Tobikisami na mitambo ya mokangi-ndɛkɛ
“[Yehova] akobikisa yo na motambo, ya mokangi-ndɛkɛ.”—NZEMBO 91:3, NW.
1. “Mokangi-ndɛkɛ” ezali nani, mpe mpo na nini azali mabe koleka?
BAKLISTO nyonso ya solo bazali na monguna moko, oyo azali na mayele oyo eleki mayele ya bato. Nzembo 91:3 ebengi monguna yango “mokangi-ndɛkɛ.” Monguna yango ezali nani? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali komonisa banda na nimero na yango ya 1 Yuni 1883 ete monguna yango ezali Satana Zabolo. Monguna yango ya nguya azali koluka na mayele mabe nyonso kobungisa mpe kokanga basaleli ya Yehova, ndenge mokangi-ndɛkɛ alukaka kokanga ndɛkɛ.
2. Mpo na nini babengi Satana mokangi-ndɛkɛ?
2 Na ntango ya kala, bazalaki kokanga bandɛkɛ mpo na nzembo kitoko na yango, nsala na yango ya langi kitoko, mpo na kolya mpe kokaba yango mbeka. Nzokande, lokola bandɛkɛ bazalaka na bokɛngi mingi mpe babangaka mingi, ezalaka mpasi mingi mpo na kokanga bango. Yango wana, bakangi-ndɛkɛ ya ntango ya kala bazalaki naino koyekola malamumalamu mimeseno ya ndɛkɛ oyo balingi kokanga. Na nsima, bazalaki kosalela mayele oyo ebongi mpo na kokanga yango. Lokola Biblia ebengi Satana mokangi-ndɛkɛ, yango ezali kosalisa biso tóyeba mayele oyo asalelaka. Zabolo ayekolaka mokomoko na biso. Amonaka mimeseno mpe bizaleli na biso mpe atyelaka biso mitambo oyo tokoki komona te mpo na kokanga biso. (2 Timote 2:26) Soki akangi yo, boyokani na yo na Nzambe ekobeba, mpe yango ekoki komema yo na liwa ya libela. Na yango, mpo na komibatela, tosengeli koyeba mayele ndenge na ndenge oyo “mokangi-ndɛkɛ” asalelaka.
3, 4. Ntango nini mayele ya Satana ekokanaka na oyo ya nkɔsi? Mpe ntango nini ekokanaka na oyo ya nyoka?
3 Na maloba ya elilingi, mokomi ya nzembo akokanisi mpe mayele ya Satana na oyo ya nkɔsi mpe na oyo ya nyoka. (Nzembo 91:13) Lokola nkɔsi, Satana abundisaka biso mbala mosusu na ndenge ya polele, na ndenge abimiselaka biso minyoko to bipekiseli ya baguvɛrnema. (Nzembo 94:20) Minyoko ya ndenge wana ekoki kotinda bato mosusu bápesa Yehova mokɔngɔ. Nzokande, mbala mingi minyoko yango ebimisaka nde matomba ya malamu, mpe esalisaka basaleli ya Nzambe bákóma na bomoko. Kasi, ezali boni mpo na mayele ya Satana, oyo ekokani na oyo ya nyoka?
4 Satana asalelaka mayele oyo eleki mosika mpenza mayele ya bato mpo na kokosa biso mpe koswa biso lokola nyoka ya ngɛngɛ, oyo ebombami na esika moko. Na ndenge yango, abebisaka makanisi ya basaleli ya Nzambe mpe atindaka bango básala mokano na ye na esika ya kosala oyo ya Yehova, mpe yango esukelaka bango mabe. Likambo ya esengo ezali ete tobosani mayele ya Satana te. (2 Bakolinti 2:11) Tótalela sikoyo mitambo minei ya mokangi-ndɛkɛ yango.
Kobanga bato
5. Mpo na nini “kobanga bato” ezali motambo monene?
5 “Mokangi-ndɛkɛ” ayebi ete moto nyonso alingaka basusu bándima ye. Baklisto batyolaka te makanisi ya basusu. Lokola Satana ayebi yango, alukaka kozwela bango na nzela wana. Na ndakisa, asalelaka motambo ya “kobanga bato” mpo na kokweisa basaleli mosusu ya Nzambe. (Masese 29:25) Soki basaleli ya Nzambe babangi bato mpe basangani na bato mosusu mpo na kosala makambo oyo Nzambe apekisi to batiki kosala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga bango, wana bazwami na motambo ya “mokangi-ndɛkɛ.”—Ezekiele 33:8; Yakobo 4:17.
6. Ndakisa nini emonisi ndenge “mokangi-ndɛkɛ” akoki kozwa elenge na motambo?
6 Na ndakisa, elenge moko akoki komɛla likaya mpo azali kobanga baninga na ye ya kelasi. Ekoki kozala ete ntango atikaki ndako na bango mokolo wana, akanisaki ata moke te ete akoki komɛla likaya. Kasi mosika te, ye wana akómi kosala likambo moko oyo ekobebisa nzoto na ye mpe boyokani na ye na Nzambe. (2 Bakolinti 7:1) Ndenge nini akweaki na motambo yango? Ekoki kozala ete akutanaki na baninga ya mabe mpe alingaki te bámona ye yuma. Bino bilenge, bópesa “mokangi-ndɛkɛ” nzela te ete akanga bino! Soki bolingi bósutuka te asili akangi bino, bókeba ete bólanda makambo ya mabe ata moke te. Bótosa toli ya Biblia oyo epekisi kotambola na baninga mabe.—1 Bakolinti 15:33.
7. Ndenge nini Satana akoki kolɛmbisa baboti mosusu na elimo?
7 Baboti oyo bazali baklisto ya solosolo bazwaka na lisɛki te mokumba oyo Makomami epesi bango ya kokokisa bamposa ya mabota na bango. (1 Timote 5:8) Nzokande, mokano ya Satana ezali ete baboti bázanga bokatikati na likambo yango. Ekoki kozala ete bazangisaka makita mbala na mbala mpo bandimaka kotikala kosala nsima ya ngonga ya mosala. Mbala mosusu, babangaka ata kosɛnga konje mpo na kozala na liyangani ya etúká banda mokolo ya liboso tii na mokolo ya nsuka mpo na kosambela Yehova elongo na bandeko na bango. Mpo na kokwea na motambo yango te, esengeli ‘kotyela Yehova motema.’ (Masese 3:5, 6) Longola yango, koyeba ete biso nyonso tozali bato ya ndako ya Yehova mpe ete andimi kobatela biso esalisaka biso tóbungisa bokatikati na biso te. Baboti, bondimi ete Yehova akosalisa bino ná mabota na bino na lolenge moko to mosusu soki bozali kosala mokano na ye? To nde bokoki kosutuka ete Zabolo asili kokanga bino mpe atindi bino bósala mokano na ye mpo bozali kobanga bato? Tosɛngi bino bótalela mituna oyo na kati ya mabondeli.
Motambo ya kolinga biloko ya mokili
8. Ndenge nini Satana asalelaka bolingo ya biloko ya mokili mpo na kozwa biso?
8 Satana asalelaka mpe bolingo ya biloko ya mokili mpo na kozwa biso. Mbala mingi, ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo ezali kotinda bato bákanisa ete soki basali likambo boye to boye, bakoki kokóma na mbongo mingi noki, mpe yango ekoki kokosa ata basaleli ya Nzambe mosusu. Ntango mosusu, bakoki koloba na moto: “Salá mosala makasi. Ntango okokóma na bomɛngo, okopema mpe okosepela na bomoi. Okoki ata kosala mosala ya mobongisi-nzela.” Makanisi ya ndenge wana ekoki kouta epai ya baklisto mosusu oyo bamonaka lisangá lokola esika ya koluka mbongo. Osengeli kokanisa malamu soki bapesi yo toli ya ndenge wana. Omoni te ete makanisi ya ndenge wana ekokani na oyo ya mozwi ya “zoba” oyo Yesu alobelaki na lisese moko?—Luka 12:16-21.
9. Mpo na nini baklisto mosusu bakoki kokwea na motambo ya kolinga biloko ya mokili?
9 Satana azali kotambwisa mokili na ye ya mabe na lolenge oyo ekotinda bato bákóma kolula biloko ya mokili. Bolingo wana ekoki kobebisa moklisto mpe kopekisa Liloba ya Nzambe esala na motema na ye, mpe kosala ete ‘ezanga kobota mbuma.’ (Malako 4:19) Biblia ezali kolendisa biso ete soki tozali na biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata, tósepela kaka na yango. (1 Timote 6:8) Nzokande, bato mingi bakweaka na motambo ya “mokangi-ndɛkɛ” mpo basalelaka toli wana te. Ekoki kozala ete lolendo nde etindaka bango báluka kozala na bomoi ya lolenge moko boye? Ezali boni mpo na biso moko? Mposa ya kozala na biloko ya mokili etindaka biso tózongisa losambo ya solo nsima na bomoi na biso? (Hagai 1:2-8) Likambo ya mawa, soki mbongo ekómi mpasi na mboka, baklisto mosusu batyaka Nzambe pembeni mpo na koluka kotikala kaka na bomoi oyo bazalaki na yango liboso. Ezaleli wana ya kolinga biloko ya mokili esepelisaka “mokangi-ndɛkɛ.”
Kominanola na ndenge ya mabe
10. Moklisto mokomoko asengeli komitalela na likambo nini?
10 Mayele mosusu oyo “mokangi-ndɛkɛ” azali kosalela ezali ya kobebisa makanisi ya bato mpo báyeba lisusu te kokesenisa malamu ná mabe. Ezaleli oyo bato ya Sodomo ná Gomola bazalaki na yango ekómi komonana mingi na bafilme mpe masano mosusu lelo oyo. Ata televizyo mpe bazulunalo etondi na makambo ya mobulu mpe ya kosangisa nzoto. Makambo mingi ya kominanola oyo elekaka na televizyo ezipaka bato miso mpo báyeba lisusu te “kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Kasi, tóbosana te maloba oyo Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya: “Mawa epai na bango bakobengaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe.” (Yisaya 5:20) “Mokangi-ndɛkɛ” asilá kokɔtisa yo nde makanisi mabe na nzela ya masano ya mabe kozanga ete oyeba? Ezali na ntina mingi omitalela.—2 Bakolinti 13:5.
11. Toli nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaki mpo na bafilme ya bolingo?
11 Eleki mbula soki 25, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekebisaki basaleli ya Nzambe na bafilme ya bolingo.a Elobaki boye na ntina na mabe ya bafilme ya ndenge wana: “Bato balukaka kolongisa bizaleli na bango ya mabe na nkombo ya bolingo. Na ndakisa, na filme moko boye, elenge mwasi moko oyo akumbaki zemi atako abalaki te ayebisaki moninga na ye boye: ‘Kasi nalingaka Victor. Nazali kuna te. . . . Nyonso oyo ngai nalingi ezali ete nabota na ye!’ Ntango ozali koyoka mwana mwasi yango azali koloba mpe ozali koyoka mwa miziki kitoko oyo ezali kobɛta, ekozala mpasi oloba ete etamboli na ye ezali mpenza mabe. Na ntembe te, yo mpe motali osepeli na Victor. Ozali komitya na esika ya mwana mwasi yango, ata ‘mpe kondimela ye.’ Moto moko oyo azalaki kotala filme yango mpe na nsima abongolaki makanisi na ye alobaki boye: ‘Okoki kokamwa ndenge moto akoki kobanda kolongisa makambo ya mabe. Toyebi ete pite ezali mabe. . . . Kasi, nayaki komona ete ngai mpe nazalaki kosala pite na makanisi.’”
12. Bandakisa nini emonisi ntina oyo tosengeli kolanda batoli oyo epekisaka kotala bafilme mosusu?
12 Banda masolo wana ebimaki, bafilme ya ndenge wana ezali se kobakisama. Na bisika mosusu, balakisaka yango butu moi. Mibali, basi mpe bilenge mingi bazali kobebisa makanisi mpe mitema na bango na bafilme ya ndenge wana. Kasi, biso tómikosa te na makanisi ya lokuta. Tokomikosa mpenza soki tokanisi ete makambo ya mabe oyo tomonaka na bafilme ekeseni te na oyo bato basalaka mpenza. Moklisto akoki mpenza komilongisa soki aponi kotala bafilme oyo ezali kolakisa bato oyo akoki ata mokolo moko te kobenga na ndako na ye?
13, 14. Makambo nini bato mosusu balobaki mpo na komonisa matomba oyo bazwaki na ndenge balandaki toli oyo epesamaki mpo na bafilme?
13 Batatoli mingi bazwaki matomba na ndenge balandaki toli wana ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Nsima ya kotánga toli wana ya polele, oyo eutaki na Biblia, bamosusu bakomaki mpo na koyebisa ndenge masolo yango esalisaki bango.b Moko na bango alobaki boye: “Na boumeli ya mbula 13 mobimba, nakómaki moombo ya bafilme ya bolingo. Lokola nazalaki koyangana na makita mpe kobima mbala mokomoko na mosala ya kosakola, nazalaki kokanisa ete bafilme yango ekoki kobebisa ngai te. Kasi, nakómaki na bizaleli oyo nazalaki komona na bafilme yango, ete soki mobali azali konyokola yo to azali komonisa yo bolingo te, okoki na yo kosala ekobo. Kutu, ye moko moto alingaki bongo. Lokola nazalaki kokanisa bongo, nakweaki na ekobo, mpe na yango nasalaki lisumu liboso ya Yehova mpe ya molongani na ngai.” Babimisaki mwasi yango na lisangá. Na nsima, andimaki mabe na ye, abongolaki motema mpe bazongisaki ye na lisangá. Masolo oyo emonisaki ete kotala bafilme ya bolingo ezali mabe epesaki ye makasi ya koboya kominanola na makambo oyo Yehova ayinaka.—Amosa 5:14, 15.
14 Ndeko mosusu oyo akómaki moombo ya bafilme yango alobaki boye: “Nalelaki ntango natángaki masolo yango, mpo namonaki ete motema na ngai ezali lisusu mobimba epai ya Yehova te. Nayebisaki Nzambe na ngai ete nakozala lisusu moombo ya bafilme wana te.” Mwasi moko moklisto oyo akomaki mpo na kopesa botɔndi na ye mpo na masolo yango alobaki mpe boye: “Nazalaki komituna . . . soki bafilme wana ekobebisa boyokani na ngai na Yehova te. Ndenge nini nakoki kozala mbala moko moninga ya bato ya bafilme wana mpe ya Yehova?” Soki bafilme wana ebebisaki bato eleki lelo mbula 25, tokoloba boni lelo oyo? (2 Timote 3:13) Tosengeli kokeba na mitambo ya masano ya ndenge nyonso oyo Satana azali kobimisa, ezala bafilme ya bolingo, ya bitumba to miziki oyo elakisaka makambo ya mbindo.
Matata na kati ya bandeko
15. Ndenge nini baklisto mosusu bakwei na motambo ya Zabolo?
15 Satana asalelaka matata oyo ebimaka na kati ya basaleli ya Yehova mpo na kokabola bango. Tokoki kokwea na motambo wana ata soki tozali na mikumba minene na kati ya lisangá. Basusu bakwei na motambo ya Satana mpo batikaki matata oyo bazwanaki na yango ná bandeko ebebisa kimya mpe bomoko oyo ezali na kati ya paladiso ya elimo oyo Yehova abongiseli biso.—Nzembo 133:1-3.
16. Ndenge nini Satana azali, na mayele nyonso, koluka kokabola na kati na biso?
16 Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Satana alukaki kopanza ebongiseli ya Yehova awa na mabelé na nzela ya minyoko, kasi alongaki te. (Emoniseli 11:7-13) Banda wana, akómá koluka na mayele nyonso kobebisa bomoko na biso. Soki tozwani matata na ndeko mpe totiki yango ekabola biso, wana topesi “mokangi-ndɛkɛ” nzela ya kozwa biso malamumalamu. Soki tosali bongo, tokopekisa elimo santu esala malamu na bomoi na biso mpe na kati ya lisangá. Na ndenge yango, Satana akosepela, mpo soki lisangá ezali na kimya mpe bomoko te, mosala ya kosakola ekosalema mpe malamu te.—Baefese 4:27, 30-32.
17. Nini ekoki kosalisa baoyo bazwani matata mpo básilisa yango?
17 Okosala nini soki ozwani matata na ndeko moko? Ya solo, matata eutaka na makambo ndenge na ndenge. Nzokande, atako makambo oyo ekoki kobimisa matata ezali ebele, ezali na likambo moko te oyo ekoki kopekisa biso tósilisa yango. (Matai 5:23, 24; 18:15-17) Toli ya Biblia euti epai ya Nzambe mpe ezali malamu mingi. Soki osaleli yango, okolonga kaka. Ezangaka kosalisa te!
18. Mpo na nini komekola Yehova ekosalisa biso tósilisa matata ná bandeko na biso?
18 Yehova “alimbisaka mabe,” mpe soki alimbisi, alimbisaka mpenza solo. (Nzembo 86:5; 130:4) Soki tozali komekola ye, tokomonisa ete tozali mpenza bana na ye ya bolingo. (Baefese 5:1) Biso nyonso tozali basumuki, mpe tolingaka mpenza Yehova alimbisa biso. Na yango, tosengeli kokeba soki tozali koboya kolimbisa basusu. Tokoki kokóma lokola moombo oyo Yesu alobelaki na lisese moko, oyo aboyaki kolimbisa moninga na ye moko oyo azalaki na nyongo na ye, oyo ezalaki moke soki tokokanisi yango na oyo nkolo na bango autaki kolimbisa ye. Ntango nkolo na bango ayokaki, abwakaki moombo yango oyo aboyaki kolimbisa moninga na ye na bolɔkɔ. Yesu asukisaki lisese yango na maloba oyo: “Ezali ndenge wana nde Tata na ngai ya likoló mpe akosalela bino soki bozali kolimbisa te moto na moto ndeko na ye na mitema na bino.” (Matai 18:21-35) Na ntembe te, soki tokanisi lisese wana mpe mbala ebele oyo Yehova alimbisaka biso, tokozala na mokakatano te ntango tozali koluka kosilisa matata na bandeko na biso.—Nzembo 19:14.
Tótikala na “esika ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló”
19, 20. Ndenge nini tosengeli kotalelaka “esika ebombami” mpe “elilingi” ya Yehova na ntango mabe oyo?
19 Tozali na ntango moko ya mabe. Soki Yehova na bolingo na ye abatelaka biso te, mbele Satana akɔmbɔlá biso nyonso. Na yango, soki tolingi “mokangi-ndɛkɛ” azwa biso te, tosengeli kotikala na esika ya komibatela, elingi koloba ‘kofanda na esika ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló,’ mpe ‘tokopema na nse ya elilingi ya Oyo-ya-Nguya-Nyonso.’—Nzembo 91:1.
20 Tosengeli te kokanisaka ete malako ya Yehova etyaka biso nkaka, kasi nde ebatelaka biso. Monguna na biso nyonso azali na mayele oyo eleki oyo ya biso mosika. Soki na libateli ya Yehova te, moko te na kati na biso akoki kobika. (Nzembo 124:7, 8) Na yango, tosengeli kobondelaka ete Yehova abikisa biso na mitambo ya “mokangi-ndɛkɛ”!—Matai 6:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini “kobanga bato” ezali motambo mabe koleka?
• Ndenge nini Zabolo asalelaka bolingo ya biloko ya mokili mpo na kozwa bato?
• Ndenge nini Satana azwá bato mosusu na nzela ya kominanola na ndenge ya mabe?
• Motambo nini Zabolo asalelaka mpo na kobebisa bomoko na biso?
[Elilingi na lokasa 27]
Bato mosusu bakweaki na motambo mpo na “kobanga bato”
[Elilingi na lokasa 28]
Olingaka kominanola na makambo oyo Yehova ayinaka?
[Elilingi na lokasa 29]
Okosala nini soki ozwani matata na ndeko moko?