Bolingo ya Nzambe emonanaka na bolingo ya mama
“Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.”—YISAYA 49:15.
MAMA moko auti kobota, amemi bebe na ye mpe azali komɛlisa ye libɛlɛ. Likambo yango emonisaka bolingo ya mama mpo na mwana na ye. Mwasi moko nkombo na ye Pam alobaki ete: “Mbala ya liboso oyo namemaki mwana na ngai, nayokaki bolingo makasi mpo na ye mpe namonaki ete nazali na mokumba ya kobatela ye.”
Mbala mosusu tokoki kokanisa ete yango ezali likambo ya kokamwa te; nzokande, bato ya mayele bamoni ete mwana akolaka malamu soki mama azali kolinga ye. Mokanda moko oyo biro ya OMS oyo etalelaka bokɔlɔngɔnɔ ya motó ebimisaki elobi boye: “Bolukiluki emonisi ete bana oyo basundolamaka to oyo bakabolaka bango na bamama na bango bakómaka mawamawa mpe batungisamaka na makanisi, mbala mosusu mpe bakómaka kobangabanga.” Mokanda yango elobeli bolukiluki moko oyo emonisaki ete bana oyo bamama na bango balingaka bango mpe batyelaka bango likebi banda bomwana mpenza bazalaka na mayele mingi koleka bana oyo bamama na bango bakipaka bango te.
Mpo na komonisa ntina ya bolingo ya mama, Alan Schore, profɛsɛrɛ na Iniversite ya Los Angeles, na États-Unis, alobi boye: “Boyokani ya liboso oyo mwana asalaka na moto, elingi koloba na mama na ye, ezalaka na ntina mingi, mpamba te yango esalaka ete mwana azala na likoki ya kozala na boyokani malamu na bato mosusu to azala na yango te.”
Nzokande, makambo lokola konyokwama na makanisi, maladi, to mpe mikakatano mosusu ekoki kosala ete mama akipe mwana na ye te to ‘abosana mwana oyo azali konungisa.’ (Yisaya 49:15) Kasi, likambo yango esalemaka mingi te. Kutu, emonani ete motema ya mama ebongisamá na boye ete azala na bolingo makasi mpo na mwana na ye. Minganga bamoni ete ntango mwasi azali kobota, hormone oyo babengi ocytocine ebakisamaka na kati ya nzoto; yango nde epesaka mama makasi ya kobimisa mwana mpe esalaka ete mabɛlɛ ya mama ebimisa miliki. Minganga balobaka ete hormone yango, oyo ezalaka mpe epai ya mibali, esalaka ete mama azala na bolingo mpe na boboto epai ya mwana.
Bolingo eutá wapi?
Bato oyo bateyaka ete moto autá na nyama balobaka ete bolingo lokola oyo ezalaka kati na mama ná mwana na ye, ebandaki na mbalakaka epai ya bikelamu oyo ezalaki kobongwana mokemoke mpe ebatelamaki mpamba te ezalaki likambo ya malamu mpo na bikelamu yango. Na ndakisa, zulunalo moko oyo ebimisamaka na Internet (Mothering Magazine) elobi boye: “Eteni ya bɔɔngɔ oyo etambwisaka mayoki ya moto ezali eteni ya liboso oyo ebakisamaki likoló ya bɔɔngɔ ya nyama ntango azalaki kobongwana mokemoke tii akómaki moto. Eteni yango ya bɔɔngɔ nde esalaka ete mama ná bebe na ye bálingana makasi.”
Ya solo, bolukiluki ya bato ya mayele esalisi biso tóyeba ete eteni moko ya bɔɔngɔ etambwisaka mayoki na biso. Kasi, okanisi ete elongobani mpenza koloba ete bolingo ya mama mpo na mwana na ye ezali likambo esalemaki na mbalakaka na bɔɔngɔ ya nyama oyo na nsima akómaki moto?
Tótalela likanisi mosusu. Biblia elobi ete Nzambe akelaki bato na elilingi na ye, elingi koloba apesá bango likoki ya komonisa bizaleli na ye. (Genese 1:27) Ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene ezali bolingo. Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te.” Mpo na nini? “Mpamba te Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Tomoni ete vɛrsɛ yango elobi te ete Nzambe azali na bolingo. Kasi, Nzambe azali bolingo. Bolingo euti epai na ye.
Biblia elobi boye: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka te na makambo ya kozanga boyengebene, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, endimaka makambo nyonso, elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakolinti 13:4-8) Okanisi mpenza ete ezaleli malamu ndenge wana ebandaki kaka na mbalakaka?
Osengeli kosala nini?
Ntango ozalaki kotánga ndenge oyo Biblia elobeli bolingo na paragrafe oyo eleki, oyokaki mposa ete moto moko amonisela yo bolingo ya ndenge wana? Ezali mabe te oyoka mposa yango. Mpo na nini? Mpamba te “tozali libota ya Nzambe.” (Misala 17:29) Nzambe akelá biso na mposa ya kolingama mpe ya kolinga. Tosengeli mpe koyeba ete Nzambe alingaka biso mingi. (Yoane 3:16; 1 Petelo 5:6, 7) Vɛrsɛ oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo elobi ete bolingo ya Nzambe ebongwanaka te mpe ezali makasi koleka bolingo ya mama mpo na mwana na ye!
Kasi, okoki komituna boye: ‘Soki Nzambe azali na bwanya, azali na nguya, mpe azali na bolingo, mpo na nini azali kosilisa bampasi te? Mpo na nini azali kotika ete bana bákufaka, bato bányokwamaka, mpe bato mabe mpe ya lokoso bákoba kobebisa mabelé?’ Yango ezali mituna ya malamu oyo esengeli kozwa biyano ya solosolo.
Ata soki bato oyo bakanisaka ete tokoki koyeba Nzambe te balobi nini, yebá ete tokoki kozwa biyano ya solosolo na mituna yango. Bamilio ya bato na mikili ndenge na ndenge basili kozwa biyano na mituna yango nsima ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Babimisi ya zulunalo oyo bazali kolendisa yo mpe osala bongo. Wana boyebi na yo ya Liloba ya Nzambe mpe ya biloko oyo akelá ezali kobakisama, okomona ete Nzambe azali mosika te mpe ete okoki koyeba ye. Kutu, okondimisama ete Nzambe azali “mosika te na mokomoko na biso.”—Misala 17:27.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Bolingo ya Nzambe ezali makasi koleka bolingo ya mama mpo na mwana na ye