Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/12 nk. 21-25
  • Ebundeli moko te oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ebundeli moko te oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Milende mpamba ya Satana
  • Lolemo nyonso ya lokuta ekweisami
  • Yelusaleme​—“Libanga ya bozito”
  • “Hema ya Yuda” ebikisami
  • Mokanda ya Biblia nimero 38—Zekalia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Jéhovah alamusi molende ya libota na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Bólinga solo mpe kimya”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Hagai mpe ya Zekalia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/12 nk. 21-25

Ebundeli moko te oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga

“Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te.”​—Yisaya 54:17.

1, 2. Ndenge nini makambo oyo Batatoli ya Yehova ya Albanie bakutanaki na yango emonisi bosolo ya Yisaya 54:17?

ELEKI bambula mingi sikoyo, na ekólo moko na sudi-ɛsti ya Mpoto, ezalaki na etuluku moko ya baklisto ya mpiko. Guvɛrnema ya Bakoministe oyo ezalaki koyangela na ekólo yango esalaki nyonso mpo na kosukisa bango. Kasi, konyokola bango, kosalisa bango misala ya makasi mpe kokosela bango makambo na baradio mpe na bazulunalo, elongaki te kosukisa bango. Bato yango ezali banani? Batatoli ya Yehova na ekólo Albanie. Atako koyangana na makita mpe kosakola ezalaki mpasi, kolendendela na bango na boumeli ya bambula mingi ekumisaki boklisto ya solo mpe epesaki nkombo ya Yehova nkembo. Na 2006, ntango bafungolaki bandako ya sika ya filiale na bango, Motatoli moko oyo aumeli mingi alobaki boye: “Satana azali komeka ndenge nyonso, kasi azali kolonga kaka te, Yehova azali kaka kolonga!”

2 Nyonso wana ezali komonisa bosolo ya elaka oyo Nzambe apesaki bato na ye, oyo ekomami na Yisaya 54:17 ete: “Ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te, mpe okozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla yo na kosambisama.” Masolo ya kala ezali kondimisa ete mokili ya Satana ekoki kosala likambo moko te oyo ekosukisa losambo ya basaleli ya sembo ya Yehova Nzambe.

Milende mpamba ya Satana

3, 4. (a) Tángá mwa bibundeli oyo Satana asalelaka. (b) Nini emonisi ete bibundeli ya Zabolo elongi te?

3 Mpo na kobundisa basambeli ya solo, Satana asalelaka bipekiseli, mobulu, bolɔkɔ, mpe ‘koyanga mwango mabe kati na mibeko.’ (Nzembo 94:20) Kutu, ata ntango tozali koyekola lisolo oyo, na mikili mosusu Batatoli ya Yehova bazali ‘komekama’ mpo na bosembo na bango.​—Emoniseli 2:10.

4 Na ndakisa, filiale moko ya Batatoli ya Yehova ekomaki ete na boumeli ya mbula moko mpamba, bazwaki lapolo 32 oyo emonisaki ete babɛtaki basaleli ya Nzambe na mosala ya kosakola. Longola yango, bapolisi bakangaki Batatoli 59​—bilenge mpe mikóló, basi mpe mibali—​mpo bazalaki kosakola. Batyaki bankombo mpe bafɔtɔ ya bandeko mosusu na liste ya basali mabe, mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Bamosusu babɛtamaki. Na ekólo mosusu, Batatoli ya Yehova koleka 1 100 bakangamaki, bafutisamaki amande, to babɛtamaki. Kati na bango, bandeko koleka 200 bakutanaki na makambo yango ntango bayanganaki mpo na kokanisa liwa ya Yesu! Atako bongo, elimo ya Yehova esalisi basaleli na ye bátikala ngwi liboso ya mikakatano minene, na mikili yango to mpe na mikili mosusu. (Zekalia 4:6) Nkanda makasi ya banguna ekolonga te kokanga minɔkɔ ya baoyo bazali kosanzola Yehova. Tozali na elikya ete ebundeli moko te ekopekisa mokano ya Nzambe.

Lolemo nyonso ya lokuta ekweisami

5. Lolemo nini ya lokuta etɛmɛlaki basaleli ya Nzambe na ekeke ya liboso?

5 Yisaya asakolaki ete basaleli ya Nzambe bakokweisa lolemo nyonso oyo ekotɛmɛla bango. Na ekeke ya liboso, bato mingi bazalaki koloba makambo ya lokuta mpo na baklisto, bazalaki kobenga bango basali mabe. Maloba oyo ezali na Misala 16:20, 21 ezali ndakisa ya makambo oyo bazalaki koloba: “Bato oyo bazali kokɔtisa mobulu makasi na engumba na biso, . . . mpe bazali kosakola mimeseno oyo epekisami na biso kondima yango to kosalela yango, mpo tozali Baloma.” Na libaku mosusu, banguna balukaki ete bakonzi ya engumba bázwela bayekoli ya Klisto ekateli ya mabe; balobaki boye: “Bato oyo basili kobalola mabelé oyo efandami bango oyo mpe awa, [mpe bazali] kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala.” (Misala 17:6, 7) Bato balobaki ete ntoma Paulo azali “likama monene” mpe mokambi ya mwa lingomba oyo ezalaki kotinda bato “na mabelé mobimba oyo efandami” na botomboki.​—Misala 24:2-5.

6, 7. Wapi lolenge moko oyo baklisto ya solo bakweisaka bifundeli ya lokuta?

6 Yango wana, tokoki kokamwa te soki lelo oyo mpe bazali kokosela baklisto ya solo makambo, kopanza bango nsango ya lokuta mpe kobebisa lokumu na bango. Ndenge nini tozali kokweisa maloba yango?​—Yisaya 54:17.

7 Mbala mingi, etamboli malamu ya Batatoli ya Yehova emonisaka ete maloba mpe bifundeli wana ezali lokuta. (1 Petelo 2:12) Ntango baklisto bazali kotosa mibeko ya Leta, bazali na etamboli ya malamu, mpe bazali komibanzabanza mpo na bazalani na bango, emonanaka polele ete makambo oyo balobaka mpo na bango ezali lokuta. Etamboli malamu na biso ezalaka litatoli monene. Ntango bato bazali komona ete tozali kosala ntango nyonso misala ya malamu, mbala mingi bakumisaka Tata na biso ya likoló mpe bamonaka ete lolenge ya bomoi ya basaleli na ye nde eleki malamu.​—Yisaya 60:14; Matai 5:14-16.

8. (a) Na bantango mosusu ekoki kozala malamu kosala nini mpo na kolongisa bindimeli na biso? (b) Na ndakisa ya Klisto, ndenge nini tokweisaka lolemo ya banguna?

8 Longola etamboli malamu na biso, na bantango mosusu esɛngaka tómonisa ntina oyo tosalaka to tosalaka te likambo boye to boye. Ndenge moko ya komonisa yango ezali ya komema makambo liboso ya Leta to batribinale. (Esetele 8:3; Misala 22:25-29; 25:10-12) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, na mabaku mosusu azalaki kolobana na banguna na ye mpo na kokweisa bifundeli na bango. (Matai 12:34-37; 15:1-11) Na ndakisa ya Yesu, soki tozwi libaku ya komonisa polele bindimeli na biso, tosalaka yango. (1 Petelo 3:15) Tótika soki moke te bato oyo batyolaka biso na kelasi, na mosala to na libota bápekisa biso kosakola solo ya Liloba ya Nzambe.​—2 Petelo 3:3, 4.

Yelusaleme​—“Libanga ya bozito”

9. “Libanga ya bozito” oyo elobelami na Zekalia 12:3 ezali elilingi ya Yelusaleme nini, mpe banani bazali bamonisi na yango awa na mabelé?

9 Esakweli ya Zekalia ezali komonisa biso ntina oyo bikólo ya mokili ezali kotɛmɛla baklisto ya solo. Zekalia 12:3 elobi boye: “Na mokolo yango, nakozalisa Yelusaleme libanga ya bozito mpo na mabota nyonso.” Esakweli yango elobeli Yelusaleme nini? Esakweli ya Zekalia elobeli “Yelusaleme ya likoló,” Bokonzi ya likoló oyo baklisto bapakolami bakosangana kati na yango. (Baebele 12:22) Ndambo ya bato oyo bakosangana na Bokonzi yango ya Masiya bazali naino awa na mabelé. Elongo na baninga na bango “bampate mosusu,” bazali kolendisa bato báluka Bokonzi ya Nzambe lokola ntango ezali naino. (Yoane 10:16; Emoniseli 11:15) Bikólo ya mokili eyanoli ndenge nini na maloba yango? Lisungi ya ndenge nini Yehova azali kopesa basaleli ya solo lelo oyo? Tokozwa eyano na bavɛrsɛ mosusu ya Zekalia mokapo 12. Boyekoli yango ekolendisa lisusu elikya na biso ete ‘ebundeli moko te ekolonga’ bapakolami ya Nzambe mpe baninga na bango.

10. (a) Mpo na nini bazali kotɛmɛla basaleli ya Nzambe? (b) Ndenge nini bato oyo bameki kotombola “libanga ya bozito” balongi te?

10 Zekalia 12:3 emonisi ete bikólo ‘ekozokisama mingi mpenza.’ Yango ezali kosalema ndenge nini? Nzambe apesi etinda ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama. Batatoli ya Yehova bazali kozwa na lisɛki te mokumba na bango ya kosakola. Nzokande, nsango ya Bokonzi lokola elikya kaka moko mpo na bato ekómi “libanga ya bozito” mpo na bikólo. Bazali komeka kotombola mpe kobwaka yango na ndenge bazali kotɛmɛla basakoli ya Bokonzi. Mpo na yango, bikólo yango ‘ezokisami mingi mpenza.’ Ata lokumu na bango ebebisami na ndenge bazali kolonga te. Bakoki te kokanga monɔkɔ ya basambeli ya solo, oyo basepelaka na libaku malamu ya kosakola “nsango malamu ya seko” ya Bokonzi ya Masiya liboso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo eya. (Emoniseli 14:6) Na ekólo moko ya Afrika, ntango mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ amonaki ndenge oyo bazalaki konyokola basaleli ya Yehova, alobaki boye: ‘Bozali kolekisa ntango na bino na konyokola bato oyo. Bakotika te. Bazali se kobakisama.’

11. Ndenge nini Nzambe akokisi elaka na ye oyo ezali na Zekalia 12:4?

11 Tángá Zekalia 12:4 (NW). Yehova alakaki ete na ndenge ya elilingi, akoboma miso ya baoyo bazali kobundisa bamemi-nsango ya Bokonzi na ye mpe akotya bango na “mobulungano.” Azali mpe kokokisa maloba na ye. Na ndakisa, na ekólo moko oyo losambo ya solo epekisamaki, banguna bakokaki te kopekisa basaleli ya Nzambe bázwaka bilei ya elimo. Kutu, na zulunalo moko balobaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki kokangisa mikanda na biloko ya mpema mpo na kokɔtisa yango na ekólo wana! Nzambe akokisaki elaka na ye epai ya basaleli na ye ya sembo ete: “Nakozipola miso na ngai likoló ya ndako ya Yuda mpe nakobɛta mbalata nyonso ya mabota na kozimana ya miso.” Banguna ya Bokonzi oyo batondi na nkanda bazali komona te nzela oyo basengeli kolanda. Kasi, biso tozali na elikya ete Yehova akobatela lisangá ya basaleli na ye mpe akokokisa bamposa na bango.​—2 Mikonzi 6:15-19.

12. (a) Na ndenge nini Yesu apelisaki mɔtɔ ntango azalaki awa na mabelé? (b) Ndenge nini batikali bapakolami ya elimo bapelisi mɔtɔ ya elilingi, mpe yango ememi nini?

12 Tángá Zekalia 12:5, 6. “Mikóló ya Yuda” ezali bato oyo bazali kokamba basaleli ya Nzambe. Yehova azali kopesa bango molende mpo na kobatela matomba ya Bokonzi awa na mabelé. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Nayaki kopelisa mɔtɔ na mabelé.” (Luka 12:49) Ezali solo ete Yesu apelisaki mɔtɔ. Na molende na ye na mosala ya kosakola, Yesu akómisaki nsango ya Bokonzi ya Nzambe likambo ya ntina mingi na miso ya bato. Yango ebimisaki ntembe makasi na kati ya Bayuda. (Matai 4:17, 25; 10:5-7, 17-20) Ndenge moko mpe, “lokola mbɛki ya mɔtɔ kati na nkoni mpe lokola esungi ya mɔtɔ kati na mibimba ya masango,” bayekoli ya Klisto oyo bazali kolanda matambe na ye na mikolo na biso bapelisi mɔtɔ ya elilingi. Na 1917, buku Le mystère de Dieu accomplia (na Lingelesi) etɔndɔlaki mpenza lokuta ya mangomba ya boklisto. Yango epelisaki nkanda ya bakonzi ya mangomba. Nsango ya Bokonzi No. 37, oyo toutaki kokabola, oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!” etindaki bato mingi bápona soki bakomitya na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe to te.

“Hema ya Yuda” ebikisami

13. Maloba ‘bahema ya Yuda’ ezali komonisa nini, mpe mpo na nini Yehova akobikisa yango soki babundisi bafandi na yango?

13 Tángá Zekalia 12:7, 8. Na Yisalaele ya kala, babateli ya mpate mpe basali-bilanga bazalaki kosalela mingi bahema. Bato yango bazalaki bato ya liboso oyo bakokaki kozanga esika ya kobombama soki ekólo moko ya banguna eyei kobundisa Yelusaleme. Maloba ‘bahema ya Yuda’ emonisi ete na ndenge ya elilingi, batikali bapakolami ya elimo na ntango na biso bazali na esika ya polele, kasi na kati ya bingumba ya makasi te. Na esika yango, bazali kobatela na mpiko nyonso matomba ya Bokonzi ya Masiya. Yehova ya bibele akobatela ‘bahema ya Yuda liboso’ mpamba te Satana akobanda naino kobundisa yango.

14. Ndenge nini Yehova azali kobatela bato oyo bazali na ‘bahema ya Yuda’ mpe azali kobatela bango na bolɛmbu?

14 Makambo oyo eleki ezali komonisa ete Yehova azali kobatela baambasadɛrɛ ya Bokonzi, elingi koloba bapakolami, na kati ya ‘bahema’ na bango na libándá.b Azali kobatela bango na “bolɛmbu” na ndenge azali kopesa bango makasi mpe mpiko lokola Davidi, mokonzi oyo abundaki bitumba mingi.

15. Mpo na nini Yehova ‘akobebisa mabota nyonso,’ mpe ntango nini akosala yango?

15 Tángá Zekalia 12:9. Mpo na nini Yehova ‘akobebisa mabota nyonso’? Mpamba te bazali kotika te kotɛmɛla Bokonzi ya Masiya. Lokola bazali kotungisa mpe konyokola basaleli na ye, Nzambe akopesa bango etumbu. Mosika te, bato oyo bazali kosalela Satana bakobundisa basambeli ya solo ya Nzambe, mpe yango ekomema mokili mobimba na likambo oyo Biblia ebengi Hala-Magedona. (Emoniseli 16:13-16) Na ntango yango, Zuzi Monene akokɔtela basaleli na ye mpe akosantisa nkombo na ye na bikólo nyonso.​—Ezekiele 38:14-18, 22, 23.

16, 17. (a) “Libula ya baombo ya [Yehova]” ezali nini? (b) Ndenge oyo tozali koyika mpiko na botɛmɛli ya Satana ezali komonisa nini?

16 Satana azali na ebundeli moko te oyo ekoki kolɛmbisa kondima to kosukisa molende ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. Kimya na biso ya elimo, oyo euti na nguya ya kobikisa ya Yehova, ezali “libula ya baombo ya [Yehova].” (Yisaya 54:17) Moto moko te akoki kolongola biso kimya mpe bozwi ya elimo. (Nzembo 118:6) Satana akotika te kongalisa botɛmɛli mpe minyoko. Bosembo na biso mpe ezaleli na biso ya koyika mpiko liboso ya makambo ya mabe oyo bazali kosala biso ezali komonisa ete tozali na elimo ya Nzambe. (1 Petelo 4:14) Nsango malamu ya Bokonzi ya Yehova oyo ebandi koyangela ezali kosakolama na mokili mobimba. Basaleli ya Nzambe bazali kokutana na botɛmɛli mingi oyo ezali lokola “mabanga mabwakami.” Kasi, na makasi ya Yehova, basaleli na ye bazali kosukisa nguya ya mabanga yango. (Zekalia 9:15) Batikali bapakolami mpe baninga na bango ya sembo bakozonga nsima te!

17 Tozali kozela ntango oyo tokobikisama na botɛmɛli nyonso ya Zabolo. Tozali mpenza kobɔndisama na elaka oyo Nzambe apesi biso ete ‘ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla biso ekolonga te, mpe tokozalisa lolemo na lolemo nyɛɛ oyo ekotɛmɛla biso na kosambisama’!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova, lelo ebimisamaka lisusu te.

b Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 675-676, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Nini ezali komonisa ete bibundeli ya Satana elongi te?

• Na ndenge nini Yelusaleme ya likoló ekómi “libanga ya bozito”?

• Ndenge nini Yehova akobatela ‘bahema ya Yuda’?

• Ozali na elikya nini wana tozali kopusana na Armagedona?

[Bililingi na lokasa 21]

Basaleli ya Yehova na Albanie batikalaki sembo liboso ya botɛmɛli ya Satana

[Elilingi na lokasa 23]

Yesu akweisaki bifundeli ya lokuta

[Bililingi na lokasa 24]

Ebundeli moko te ekolonga baoyo bazali kosakola nsango malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto