Batángami bato oyo babongi mpo na kozwa Bokonzi
“Yango ezali elembeteli ya lisambisi ya boyengebene ya Nzambe, oyo ezali komema bino na kotángama bato babongi na bokonzi ya Nzambe.”—2 Tes. 1:5.
1, 2. Mokano ya Nzambe ezali nini na likambo ya kosambisa bato, mpe nani akosambisa bato?
SOKI na mobu 50 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo azalaki na Atene. Ayokaki nkanda ntango amonaki ete bato ya engumba yango bamipesaki mpenza na losambo ya bikeko, mpe apesaki litatoli moko ya kafukafu. Asukisaki na maloba oyo ebendaki likebi ya bapakano oyo bazalaki koyoka ye. Alobaki boye: “Sikoyo [Nzambe] azali koyebisa bato na bisika nyonso ete basengeli bango nyonso kobongola motema. Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabelé oyo efandami na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe asili kopesa ndanga epai ya bato nyonso na ndenge asekwisi ye na bakufi.”—Mis. 17:30, 31.
2 Kokanisa ete Nzambe atye mokolo moko mpo na kosambisa bato ezali likambo monene! Moto oyo Paulo atángaki nkombo na ye te na Atene nde akosambisa bato. Nzokande, biso toyebi ye; ezali Yesu Klisto oyo asekwaki. Kosambisama yango ekolimbola bomoi mpo na bato mosusu mpe liwa mpo na bamosusu.
3. Mpo na nini Yehova asalaki kondimana na Abalayama, mpe banani bazali na mokumba monene na kokokisama na yango?
3 Mokolo yango ya kosambisama ekoumela mbula 1 000. Yehova apesi mokumba ya kosambisa epai ya Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, kasi akozala ye moko te. Yehova azali kopona bato mosusu awa na mabelé mpo báyangela mpe básambisa elongo na Yesu na boumeli ya mokolo yango, oyo ekoumela mbula nkóto. (Talá mpe Luka 22:29, 30.) Eleki lelo mbula soki 4 000, Yehova abongisaki nzela mpo na mokolo yango ya kosambisama, ntango asalaki kondimana na mosaleli na ye ya sembo Abalayama. (Tángá Genese 22:17, 18.) Kondimana yango ebandaki mosala na yango na 1943 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Abalayama ayebaki mpenza te soki kondimana yango ekozala na litomba nini mpo na bato. Kasi, biso lelo oyo toyebi ete na nzela ya kondimana yango, momboto ya Abalayama ezali na mokumba monene mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe ya kosambisa bato.
4, 5. (a) Nani azali moto ya liboso na kati ya momboto ya Abalayama, mpe alobaki nini mpo na Bokonzi? (b) Ntango nini elikya ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe efungwamaki mpo na bato?
4 Moto ya liboso na kati ya momboto ya Abalayama ezali Yesu, oyo apakolamaki na elimo santu na mobu 29 T.B. mpe akómaki Masiya to Klisto oyo alakamaki. (Gal. 3:16) Na boumeli ya mbula misato na ndambo oyo elandaki, Yesu azalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya Bayuda. Nsima ya kokangama ya Yoane Mobatisi, Yesu amonisaki ete bato mosusu bakoki kozala na elikya ya kozala na kati ya Bokonzi yango ntango alobaki ete: “Banda na mikolo ya Yoane Mobatisi tii sikoyo Bokonzi ya likoló ezali mokano oyo epai na yango bato mingi bazali kowela kokende, mpe baoyo bazali kowela kokende bazali kozwa yango.”—Mat. 11:12.
5 Simbá ete liboso ya kolobela baoyo ‘bakozwa’ Bokonzi ya likoló, Yesu alobaki boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Na baoyo babotami na basi ezali na moko te abimi oyo aleki Yoane Mobatisi; kasi moto oyo azali mpenza moke na Bokonzi ya likoló aleki ye.” (Mat. 11:11) Mpo na nini alobaki bongo? Alobaki bongo mpo bato ya sembo bakokaki naino kozala mpenza na elikya ya kokɔta na Bokonzi ya Nzambe te tii ntango elimo santu ekitelaki bato na Pantekote ya mobu 33 T.B. Na ntango wana, Yoane Mobatisi akufaki.—Mis. 2:1-4.
Momboto ya Abalayama etángami sembo
6, 7. (a) Na ndenge nini momboto ya Abalayama esengelaki kokóma “lokola minzoto na likoló”? (b) Lipamboli nini Abalayama azwaki, mpe lipamboli nini momboto na ye ezwi, oyo ekokani na oyo ye azwaki?
6 Yehova ayebisaki Abalayama ete momboto na ye ekokóma ebele “lokola minzoto na likoló mpe lokola zɛlɔ na libongo ya mai.” (Gen. 13:16; 22:17) Na maloba mosusu, na ntango ya Abalayama, bato bakokaki koyeba te soki momboto yango ekozala na bato boni. Kasi, motángo ya momboto na ye ya elimo epesamaki na nsima. Longola Yesu, momboto yango esengelaki kozala na bato 144 000.—Emon. 7:4; 14:1.
7 Mpo na kondima ya Abalayama, Liloba ya Nzambe elobi boye: “Abalayama andimaki [Yehova], mpe ye atángelaki ye yango lokola boyengebene.” (Gen. 15:5, 6) Ya solo, moto moko te azali mpenza moyengebene. (Yak. 3:2) Kasi, mpo na kondima makasi ya Abalayama, Yehova amonaki ye moyengebene. Kutu, abengaki ye moninga na ye. (Yis. 41:8) Bato oyo bazali na kati ya momboto ya Abalayama elongo ná Yesu babengami mpe bayengebene, mpe yango ememeli bango mapamboli ya minene koleka kutu oyo Abalayama azwaki.
8. Mapamboli nini bato ya momboto ya Abalayama bakozwa?
8 Baklisto bapakolami batángami sembo mpo bazali kondima mbeka ya lisiko ya Yesu. (Lom. 3:24, 28) Na miso ya Yehova, masumu na bango elimbisami mpe bakoki kopakolama na elimo santu mpo bázala bana ya Nzambe, bandeko ya Yesu Klisto. (Yoa. 1:12, 13) Bakɔti na kondimana ya sika mpe bakómi ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” (Gal. 6:16; Luka 22:20) Makambo wana nyonso ezali mpenza libaku malamu! Mpo na nyonso wana oyo Nzambe asali mpo na bango, baklisto bapakolami bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé te. Bazali kondima kotika bomoi awa na mabelé mpo na esengo monene ya kozala elongo na Yesu na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama mpe koyangela na ye kuna na likoló.—Tángá Baloma 8:17.
9, 10. (a) Ntango nini baklisto bapakolamaki na elimo mpo na mbala liboso, mpe nini ezalaki kozela bango? (b) Lisalisi nini baklisto bapakolami bazwaki?
9 Na Pantekote ya mobu 33 T.B., mwa bato ya sembo bazwaki libaku ya kozala na kati ya bato oyo bakoyangela elongo na Yesu na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama. Bayekoli ya Yesu soki 120 babatisamaki na elimo santu mpe bakómaki baklisto bapakolami ya liboso. Nzokande, wana ezalaki kaka ebandeli. Banda wana, basengelaki kotikala sembo epai ya Yehova atako Satana akokaki kobimisela bango komekama. Mpo na kozwa motole ya bomoi kuna na likoló, basengelaki kotikala sembo kino liwa.—Emon. 2:10.
10 Mpo na yango, na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá ya boklisto, Yehova azalaki kolendisa baklisto bapakolami. Na ndakisa, ntoma Paulo akomelaki baklisto bapakolami ya Tesaloniki boye: “Ndenge tata asalaka epai ya bana na ye, tokobaki kolendisa mokomoko na bino, mpe kobɔndisa mpe kopesa litatoli epai na bino, mpo ete bino bókoba kotambola na ndenge ebongi na Nzambe oyo azali kobenga bino epai ya bokonzi na ye mpe nkembo na ye.”—1 Tes. 2:11, 12.
11. Yehova akomisaki makambo nini mpo na “Yisalaele ya Nzambe”?
11 Mbula koleka 60 nsima ya koponama ya baklisto bapakolami ya liboso, Yehova amonaki malamu ete lisolo ya mosala oyo Yesu asalaki awa na mabelé mpe makambo oyo asalelaki bayekoli na ye mpe batoli oyo apesaki bango ekomama. Na yango, longola Makomami ya Liebele, Yehova abakisaki mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto. Makomami ya Liebele ekomamaki libosoliboso mpo na Bayisalaele, na ntango bazalaki na boyokani na Nzambe. Makomami ya Grɛki ya boklisto ekomamaki libosoliboso mpo na “Yisalaele ya Nzambe,” baoyo bapakolamaki mpo na kozala bandeko ya Klisto mpe bana ya Nzambe ya elimo. Kasi, yango elingi koloba te ete Makomami ya Liebele ezali na litomba moko te mpo na baoyo bazali Bayisalaele te. Ndenge moko mpe, baklisto mosusu mpe bazwaka ebele ya mapamboli ntango bazali kotánga mpe kosalela batoli oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya boklisto.—Tángá 2 Timote 3:15-17.
12. Paulo akundwelaki baklisto bapakolami nini?
12 Baklisto ya ekeke ya liboso babengamaki bayengebene mpe bapakolamaki na elimo santu mpo na kozwa libula na bango na likoló. Ntango bazalaki naino awa na mabelé, bazalaki te komimona lokola bakonzi ya baninga na bango bapakolami mosusu. Nzokande, baklisto mosusu ya liboso babosanaki likambo wana mpe babandaki koluka komitombola likoló ya bandeko na bango na kati ya lisangá. Yango etindaki Paulo atuna boye: “Bino bosili kotonda, boye te? Bosili kokóma bato ya bomɛngo, boye te? Bosili kobanda koyangela kozanga ete biso tózala, boye te? Mpe nakosepela kutu ete bino bóbanda koyangela, mpo biso mpe tókoka koyangela elongo na bino.” (1 Kol. 4:8) Yango wana, Paulo akundwelaki bapakolami ya ntango na ye ete: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino.”—2 Kol. 1:24.
Mpo na kokokisa motángo oyo esakolamaki
13. Koponama ya bapakolami esalemaki ndenge nini na nsima ya mobu 33 T.B.?
13 Baklisto bapakolami nyonso 144 000 baponamaki na ekeke ya liboso te. Bakobaki koponama na eleko ya bantoma, mpe na nsima bakobaki koponama mokemoke. Nzokande, koponama na bango ekobaki na boumeli ya bikeke tii na mikolo na biso. (Mat. 28:20) Ntango Yesu abandaki koyangela na 1914, makambo ekendaki nokinoki.
14, 15. Ndenge nini koponama ya bapakolami ezali kosalema na mikolo na biso?
14 Libosoliboso, Yesu apɛtolaki likoló: abenganaki Satana ná bademo na ye oyo bazalaki kotɛmɛla boyangeli ya Nzambe. (Tángá Emoniseli 12:10, 12.) Na nsima, abandaki koyanganisa bato mosusu oyo bakoyangela na ye mpo na kokokisa motángo ya 144 000. Na katikati ya bambula ya 1930, koyanganisama yango ekómaki pene na nsuka, mpe bato mingi oyo bazalaki kondima nsango malamu bazalaki na mposa ya kokende na likoló te. Elimo ezalaki koyebisa bango te ete bazali bana ya Nzambe. (Talá mpe Baloma 8:16.) Bayebaki ete bazali “bampate mosusu,” baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé. (Yoa. 10:16) Na yango, nsima ya 1935, mosala ya kosakola ekómaki kosalema libosoliboso mpo na koyanganisa “ebele ya bato,” baoyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli, oyo bakobika na “bolɔzi monene.”—Emon. 7:9, 10, 14.
15 Nzokande, banda na bambula ya 1930, bato moke bazali kobengama mpo na kokende na likoló. Mpo na nini? Ekoki kozala ete bazali koponama na esika ya bato oyo baponamaki liboso, kasi bazali lisusu sembo te. (Talá mpe Emoniseli 3:16.) Paulo atángaki kutu bato mosusu ya ndenge wana, oyo ye ayebaki. (Filp. 3:17-19) Yehova abengaka bato ya ndenge nini na esika ya baoyo bazali lisusu sembo te? Ye moko nde ayebi. Kasi, emonani ete abengaka te bato ya sika, kasi bato oyo batikalaki sembo na boumeli ya bambula ebele, oyo bazali lokola bayekoli oyo Yesu asololaki na bango ntango abandisaki Ekaniseli.a—Luka 22:28.
16. Na oyo etali bapakolami, botɔndi nini tozali na yango, mpe likambo nini tosengeli kondima?
16 Nzokande, tokoki mpenza koloba te ete bato nyonso oyo bazali koponama mpo na kokende na likoló banda bambula ya 1930 bazali kaka kozwa esika ya baoyo bazali lisusu sembo te. Yehova amoni malamu ete baklisto bapakolami bázala elongo na biso na ntango nyonso oyo ya nsuka tii na kobebisama ya “Babilone monene.”b (Emon. 17:5) Mpe tosengeli kozala na kondima ete na ntango oyo Yehova abongisi, bango nyonso 144 000 bakokoka mpe ete nsukansuka bango nyonso bakozwa bisika na bango na Bokonzi ya likoló. Tosengeli mpe kondima ete ndenge Biblia esakolaki, “ebele ya bato,” oyo bazali se kobakisama, bakokoba kotikala sembo. Mosika te, bakobika na “bolɔzi monene” oyo ekokómela mokili ya Satana mpe bakokɔta na mokili ya sika ya Nzambe na esengo nyonso.
Etikali moke guvɛrnema mobimba ya Nzambe ekoka!
17. Na kolanda oyo 1 Batesaloniki 4:15-17 mpe Emoniseli 6:9-11 elobi, nini ekómelaki baklisto bapakolami oyo bakufaki sembo?
17 Banda na mobu 33 T.B., bankóto ya baklisto bapakolami bamonisi kondima makasi mpe batikali sembo tii na liwa, ata liboso ya minyoko ya ndenge nini. Bamonisi mpenza ete babongi kozwa bokonzi; mpe bazwaki likabo na bango na likoló banda na ebandeli ya kozala ya Klisto.—Tángá 1 Batesaloniki 4:15-17; Emoniseli 6:9-11.
18. (a) Bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bazali na elikya nini? (b) Ndenge nini bampate mosusu bazali kotalela bandeko na bango baklisto bapakolami?
18 Bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé bayebi mpenza ete soki batikali sembo, mosika te bango mpe bakozwa mbano na bango. Ntango bamilio ya bampate mosusu bazali komona kondima ya bandeko na bango bapakolami, balobaka lokola ntoma Paulo oyo alobaki na bandeko na ye bapakolami ya Tesaloniki ete: “Tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko, mpo ebongi bongo, mpamba te kondima na bino ezali kokola mingi mpenza mpe bolingo ya moko na moko na bino nyonso epai ya mosusu ezali kobakisama. Mpo na yango biso mpenza tozali komikumisa mpo na bino na kati ya masangá ya Nzambe mpo na ezaleli na bino ya koyika mpiko mpe kondima na bino na kati ya minyoko na bino nyonso mpe malɔzi oyo bozali kokangela motema. Yango ezali elembeteli ya lisambisi ya boyengebene ya Nzambe, oyo ezali komema bino na kotángama bato babongi na bokonzi ya Nzambe, oyo mpo na yango bozali mpenza komona mpasi.” (2 Tes. 1:3-5) Ntango mopakolami ya nsuka akotika mabelé mpe akokende na likoló, ezala ntango nini, guvɛrnema mobimba ya Nzambe ekokoka. Ekozala mpenza esengo, ezala na likoló to awa na mabelé!
[Maloba na nse ya lokasa]
b Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 2007.
Okoki kolimbola?
• Likambo nini Nzambe ayebisaki Abalayama, oyo ezali na boyokani na Mokolo ya Kosambisama?
• Mpo na nini Abalayama atángamaki moyengebene?
• Kotángama bayengebene ememeli momboto ya Abalayama nini?
• Baklisto nyonso bazali na elikya nini?
[Elilingi na lokasa 20]
Yesu alendisaki bayekoli na ye báluka Bokonzi
[Elilingi na lokasa 21]
Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Yehova abandaki kopona bato mosusu ya momboto ya Abalayama
[Bililingi na lokasa 23]
Bampate mosusu bazali na botɔndi mingi ndenge baklisto bapakolami bazali na bango na boumeli ya mikolo ya nsuka