Sepelá na mokumba na yo ya mama
LELO oyo, na mokili mobimba, basi mingi bazali kosala. Na mikili ya bozwi, motángo ya basi oyo basalaka ekeseni mingi te na oyo ya mibali. Na mikili ya bobola, basi mingi babomaka nzoto na mosala ya bilanga mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango.
Basi mingi bazali kobunda na makambo mibale. Epai mosusu básala mpo na kozwa mbongo ya kosalisa mabota na bango, epai mosusu báluka kokokisa mikumba na bango ya ndako. Basukaka kaka te na koluka mbongo mpo na bilei, bilamba mpe esika ya kolala, kasi basengeli mpe kolamba, kosukola bilamba mpe kobongisa ndako.
Longola yango, bamama baklisto basalaka nyonso mpo na koteya bana na bango makambo ya Nzambe. Cristina, mama ya bana basi mibale ya mike, alobi boye: “Ezali mpenza mpasi kosangisa mosala na mokumba ya kobɔkɔla bana, mingimingi soki bazali mike. Ezali pɛtɛɛ te kopesa bana likebi nyonso oyo basengeli na yango.”
Nini etindaka bamama bákóma kosala? Mikakatano nini bakutanaka na yango? Mpo mama azala na esengo, esengeli kaka asalaka?
Mpo na nini bamama basalaka?
Bamama mingi bamonaka ete basengeli kosala mokolo mobimba. Basusu bazali na mibali te oyo bakoki kosalisa bango na mbongo. Basi mosusu ná mibali na bango bamoni ete kozela kaka lifuta ya moto moko ekoki kokokisa te bamposa ya libota.
Ya solo, bamama nyonso basalaka te kaka mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango. Mingi basalaka mpo na lokumu na bango. Bamosusu basalaka mpo bázwaka mbongo na bango moko, oyo bakobanda kosalela ndenge balingi, to mpo na komisombela biloko ya motuya. Mingi basalaka mpo bayebi mpenza mosala na bango mpe basepelaka kosala yango.
Bamama mosusu basalaka mpo bamonaka baninga na bango bazali kosala. Atako bato mingi bandimaka ete bamama oyo basalaka bakutanaka ntango nyonso na mitungisi mpe balɛmbaka mingi soki bauti mosala, mbala mingi bato bamonaka bamama oyo balingaka kosala te lokola bazoba ya basi to mpe batyolaka bango. Mwasi moko alobaki boye: “Ezalaka pɛtɛɛ te koyebisa bato ete ozali na yo ‘kaka mama ya ndako.’ Bato mosusu bakomonisa yo na maloba to na ndenge bazali kotala yo ete ozali kobebisa bomoi na yo mpamba.” Rebeca, oyo azali mama ya mwana moko ya mwasi ya mbula mibale, alobi boye: “Atako na mboka na biso balobaka ete mwasi asengeli kobatelaka bana na ye, namonaka ete batalelaka bamama oyo basalaka te lokola bato mpamba.”
Makanisi ya mpamba mpe bosolo
Na mikili mosusu, baradio ná batelevizyo elobaka ete “mwasi ya solosolo” ezali oyo azali na mosala ya mlamu, oyo efutaka mbongo mingi, alataka kitoko mpe akoká na nyonso. Soki azongi na ndako, azalaka na makasi ya kosilisa mikakatano nyonso ya bana na ye, ya kosembola mabunga nyonso ya mobali na ye mpe ya kosilisa matata nyonso oyo ebimi na ndako. Nzokande, basi oyo bazali na bomoi ya ndenge wana bazali mingi te.
Likambo ya solo ezali ete na misala mingi oyo basi basalaka, bazongelaka kaka makambo mokomoko, mpe misala yango efutaka mbongo mingi te. Likambo ya mawa, bamama oyo basalaka bakoki komona ete mosala na bango ezali kopekisa bango kobimisa makoki na bango nyonso. Buku moko (Social Psychology) elobi boye: “Atako emonani ete basi ná mibali bakómi kokokana na makambo mingi, mibali bazali kaka kozwa misala oyo ezali kofuta malamu mpe ya lokumu. Basi mingi oyo babomaka nzoto mpo na misala na bango bazali mpenza na mpasi.” Zulunalo moko ya Espagne (El País) elobaki boye: “Emonani ete basi batungisamaka mingi, ata mbala misato koleka mibali, mpo mingi kati na bango basalaka mpe bakipaka misala ya ndako.”
Ndenge oyo mibali bakoki kosalisa bango
Mpo na bamama baklisto, likambo ya kosala to te etali kaka bango moko. Kasi, soki azali mwasi ya libala, ye ná mobali na ye basengeli naino kolobela likambo yango mpe nsima ya kotalela makambo nyonso malamu, bakoki kozwa ekateli.—Masese 14:15.
Kasi, ezali boni soki mbongo ekómi mpasi mpe mwasi ná mobali bazwi ekateli ya kosala bango nyonso mokolo mobimba? Soki ezali bongo, mobali ya bwanya asengeli kobosana te toli ya Biblia oyo: “Bino mibali, bókoba kofanda ná bango mpe ndenge moko engebene boyebi, kopesáká bango lokumu lokola epai ya mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi, mpamba te bozali mpe bazwi-ya-libula ya boboto monene ya bomoi elongo na bango.” (1 Petelo 3:7) Mobali apesaka mwasi na ye lokumu soki azali koyeba esika makoki ya mwasi na ye esuki. Soki likoki ezali, akosalisa mwasi na ye na misala ya ndako. Lokola Yesu, mobali akondima kosala ata misala oyo bato bamonaka mpamba, mpe asengeli koloba te ete misala yango ekokitisa lokumu na ye. (Yoane 13:12-15) Asengeli nde kotalela misala yango lokola libaku ya komonisa ete alingaka mwasi na ye oyo asalaka mingi. Soki azali kosala bongo, mwasi na ye akosepela mingi.—Baefese 5:25, 28, 29.
Na ntembe te, soki ná mwasi ná mobali bazali kosala, ekosɛnga báyokana. Zulunalo moko ya Espagne (ABC) emonisi bosolo ya likambo yango. Mpo na ankɛti moko oyo ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya mabota esalaki, zulunalo yango ekomaki boye: “Atako mabala mingi na Espagne ezali kokufa mpo bato bazali kolanda lisusu te makambo ya Nzambe mpe bazali komitambwisa kaka ndenge balingi, ezali na bantina mosusu mibale: basi bakómi kosala mpe mibali bazali kolinga te kosalisa basi na bango na misala ya ndako.”
Mokumba ya ntina ya mama moklisto
Atako mosala ya kobɔkɔla bana ezali libosoliboso ya batata, bamama baklisto bayebi ete bango mpe bazali na mokumba monene na likambo yango, mingimingi ntango bana bazali naino mike. (Masese 1:8; Baefese 6:4) Ntango Yehova asɛngaki Bayisalaele ete báteyaka bana na bango Mibeko na ye ntango nyonso, azalaki koloba na batata ná bamama. Ayebaki ete koteya bana esɛngaka ntango mpe motema molai, mingimingi ntango bana babandi kokóma mwa bato. Mpo na yango, Nzambe alobaki na baboti ete basengeli koteya bana na bango na ndako, na nzela, ntango balali mpe ntango balamuki.—Deteronome 6:4-7.
Liloba ya Nzambe ezali komonisa ntina ya mokumba ya bamama ntango ezali kosɛnga na bana ete: “Longwá na mibeko ya mama na yo te.” (Masese 6:20) Kasi, mwasi oyo abalá asengeli koyokana na mobali na ye liboso ya kotyela bana mibeko. Nzokande, ndenge vɛrsɛ wana emonisi yango, bamama bazali na ndingisa ya kotya mibeko. Soki bana bazali kolanda mibeko ya Nzambe mpe bizaleli malamu oyo mama na bango azali koteya bango, bakozwa ebele ya matomba. (Masese 6:21, 22) Teresa, mama moko ya bana mibale, ayebisi ntina oyo aboyaka kosala. Alobi boye: “Kobɔkɔla bana na ngai mpo bákóma kosalela Nzambe ezali mokumba oyo eleki ntina mpo na ngai. Nasalaka nyonso nakokisa mokumba yango na ndenge esengeli mpenza.”
Bamama oyo balongaki
Lemuele, Mokonzi ya Yisalaele, azwaki mpenza litomba na milende oyo mama na ye asalaki. Toli oyo mama na ye apesaki ye mpo na ‘kolakisa’ ye, ekomamá na kati ya Liloba ya Nzambe. (Masese 31:1; 2 Timote 3:16) Maloba oyo mama wana asalelaki mpo na kolobela mwasi oyo akoki ezali kosalisa bana mibali báyeba kopona basi ya malamu. Mpe batoli oyo apesaki na likambo etali pite to ekobo, kolekisa ndelo na komɛla, ezali na ntina tii lelo kaka ndenge ezalaki ntango ekomamaki.—Masese 31:3-5, 10-31.
Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akumisaki mama moko na nkombo Enisi mpo na mosala monene oyo asalaki ya koteya mwana na ye Timote. Lokola mobali na ye azalaki kosambela Yehova te, Enisi asengelaki mpenza kosalisa Timote mpo andima “makomi mosantu.” Ntango nini Enisi abandaki koteya Timote Makomami? Makomami emonisi ete abandaki koteya ye “banda na bomwana,” elingi koloba ntango Timote azalaki naino bebe. (2 Timote 1:5; 3:14, 15) Emonani ete kondima, ndakisa mpe mateya na ye ebongisaki Timote mpo na mosala ya misionɛrɛ.—Bafilipi 2:19-22.
Biblia elobeli mpe bamama oyo bazalaki na momeseno ya koyamba basaleli ya sembo ya Nzambe, mpe yango esalisaki bana na bango bálanda ndakisa malamu ya basaleli yango. Na ndakisa, mwasi moko ya mboka Suneme azalaki na momeseno ya koyamba mosakoli Elisa epai na ye. Na nsima, mosakoli Elisa asekwisaki mwana ya mwasi yango ya mobali. (2 Mikonzi 4:8-10, 32-37) Tózwa mpe ndakisa ya Malia, mama ya Malako, moko ya bakomi ya Biblia. Andimaki bayekoli ya ekeke ya liboso básalaka makita na ndako na ye na Yelusaleme. (Misala 12:12) Na ntembe te, Malako azwaki mpenza matomba na ndenge bantoma mpe baklisto mosusu bazalaki koya epai na bango.
Ya solo, Yehova azwaka mpenza na motuya mosala makasi ya basi ya sembo oyo bazali kosala nyonso mpo na koteya bana na bango mitinda na ye. Alingaka basi yango mpo na bosembo mpe milende oyo bazali komonisa mpo na ndenge bazali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na ndako na bango.—2 Samwele 22:26; Masese 14:1.
Ekateli oyo eleki malamu
Ndenge bandakisa ya Biblia oyo tolobeli emonisi, kokokisa bamposa ya mosuni, ya elimo mpe bamposa mosusu ememaka mapamboli oyo eleki nyonso. Kasi, kosala yango ezali pɛtɛɛ te. Mbala mingi mosala oyo mama asalaka na ndako ezali makasi koleka mosala nyonso ya lokumu oyo moto akoki kosala na kompanyi.
Ya solo, soki nsima ya kosolola na mobali na ye, mama moko amoni ete asengeli kosala te, libota na bango ekozala lisusu na bozwi mingi te, mpe mama yango asengeli kokanga matoi ntango bato mosusu bazali kosɛka ye lokola aboyi kosala. Kasi, mapamboli oyo akozwa eleki mosika bozwi oyo bakokaki kozala na yango mpe nsɔni oyo akoyoka. Paqui azali na bana misato mpe asalaka kaka ndambo ya mokolo. Alobi boye: “Nalingaka nazala na ndako ntango bana bauti na kelasi mpo bázanga te moto ya kosolola na bango.” Matomba nini bana na ye bazali kozwa? Alobi ete: “Nasalisaka bango na badevuare, mpe soki likambo ebimi, nasilisaka yango mbala moko. Ntango oyo tolekisaka elongo mokolo na mokolo esalisaka biso tósololaka malamu. Mpo na ngai, ntango oyo nalekisaka na bana ngai ezali na motuya mingi, yango wana ntango bapesaki ngai mosala moko oyo nasengelaki kosalaka mokolo mobimba naboyaki.”
Bamama baklisto mingi bamonaki ete soki bakutoli ntango oyo bazalaki kolekisa na mosala, mabota na bango mobimba bazwaka matomba. Cristina, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ntango natikaki kosala, makambo ekómaki kotambola malamu na libota na biso. Nakómaki na ntango mingi ya kosolola na bana na ngai mpe ya kosalisa mobali na ngai na makambo mingi. Nakómaki koteya bana na ngai, komona ndenge bazali koyekola mpe kokola.” Ezali na likambo moko oyo Cristina abosanaka te. Alobi boye: “Mwana na ngai ya liboso ayekolaki kotambola na esika moko oyo babatelaka bana, kasi oyo ya mibale, ngai moko nalakisaki ye kotambola na ndako. Abwakaki mwa makolo mpe akweaki na mabɔkɔ na ngai. Nasepelaki makasi!”
Likambo mosusu ya kobosana te ezali ete ata soki mama atiki kosala, mikakatano ekoki kozala te ndenge bazalaki kokanisa. Cristina alobi boye: “Mbongo oyo nazalaki kofuta esika nazalaki kotika mwana mpe oyo nazalaki kobimisa mpo na tike, ezalaki kozwa ndambo mobimba ya lifuta na ngai. Nsima ya kotalela likambo yango, tomonaki ete mosala na ngai ezalaki kobakisela biso mbongo ya malonga te.”
Nsima ya komitalela, basi mosusu ná mibali na bango bamonaki ete soki mwasi atikali na ndako mpo abatelaka bana, matomba oyo bakozwa eleki mosika mbongo oyo bakokaki kozwa soki azali kosala. Paul, mobali ya Cristina, alobi ete: “Nazali na esengo lokola mwasi na ngai atikalaka na ndako mpo na kobatela bana na biso mibale ya mike. Tozalaki na motungisi mingi ntango mwasi na ngai azalaki mpe kosala.” Ekateli wana ememelaki bana na bango matomba nini? Paul alobi ete: “Longola kozala na kimya, bazali kobatelama mpenza na makambo mabe oyo bana bakutanaka na yango ntango bazali kokola.” Mpo na nini Paul ná mwasi na ye bamonaka ete ezali na ntina bálekisaka ntango mingi elongo na bana na bango wana ya basi? Paul ayanoli boye: “Nayebaka ete soki biso moko baboti tóteyi bana na biso te, bato mosusu bakosala yango na esika na biso.”
Ya solo, mwasi mokomoko na mobali na ye, basengeli komitalela. Mpe moto moko te asengeli kotyola ekateli ya basusu. (Baloma 14:4; 1 Batesaloniki 4:11) Na ntembe te, soki mama azali kolekisa mokolo mobimba te na mosala, matomba ekoki kozala ya koloba te. Mpo na kosukisa, Teresa, oyo tolobeli na ebandeli alobi boye: “Ezali na eloko moko te oyo ekoki kopesa moto esengo koleka kolekisa ntango mpo na kobatela mpe koteya bana na ye.”—Nzembo 127:3.
[Elilingi na lokasa 31]
Bamama baklisto bamipesaka mingi na mosala ya ntina mingi ya koteya bana na bango