Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/9 nk. 26-30
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baboti ya makoki bapesaka ndakisa ya malamu
  • Baboti ya makoki babondelaka elongo na bana na bango
  • Baboti ya makoki basalisaka bana bákóma na momeseno ya koyekola
  • Bókolisa kimya na ndako na bino
  • Mokumba ya mwana
  • Kobokola bana na mokili oyo ekipaka mabe te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/9 nk. 26-30

Bóteya bana na bino bálinga yehova

“Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali [lokola] mbanzi na lobɔkɔ ya elombe.”​—Nzembo 127:4.

1, 2. Na ndenge nini bana bazali lokola “mbanzi na lobɔkɔ ya elombe”?

MPO mbanzi na ye ezwa eloko oyo azali kobɛta, mobɛti-mbanzi amibongisaka malamu. Atyaka mbanzi yango malamu likoló ya nsinga ya litimbo mpe abendaka yango makasi. Atako misisa ebimaka ye, azwaka mpenza ntango liboso ya kobwaka mbanzi na ye. Akozokisa eloko yango? Yango ekotalela makambo mingi. Na ndakisa, makoki ya mobɛti-mbanzi, mopɛpɛ mpe lolenge ya mbanzi.

2 Mokonzi Salomo alobaki ete bana bazali lokola “mbanzi na lobɔkɔ ya elombe.” (Nzembo 127:4) Tótala ndenge tokoki kosimba ndakisa yango. Mbanzi ya mobɛti-mbanzi eumelaka ntango molai te na litimbo. Mpo na kobɛta eloko oyo alingi koboma, esengeli kobwaka mbanzi noki. Ndenge moko, baboti bazali kaka na mwa ntango mokuse ya kosalisa bana na bango bákóma kolinga Yehova na motema moko. Nsima ya mwa bambula, bana bakokola mpe bakotika ndako ya baboti. (Matai 19:5) Bana yango bakokoba kolinga Nzambe mpe kosalela ye nsima ya kotika ndako ya baboti? Yango ekotalela makambo mingi. Misato kati na yango ezali makoki ya moboti, esika mwana azali kokola, mpe lolenge oyo ‘mbanzi,’ elingi koloba mwana, azali kotalela mateya ya baboti. Tiká tólobela mokomoko ya makambo yango na mozindo. Libosoliboso, tokolobela bizaleli ya moboti ya makoki.

Baboti ya makoki bapesaka ndakisa ya malamu

3. Mpo na nini baboti basengeli komonisaka makambo oyo bazali koloba na misala?

3 Yesu atikelá baboti ndakisa na ndenge ye moko azalaki kosalela makambo oyo azalaki koteya. (Yoane 13:15) Epai mosusu, akweisaki Bafalisai mpo bazalaki te kosalela makambo oyo bazalaki koteya. (Matai 23:3) Mpo na kosalisa bana na bango bálinga Yehova, esengeli baboti bámonisaka makambo oyo bazali koloba na misala. Soki maloba ezali na boyokani na misala te, ekozala na ntina te lokola litimbo oyo ezangi nsinga.​—1 Yoane 3:18.

4. Mituna nini baboti basengeli komituna, mpe mpo na nini?

4 Mpo na nini ndakisa ya baboti ezali na ntina mingi? Ndenge kaka mikóló bakoki koyekola kolinga Nzambe na kolanda ndakisa ya Yesu, bana mpe bakoki koyekola kolinga Yehova na kolanda ndakisa malamu ya baboti na bango. Baninga ya mwana bakoki kolendisa ye to ‘kobebisa bizaleli na ye ya malamu.’ (1 Bakolinti 15:33) Na boumeli ya ntango molai, mingimingi ntango mwana abandi koyekola makambo, baninga ya solosolo ya mwana ezalaka baboti na ye. Na yango, baboti basengeli komituna boye: ‘Nazali moninga ya ndenge nini? Ndakisa na ngai ezali mpenza kosalisa mwana na ngai akóma na bizaleli ya malamu? Ndakisa nini nazali kopesa na makambo ya ntina mingi lokola kobondela mpe koyekola Biblia?’

Baboti ya makoki babondelaka elongo na bana na bango

5. Bana bakoki kozwa liteya nini na mabondeli ya baboti na bango?

5 Bana na bino bakoki koyeba makambo mingi ya Yehova ntango bazali koyoka mabondeli na bino. Bana na bino bakokanisa nini soki bazali koyoka bino bozali kotɔnda Nzambe liboso ya kolya mpe kobondela ntango bozali koyekola Biblia? Na ntembe te, bakoyeba ete Yehova nde apesaka biso bilei, ateyaka biso solo ya Biblia, mpe tosengeli kotɔndaka ye mpo na yango. Wana ezali mateya ya ntina mpenza!​—Yakobo 1:17.

6. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bámona ete Yehova akipaka mokomoko na bango?

6 Kasi, longola kobondela na ntango ya kolya mpe ya koyekola, soki bozali kobondelaka elongo na bana na bino na mabaku mosusu mpe bozali kolobela makambo na bino ná oyo ya bana, bokozwa matomba mingi. Bokosalisa bana na bino bámona ete Yehova azali na kati ya libota na bino mpe amibanzabanzaka mpo na mokomoko na bino. (Baefese 6:18; 1 Petelo 5:6, 7) Tata moko alobi ete: “Banda mwana na biso abotamaki, tozalaki kobondela na ye. Ntango azalaki kokola, tozalaki kobondela mpo na boyokani na ye ná basusu mpe mpo na makambo na ye mosusu. Tii ntango abalaki mpe atikaki ndako na biso, tolekisaki ata mokolo moko te kozanga kobondela na ye.” Bino mpe bokoki kobondelaka na bana na bino mikolo nyonso? Bokoki kosalisa bango bámonaka Yehova lokola Moninga oyo akokisaka kaka bamposa na bango ya mosuni mpe ya elimo te, kasi mpe oyo ya motema?​—Bafilipi 4:6, 7.

7. Baboti basengeli koyeba nini mpo básalaka mabondeli oyo eyokani na bamposa ya bana?

7 Nzokande, mpo na kosala mabondeli oyo eyokani na bamposa ya mwana na bino, bosengeli koyeba makambo oyo azali kokutana na yango. Tata moko oyo abɔkɔlá bana mibale alobi boye: “Na nsuka ya pɔsɔ, nazalaki komituna mituna mibale: ‘Makambo nini etungisaki bana na ngai na pɔsɔ oyo? Mpe makambo nini ya malamu bakutanaki na yango?’” Baboti, bokoki komitunaka mituna ya ndenge wana mpe kotyaka makambo yango na mabondeli oyo bosalaka na bana na bino. Soki bozali kosala bongo, bokolakisa bango te kaka kobondela Yehova, Moyoki ya mabondeli, kasi bokosalisa bango mpe bákóma kolinga ye.​—Nzembo 65:2.

Baboti ya makoki basalisaka bana bákóma na momeseno ya koyekola

8. Mpo na nini baboti basengeli kosalisa bana na bango bákóma na momeseno ya koyekolaka Liloba ya Nzambe?

8 Ndenge nini lolenge oyo moboti atalelaka boyekoli ya Biblia ekoki kosalisa mwana azala na boyokani na Nzambe? Mpo bato bákóma koyokana mpe boninga na bango etikala libela, basengeli te kaka kosololaka kasi mpe koyokanaka; ntango moko azali koloba, mosusu asengeli koyoka ye. Lolenge moko oyo toyokaka Yehova ezali koyekola Biblia na nzela ya mikanda oyo “moombo ya sembo” abimisaka. (Matai 24:45-47; Masese 4:1, 2) Na yango, mpo na kosalisa bana na bango bákóma na boyokani ya solosolo na Yehova, baboti basengeli kosalisa bango bákóma na momeseno ya koyekolaka Liloba ya Nzambe.

9. Ndenge nini osengeli kosalisa bana na yo bákóma na momeseno ya koyekola?

9 Ndenge nini osengeli kosalisa bana na yo bákóma na momeseno ya koyekola? Awa lisusu, ndakisa ya moboti ezali na ntina mingi. Bana na yo bamonaka ete osepelaka kotánga to koyekola Biblia? Na ntembe te, ekoki kozala ete ozali na mokumba monene ya kobɔkɔla bana na yo, mpe okoki komituna soki okoki mpenza kozwa ntango ya kotánga mpe koyekola. Kasi, omituna boye, ‘Bana na ngai bamonaka ete nalingaka kotala televizyo mingi?’ Soki ezali bongo, okoki te kosalela ndambo ya ngonga yango mpo na kopesa bango ndakisa malamu na likambo ya koyekola?

10, 11. Mpo na nini baboti basengeli kotambwisaka boyekoli ya libota mbala na mbala?

10 Lolenge mosusu ya malamu oyo baboti bakoki koteya bana mpo báyoka Yehova ezali soki bazali koyekola Biblia na libota mbala na mbala. (Yisaya 30:21) Kasi, bato mosusu bakoki komituna ete, ‘Soki baboti bamemaka bana na bango na makita nyonso ya lisangá, mpo na nini basengeli lisusu koyekola Biblia na libota?’ Bantina ezali mingi. Mokumba ya libosoliboso oyo Yehova apesá baboti ezali ya koteya bana na bango. (Masese 1:8; Baefese 6:4) Koyekola Biblia na libota esalisaka bana bámona ete kosambela ezali te kaka molulu ya kosalaka na kati ya bato ebele, kasi esengeli mpe kosalemaka na kati ya libota.​—Deteronome 6:6-9.

11 Lisusu, soki boyekoli ya libota ezali koleka malamu, yango ekoki kopesa baboti libaku ya koyeba ndenge bana na bango batalelaka makambo ya Nzambe mpe bizaleli malamu. Na ndakisa, ntango bana bazali naino mike, baboti bakoki kosalela mikanda lokola Yekolá epai ya Moteyi Monene.a Na paragrafe mokomoko ya buku yango, basɛngaka bana bapesa makanisi na bango na likambo oyo bazali kolobela. Soki baboti bazali kolimbola bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na buku yango, bakoki kosalisa bana na bango bakóma na makoki ya kososola “mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—Baebele 5:14.

12. Ndenge nini baboti bakoki koyokanisaka boyekoli ya libota na bamposa ya bana, mpe nini omoni ete ekoki kobota mbuma malamu na likambo yango?

12 Ntango bana na bino bazali kokola, yokanisá boyekoli na bamposa na bango. Yoká ndenge mobali moko ná mwasi na ye basalisaki bana na bango ntango bana batunaki bango soki bakoki kokende kotala mabina oyo ebongisamaki na eteyelo. Tata alobaki ete: “Toyebisaki bana ete na boyekoli ya mbala ya nsima, biso tokozala lokola bana mpe bango bakozala lokola baboti. Mwana moko asengelaki kozwa esika ya tata mpe mosusu esika ya mama, kasi basengelaki kosala bolukiluki elongo mpo na kopesa biso malako na likambo ya mabina na biteyelo.” Esukaki ndenge nini? Tata yango akobi boye: “Tokamwaki ndenge bana na biso basalaki makambo lokola mikóló (na mokumba na bango ya baboti) ntango bazalaki kolimbwela biso (lokola bana na bango) mitinda ya Biblia oyo emonisi ete ezali malamu te kokende na mabina motindo wana. Eloko ekamwisaki biso lisusu koleka ezali likanisi oyo bapesaki ya kosala likambo mosusu na esika ya kokende na mabina wana. Yango esalisaki biso tóyeba makanisi mpe bamposa na bango.” Ya solo, esɛngaka molende mpe mayele mpo na koyekolaka ntango nyonso na libota mpe kosala ete boyekoli yango eyokana na mposa ya libota, kasi kosala yango ezali mpenza na ntina.​—Masese 23:15.

Bókolisa kimya na ndako na bino

13, 14. (a) Ndenge nini baboti bakoki kosala ete kimya ezala na ndako na bango? (b) Matomba nini ekoki komonana soki moboti andimi libunga na ye?

13 Soki mobɛti-mbanzi abɛti mbanzi na ye malamu mpe mopɛpɛ to mbula ezali te, mbanzi yango ekoki kozwa eloko oyo abɛti. Ndenge moko, bana bakoyekola kolinga Yehova soki baboti na bango bakolisi kimya na ndako na bango. Yakobo akomaki ete: “Mbuma ya boyengebene, momboto na yango elonamaka na kimya mpo na baoyo batyaka kimya.” (Yakobo 3:18) Ndenge nini baboti bakoki kosala ete kimya ezala na ndako na bango? Mwasi ná mobali basengeli kosala makasi mpo báyokanaka malamu na libala na bango. Mobali ná mwasi oyo balinganaka mpe bamemyanaka bakoki mpenza koteya bana bálingaka mpe bámemyaka basusu, ná Yehova. (Bagalatia 6:7; Baefese 5:33) Bolingo mpe limemya etyaka kimya. Balongani oyo bazali na kimya na kati na bango bakozala na likoki ya kosilisa mikakatano oyo ekoki kobima na libota.

14 Ndenge kaka mabala ya kokoka ezali te, mabota ya kokoka mpe ezali te lelo oyo. Baboti bakoki mbala mosusu kozanga komonisa mbuma ya elimo liboso ya bana na bango. (Bagalatia 5:22, 23) Soki esalemi bongo, baboti basengeli kosala nini? Soki bandimi ete basalaki libunga, bana bakomemya bango lisusu te? Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Azalaki lokola tata ya elimo mpo na bato ebele. (1 Bakolinti 4:15) Kasi, andimaki polele ete asalaki mabunga. (Baloma 7:21-25) Atako bongo, na esika tókitisa Paulo, tozali nde na botosi makasi mpo na ye. Atako asalaki mabunga, Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.” (1 Bakolinti 11:1) Soki bino mpe bozali kondima mabunga na bino, bana na bino bakokipe bolɛmbu na bino te.

15, 16. Mpo na nini baboti basengeli kolakisa bana na bango bákóma kolinga bandeko na bango baklisto, mpe ndenge nini bakoki kosala yango?

15 Baboti bakoki kosala nini lisusu mpo na kosalisa bana na bango bálinga Yehova? Ntoma Yoane akomaki ete: “Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Mpo moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:20, 21) Na yango, ntango ozali kolakisa bana na yo kolinga bandeko na bango baklisto, ozali nde koteya bango kolinga Nzambe. Baboti bakoki komituna boye, ‘Makambo oyo nalobaka na ntina na lisangá ekoki kolendisa bana to kolɛmbisa bango?’ Ndenge nini okoki koyeba yango? Landá masolo oyo bana na yo babɛtaka mpo na makita mpe bandeko ya lisangá. Na ntembe te, okoyoka mpe ndenge yo olobaka.

16 Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bálinga bandeko ya lisangá? Peter, tata moko ya bana mibale alobi ete: “Banda ntango bana na biso bazalaki mike, tozalaki mbala na mbala kobenga bandeko oyo bakomeli báya kolya mpe kolekisa ntango elongo na biso, mpe tozalaki kosepela mingi. Bana na biso bazalaki kokola na kati ya bato oyo balingaka Yehova, mpe sikoyo bazali komona ete kosalela Nzambe ezali bomoi moko ya esengo.” Dennis, tata moko ya bana mitano ya basi, alobi ete: “Tozalaki kolendisa bana na biso bázala baninga ya babongisi-nzela ya mikóló na lisangá, mpe ntango makoki ezali, tozalaki koyamba bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango epai na biso.” Yo mpe okoki kosalisa bana na yo bákóma komona bandeko ya lisangá lokola bato ya libota na bino?​—Malako 10:29, 30.

Mokumba ya mwana

17. Nsukansuka, ekateli nini bana basengeli kozwa?

17 Tózongela naino ndakisa ya mobɛti-mbanzi. Atako akoki kozala na makoki, mbanzi na ye ekoki kozwa eloko oyo abɛti te soki mbanzi yango egumbamá to etɛngamá. Baboti bakoki kosala nyonso mpo na kobongisa mbanzi oyo egumbamá, elingi koloba mwana, mpo na koluka kosembola makanisi na ye ya mabe. Kasi nsukansuka, bana nde basengeli kopona soki bakotika mokili ebenda bango bákóma kosala mokano na yango to bakotika Yehova ‘atambwisa’ bango.​—Masese 3:5, 6; Baloma 12:2.

18. Bikateli oyo mwana azali kozwa ekoki kozala na litomba nini epai na basusu?

18 Atako baboti bazali na mokumba monene ya kobɔkɔla bana na bango na “disipilini mpe na makebisi ya Yehova,” mwana nde akopona lolenge oyo alingi kozala ntango akokola. (Baefese 6:4) Na yango, bino bana, bómituna boye: ‘Nakondima malako ya bolingo oyo baboti na ngai bazali kopesa ngai?’ Soki osali bongo, okopona bomoi oyo eleki malamu. Okosepelisa baboti na yo mingi. Likambo eleki ntina, okosepelisa motema ya Yehova.​—Masese 27:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini baboti bakoki kopesa bana na bango ndakisa malamu na likambo ya kobondela mpe koyekola Biblia?

• Ndenge nini baboti bakoki kosala ete kimya ezala na ndako na bango?

• Ekateli nini bana basengeli kozwa, mpe ndenge nini yango ekoki kozala na litomba epai na basusu?

[Elilingi na lokasa 28]

Opesaka mwana na yo ndakisa malamu na likambo ya koyekola?

[Elilingi na lokasa 29]

Soki kimya ezali na libota, yango ekoki komema esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto