Mituna ya batángi
Atako liboso Mokonzi Saulo atindaki bato bábengela ye Davidi mpo azala mosaleli na ye, mpo na nini ntango Davidi abomaki Goliata, Saulo atunaki ye lisusu ete, “Yo elenge, ozali mwana ya nani?”—1 Samwele 16:22; 17:58.
Soki otali malamu te, okoki koloba ete Saulo abosanaki Davidi mpo mbala ya liboso oyo bakutanaki baumelaki mingi te. Kasi, ezali bongo te, mpo 1 Samwele 16:18-23 emonisi ete Mokonzi Saulo atindaki bato bákende kozwela ye Davidi mpe akómaki kolinga ye mingi mpe atyaki ye momemi ya bibundeli na ye. Na ntembe te, Saulo ayebaki Davidi malamu mpenza.
Balimboli mosusu ya Biblia balobaka ete 1 Samwele 17:12-31 mpe 17:55-18:5 ekɔtisamaki na Biblia nsima, mpo bavɛrsɛ yango ezali te na bakopi mosusu ya Biblia ya Septante, libongoli ya Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki, oyo basilisaki kobongola na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Nzokande, koloba bongo kaka mpo bavɛrsɛ yango ezali te na bakopi wana ya Biblia ya Septante ekozala kozanga bwanya, mpamba te bavɛrsɛ yango ezali na bamaniskri mosusu ya solosolo ya Makomami ya Liebele.a
Emonani mpenza ete, lokola Saulo atunaki liboso Abinele mpe na nsima Davidi ye moko, alingaki kaka koyeba nkombo ya tata ya Davidi te. Lokola Davidi abomaki Goliata, Saulo akómaki kotalela ye lokola moto ya kondima makasi mpe ya mpiko. Yango wana alingaki koyeba soki tata na ye azali mobali ya ndenge nini. Ekoki kozala ete Saulo azalaki na likanisi ete Yese, tata ya Davidi, to bandeko na ye mosusu, bákóma basoda na ye, mpo akanisaki ete bango mpe bakokaki kozala na mpiko lokola oyo amonaki epai ya Davidi.
Atako 1 Samwele 17:58 elobeli kaka mwa eyano ya mokuse oyo Davidi apesaki, “Nazali mwana ya moombo na yo, Yese [moto ya Beteleme, NW],” ndenge lisolo yango ekobi, emonisi ete basololaki lisusu mingi. Mpo na likambo yango, Carl F. Keil ná Franz Delitzsch balobaki boye: “Na kotalela maloba ya [1 Samwele 18:1], ezali polele ete ‘ntango asilisaki koloba na Saulo,’ basololaki lisusu mingi na ntina na libota na ye, mpo maloba yango emonisi ete basololaki mingi.”
Na kotalela nyonso wana, tokoki koloba ete ntango Saulo atunaki Davidi ete, “Yo elenge, ozali mwana ya nani?” alingaki koyeba te soki Davidi azali nani, mpo ayebaki ye malamu mpenza. Kasi, azalaki nde na mposa ya koyeba ndenge Davidi abɔkɔlamaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba soki bavɛrsɛ oyo ezangi na libongoli ya Septante ezalaki na makomi ya ebandeli to te, talá na buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, lokasa 885-886, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 31]
Mpo na nini Saulo atunaki Davidi soki azali mwana ya nani?