Lolenge oyo tozali kosambela Nzambe ezali na ntina?
NA BUKU na ye (The Spiritual Nature of Man), profɛsɛrɛ Alister Hardy alobaki boye: “Moto nyonso azalaka na mposa ya kosambela.” Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema emonisi ete alobaki solo. Na ankɛtɛ yango, bato ebele (86 %) na mokili balobaki ete basambelaka na lingomba boye to boye.
Ankɛtɛ yango emonisaki mpe ete bato nyonso oyo basambelaka bakoki kosangisama na mangomba ya minene 19, mpe baoyo bamibengaka baklisto bazali na kati ya mangomba 37 000. Yango etindaka yo te omituna soki Nzambe andimaka mangomba nyonso wana? Lolenge oyo tozali kosambela Nzambe ezali na ntina?
Na likambo wana ya ntina mingi, emonani polele ete tosengeli te kolanda kaka makanisi na biso moko. Tosengeli nde koluka koyeba likanisi na ye moko Nzambe. Mpo na yango, tosengeli kotángaka Biblia, Liloba ya Nzambe. Mpo na nini? Mpo Yesu ye moko alobaki na Nzambe ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Ntoma Paulo mpe alobaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.”—2 Timote 3:16.
Biblia emonisi ete Nzambe andimaka losambo nyonso te. Na kati na yango, tomonaka bandakisa ya bato oyo Nzambe andimaki losambo na bango mpe ya baoyo aboyaki. Soki totaleli bandakisa yango na likebi mpenza, tokoki koyeba makambo oyo tosengeli kosala ná oyo tosengeli kosala te mpo Nzambe andima losambo na biso.
Ndakisa moko ya kala
Na nzela ya mosakoli Moize, Yehova Nzambe apesaki Bayisalaele mibeko oyo eyebisaki ndenge oyo basengeli kosambela Nzambe na ndenge oyo alingaka. Ntango Bayisalaele bazalaki kosala makambo oyo mobeko yango, oyo babengaka Mobeko ya Moize, ezalaki kosɛnga, Nzambe azalaki kondima bango lokola bato na ye. (Exode 19:5, 6) Kasi, atako Nzambe azalaki kotalela bango lokola bato na ye mpenza, Bayisalaele bakangamaki na lolenge ya losambo oyo ye andimaka te. Mbala na mbala, bapesaki Yehova mokɔngɔ mpe balandaki losambo ya bato ya bikólo mosusu.
Na ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.), na ntango ya mosakoli Ezekiele mpe Yilimia, Bayisalaele mingi baboyaki kotosa Mobeko ya Nzambe mpe bakómaki baninga mpenza ya bato ya bikólo mosusu. Lokola bakómaki kolanda mimeseno ya bato yango mpe kosangana na bango ná biyenga na bango, Bayisalaele bakómaki kosangisa losambo ya Yehova ná losambo ya lokuta. Bayisalaele mingi bazalaki koloba boye: “Biso tokozala [lokola bato ya] mabota, lokola bato ya mikili kosambela nzete mpe mabanga.” (Ezekiele 20:32; Yilimia 2:28) Bazalaki koloba ete bazali basambeli ya Yehova Nzambe, kasi bazalaki mpe kosambela “bikeko,” ata mpe kopesa bana na bango mbeka epai ya bikeko yango.—Ezekiele 23:37-39; Yilimia 19:3-5.
Bato ya arkeoloji babengaki lolenge wana ya kosambela sangisásangisá, elingi koloba kosambela banzambe ebele. To mpe babengaki yango kaka losambo ya bonkɔkɔ. Lelo oyo, bato mingi balobaka ete lokola bato ya ndenge na ndenge bafandi esika moko, tosengeli kondimaka mimeseno ya bato nyonso, ezala ata na makambo ya losambo. Na yango, bamonaka ete ezali mabe te kosambela Nzambe na ndenge oyo motema na yo elingi. Ezali mpenza bongo? Moto na moto asengeli kosambela ndenge alingi? Tótala mwa bandakisa ya mimeseno mosusu ya losambo oyo Bayisalaele mosusu bakɔtisaki na losambo ya solo, mpe tómona epai mimeseno yango ememaki bango.
Bayisalaele bakómi kosambela ná Yehova ná bikeko
Losambo ya ndenge wana ezalaki kosalema na “bisika ya likoló,” to na batempelo ya mikemike, epai bazalaki kotya bitumbelo ya mbeka, ya mpaka malasi, makonzi mosantu, oyo mbala mosusu ezalaki bikeko ya Asela, nzambe-mwasi ya Kanana oyo bazalaki koloba ete atalelaka makambo ya kobota. Bisika ya ndenge wana ezalaki mingi na Yuda. 2 Mikonzi 23:5, 8 elobeli “bisika ya likoló ya mboka ya Yuda mpe ya bipai bizingelaki Yelusaleme; . . . longwa na Geba [na ngámbo ya nɔrdi] kino Bele-seba [na ngámbo ya sudi].”
Na bisika wana ya likoló, Bayisalaele bazalaki kotumba “mpaka ya malasi epai ya Bala mpe ya moi mpe ya sanza mpe [minzoto] minene mpe ya [mampinga nyonso, NW] ya lola.” Bazalaki mpe na “ndako ya bato ya pite . . . na ndako ya [Yehova]” mpe bazalaki kotumbela Moleke bana na bango mbeka.—2 Mikonzi 23:4-10.
Bato ya arkeoloji bamonaki ebele ya bikeko ya mabelé na Yelusaleme mpe na Yuda, mingimingi bisika oyo ezalaki bandako ya bato. Bikeko yango mingi ezalaki ya basi oyo bazali bolumbu mpe bazalaki na mabɛlɛ mineneminene. Bato mosusu ya mayele balobaka ete bikeko yango ezali bikeko ya Asetaloti mpe Asela, banzambe basi oyo bapesaka mabota. Balobaka ete bikeko yango ezalaki na “nguya ya kosalisa basi bázwa zemi mpe bábota.”
Ndenge nini Bayisalaele bazalaki kotalela bisika wana oyo bazalaki kosambela ná Yehova ná banzambe ya lokuta? Profɛsɛrɛ Ephraim Stern, oyo atángisaka na iniversite moko (Université hébraïque), alobaki ete ekoki kozala ete bisika yango mingi ya likoló “ezalaki mpo na losambo ya Yawe [Yehova].” Makomi oyo bato ya akeoloji bakundolaki na bisika mingi emonisi lokola profɛsɛrɛ yango alobaki solo. Na ndakisa, likomi moko elobi boye: “Napamboli yo na nkombo ya Yawe ya Samalia mpe na nkombo ya Asela na ye;” mpe mosusu elobi boye: “Napamboli yo na nkombo ya Yawe ya Temani mpe na nkombo ya Asela na ye!”
Bandakisa wana emonisi ndenge Bayisalaele bazalaki kosangisa losambo ya pɛto ya Yehova ná losambo ya mbindo ya bapakano. Yango ebebisaki etamboli na bango mpe ekɔtisaki bango na molili ya elimo. Ndenge nini Yehova azalaki kotalela likambo yango?
Ndenge oyo Yehova azalaki kotalela losambo ya sangisásangisá
Na nzela ya mosakoli na ye Ezekiele, Yehova amonisaki ete azalaki kosepela na losambo wana ya mbindo te. Alobaki boye: “Na bisika nyonso ya kofanda na bino, mboka ekokufa mpe bisika ya likoló bikobebisama, boye bitumbelo na bino bikokufa mpe bikobebisama, mpe bikeko na bino bikobukana mpe bikosila, mpe bitumbelo ya mpaka na bino bikokatana mpe misala na bino mikobomama.” (Ezekiele 6:6) Emonani polele ete Yehova azalaki kosepela na losambo wana ata moke te.
Yehova Nzambe asakolaki ndenge Yisalaele ekobebisama. “Talá nakotinda . . . Nebukadalesala mokonzi ya Babele, moombo na ngai, mpe nakoyeisa bango kotɛmɛla mokili oyo mpe kotɛmɛla mabota nyonso baoyo bazingeli yango. Nakobebisa bango nyɛ . . . Mokili mobimba ekozala esika ya mpamba.” (Yilimia 25:9-11) Esakweli yango ekokisamaki na mobu 607 L.T.B., ntango bato ya Babilone bayaki kobunda na Yelusaleme mpe babebisaki engumba yango ná tempelo na yango nyɛ.
Mpo na kobebisama ya Yelusaleme, Profɛsɛrɛ Stern, oyo tolobeli na likoló, alobaki ete biloko oyo bato ya arkeoloji bazwá na esika yango “emonisi mpenza ete Biblia elobaki solo ete babebisaki Yelusaleme, batumbaki yango, babukaki bandako mpe bifelo na yango.” (2 Mikonzi 25:8; 2 Ntango 36:18-19) Abakisaki boye: “Makambo oyo esalemaki na Yelusaleme na ntango wana . . . ekoki kotángama na kati ya makambo ya nsɔmɔ oyo Biblia elobeli.”
Liteya mpo na biso
Liteya monene oyo tozwi na lisolo oyo ezali ete Nzambe andimaka te losambo oyo esangisaka mateya ya Biblia ná mateya, mimeseno mpe milulu ya mangomba mosusu. Ntoma Paulo asimbaki mpenza liteya yango. Akolaki na lingomba ya Bafalisai mpe ayekolaki mibeko ya mwa lingomba yango. Kasi, asalaki nini ntango ayebaki mpe andimaki ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki? Alobaki boye: “Biloko oyo ezalaki matomba mpo na ngai, nakómá kotalela yango biloko ebungá mpo na Klisto.” Atikaki etamboli na ye ya kala mpe akómaki moyekoli ya solosolo ya Klisto.—Bafilipi 3:5-7.
Lokola asalaki mibembo mingi na mosala ya misionɛrɛ, Paulo ayebaki mpenza mimeseno mpe bafilozofi ya bato ya mikili ndenge na ndenge. Yango wana, akomelaki baklisto ya Kolinti boye: “Bosangani nini ezali na kati ya pole mpe molili? Lisusu, boyokani nini ezali na kati ya Klisto mpe Beliala? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali na kati ya tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’”—2 Bakolinti 6:14-17.
Lokola toyebi sikoyo ete Nzambe akipaka lolenge oyo tosambelaka ye, tokoki komituna boye: ‘Nzambe andimaka losambo ya ndenge nini? Ndenge nini nakoki kokóma moninga ya Nzambe? Nasengeli kosala nini mpo nasambela Nzambe na ndenge oyo alingaka?’
Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo ozwa biyano na mituna wana mpe na mituna mosusu ya Biblia. Tosɛngi yo okende kokutana na Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi na esika ofandi to okomela babimisi ya zulunalo oyo mpo na kosɛnga ete moto moko aya koyekolaka na yo Biblia na ngonga mpe na esika oyo ebongi na yo.
[Elilingi na lokasa 10]
Tempelo mpo na losambo ya bikeko, na engumba Tel arad, na Israël
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Garo Nalbandian
[Elilingi na lokasa 10]
Bikeko ya Aseloti oyo bamonaki na bisika oyo ezalaki bandako ya bato na Yuda ya kala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photograph © Israel Museum, Jerusalem; courtesy of Israel Antiquities Authority