Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/12 nk. 3-4
  • Motema mawa na mokili oyo ezangi mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Motema mawa na mokili oyo ezangi mawa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Mekolá motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Mawa monene ya Nzambe na biso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Bóyokelaka basusu “mawa mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bózalaka na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/12 nk. 3-4

Motema mawa na mokili oyo ezangi mawa

NA BURUNDI, mobali moko abɛlaki malaria makasi. Esɛngaki bámema ye nokinoki na lopitalo. Kasi, motuka ezalaki te. Baninga na ye mibale bamatisaki ye na velo mpe batindikaki yango na boumeli ya ngonga mitano na nzela ya bangombangomba. Nsukansuka, bakómaki na esika oyo bakokaki kozwa bisi mpo na komema ye na lopitalo. Nsima ya mwa mikolo, mobali yango ayokaki malamu.

Nsima ya mopɛpɛ makasi oyo ebebisaki bingumba mingi na sudi ya États-Unis na sanza ya Augusto 2005, etuluku moko ya bato bamonaki ndako moko oyo banzete ekwelaki yango. Atako mibali yango bayebaki nkóló ndako yango te, balekisaki mokolo mobimba wana mpo na kokata banzete na sii ya kura mpe kolongola yango. Nkóló ndako alobaki boye: “Nayebi eloko nakoki kosala te mpo na kotɔnda [bato] oyo.”

Bansango ya radio, ya televizyo mpe ya bazulunalo elobelaka mingi makambo ya mabe mpe ya nsɔmɔ oyo esalemaka. Makambo oyo bato ya motema mawa mpe ya boboto basalaka mokolo na mokolo elobelamaka mingi te. Atako bongo, na bisika nyonso bato bazali na mposa bámoniselaka bango bolingo mpe boboto. Moto nyonso azalaka na mposa yango makasi! Bato bamonisaka bizaleli yango mingimingi na eleko ya Noele, ntango oyo balobelaka ‘kimya mpe boboto mpo na bato’ mpe bayembaka yango na banzembo.​—Luka 2:14.

Koyokela basusu mawa ezali pɛtɛɛ te na mokili oyo ezangi bolingo. Bato mingi bakanisaka ete mpo na kolonga na mokili oyo, esengeli kozala moto ya makambo makasi mpe ya nko. Bato mingi balandaka makanisi oyo alobaka ete moto ya mayele ezali oyo amonaka malamu kozala motema mabe na esika ya koyokelaka bato mawa. Lokoso mpe koluka matomba na ye moko epekisaka moto ayokelaka basusu mawa.

Yango wana, bato mingi balukaka kozala liboso ya bato nyonso, ata soki ekosala basusu mpasi to ekobebisa makambo na bango. Bato oyo basalaka masano ya makasi babengamaka “mibali ya solosolo” mpo bazalaka na mawa te. Bato mosusu ya politiki mpe bazalaka na ezaleli yango.

Yango wana, ebongi tómituna boye: Mpo na nini koyokela basusu mawa? Ezaleli yango ezali na matomba? Nini ekoki kosalisa biso tóyokelaka basusu mawa? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

[Etanda na lokasa 3]

•Komonisela basusu motema mawa ezali nde bolɛmbu?

•Komonisa motema mawa ezali na matomba?

•Ndenge nini okoki komonisela basusu motema mawa?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto