Batángami bato oyo babongi mpo na komemama na maziba ya mai ya bomoi
“Mwana-Mpate . . . akokamba bango, mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.”—Emon. 7:17.
1. Nkombo nini Liloba ya Nzambe epesi baklisto bapakolami, mpe mokumba nini Yesu apesá bango?
LILOBA YA NZAMBE ebengaka baklisto bapakolami oyo bazali kotalela matomba ya Klisto awa na mabelé “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Ntango Yesu ayaki kotala “moombo” yango na 1918, amonaki ete bapakolami oyo bazalaki awa na mabelé bazalaki kaka sembo na mosala ya kokabola “bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi.” Yango wana, Yesu, Nkolo na bango, asepelaki na bango mpe atyaki bango “likoló ya biloko na ye nyonso.” (Tángá Matai 24:45-47.) Na ndenge yango, baklisto bapakolami bazali kosalela basambeli mosusu ya Yehova awa na mabelé liboso bákende kozwa libula na bango na likoló.
2. Tángá biloko ya Yesu.
2 Nkolo azalaka na bokonzi likoló ya biloko na ye mpe akoki kosalela yango ndenge alingi. Biloko ya Yesu Klisto, Mokonzi oyo Yehova atyá, ezali matomba nyonso ya Bokonzi awa na mabelé. “Ebele ya bato” oyo ntoma Yoane amonaki na emonaneli bazali mpe na kati ya biloko ya Nkolo. Mpo na ebele yango ya bato, Yoane alobaki boye: “Talá! ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe mandalala ezalaki na mabɔkɔ na bango.”—Emon. 7:9.
3, 4. Libaku malamu nini “ebele ya bato” bazali na yango?
3 “Ebele ya bato” bazali na kati ya bato oyo Yesu alobaki ete bazali “bampate [na ye] mosusu.” (Yoa. 10:16) Elikya na bango ezali ya kozala na bomoi libela na libela na paladiso awa na mabelé. Bazali mpenza na elikya ete Yesu “akomema bango na maziba ya mai ya bomoi” mpe “Nzambe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango.” Lokola bazali na elikya wana, “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.” (Emon. 7:14, 17) Bazali kondima mbeka ya Yesu, yango wana bazambala na bango ezali komonana mpɛmbɛ na miso ya Nzambe. Nzambe atángi bango bayengebene mpe baninga na ye, lokola Abalayama.
4 Longolá yango, lokola “ebele ya bato,” oyo bazali se kokóma mingi, bamonani bayengebene na miso ya Nzambe, bakoki kolikya ete bakobika ntango mokili oyo ekobomama na bolɔzi monene. (Yak. 2:23-26) Bakoki kopusana penepene na Yehova mpe bazali na elikya kitoko ya kobika na Armagedona. (Yak. 4:8; Emon. 7:15) Bamitambwisaka bango moko te, kasi bandimaka kolanda litambwisi ya Mokonzi ya likoló mpe bandeko na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé.
5. Ndenge nini “ebele ya bato” bazali kopesa baklisto bapakolami mabɔkɔ?
5 Baklisto bapakolami bakutani na botɛmɛli makasi ya mokili ya Satana, mpe bakokoba kokutana na yango. Atako bongo, bakoki kolikya ete baninga na bango, “ebele ya bato,” bakokoba kopesa bango mabɔkɔ. Atako baklisto bapakolami bazali lisusu mingi te, bankóto na bankóto ya “ebele ya bato” bazali se kobakisama mbula nyonso. Baklisto bapakolami bango moko bazali na likoki te ya kokamba masangá soki 100 000 oyo ezali sikoyo na mokili mobimba. Na yango, lolenge moko oyo bampate mosusu bazali kosalisa baklisto bapakolami ezali ete mibali ya makoki na kati ya “ebele ya bato” bazali bankulutu na masangá. Bazali kopesa mabɔkɔ na kobatela bamilio ya baklisto oyo bazali sikoyo kotambwisama na “moombo ya sembo mpe ya mayele.”
6. Ndenge nini lisungi oyo bampate mosusu bazali kopesa baklisto bapakolami lelo oyo esakolamaki?
6 Lisungi oyo bampate mosusu bazali kopesa bandeko na bango baklisto bapakolami na motema moko esakolamaki na mosakoli Yisaya. Akomaki boye: “Yehova alobi boye: ‘Basali ya Ezipito oyo bazali na lifuta te mpe bato ya mombongo ya Etiopia mpe bato ya Sebaya, bato milai, bakoya epai na yo bango moko mpe bakozala bato na yo; bakolanda yo.’” (Yis. 45:14, NW) Na ndenge ya elilingi, baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé bazali lelo oyo kolanda moombo ya sembo mpe Lisangani na ye ya Mikóló-Bakambi, mpe bazali kondima litambwisi na bango. Lokola ‘basali oyo bazali na lifuta te,’ bampate mosusu bazali, na motema moko, kopesa makasi mpe bozwi na bango mpo na kosimba mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, mosala oyo Klisto apesá bayekoli na ye bapakolami oyo bazali awa na mabelé.—Mis. 1:8; Emon. 12:17.
7. “Ebele ya bato” bazali kobongisama mpo na likambo nini?
7 Ntango “ebele ya bato” bazali kopesa bandeko na bango bapakolami mabɔkɔ, bazali kobongisama mpo na kozala moboko ya mokili ya sika oyo ekotyama na nsima ya Armagedona. Moboko yango esengeli kotɛlɛma makasi, mpe bato yango basengeli kondima kolanda litambwisi ya Nkolo. Moklisto mokomoko azali kozwa libaku ya komonisa ete abongi kosalelama na Mokonzi Yesu Klisto. Soki azali na kondima mpe azali sembo lelo oyo, yango ekomonisa ete akondima mpe litambwisi ya Mokonzi na mokili ya sika.
“Ebele ya bato” bazali komonisa kondima
8, 9. Ndenge nini “ebele ya bato” bazali komonisa kondima na bango?
8 Bampate mosusu, baninga ya baklisto bapakolami bazali komonisa kondima na bango na ndenge mingi. Ya liboso, bazali kopesa bapakolami mabɔkɔ na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Ya mibale, bazali kondima kotambwisama na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.—Ebe. 13:17; tángá Zekalia 8:23.
9 Ya misato, “ebele ya bato” bazali kosunga bandeko na bango bapakolami na ndenge bazali kotosa mitinda ya sembo ya Yehova. Bazali kosala nyonso mpo na kozala na “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” (Gal. 5:22, 23) Lelo oyo, bato mingi basepelaka te na bato oyo bazali na bizaleli wana; basepelaka nde na “misala ya mosuni.” Kasi, “ebele ya bato” bazali na ekateli makasi ya kokima “pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bilambo ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.”—Gal. 5:19-21.
10. Ekateli nini “ebele ya bato” bazali na yango?
10 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi mpo tómonisa mbuma ya elimo, tókima misala ya mosuni mpe tóboya kolanda makambo ya mokili ya Satana. Atako bongo, toboyi mpenza kotika bolɛmbu na biso, kozonga nsima na milende oyo tosalaki mpo na kolanda Klisto to maladi elɛmbisa kondima na biso to ekitisa bolingo na biso mpo na Yehova. Toyebi ete Yehova akokokisa elaka na ye ya kobikisa “ebele ya bato” na bolɔzi monene.
11. Mayele nini Satana asalelaka mpo na kolɛmbisa kondima ya baklisto?
11 Atako bongo, tozali ntango nyonso kokɛngɛla mpo toyebi ete monguna na biso mpenzampenza ezali nde Zabolo, mpe azali kolɛmba te na milende na ye mpo na kobungisa biso. (Tángá 1 Petelo 5:8.) Amekaka kosalela bapɛngwi mpe bato mosusu mpo na kondimisa biso ete mateya oyo tozali kolanda ezali ya lokuta. Kasi, mbala mingi, mayele yango elongaka te. Ndenge moko, atako monyoko ezongisaka ntango mosusu mosala ya kosakola nsima, mbala mingi elendisaka nde kondima ya baoyo bazali konyokwama. Yango wana, Satana asalelaka ntango nyonso mayele moko oyo amoni ete ekolɛmbisa mpenza kondima na biso. Alukaka kokweisa biso ntango tolɛmbi na makanisi. Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya ekeke ya liboso ete: “Bótya likebi mpenza epai ya [Klisto] oyo asili koyika mpiko na maloba ya botɛmɛli motindo wana ya basumuki oyo bazali bongo kotɛmɛla matomba na bango moko.” Mpo na nini? “Mpo ete bósila makasi te mpe bólɛmba te na milimo na bino.”—Ebe. 12:3.
12. Ndenge nini toli ya Biblia elendisaka baoyo balɛmbi na makanisi?
12 Ekómelá yo oyoka lokola olɛmbi kosalela Yehova? Omonaka ntango mosusu lokola ozongi nsima? Soki ezali bongo, kotika te Satana asalela makanisi wana mpo na kopekisa yo kosalela Yehova. Soki ozali koyekola Biblia na mozindo, kobondela na etingya, koyangana na makita nyonso mpe kokutana ntango nyonso na bandeko baklisto, okozwa makasi mpe ‘okolɛmba te na molimo na yo.’ Yehova alaki ete akosalisa basaleli na ye oyo balɛmbi bázwa lisusu makasi, mpe tokoki kotya motema ete akokokisa elaka yango. (Tángá Yisaya 40:30, 31.) Tyá makanisi na yo nyonso na mosala ya Bokonzi. Boyá makambo oyo ekoki kolya yo ntango mpamba mpe omipesa mobimba na kosalisa basusu. Soki ozali kosala bongo, okozwa makasi ya koyika mpiko ata soki olɛmbi na makanisi.—Gal. 6:1, 2.
Babiki na bolɔzi monene mpe bakɔti na mokili ya sika
13. Mosala nini ezali kozela bato oyo bakobika na Armagedona?
13 Nsima ya Armagedona, ekosɛnga ete ebele ya bato oyo bazangi boyengebene oyo bakosekwa báyekola banzela ya Yehova. (Mis. 24:15) Basengeli koyeba ete Yesu apesaki mbeka mpo na kosikola biso. Longola yango, basengeli koyeba komonisa kondima na mbeka yango mpo na kozwa matomba na yango. Ekosɛnga bábwaka bindimeli ya mangomba ya lokuta oyo bazalaki na yango liboso mpe bátika lolenge ya bomoi oyo bazalaki na yango. Basengeli koyekola kolata bomoto ya sika oyo ebongi na baklisto ya solo. (Ef. 4:22-24; Kols. 3:9, 10) Bampate mosusu oyo bakobika na Armagedona bakozala na mosala monene mpenza. Ekozala mpenza esengo kosalela Yehova mosala ya ndenge wana, na ntango oyo mokili oyo ya mabe ná makambo na yango nyonso ekozala lisusu te!
14, 15. Masolo nini bato oyo bakobika na bolɔzi monene ná bato ya sembo oyo bakosekwa bakobɛtɛlana?
14 Basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakufaki liboso Yesu aya awa na mabelé bakozala mpe na makambo mingi ya koyekola na ntango wana. Bakoyeba Masiya oyo alakamaki, oyo bazalaki na mposa ya komona, kasi bazwaki libaku yango te. Liboso bákufa, bamonisaki ete bandimi koteyama na Yehova. Kanisá naino esengo mpe lokumu oyo tokozala na yango ya kosalisa bato wana, na ndakisa koyebisa Danyele ndenge bisakweli oyo akomaki, kasi akangaki ntina na yango te ekokisamaki!—Dan. 12:8, 9.
15 Kasi, atako bato oyo bakosekwa bakozala na makambo mingi ya koyekola epai na biso, biso mpe tokozala na mituna mingi ya kotuna bango. Bakolimbolela biso malamumalamu makambo mosusu oyo Biblia elobeli kaka na mokuse. Kanisá naino esengo oyo tokozala na yango ya koyoka Yoane Mobatisi azali koyebisa biso makambo mosusu oyo ye ayebaki na ntina na ndeko na ye Yesu! Na ntembe te, makambo oyo bato wana ya sembo bakoyebisa biso, oyo bango moko bamonaki na miso, ekosalisa biso tósosola Liloba ya Nzambe lisusu malamu koleka. Basaleli ya sembo ya Yehova oyo bakufá, ná bato mosusu ya “ebele ya bato” oyo bazali kokufa na boumeli ya ntango ya nsuka, bakosekwa “lisekwa moko oyo eleki malamu.” Babandaki kosalela Yehova na mokili oyo ezali koyangelama na Satana. Bakozala mpenza na esengo ya kokoba kosalela Yehova na mokili ya sika, epai makambo ekozala malamu koleka!—Ebe. 11:35; 1 Yoa. 5:19.
16. Ndenge esakolamaki, Mokolo ya Kosambisama ekozala ndenge nini?
16 Na ntango moko na kati ya Mokolo ya Kosambisama, barulo ekofungwama. Yango ná Biblia ekosalelama mpo na kokata likambo ya bato nyonso oyo bakozala na bomoi, mpo na koyeba soki babongi kozwa bomoi ya seko to te. (Tángá Emoniseli 20:12, 13.) Na nsuka ya Mokolo ya Kosambisama, moto nyonso akozala na libaku ya komonisa soki azali na ngámbo ya bato oyo bandimi ete Yehova azali na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. Akondima Bokonzi ya Nzambe mpe akotika Mwana-Mpate akamba ye “na maziba ya mai ya bomoi” to nde akoboya mpe akotɛmɛla Bokonzi yango? (Emon. 7:17; Yis. 65:20) Na ntango wana, moto nyonso awa na mabelé akozala na libaku ya kozwa ekateli na ye ye moko, kozanga ete lisumu oyo Adama ná Eva batikelá biso to mokili oyo ya mabe ekosa ye. Moto moko te akotya ntembe ntango Yehova akozwa ekateli ya nsuka. Kaka bato mabe nde bakobebisama mpo na libela.—Emon. 20:14, 15.
17, 18. Elikya kitoko nini baklisto bapakolami ná bampate mosusu bazali na yango mpo na Mokolo ya Kosambisama?
17 Lelo oyo, baklisto bapakolami oyo batángami ete babongi kozwa Bokonzi, bazali kozela na motema likoló bábanda koyangela na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama. Oyo nde libaku kitoko bakozwa! Elikya yango ezali kotinda bango bálanda toli oyo Petelo apesaki baninga na bango bapakolami na ekeke ya liboso: “Bósala nyonso oyo ekoki na bino mingi lisusu mpo bóbatela kobengama na bino mpe koponama na bino; mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea soki moke te. Ɛɛ, na ndenge wana nde bakopesa bino mpenza nzela ya kokɔta na bokonzi ya seko ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Klisto.”—2 Pet. 1:10, 11.
18 Bampate mosusu bazali kosepela mpo na elikya ya bandeko na bango bapakolami. Bazali na ekateli ya kokoba kopesa bango mabɔkɔ. Lokola bazali baninga ya Nzambe, bazali na ekateli ya komipesa mobimba na mosala na ye. Na boumeli ya Mokolo ya Kosambisama, bakozala na esengo ya kosimba bibongiseli ya Yehova na motema na bango mobimba, ntango Yesu akomema bango na maziba ya mai ya bomoi. Na nsima, bakotángama ete babongi kozala basaleli ya Yehova awa na mabelé libela na libela!—Lom. 8:20, 21; Emon. 21:1-7.
Ozali koyeba lisusu?
• Biloko ya Yesu ezali nini?
• Ndenge nini “ebele ya bato” bazali kopesa bandeko na bango bapakolami mabɔkɔ?
• Mikumba mpe elikya nini “ebele ya bato” bazali na yango?
• Ndenge nini otalelaka Mokolo ya Kosambisama?
[Elilingi na lokasa 25]
“Ebele ya bato” basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate
[Elilingi na lokasa 27]
Makambo nini okolinga bato ya sembo oyo bakosekwa báyebisa yo?