ye, Yesu apesaki ye ná bato mosusu oyo bazalaki wana toli moko ya malamu mpenza. Akebisaki bango makasi na likambo ya kolula biloko ya bato, mpe mpo na kosalisa bango básimba likambo yango malamu, apesaki ndakisa moko oyo esengelaki kotinda bango bákanisa malamu. Tosengeli mpenza kotya likebi na likambo oyo Yesu alobaki mokolo wana mpe kotala matomba oyo tokoki kozwa soki tosaleli yango na bomoi na biso.—Luka 12:13-21.
Asɛngaki likambo oyo ebongaki te
4. Mpo na nini ebongaki te mobali wana akata lisolo ya Yesu?
4 Liboso mobali wana akata lisolo na ye, Yesu azalaki koteya bayekoli na ye mpe bato mosusu báboya bokosi, bázala na mpiko mpo na kotatola bomoko na bango ná Mwana ya moto, mpe ateyaki bango ntina ya kozwa lisalisi ya elimo santu. (Luka 12:1-12) Na ntembe te, wana ezalaki mpenza masolo oyo bayekoli bazalaki kolinga mingi. Nzokande, na katikati ya lisolo wana oyo esengelaki kotinda bato bákanisa, mobali yango ayaki kokata ye mpe asɛngaki ye asilisa matata oyo azalaki na yango na ndeko na ye na ntina ya biloko ya mosuni. Atako bongo, ezali na liteya moko ya ntina mpenza oyo tokoki kozwa na likambo yango.
5. Motuna oyo mobali wana atunaki emonisaki ete azalaki na makanisi nini?
5 Balobaka ete “ezaleli ya moto emonanaka mbala mingi na makanisi oyo azali kobimisa soki bazali kopesa ye toli moko na makambo ya Nzambe.” Ntango Yesu azalaki koteya makambo oyo eleki ntina, ekoki kozala ete mobali wana azalaki kokanisa nini akoki kosala mpo na kozwa mbongo. Biblia eyebisi te soki azalaki mpenza kowela libula na ndeko na ye. Ntango mosusu asalaki bongo mpo ayebaki ete Yesu azali na bokonzi mpe azali zuzi oyo ayebi mpenza kokata makambo. (Yisaya 11:3, 4; Matai 22:16) Ezala ndenge nini, motuna na ye emonisaki ete azalaki na likambo moko: azalaki mpenza kotalela makambo ya elimo na motuya te. Likambo wana esengeli mpenza kotinda biso tómitalela! Na ndakisa, ntango tozali na makita, ezali mpasi te tótika makanisi na biso ekóma koyengayenga to tókóma kokanisa makambo oyo tokosala nsima ya makita. Na esika ya kosala bongo, tosengeli kotya likebi na oyo ezali kolobama mpe kokanisa ndenge tokoki kosalela makambo yango mpo na kobongisa boyokani na biso na Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló, mpe na bandeko na biso baklisto.—Nzembo 22:22; Malako 4:24.
6. Mpo na nini Yesu aboyaki kosala likambo oyo mobali wana asɛngaki?
6 Ezala mobali wana asɛngaki Yesu likambo wana na likanisi nini, Yesu aboyaki kosala yango. Kutu, Yesu alobaki na ye boye: “Moto, nani atye ngai mosambisi to mokaboli na kati na bino?” (Luka 12:14) Likambo oyo Yesu alobaki ezalaki likambo ya sika te mpo na bato, mpamba te na Mibeko ya Moize, bazalaki kopona bazuzi na bingumba mpo na kotalelaka makambo motindo wana. (Deteronome 16:18-20; 21:15-17; Luta 4:1, 2) Nzokande, Yesu azalaki kokanisa makambo oyo eleki ntina: kosakola Bokonzi mpe koteya bato mokano ya Nzambe. (Yoane 18:37) Na ndakisa ya Yesu, na esika ya kotika makambo ya mokili ebenda likebi na biso, tosalelaka ntango mpe makasi na biso mpo na kosakola nsango malamu mpe ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’—Matai 24:14; 28:19.
Kebá na bilulela
7. Likebisi nini ya ntina mpenza Yesu apesaki?
7 Lokola azali na likoki ya koyeba makanisi oyo ezali na kati ya motema ya moto, Yesu amonaki ete moto yango azalaki na likambo moko ya mabe na motema na ye. Na yango, na esika asuka kaka na koboya kosala likambo oyo moto yango asɛngaki, Yesu abimisaki likambo oyo ezalaki na motema ya moto yango na maloba oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato, mpamba te ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.”—Luka 12:15.
8. Ezaleli ya kolula biloko ya bato ezali nini, mpe yango ekoki komema moto na nini?
8 Ezaleli ya kolula biloko ya bato ekeseni na mposa ya kozala na mbongo to biloko mosusu, oyo okoki kosalela na ndenge ebongi mpe na mokano ya malamu. Ezali nde mposa makasi ya kokóma na bozwi to na biloko mingi, ata mpe biloko ya moto mosusu. Moto ya lokoso atondaka te. Akoki ntango mosusu kobanda kolula biloko ya moto mosusu, oyo ezali mpenza na ntina te mpo na ye, kaka mpo na esengo ya kozala na yango; mpe atalelaka ata matomba ya basusu te ntango azali kosala bongo. Moto oyo alulaka biloko ya basusu atikaka mposa wana ekonza makanisi mpe misala na ye mpe yango ekómaka nzambe na ye. Tóbosana te ete ntoma Paulo alobaki ete moto ya lokoso akeseni te na mosambeli ya bikeko, oyo akokɔta na Bokonzi ya Nzambe te.—Baefese 5:5; Bakolose 3:5.
9. Ndenge nini ezaleli ya kolula biloko ya bato ekoki komonana? Pesá mwa bandakisa.
9 Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete Yesu akebisaki na “motindo nyonso ya ezaleli ya kolula biloko ya bato.” Bilulela emonanaka na ndenge mingi. Mobeko ya nsuka kati na Mibeko Zomi etángaki mwa ndambo na yango. Elobaki boye: “Okolula ndako ya mozalani na yo te. Okolula mwasi ya mozalani na yo te, soki moombo mobali na ye te, soki moombo mwasi na ye te, soki ngɔmbɛ mobali na ye te, soki mpunda na ye te, soki eloko nini ezali na mozalani na yo te.” (Exode 20:17) Biblia ezali na bandakisa mingi ya bato oyo bakweaki na masumu ya minene mpo balulaki biloko ya bato. Satana azali moto ya liboso oyo alulaki eloko ya moto mosusu: nkembo, lokumu mpe bokonzi oyo ebongi kaka na Yehova. (Emoniseli 4:11) Eva alulaki lotomo ya kozwa bikateli ye moko, mpe lokola akosamaki na likambo yango, yango ememelá bato lisumu mpe liwa. (Genese 3:4-7) Bademo ezali baanzelu oyo basepelaki te na “esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki efandelo na bango moko mpenza” mpo na kolanda eloko oyo ebongaki na bango te. (Yuda 6; Genese 6:2) Kanisá mpe Balama, Akana, Gehazi mpe Yuda Mokeliota. Na esika básepela na bomoi oyo bazalaki na yango, mposa makasi ya biloko ya mokili etindaki bango bákóma kosalela mikumba na bango na ndenge ya mabe, mpe yango ememaki bango na libebi mpe na liwa.
10. Na kotalela toli ya Yesu, ndenge nini tosengeli ‘kofungola miso na biso’?
10 Ebongaki mpenza Yesu abanda toli na ye na maloba, “Bófungola miso na bino”! Mpo na nini? Mpamba te ezalaka mpasi te komona lokoso to bilulela ya basusu, kasi ezalaka mwa mpasi kondima ete yo moko ozali na bizaleli yango. Nzokande, ntoma Paulo alobaki ete “bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso.” (1 Timote 6:9, 10) Moyekoli Yakobo amonisi ete soki mposa mabe ‘ezwi zemi, ebotaka lisumu.’ (Yakobo 1:15) Na boyokani na toli ya Yesu, tosengeli ‘kofungola miso na biso,’ mpo na koluka komona lokoso to bilulela ya basusu te, kasi mpo na kotala soki mposa nini ezali na mitema na biso; yango ekosala ete ‘tómibatela na motindo nyonso ya kolula biloko ya bato.’
Kozala na biloko mingi
11, 12. (a) Likebisi nini Yesu apesaki mpo na bilulela? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda toli ya Yesu?
11 Ezali na ntina mosusu oyo tosengeli kokeba na bilulela. Yoká oyo Yesu alobaki na nsima: “Ata ntango moto azali na mingi bomoi na ye euti te na biloko oyo azali na yango.” (Luka 12:15) Na eleko oyo bato bazali komipesa mingi na koluka bozwi, ebongi mpenza ete tótalela likambo yango na likebi, mpamba te bato bakómi kokanisa ete bomɛngo ezali sɛkɛlɛ ya bolamu mpe ya kolonga na bomoi. Na maloba wana, Yesu amonisaki ete bomoi ya malamu eutaka te na biloko ya mokili, ata soki biloko yango ezali ebele ndenge nini.
12 Kasi, bato mosusu bakoki koboya kondima likambo yango. Bakoki kokanisa ete biloko ya mokili ekoki kopesa moto bolamu mpe esengo. Yango wana, bamipesaka mingi na misala oyo ekopesa bango likoki ya kozwa biloko nyonso oyo basengeli na yango. Bakanisaka ete yango nde bomoi ya solosolo. Kasi, na makanisi wana, bazali komonisa ete basosoli te likambo oyo Yesu alobaki.
13. Wapi lolenge ya malamu ya kotalela bomoi mpe biloko ya mokili?
13 Na esika amonisa ete kozala na biloko mingi ezali malamu to mabe, Yesu alobaki nde ete bomoi ya moto eutaka te na “biloko oyo azali na yango.” Na likambo yango, biso nyonso toyebi ete mpo tózala na bomoi to tóbatela bomoi oyo tozali na yango, esengeli kaka te ete tózala na biloko mingi. Esɛngaka kaka kozala na mwa bilei, bilamba ya kolata, mpe esika ya kolala. Bazwi bazali na biloko yango mingi, nzokande babola basengeli kobunda makasi mpo bázwa biloko ya kobikela. Ata soki bazwi ná babola bakeseni, bango nyonso bazalaka ndenge moko soki bakufi: biloko na bango nyonso ezalaka lisusu na ntina te. (Mosakoli 9:5, 6) Yango wana, bomoi ya ntina mpe ya malamu eutaka te kaka na biloko oyo moto azwi to azali na yango. Likanisi yango ekomonana polele soki totaleli lolenge ya bomoi oyo Yesu alobelaki.
14. Liloba “bomoi” oyo ezwami na lisolo oyo elimboli mpenza nini?
14 Ntango Yesu alobaki ete ‘bomoi ya moto eutaka te na biloko oyo azali na yango,’ liloba ya Grɛki (zo·eʹ) oyo asalelaki mpo na “bomoi” na evanzile ya Luka ezali kolobela te lolenge moko boye ya bomoi, kasi nde bomoi yango moko, elingi koloba kozala mpenza na bomoi.a Yesu alingaki koloba ete tózala bazwi to babola, tozali na bokonzi te likoló ya bomoi na biso to tokoki koyeba te soki lobi tokozala na bomoi. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino na komitungisáká akoki kobakisa mwa lipeko moko na bolai ya bomoi na ye?” (Matai 6:27) Biblia ezali komonisa polele ete kaka Yehova nde azali “liziba ya bomoi,” mpe kaka ye nde akoki kopesa basembwi “bomoi ya solosolo,” to “bomoi ya seko,” elingi koloba bomoi ezangi nsuka, ezala na likoló to awa na mabelé.—Nzembo 36:9; 1 Timote 6:12, 19.
15. Mpo na nini bato mingi batyaka elikya na bango na biloko ya mokili?
15 Maloba ya Yesu emonisi polele ete ezalaka mpasi te mpo bato bátalela bomoi na ndenge ebongi te. Ezala mozwi to mobola, bango nyonso bazali bato ya kozanga kokoka, mpe basukaka bango nyonso ndenge moko. Moize alobaki ete: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soki mpo na makasi ekokóma na ntuku mwambe; enzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolɔzi; zambi ekosila noki mpe biso tokopumbwa.” (Nzembo 90:10; Yobo 14:1, 2; 1 Petelo 1:24) Mpo na ntina yango, mbala mingi bato oyo bazali na boyokani te na Nzambe bakómaka na ezaleli ya bato oyo ntoma Paulo alobelaki. Bato yango bazalaki koloba ete: “Tiká tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:32) Lokola bomoi ezali mokuse mpe toyebi te soki nini ekoya lobi, bato mosusu bakanisaka ete biloko ya mokili nde ekobatela to ekopesa bango bomoi molai. Bakanisaka mbala mosusu ete kozala na biloko mingi ekoki kobongisa bomoi ya moto. Yango wana, babomaka nzoto mpo na konduka bomɛngo, mpo bakanisaka ete biloko wana ekobatela bango mpe ekomemela bango esengo.—Nzembo 49:6, 11, 12.
Elikya ya solosolo
16. Motuya ya bomoi eutaka na nini?
16 Toboyi te, kozala na biloko mingi lokola bilamba, ndako mpe biloko mosusu ekoki kosala ete moto azala na bomoi ya malamu to azwa lisalisi ya malamu ya monganga, mpe ekoki ata kobakisela ye mwa bambula ya bomoi. Kasi, bomoi ya ndenge wana ebakiselaka mpenza moto esengo mpe kimya? Motuya ya bomoi ya moto eutaka te na bambula oyo aumeli na bomoi to na biloko oyo azali na yango. Ntoma Paulo alobelaki likama oyo ekoki kokómela moto soki atye motema mobimba na biloko ya ndenge wana. Akomelaki Timote ete: “Pesá mitindo na baoyo bazali bato ya bomɛngo na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.”—1 Timote 6:17.
17, 18. (a) Wapi bandakisa malamu oyo tosengeli kolanda na ndenge ya kotalela bozwi ya mokili? (b) Ndakisa nini ya Yesu tokotalela na lisolo oyo elandi?
17 Kotya elikya na bomɛngo ezali bozoba, mpamba te yango “ekoki kobunga lelo to lobi.” Yobo, moto ya sembo, azalaki na bozwi mingi, kasi ntango makama eyelaki ye na mbalakaka, bomɛngo na ye ekokaki kosalisa ye te; yango nyonso elimwaki mbala moko. Boyokani makasi oyo azalaki na yango na Nzambe nde esalisaki ye alonga minyoko mpe bolɔzi nyonso wana. (Yobo 1:1, 3, 20-22) Abalayama atikaki te ete bomɛngo oyo azalaki na yango epekisa ye kondima mokumba ya mpasi oyo Yehova apesaki ye, mpe azwaki mbano ya kokóma “tata wa bikolo ebele.” (Genese 12:1, 4; 17:4-6, Liloba lya Nzambe) Ebongi mpenza tólanda ndakisa ya bato wana mpe bato mosusu. Tózala bilenge to mikóló, tosengeli mpenza komitalela mpo na koyeba nini mpenza ezali na ntina na bomoi na biso mpe soki tozali kotya elikya na biso na nini.—Baefese 5:10; Bafilipi 1:10.
18 Mwa makambo oyo Yesu alobaki na ntina na ezaleli ya kolula biloko ya bato mpe mpo na lolenge malamu ya kotalela bomoi ezali na ntina mingi mpo na biso. Nzokande, Yesu azalaki na makambo mosusu mingi ya koteya, mpe apesaki ndakisa moko ya kitoko mpenza, oyo ya mozwi ya zoba. Ndakisa yango ezali na ntina nini lelo oyo, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba mosusu ya Grɛki oyo ebongolami na “bomoi” ezali biʹos, oyo ebimisi maloba ya Lifalanse lokola “biographie” (masolo ya bomoi ya bato) to “biologie” (siansi oyo etalelaka bikelamo ya bomoi).
Okopesa eyano nini?
• Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu aboyaki kosala likambo oyo moto moko asɛngaki ye?
• Mpo na nini tosengeli kokeba na ezaleli ya kolula biloko ya bato, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
• Mpo na nini bomoi ekoki kouta te na bozwi ya mokili?
• Nini mpenza ekoki komemela moto bomoi malamu mpe kimya?
[Elilingi na lokasa 23]
Mpo na nini Yesu asalaki te likambo oyo moto moko asɛngaki ye?
[Elilingi na lokasa 23]
Ezaleli ya kolula biloko ya bato ekoki komema makama minene
[Bililingi na lokasa 25]
Ndenge nini Abalayama amonisaki ete azalaki kotalela biloko ya mokili na ndenge ebongi?