Ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami
LISANGANI ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esangisi bandeko mibali oyo bamipesi epai na Nzambe mpe bazali baklisto bapakolami. Bazali bamonisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele, oyo azali na mokumba ya kopesa bilei ya elimo mpe kotambwisa mosala ya kosakola na mabelé mobimba.—Mat. 24:14, 45-47.
Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bayanganaka pɔsɔ nyonso, mingimingi na mokolo ya misato. Yango esalisaka bandeko yango básalaka na bomoko. (Nz. 133:1) Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi basalaka mpe na bakomite ndenge na ndenge. Mpo na kokokisa matomba ya bokonzi, komite mokomoko ezali na mokumba na yango, ndenge emonisami na mokuse awa na nse.
◼ KOMITE YA BATAMBWISI: Komite yango esangisi batambwisi ya bakomite mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ná sekrɛtɛrɛ moko oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Komite yango esɛnzɛlaka ete bakomite mosusu nyonso etambola na ndenge ebongi. Etalelaka mpe makambo minene oyo ekómelaka Batatoli ya Yehova na mbalakaka, minyoko mpe makama.
◼ KOMITE OYO ETALELAKA BANDEKO YA BETELE: Bandeko ya komite yango bazali na mokumba ya kozwa bibongiseli mpo bandeko ya Betele ya mokili mobimba bázala malamu na mosuni, na elimo mpe na makambo mosusu. Komite yango eponaka bandeko oyo basengeli kobengama na Betele mpe eyanolaka na mituna oyo bandeko ya Betele batunaka mpo na mosala na bango.
◼ KOMITE YA KOBIMISA MIKANDA: Komite yango etalelaka misala nyonso ya kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kotinda yango na mokili mobimba. Etalelaka mpe ba-imprimeri, bandako mpe bibongiseli mosusu oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Komite yango esɛnzɛlaka ete makabo oyo bandeko bapesaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba esalelama na ndenge ebongi.
◼ KOMITE YA MOSALA YA KOSAKOLA: Bandeko ya komite yango batalelaka makambo etali mosala ya kosakola mpe masangá, babongisi-nzela, bankulutu mpe bakɛngɛli-batamboli. Ebongisaka masolo oyo ebimaka na Mosala na Biso ya Bokonzi. Ezali mpe na mokumba ya kobenga bandeko na Eteyelo ya Gileadi mpe na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, mpe na nsima etindaka bango epai mposa ezali.
◼ KOMITE YA MATEYA: Komite yango etalelaka mateya oyo epesamaka na mayangani mpe na masangá. Ebongisaka mateya mpo na bandeko ya Betele mpe etalelaka biteyelo ndenge na ndenge, lokola Eteyelo ya Gileadi, Eteyelo mpo na babongisi-nzela mpe ebimisaka bakasɛti ná badiskɛ CD mpe DVD.
◼ KOMITE YA BOKOMI: Komite yango ezali na mokumba ya kobimisa bilei ya elimo na mikanda mpe kokabola yango epai ya bandeko mpe bato mosusu. Komite yango eyanolaka na mituna ya Biblia oyo bato batunaka, etalelaka badrame mpe masukulu. Etambwisaka mpe mosala ya kobongola mikanda na mokili mobimba.
Ntoma Paulo alobaki ete lisangá ya bapakolami ezali lokola nzoto ya moto mpe amonisaki ete biteni na yango mokomoko ezali na ntina mpe esengeli kosalaka na bomoko mpo na kokokisa mosala oyo Nzambe apesi bango. (Lom. 12:4, 5; 1 Kol. 12:12-31) Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá, apesaka bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nyonso oyo basengeli na yango mpo bázala na boyokani, bátambwisaka mosala malamu mpe mpo na kobimisaka bilei ya elimo. (Ef. 4:15, 16; Kols. 2:19) Na ndenge yango, Lisangani ya mikóló-Bakambi ebongisami malamu mpo na kotambwisa mosala ya Bokonzi, wana Yehova azali kotambwisa bango na lisalisi ya elimo santu.