Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/2 nk. 7-11
  • Tambolá na banzela ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tambolá na banzela ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Zalá moto oyo abongi kotyelama motema
  • Zalá ntango nyonso na “elimo ya komikitisa”
  • Zalá na mpiko mpe na makasi
  • Kanisáká bolamu ya basusu
  • Kobá kotambola na banzela ya Yehova
  • Okoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa basusu makasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Yonatana “asalaki mosala na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Alisitalaka: Moninga ya sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Basalaki boninga makasi mpenza”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/2 nk. 7-11

Tambolá na banzela ya Yehova

“Esengo ezali na moto oyo [abangaka Yehova, NW], oyo akotambolaka na nzela na ye.”​—NZ. 128:1.

1, 2. Ndenge nini toyebi ete moto akoki kozala na esengo?

MOTO nyonso alingaka kozala na esengo. Kasi, na ntembe te oyebi ete kolinga to koluka esengo ekeseni na kozala na yango.

2 Atako bongo, moto akoki kozala na esengo. Nzembo 128:1 elobi boye: “Esengo ezali na moto oyo [abangaka Yehova, NW], oyo akotambolaka na nzela na ye.” Tokoki kozala na esengo soki tozali kobanga Nzambe mpe kotambola na banzela na ye, elingi koloba kosala mokano na ye. Yango ekotinda biso tózala na etamboli mpe bizaleli ya ndenge nini?

Zalá moto oyo abongi kotyelama motema

3. Boyokani nini ezali kati na kozala bato oyo babongi kotyelama motema mpe komipesa na biso epai ya Nzambe?

3 Baoyo babangaka Yehova bazalaka bato oyo babongi kotyelama motema, ndenge ye moko azali. Yehova akokisaki bilaka nyonso oyo apesaki Bayisalaele. (1 Mik. 8:56) Komipesa epai ya Nzambe ezali elaka eleki ntina oyo tosalaki, mpe kobondela ntango nyonso ekosalisa biso tókokisa yango. Tokoki kobondela ndenge mokomi ya nzembo Davidi abondelaki ete: “Mpo ete yo Nzambe oyoki ndai na ngai . . . nakoyembela nkombo na yo nzembo libela, mpe mikolo nyonso nakokokisa ndai na ngai.” (Nz. 61:5, 8; Mos. 5:4-6) Mpo na kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kozala bato oyo babongi kotyelama motema.​—Nz. 15:1, 4.

4. Ndenge nini Yefeta ná mwana na ye batalelaki ndai oyo alapaki epai ya Yehova?

4 Na ntango ya Basambisi na Yisalaele, Yefeta alapaki ndai ete soki Yehova asalisi ye alonga Baamona, akopesa “lokola mbeka ya kotumba” moto ya liboso oyo akobima mpo na kokutana na ye ntango akouta na etumba. Esalemaki ete ye oyo abimaki liboso ezalaki mwana mwasi ya Yefeta​—mwana na ye kaka moko. Na kondima nyonso, Yefeta ná mwana na ye oyo abalaki naino te, bakokisaki ndai yango. Atako na ntango wana kobala mpe kobota ezalaki na ntina mingi, mwana ya Yefeta andimaki kotikala monzemba mpe asepelaki na libaku malamu ya kosala mosala mosantu na tabenakle ya Yehova.​—Bas. 11:28-40.

5. Ndenge nini Hana amonisaki ete abongi kotyelama motema?

5 Hana, mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe, amonisaki mpe ete azalaki moto oyo abongi kotyelama motema. Azalaki kofanda na etúká ya bangomba ya Efelaima elongo na Elekana, mobali na ye oyo azalaki Molevi, mpe mbanda na ye Penina. Penina abotaki bana mingi mpe azalaki kotyola Hana, mpo azalaki ekomba, mingimingi ntango bazalaki kokende na tabenakle. Mokolo moko, Hana alapaki ndai ete soki aboti mwana mobali, akopesa ye epai ya Yehova. Eumelaki te, akómaki na zemi mpe abotaki mwana mobali; apesaki ye nkombo Samwele. Ntango Hana alongolaki Samwele na mabɛlɛ, akendaki na ye na Silo mpe atikaki ye na mabɔkɔ ya Yehova “mikolo nyonso ya bomoi na ye.” (1 Sam. 1:11) Na ndenge yango, akokisaki ndai na ye atako ayebaki te ete na nsima akobota bana mosusu.​—1 Sam. 2:20, 21.

6. Ndenge nini Tisike amonisaki ete azalaki moto oyo abongi kotyelama motema?

6 Tisike, moklisto moko na ekeke ya liboso, azalaki moto oyo abongi kotyelama motema mpe “ministre ya sembo.” (Kols. 4:7) Tisike asalaki mibembo na ntoma Paulo banda na Grɛsi, bakatisaki Masedonia, balekaki na Asie Mineure, mpe mbala mosusu tii na Yelusaleme. (Mis. 20:2-4) Mbala mosusu ye nde “ndeko” oyo asalisaki Tito mpo na kobongisa biloko oyo batindelaki baklisto ya Yudea, oyo bazalaki na mpasi. (2 Kol. 8:18, 19; 12:18) Ntango bakangaki Paulo mpo na mbala ya liboso na Loma, atindaki Tisike, moto oyo abongaki kotyelama motema, amema mikanda epai ya bandeko ya Efese mpe ya Kolose. (Ef. 6:21, 22; Kols. 4:8, 9) Ntango Paulo akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbala ya mibale na Loma, atindaki Tisike na Efese. (2 Tim. 4:12) Soki tozali bato oyo babongi kotyelama motema, biso mpe tokozwa mapamboli mingi na mosala ya Yehova.

7, 8. Mpo na nini tokoki koloba ete Davidi ná Yonatana bazalaki baninga ya solosolo?

7 Yehova asɛngi biso tózala baninga oyo babongi kotyelama motema. (Mas. 17:17) Yonatana, mwana ya Mokonzi Saulo azalaki moninga ya Davidi. Ntango ayokaki ete Davidi abomaki Goliata, “motema ya Yonatana ekanganaki na motema ya Davidi. Yonatana alingaki ye lokola motema na ye moko.” (1 Sam. 18:1, 3) Kutu, Yonatana akebisaki Davidi ntango Saulo alukaki koboma ye. Na nsima ntango Davidi akimaki, Yonatana akendaki kokutana na ye mpe basalaki boyokani. Saulo alingaki koboma Yonatana mpo alobaki malamu mpo na Davidi, kasi baninga yango mibale bakutanaki lisusu mpe bayeisaki boninga na bango makasi. (1 Sam. 20:24-41) Na mbala ya nsuka oyo bakutanaki, Yonatana alendisaki Davidi “kati na Nzambe.”​—1 Sam. 23:16-18.

8 Yonatana akufaki na etumba na Bafilistia. (1 Sam. 31:6) Na loyembo moko ya mawa, Davidi ayembaki boye: “Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana, ndeko na ngai! Yo ozalaki na bolingo epai na ngai. Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa, koleka bolingo ya basi.” (2 Sam. 1:26) Davidi ná Yonatana bazalaki baninga ya solosolo.

Zalá ntango nyonso na “elimo ya komikitisa”

9. Ndenge nini Basambisi mokapo 9 emonisi ntina ya komikitisa?

9 Mpo na kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kozala na “elimo ya komikitisa.” (1 Pet. 3:8; Nz. 138:6) Lisolo oyo ezali na Basambisi mokapo 9 emonisi ntina ya kozala na komikitisa. Yotama, mwana ya Gideona, alobaki boye: “[Ba]nzete babimaki mpo na kopakola moko ete azala mokonzi na bango.” Alobelaki nzete ya olive, ya figi, mpe ya vinyo. Banzete yango elimbolaki bato malamu oyo baboyaki koyangela bandeko na bango Bayisalaele. Kasi, nkamba ya nzubɛ, oyo basalelaka lokola nkoni, elimbolaki boyangeli ya Abimeleke, moto ya lolendo mpe mobomi, oyo azalaki koluka koyangela basusu. Atako Abimeleke “azalaki mokonzi na Yisalaele mbula misato,” akufaki mobesu. (Bas. 9:8-15, 22, 50-54) Eleki malamu kozala na “elimo ya komikitisa”!

10. Liteya nini ozwi na likambo oyo ekómelaki Elode mpo “apesaki Nzambe nkembo te”?

10 Na ekeke ya liboso, ntango Elode Agilipa, mokonzi ya Yudea oyo azalaki moto ya lolendo, azalaki na matata na bato ya Tulo mpe ya Sidona, bato yango balukaki kozongisa kimya na mokonzi. Bongo, ntango Elode azalaki koloba liboso ya ebele ya bato, babelelaki ete: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Elode apekisaki bango te, mpe anzelu ya Yehova abɛtaki ye mpe akufaki mbala moko “mpo apesaki Nzambe nkembo te.” (Mis. 12:20-23) Ezali boni soki ozali molobi ya malamu to oyebi mpenza koteya bato Biblia? Osengeli kopesaka Nzambe nkembo mpo na makambo nyonso oyo apesi yo nzela osala.​—1 Kol. 4:6, 7; Yak. 4:6.

Zalá na mpiko mpe na makasi

11, 12. Ndenge nini lisolo ya Enoka emonisi ete Yehova apesaka basaleli na ye mpiko mpe makasi?

11 Soki tozali kotambola na banzela ya Yehova na komikitisa, akopesa biso mpiko mpe makasi. (Det. 31:6-8, 23) Enoka, moto ya nsambo na molɔngɔ ebandi na Adama, atambolaki na mpiko nyonso elongo na Nzambe na ndenge abatelaki etamboli ya malamu na kati ya bato mabe ya ntango na ye. (Gen. 5:21-24) Yehova apesaki Enoka mpiko ya koyebisa bango etumbu oyo akanaki kopesa bango mpo na makambo ya mabe oyo bazalaki kosala. (Tángá Yuda 14, 15.) Yo mpe ozalaka na mpiko ya kosakola bitumbu ya Nzambe?

12 Yehova abomaki mokili mabe wana na Mpela ya ntango ya Noa. Kasi, esakweli ya Enoka ezali kolendisa biso lelo oyo, mpamba te etikali moke, Nzambe akotinda mampinga na ye mpo na koboma bato mabe. (Emon. 16:14-16; 19:11-16) Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge apesaka biso mpiko ya kosakola nsango na ye, ezala oyo etali bitumbu na ye to mapamboli oyo Bokonzi ekomema.

13. Ndenge nini toyebi ete Nzambe akoki kopesa biso mpiko mpe makasi mpo na kolonga mitungisi?

13 Ntango tokutani na mitungisi, tozalaka na mposa Nzambe apesa biso mpiko mpe makasi mpo na kolonga yango. Ntango Esau abalaki basi mibale oyo bazalaki Bahiti, basi yango “batungisaki [baboti na ye] Yisaka mpe Lebeka mingi.” Kutu, Lebeka alobaki boye: “Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soki [mwana na biso] Yakobo akobala mwasi Mohiti lokola baoyo, mwasi ya mokili oyo, nde bomoi na ngai ekozala malamu boni?” (Gen. 26:34, 35; 27:46) Yisaka ayokaki ye mpe atindaki Yakobo akende koluka mwasi oyo azalaki mosambeli ya Yehova. Atako Yisaka ná Lebeka bakokaki te kobongola makambo oyo Esau asalaki, Nzambe apesaki bango bwanya, mpiko mpe makasi ya kotikala sembo epai na Ye. Biso mpe, soki tosɛngi Yehova lisalisi, akosalisa biso.​—Nz. 118:5.

14. Ndenge nini elenge moko Moyisalaele amonisaki mpiko?

14 Bambula mingi na nsima, elenge mwasi moko Moyisalaele oyo bamemaki na boombo na Sulia, akómaki kosala na ndako ya Namana, mokonzi ya basoda ya ekólo yango; moto yango azalaki na maladi ya maba. Lokola elenge yango ayokaki ete mosakoli Elisa asalaki makamwisi na nguya ya Nzambe, na mpiko nyonso, ayebisaki mwasi ya Namana boye: ‘Soki nkolo na ngai akei na Yisalaele, mosakoli ya Yehova akobikisa ye.’ Namana akendaki na Yisalaele mpe abikisamaki na ndenge ya likamwisi. (2 Mik. 5:1-3) Elenge yango azali ndakisa malamu mpo na bilenge oyo basɛngaka Yehova apesa bango mpiko ya kosakola epai ya balakisi, baninga ya kelasi, mpe bato mosusu!

15. Obadia asalaki likambo nini oyo emonisi ete azalaki na mpiko?

15 Tozalaka mpe na mposa Nzambe apesa biso mpiko ntango tokutani na minyoko. Tózwa ndakisa ya Obadia, mokɛngɛli ya ndako ya Mokonzi Ahaba, na mikolo ya mosakoli Eliya. Ntango Yezabele, mwasi ya mokonzi, apesaki mitindo ete báboma basakoli ya Nzambe, Obadia abombaki basakoli 100, “ntuku mitano, ntuku mitano kati na lidusu.” (1 Mik. 18:13; 19:18) Yo mpe okobanga te kosalisa bandeko oyo bakutani na minyoko ndenge Obadia asalisaki basakoli ya Yehova?

16, 17. Alisitake ná Gayusi basalaki nini ntango bakutanaki na minyoko?

16 Ntango tokutani na minyoko, tózalaka na elikya ete Yehova akotika biso te. (Lom. 8:35-39) Na esika oyo bazalaki kosala masano na engumba Efese, ebele ya bato oyo batombokaki bakangaki Alisitake ná Gayusi, baninga ya Paulo. Demetiliusi, mosali moko ya biloko ya palata, nde atindaki bato bátomboka. Ye ná bato mosusu bazalaki kosala bikeko ya palata ya nzambe-mwasi Alatemisi; bamonaki ete mosala oyo bazalaki kobikela ekómaki na likama mpamba te makambo oyo Paulo azalaki kosakola etindaki bato mingi ya engumba yango bátika kosambela bikeko. Batomboki yango bamemaki Alisitake ná Gayusi na esika ya masano mpe babandaki koganga ete: “Alatemisi ya Efese azali Monene!” Mbala mosusu Alisitake ná Gayusi bakanisaki ete bakobomama, kasi kalaki ya engumba apekisaki bato yango.​—Mis. 19:23-41.

17 Soki yo nde okutanaki na likambo ya ndenge wana, olingaki kotika mosala ya kosakola? Likambo moko te emonisi ete Alisitake ná Gayusi balɛmbaki. Lokola Alisitake autaki na engumba Tesaloniki, ayebaki ete mosala ya kosakola nsango malamu ekoki komemela moto minyoko. Mwa moke liboso, mobulu ebimaki na Tesaloniki ntango Paulo asakolaki kuna. (Mis. 17:5; 20:4) Lokola Alisitake ná Gayusi bazalaki kotambola na banzela ya Yehova, Nzambe apesaki bango makasi ya koyikela minyoko mpiko.

Kanisáká bolamu ya basusu

18. Ndenge nini Pilisika ná Akila ‘batyaki likebi’ na bolamu ya basusu?

18 Ezala tozali konyokwama sikoyo to te, tosengeli komibanzabanza mpo na bandeko na biso baklisto. Pilisika mpe Akila bazalaki ‘kotya likebi’ na bolamu ya basusu. (Tángá Bafilipi 2:4.) Ekoki kozala ete Paulo azalaki kofanda epai ya Pilisika ná Akila na Efese, epai Demetiliusi abimisaki mobulu oyo touti kolobela. Mbala mosusu likambo yango nde etindaki Akila ná Pilisika ‘bátya bomoi na bango na likama’ mpo na Paulo. (Lom. 16:3, 4; 2 Kol. 1:8) Lelo oyo, komibanzabanza mpo na bandeko na biso oyo bazali na minyoko esɛngaka tózala “ekɛngɛ lokola banyoka.” (Mat. 10:16-18) Tosalaka mosala na biso na ekɛngɛ mpe toboyaka kopesa bankombo ya bandeko to koyebisa makambo mosusu epai ya banyokoli.

19. Makambo nini ya malamu Dolokasi azalaki kosala mpo na basusu?

19 Tokoki koluka bolamu ya basusu na ndenge mingi. Bandeko mosusu bakoki kozala na mposa ya lisungi, mpe biso tokoki kosalisa bango. (Ef. 4:28; Yak. 2:14-17) Na ekeke ya liboso, na lisangá ya Yope, ezalaki na mwasi moko ya boboto, nkombo na ye Dolokasi. (Tángá Misala 9:36-42.) Dolokasi “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa”; na ndakisa, azalaki kotonga bilamba mpo na basi-bakufelá mibali oyo bazalaki na bosɛnga. Liwa na ye na mobu 36 T.B. epesaki basi yango mawa mingi. Nzambe apesaki ntoma Petelo nguya ya kosekwisa Dolokasi, mpe ekoki mpenza kozala ete na nsima, akobaki kosakola nsango malamu na esengo mpe kosalisa basusu. Ezali mpenza esengo kozala na baklisto ya basi ya ezaleli malamu ndenge wana lelo oyo!

20, 21. (a) Boyokani nini ezali kati na kolendisa basusu mpe kotyela bango likebi? (b) Ndenge nini okoki kolendisa basusu?

20 Totyelaka basusu likebi na ndenge tolendisaka bango. (Lom. 1:11, 12) Silasi, moninga ya Paulo, azalaki kolendisa basusu. Na mobu 49 T.B., nsima ya kozwa ekateli na likambo etali kokatama ngenga, lisangani ya mikóló-bakambi etindaki bato bámema mikanda epai ya baklisto oyo bazalaki na bingumba mosusu. Silasi, Yuda, Balanabasi, mpe Paulo bakendaki na Antiokia. Kuna, Silasi ná Yuda “balendisaki bandeko yango na masukulu mingi mpe bapesaki bango makasi.”​—Mis. 15:32.

21 Na nsima, batyaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ na engumba Filipi, kasi babimaki ntango mabelé eninganaki. Kanisá esengo na bango ntango bapesaki litatoli mpe mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná libota na ye bakómaki bandimi! Liboso bálongwa na engumba yango, Silasi ná Paulo balendisaki bandeko. (Mis. 16:12, 40) Na ndakisa ya Paulo ná Silasi, tosengeli kolendisaka basusu na biyano, masukulu, mpe na molende na biso na mosala ya kosakola. Yango wana, soki ozali na ‘mwa liloba moko ya kolendisa, yebisá yango.’​—Mis. 13:15.

Kobá kotambola na banzela ya Yehova

22, 23. Tosengeli kosala nini mpo masolo ya Biblia esalisa biso?

22 Tosengeli kozala na botɔndi mpo na masolo oyo ezali na Liloba ya Yehova, “Nzambe oyo alendisaka”! (2 Kol. 1:3, Byington) Mpo masolo yango esalisa biso, tosengeli kosalelaka mateya ya Biblia na bomoi na biso mpe kotika elimo santu ya Nzambe etambwisa biso.​—Gal. 5:22-25.

23 Komanyola na masolo ya Biblia ekosalisa biso tólona bizaleli ya malamu. Ekobongisa boyokani na biso na Yehova, ye oyo apesaka biso “mayele mpe boyebi mpe esengo.” (Mos. 2:26) Na ndenge yango, tokosepelisa motema ya Nzambe na biso ya bolingo. (Mas. 27:11) Tiká tózala na ekateli ya kosala yango wana tozali kokoba kotambola na banzela ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini okoki komonisa ete ozali moto oyo abongi kotyelama motema?

• Mpo na nini tosengeli kozala na “elimo ya komikitisa”?

• Ndenge nini masolo ya Biblia ekoki kopesa biso mpiko?

• Ndenge nini tokoki kotya likebi na bolamu ya basusu?

[Elilingi na lokasa 8]

Yefeta akokisaki ndai na ye, atako ezalaki mpasi mpo na ye ná mwana na ye

[Elilingi na lokasa 10]

Bilenge, liteya nini bozwi na ndakisa ya elenge mwasi Moyisalaele?

[Elilingi na lokasa 11]

Ndenge nini Dolokasi asalisaki baklisto oyo bazalaki na bosɛnga?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto