Bandeko basi oyo bazalaki kotungisama “batongaki ndako ya Yisalaele”
LOKOLA ntɔngɔ elingaki kotana, Lea ayebaki ete etikali moke likambo eyebana. Etikalaki moke Yakobo ayeba ete mwasi oyo alalaki na ye mbeto moko ezalaki Laele te, kasi nde yaya na ye. Ekoki kozala ete na butu liboso ya mokolo ya libala, tata ya Lea asɛngaki ye azipa elongi na ye na litambala ya monene mpo báyeba ye te mpe alala na ndako oyo babongiselaki Yakobo ná Laele.
Kanisá naino ndenge Yakobo ayokaki na ntɔngɔ ntango amonaki ete bakosi ye! Asilikaki mpe aswanaki na Labana, tata ya Lea. Na ntango yango, Lea azalaki komitungisa mpo na ndenge andimaki komikɔtisa na likambo yango mpe mpo na oyo ekokómela ye na nsima. Lisolo ya Lea ná Laele ezali na kati ya masolo ya ntina mingi na kati ya Biblia. Ezali mpe komonisa ntina ya kozala na molongani kaka moko mpe ya kozala sembo epai na ye.
Mopaya na libulu ya mai
Mbula nsambo liboso, Laele akendaki mbangu koyebisa tata na ye ete akutani na mopaya moko na libulu ya mai mpe mopaya yango alobi ete azali ndeko na bango. Mopaya yango azalaki mwana ya tata mwasi na ye mpe mosambeli ya Yehova. Sanza moko na nsima, Yakobo ayebisaki Labana ete akosalela ye mbula nsambo mpo abala Laele. Lokola amonaki ete mwana ya ndeko na ye ya mwasi azalaki makasi na mosala mpe ete na mboka na bango bandeko bazalaki kobalana, Labana andimaki kopesa ye Laele na libala.—Genese 29:1-19.
Yakobo alingaki Laele na bolingo ya solo. Lokola alingaki ye mingi, mbula nsambo oyo basɛngaki ye asala “ezalaki lokola mwa mikolo.” (Genese 29:20) Lokola Yakobo alingaki Laele kino liwa na ye, yango emonisi ete Laele azalaki na bizaleli mingi ya malamu.
Lea azalaki mpe na elikya ete akobala mosambeli ya sembo ya Yehova? Biblia elobi yango te. Makanisi ya Labana mpo na libala ya Lea eyebisami polele na Biblia. Na nsuka ya bambula oyo Yakobo asengelaki kosala mpo na kobala Laele, Labana asalaki fɛti ya libala. Nzokande, Biblia elobi ete na butu wana, Labana amemaki Lea epai ya Yakobo “mpe ye asanganaki na ye.”—Genese 29:23.
Lea ayokanaki na tata na ye mpo na kokosa Yakobo? To asengelaki kaka kotosa tata na ye? Laele azalaki wapi? Ayebaki oyo ezalaki koleka? Soki ayebaki, ayokaki ndenge nini? Akokaki koboya koyokela tata na ye oyo azalaki matata? Biblia eyanoli na mituna wana te. Ezala Laele mpe Lea bakanisaki nini na likambo yango, mayele mabe wana epesaki Yakobo nkanda. Mpe Yakobo aswanaki na Labana kasi te na bana na ye ya basi. Alobaki boye: “Nasaleli yo mpo na Laele te? Na bongo okosi ngai mpo na nini?” Labana alobaki nini? “Ekoki kosalama boye . . . te. Tokoki te kopesa mwana ya nsima naino topesi oyo ya liboso te. Kokisá pɔsɔ na oyo mpe tokopesa ye na yo lokola mpo na mosala mokosalela yo ngai kino mbula nsambo mosusu.” (Genese 29:25-27) Na yango, bakɔtisaki Yakobo na libala ya basi mibale, oyo ebimisaki zuwa ya nsɔmɔ.
Libota moko ya mawa
Yakobo alingaki Laele. Ntango Nzambe amonaki ete Lea “alingami te,” apesaki ye bana, kasi Laele azalaki kobota te. Nzokande, Lea azalaki mpe na mposa ya eloko mosusu, mposa na ye ezalaki ete Yakobo alinga ye. Lokola Lea amonaki ete Yakobo alingaka kaka Laele, akómaki koyoka lokola akufa. Atako bongo, Lea akanisaki ete Yakobo akolinga ye mpo aboteli ye mwana ya liboso ya mobali. Apesaki mwana yango nkombo Lubene, elingi koloba “Talá, mwana ya mobali!” Ezalaki na ntina oyo Lea apesaki mwana na ye nkombo wana: “Zambi Yehova atali mawa na ngai. Solo [sikoyo, NW] mobali na ngai akolinga ngai.” Kasi, Yakobo alingaki ye te; ezala ata ntango abotaki mwana mosusu ya mobali. Lea abengaki mwana yango Simeona, elingi koloba “koyoka.” Alobaki boye: “Zambi Yehova apesi ngai mwana mobali oyo lokola, mpo ete ye ayoki ete ngai nalingami te.”—Genese 29:30-33.
Lokola Nzambe ayokaki, yango emonisi ete Lea abondelaki mpo na mokakatano na ye. Emonani ete azalaki mwasi ya kondima. Kasi, mpasi na ye ekobaki ata nsima ya kobota mwana ya misato, Levi. Nkombo wana elimboli “kokangama,” to “kolanda.” Lea alimbolaki yango na maloba oyo: “Na ntango oyo mobali na ngai akokangama na ngai mpo ete naboteli ye bana babali misato.” Atako bongo, emonani ete Yakobo akangamaki na ye kaka te. Ekoki kozala ete Lea alongolaki motema ete mobali na ye akolinga ye, mpo nkombo oyo apesaki mwana na ye ya mobali ya minei ezali komonisa te ete azali na elikya ete mobali na ye akolinga ye. Kutu, apesaki mwana yango nkombo Yuda mpo na komonisa botɔndi na ye epai ya Nzambe. Nkombo “Yuda” elimboli “akumisami” to “abongi na lokumu.” Lea alobaki ete: “Na ntango oyo nakosanzola [Yehova].”—Genese 29:34, 35.
Soki Lea azalaki na mawa, Laele mpe azalaki na esengo te. Abondelaki Yakobo boye: “Pesá ngai bana, soki boye te mbele nakokufa.” (Genese 30:1) Laele alingamaki, kasi azalaki na mposa ya kobota. Lea abotaki, kasi azalaki na mposa ya bolingo. Moko na moko azalaki kolula eloko oyo moninga azalaki na yango, mpe ata moko te azalaki na esengo. Bango nyonso balingaki Yakobo mpe bazalaki na mposa ya kobota na ye. Bazalaki koyokelana zuwa. Ezalaki mpenza mawa mpo na libota yango!
Bana ya Laele
Na ntango wana, kozanga kobota ezalaki likambo ya mpasi mpenza. Nzambe alakaki Abalayama, Yisaka mpe Yakobo ete libota na bango ekobimisa “momboto” oyo na nzela na yango mabota nyonso ya mokili ekopambolama. (Genese 26:4; 28:14) Nzokande, Laele azalaki na bana te. Yakobo alobaki ete kaka Yehova nde akokaki kopesa Laele bana, mpo ye mpe azala na kati ya bato oyo bakobimisa momboto yango. Kasi, Laele azalaki motema likolólikoló. Alobaki boye: “Awa moombo na ngai Biliha. Kɔtá epai na ye ete abota na mabɔlɔngɔ na ngai, mpe ngai nakozala na bana mpo na ye.”—Genese 30:2, 3.
Ekozala mwa mpasi tósimba ntina ya likambo wana oyo Laele asalaki. Kasi, mikanda ya mabala oyo bamonaki na Moyen-Orient ezali komonisa ete bazalaki kondima ete mwasi oyo abotaka te apesa mobali na ye mwana na ye ya mosala mpo abotela ye.a (Genese 16:1-3) Ntango mosusu, bana ya mwana ya mosala wana bazalaki kokóma mpenza lokola bana ya mwasi mokóló ndako.
Ntango Biliha abotaki mwana mobali, Laele atondaki na esengo mpe alobaki ete: “Nzambe alongisi ngai mpe ayoki mongongo na ngai mpe apesi ngai mwana mobali.” Apesaki ye nkombo Dan, oyo elimboli “Mosambisi.” Laele mpe abondelaki mpo na mpasi na ye. Ntango Biliha abotaki mwana ya mibale, Nafatali, nkombo oyo elimboli “bitumba na ngai,” Laele alobaki ete: “Nabundi na ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya nsɔmɔ mpenza. Mpe nalongi ye!” Bankombo yango ezali komonisa kowelana oyo ezalaki kati ya bambanda wana.—Genese 30:5-8, NW.
Ntango mosusu Laele akanisaki ete ndenge apesaki Biliha epai ya Yakobo, yango ezalaki na boyokani na mabondeli na ye. Kasi, na ndenge wana te nde Nzambe alingaki kopesa ye bana. Likambo yango epesi biso liteya. Tosengeli te kozala motema likoló soki tosɛngi Yehova eloko. Ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge mpe na ngonga oyo tokokaki kokanisa te.
Mpo ndeko na ye aleka ye te, Lea mpe apesaki Yakobo mwana na ye ya mosala, Zilipa. Abotaki liboso Gada, na nsima Asele.—Genese 30:9-13.
Likambo moko oyo emonisaki kowelana oyo ezalaki na kati ya Laele ná Lea ezalaki likambo ya mandaliki oyo Lubene, mwana ya Lea azwaki. Bazalaki koloba ete mbuma wana ekoki kosalisa mwasi ekomba abota. Ntango Laele asɛngaki bápesa ndambo ya mandaliki, Lea alobaki na nkanda nyonso ete: “Ezali likambo moke ete obɔtɔli mobali na ngai? Olingi kobɔtɔla mandaliki ya mwana na ngai lokola?” Bato mosusu bakanisaka ete lokola Lea alobaki bongo, yango elakisi ete Yakobo abandaki kozala mingi kaka epai ya Laele. Ekoki kozala ete Laele amonaki ete kosilika ya Lea ezalaki mpenza na ntina, yango wana ayanolaki ye ete: “Bongo akosangana na yo na butu oyo mpo na mandaliki ya mwana na yo.” Na yango, ntango Yakobo azongaki na ndako na mpokwa wana, Lea ayebisaki ye ete: “Okoya epai na ngai mpo ete nasombi yo na mandaliki ya mwana na ngai.”—Genese 30:15, 16.
Lea abotaki mwana ya mitano mpe ya motoba: Yisakala ná Zebulona. Na nsima alobaki boye: “Sikawa mobali na ngai akofanda na ngai mpo ete naboteli ye bana babali motoba”b—Genese 30:17-20.
Mandaliki esalisaki Laele te abota. Nsima ya mbula motoba ya libala, ntango Laele azwaki zemi mpe abotaki Yozefe, ezalaki mpo Yehova “akanisaki” ye mpe ayanolaki na mabondeli na ye. Kaka na ntango wana nde Laele alobaki ete: “Nzambe alongoli nsɔni na ngai.”—Genese 30:22-24.
Liwa mpe libula
Ntango azalaki kobota Benyamina, mwana na ye ya mibale, Laele akufaki. Yakobo alingaki Laele mpe bana na ye mibale mingi. Ebele ya bambula na nsima, ntango liwa na ye ekómaki pene, Yakobo amikundolaki liwa ya mbalakaka ya Laele, mwasi na ye oyo alingaki mingi. (Genese 30:1; 35:16-19; 48:7) Mpo na liwa ya Lea, Biblia eyebisi likambo moko te, longola kaka ete Yakobo akundaki ye na esika oyo ye moko mpe alingaki bákunda ye.—Genese 49:29-32.
Ntango Yakobo akómaki mobange, alobaki ete bomoi na ye, ata mpe oyo ya libota na ye, ezalaki bomoi moko ya mpasi. (Genese 47:9) Ya solo, Lea ná Laele bazalaki na bomoi moko ya mpasi. Makambo oyo ekómelaki bango emonisi polele mabe ya mabala ya bombanda, mpe emonisi ntina oyo Yehova alingaki ete mobali azalaka kaka na mwasi moko. (Matai 19:4-8; 1 Timote 3:2, 12) Soki mobali to mwasi azali kaka na molongani moko te, yango ebimisaka zuwa. Yango ezali moko ya bantina oyo Nzambe apekisá pite mpe ekobo.—1 Bakolinti 6:18; Baebele 13:4.
Ezala ndenge nini, Nzambe akobaki mpe azali kokoba kosalela mibali mpe basi ya sembo, atako bazali bato ya kozanga kokoka mpo na kokokisa mokano na ye. Bandeko basi wana bazalaki na mabe na bango, ndenge biso mpe tozali na oyo ya biso. Nzokande, na nzela na bango, Yehova abandaki kokokisa elaka oyo apesaki Abalayama. Yango wana, ebongi mpenza báloba ete Laele ná Lea “batongaki ndako na Yisalaele.”—Luta 4:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokanda moko ya ndenge wana oyo bamonaki na engumba Nuzi, na ekólo Iraq, elobi boye: “Shennima abali Kelim-ninu. . . . Soki Kelim-ninu aboti te, Kelim-ninu akozwela Shennima mwasi moko [moombo] na mokili ya Lullu.”
b Mwana ya Yakobo ya mwasi, oyo toyebi nkombo na ye ezali kaka Dina, oyo abotaki ná Lea.—Genese 30:21; 46:7.
[Elilingi na lokasa 9]
Ezala Lea to Laele, mokomoko na bango azalaki kolula oyo moninga azalaki na yango, mpe ata moko na bango azalaki na esengo te
[Elilingi na lokasa 10]
Ekólo Yisalaele eutaki na bana 12 ya Yakobo