Asalaki lokola “mwana mwasi moke ya Yisalaele”
PƆSƆ mibale liboso ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu, libota ya ndeko Sales mobimba, oyo bafandaka na engumba Praia Grande, na Brésil, basalaki liste ya bato oyo bakobenga na molulu yango. Bapesaki Abigayl, mwana na bango ya mbula motoba, lokasa moko ya libyangi mpe batunaki ye soki akolinga kopesa yango na nani.
Abigayl ayanolaki ete: “Nakopesa yango na moto oyo asɛkisaka ngai ntango nyonso.”
Baboti na ye batunaki ye boye: “Moto yango nde nani?”
Ye ayanolaki boye: “Moto oyo atambolaka na velo ya bibɔsɔnɔ.”
Mikolo minei na nsima, Abigayl alakisaki baboti na ye moto yango. Nkombo ya moto yango Walter, mpe azalaki kofanda mosika te na Ndako ya Bokonzi. Mbula 15 liboso, ntango azalaki na mbula 28, likama moko ya motuka esalemaki mpe ebomá ye kobanda na loketo tii na makolo. Lokola azalaki na mbongo mingi, azalaki na bato mibale oyo bazalaki kobatela ye. Abigayl asɛngaki soki akoki kosolola na ye mpe bandimaki. Kasi, liboso abanda, baboti ya Abigayl bayebisaki moto yango ete mwana na bango alingi kopesa ye lokasa ya libyangi.
Na nsuka ya lisolo na bango, Abigayl alobaki boye: “Bato nyonso na Ndako ya Bokonzi bazwaki nkasa ebele, kasi ngai nazwaki kaka moko oyo. Elingi koloba, yo kaka nde nazali kobenga. Soki oyei te, nakozala na moto te. Kasi, soki oyei, nakosepela mingi, mpe Yehova akosepela mingi lisusu koleka.”
Na mokolo ya Ekaniseli, Batatoli, ná Abigayl, bazalaki kosukola Ndako ya Bokonzi mpe kobongisa yango mpo na Ekaniseli. Mokolo yango na nsima ya nzanga, Walter azalaki koleka wana mpe ntango amonaki Abigayl, asɛngaki sofɛlɛ na ye atɛlɛmisa motuka. Afungolaki motuka mpe atunaki Abigayl soki azali kosala nini wana. Abigayl ayebisaki ye ete bazali kobongisa Ndako ya Bokonzi mpo na koyamba ye.
Mokolo yango na mpokwa, Abigayl azalaki kaka motema likoló. Lisukulu ya Ekaniseli ebandaki, kasi Abigayl azalaki kotalatala mpo na komona soki Walter akómi. Mbala moko, Walter ná bato oyo babatelaka ye bakómaki. Abigayl asepelaki makasi! Nsima ya lisukulu yango, Walter alobaki ete azalaki kokende na engumba mosusu, kasi na nzela abongolaki makanisi mpe ayaki na Ekaniseli yango kaka mpo na Abigayl. Na nsima, abakisaki boye: “Lisolo yango elobeli mpenza makambo oyo nazalaki na mposa ya koyoka.” Asɛngaki bápesa ye Biblia, mpe banda wana, akómaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita.
Na ntango wana, leki ya Walter ya mwasi alobaki ete alingi komona Abigayl, oyo ndeko na ye atángaka nkombo na ye mikolo nyonso. Ntango amonaki Abigayl, asepelaki komona ete Abigayl azali mwana malamu mpenza. Alobaki boye: “Nayebi sikoyo ntina oyo ndeko na ngai azalaka na esengo.”
Walter ayekolaka mpe ayanganaka na makita tii lelo. Kutu, apesaka biyano na makita mpe ayebisaka basusu makambo oyo azali koyekola. Ya solo mpenza, elenge Abigayl asalisi biso tókanisa lisusu mwana mwasi ya Yisalaele oyo asalisaki Naamana ayeba Yehova, Nzambe ya solo.—2 Mikonzi 5:2-14.