Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/9 nk. 4-7
  • Ntina oyo mabe ezali tii lelo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo mabe ezali tii lelo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabe eutaka wapi?
  • Ntembe moko monene ebimi
  • Esɛngaki ntango
  • Ntango oyo eleki emonisi nini?
  • Osengeli kosala nini?
  • Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Bampasi ya bato: Mpo na nini Nzambe atikelaki yango nzela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/9 nk. 4-7

Ntina oyo mabe ezali tii lelo

BIBLIA elobi boye: “[Yehova Nzambe] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso.” (Nzembo 145:17; Emoniseli 15:3) Mosakoli Moize alobaki mpo na Nzambe ete: “Mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe ya sembo mpe ya mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Yakobo 5:11 elobi boye: “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” Yango emonisi ete mabe eutaka epai ya Nzambe te.

Moyekoli Yakobo akomaki boye: “Ntango moto azali na kati ya komekama, aloba te ete: ‘Nazali komekama na Nzambe.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Yehova Nzambe amekaka bato na makambo ya mabe te; atindaka mpe bango te ete básala makambo ya mabe. Boye, mabe mpe bampasi eutaka wapi?

Mabe eutaka wapi?

Yakobo amonisi ete mabe mosusu eutaka epai ya bato bango moko. Alobi boye: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.” (Yakobo 1:14, 15) Na bantango mosusu, bato basalaka makambo na kolanda bamposa na bango ya mabe. Longola yango, tozali bato ya kozanga kokoka. Ezaleli yango ekoki kokolisa bamposa ya mabe na motema ya moto mpe komemela ye bampasi. (Baloma 7:21-23) Biblia elobi ete lisumu ezali mpenza “koyangela” bato, elingi koloba, ezali kokómisa bango baombo ya misala ya mabe, mpe yango ememaka bampasi mingi. (Baloma 5:21) Longola yango, bato mabe bakoki kobebisa basusu.​—Masese 1:10-16.

Kasi, mabe euti mpenzampenza epai ya Satana Zabolo. Ye nde akɔtisaki yango na mokili. Yesu Klisto abengaki Satana “moto mabe” mpe “moyangeli ya mokili,” elingi koloba moyangeli ya bato nyonso oyo bazangi sembo. Bato ya mokili batosaka Satana na ndenge balandaka makanisi na ye ya koboya banzela ya Yehova Nzambe. (Matai 6:13; Yoane 14:30; 1 Yoane 2:15-17) Mokanda ya 1 Yoane 5:19 elobi boye: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” Satana ná baanzelu na ye ‘bazali kobungisa mabelé mobimba nzela,’ mpe yango ezali komemela bato “mawa.” (Emoniseli 12:9, 12) Na yango, mabe mingi oyo ezali lelo oyo euti nde epai ya Satana Zabolo.

Mosakoli 9:11 (NW) elobeli ntina mosusu ya bampasi ya bato; elobi boye: “Ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka [biso] nyonso.” Yesu Klisto alobelaki likama moko oyo ekómelaki bato 18; ndako moko molai ekwelaki bango mpe bakufaki. (Luka 13:4) Bato yango bakufaki mpo bazalaki na esika wana na ngonga oyo likama esalamaki. Makambo ya ndenge wana esalemaka mpe lelo. Na ndakisa, briki moko ekoki kolongwa na mabɔkɔ ya masɔ oyo azali kotonga likoló ya ndako moko mpe kokwela moto oyo azali koleka na nse. Tokoloba ete Nzambe nde alingi yango? Te. Moto te alingaki mpe akanaki ete likambo yango esalema. Tokoki mpe koloba bongo ntango moto moko na kati ya libota abɛli makasi to ntango tata moko akufi na mbalakaka mpe atiki mwasi ná bana.

Na yango, ezali polele ete mabe eutaka epai ya Yehova Nzambe te; alingaka mpe te ete bampasi ezala. Kutu, Yehova azali na mokano ya kolongola mabe mpe baoyo basalaka yango. (Masese 2:22) Kasi akosuka wana te. Biblia elobi ete Nzambe azali na mokano ya “kobukabuka misala ya Zabolo” na nzela ya Klisto. (1 Yoane 3:8) Na ndenge yango, mokili oyo etondi na lokoso, koyina, mpe misala ya mabe, ekolongwa. Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso” ya bato, elingi koloba akosukisa bampasi. (Emoniseli 21:4) Kasi okoki komituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe asali yango naino te? Mpo na nini atiki ete mabe mpe bampasi ezala tii lelo?’ Lisolo ya Adama ná Eva ekosalisa biso tózwa biyano na mituna yango.

Ntembe moko monene ebimi

Ntina oyo Nzambe atiki mabe ezala tii lelo etaleli likambo moko oyo esalamaki mwa moke nsima ya kokela moto. Likambo yango ebimisaki ntembe monene na ntina na Mozalisi​—likambo yango esɛngaki ntango mpo ekatama. Tótalela ndenge makambo elekaki.

Yehova Nzambe akelaki mobali ná mwasi ya liboso bato ya kokoka mpe atyaki bango na Paladiso. Apesaki bango bonsomi ya kopona, likoki oyo ekesenisaki bango na banyama. (Genese 1:28; 2:15, 19) Lokola Adama ná Eva bazalaki na bonsomi wana, bango moko bakokaki kopona soki bakolinga Mozalisi na bango, bakosalela ye, mpe bakotosa ye. Bakokaki mpe kopona soki bakosala makambo na ndenge na bango mpe koboya kotosa Nzambe.

Nzambe apekisaki Adama ná Eva likambo moko, na ndenge yango apesaki bango libaku ya komonisa bolingo na bango mpo na ye. Alobaki na Adama boye: “Yo okoki kolya mbuma ya nzete nyonso na elanga, nde mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Mpo bábatela boyokani malamu na Nzambe mpe Nzambe akoba kopambola bango mpe bana na bango, Adama ná Eva basengelaki te kolya mbuma ya nzete yango. Batosaki mobeko yango?

Biblia eyebisi biso likambo oyo esalemaki. Satana Zabolo asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva; atunaki ye boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Eva ayebisaki ye mobeko oyo Nzambe apesaki bango; kasi, Satana ayebisaki ye boye: “Bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” Eva amonaki ete nzete yango ezalaki kitoko na kotala mpe “akamataki mbuma yango mpe alyaki.” Biblia ebakisi boye: “Apesaki na mobali na ye, [ntango, NW] azalaki na ye elongo, ye mpe alyaki.” (Genese 3:1-6) Na ndenge yango, Adama ná Eva basalelaki bonsomi na bango ya kopona na ndenge ya mabe mpe basalaki lisumu mpo batosaki Nzambe te.

Ezalaki mpenza likambo monene! Zabolo atɛmɛlaki maloba oyo Nzambe ayebisaki Adama. Na maloba na ye, Satana amonisaki ete Adama ná Eva basengelaki kotalela Yehova te mpo na kokesenisa malamu ná mabe. Na ndenge yango, Satana atyaki ntembe ete Yehova azali na lotomo ya koyangela bato. Na bongo, ntembe monene oyo Satana abimisaki etalelaki nde lotomo ya Yehova ya koyangela. Yehova asalaki nini?

Esɛngaki ntango

Yehova Nzambe akokaki koboma Satana, Adama, mpe Eva kaka na ntango wana. Nguya na ye eleki oyo ya bango. Nzokande, Satana atyelaki nguya ya Yehova ntembe te. Atyaki nde ntembe na lotomo ya Nzambe ya koyangela. Ntembe yango etalelaki bikelamu nyonso oyo bazali na bonsomi ya kopona. Basengelaki koyeba ete ebongi kosalela bonsomi yango na ndenge ya malamu, elingi koloba na kolanda mibeko ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na bango. Soki balandi yango te, bakokutana na mpasi, ndenge kaka moto oyo amibwaki longwa na likoló ya ndako akoki kozwa mpasi. (Bagalatia 6:7, 8) Ebongaki ete bato bango moko, ata mpe baanzelu, bámona ete kopesa Nzambe mokɔngɔ, ezali na litomba te, ememaka nde mpasi. Mpo na yango, esɛngaki ntango.

Tokoki kopesa ndakisa moko mpo na komonisa ntina oyo esɛngaki ntango mpo na kosilisa ntembe wana: Soki mobali moko asɛngi moninga na ye mobali bámekana mpo na koyeba nani aleki makasi. Bakoki kosilisa ntembe yango mbala moko. Bakoki ata kotombola mabanga mpo na koyeba moto ya makasi. Mobali oyo akotombola libanga oyo eleki kilo nde aleki makasi. Kanisá sikoyo soki ntembe ezali nde ya koyeba nani alingaka mpenza bana na ye mpe oyo bana na ye balingaka ye mpenza. To soki ntembe ezali nde ya koyeba nani abatelaka libota na ye malamu koleka. Na ntango wana, kolakisa makasi to koloba mpamba ekosilisa ntembe te. Ekosɛnga nde ntango mpe kotalela malamumalamu makambo oyo bakobanda kosala, bongo na nsuka, tata oyo aleki malamu akoyebana.

Ntango oyo eleki emonisi nini?

Mbula soki 6 000 esili koleka banda Satana atyaki ntembe na lotomo ya Nzambe ya koyangela. Ntango nyonso oyo eleki emonisi nini? Tótalela makambo mibale oyo Satana alobaki. Satana alobaki na Eva boye: “Bino bokokufa solo te.” (Genese 3:4) Lokola Satana alobaki ete Adama ná Eva bakokufa te soki balei mbuma oyo epekisamaki, amonisaki na maloba mosusu ete Yehova abukaki lokuta. Yango ezalaki efundeli monene! Soki Nzambe akosaki na likambo wana, akokaki lisusu kotyelama motema na likambo nini? Ntango oyo eleki emonisi nini?

Adama ná Eva bakómaki bato oyo bakoki kobela, komona mpasi, banunaki, mpe bakufaki. Biblia elobi boye: “Mikolo nyonso eumelaki Adama ezalaki mbula nkama libwa na ntuku misato, na nsima akufaki.” (Genese 3:19; 5:5) Adama atikelá bato nyonso liwa. (Baloma 5:12) Ntango oyo eleki emonisi ete Satana azali “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta” mpe ete Yehova azali “Nzambe ya sembo.”​—Yoane 8:44; Nzembo 31:5.

Longola yango, Satana alobaki na Eva ete: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya [mbuma ya nzete oyo epekisamaki], miso na bino makofungwa, mpe bino [Adama ná Eva] bokozala [lokola] Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:5) Na maloba yango, Satana amonisaki ete bato bakoki komitambwisa bango moko. Satana alobaki ete bato bakozala na bomoi ya malamu koleka soki bapesi Nzambe mokɔngɔ. Alobaki nde solo?

Bato bameki biyangeli ya ndenge na ndenge. Nzokande, mbala na mbala, makambo ya nsɔmo ezali kokómela bato na mokili mobimba. Eleki sikoyo mbula soki 3 000, mokomi moko ya Biblia alobaki ete “moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Mosakoli Yilimia akomaki boye: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Atako bato basali biloko ndenge na ndenge na mayele ya siansi, maloba yango ebongwani te. Ntango nyonso oyo eleki emonisi ete maloba yango ya Biblia ezali solo.

Osengeli kosala nini?

Ntango oyo Nzambe atiki emonisi ete Satana alongi te na ntembe oyo atyaki mpo na lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi. Yehova Nzambe azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Azali na lotomo ya koyangela bikelamu na ye, mpe boyangeli na ye nde eleki malamu. Kutu, bikelamu ya elimo oyo bazali na likoló, oyo Nzambe ayangelaka banda kala, balobaka boye: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”​—Emoniseli 4:11.

Ozali na ngámbo nini na ntembe oyo ebimaki mpo na boyangeli ya Nzambe? Ondimi ete Nzambe abongi koyangela yo? Soki ezali bongo, osengeli kondima ete Yehova azali Mokonzi. Okoki komonisa yango soki ozali kolanda mateya Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe ozali kosalela batoli na yango na bomoi na yo mobimba. “Nzambe azali bolingo,” mpe apesaka bikelamu na ye mibeko mpo alingaka bango. (1 Yoane 4:8) Yehova apimelaka biso ata likambo moko te oyo ezali mpo na bolamu na biso. Yango wana, ebongi mpenza olanda toli ya Biblia oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”​—Masese 3:5, 6.

[Elilingi na lokasa 7]

Okoki kopona ete Nzambe ayangela yo soki ozali koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango na bomoi na yo mobimba

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

© Jeroen Oerlemans/Panos Pictures

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto