Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/6 lok. 23
  • Nzambe oyo alimbisaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe oyo alimbisaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Atikalaki sembo na komekama
    Mekolá kondima na bango
  • Lokola Petro, kolɛmba te kobundisa bolɛmbu na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/6 lok. 23

Pusaná penepene na Nzambe

Nzambe oyo alimbisaka

Yoane 21:15-17

“YO OZALI malamu, Ɛ [Yehova], mpe okolimbisaka mabe.” (Nzembo 86:5) Na maloba kitoko wana, Biblia ezali komonisa biso ete Yehova azalaka ntango nyonso pene na kolimbisa. Likambo moko oyo ekómelaki ntoma Petelo emonisi polele ete Yehova alimbisaka “na solo.”​—Yisaya 55:7.

Petelo azalaki moko ya baninga ya Yesu ya motema. Nzokande, na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé, Petelo abangaki miso ya bato mpe asalaki lisumu moko monene. Na libándá moko pene na esika oyo bazalaki kosambisa Yesu atako asalaki eloko te, Petelo awanganaki Yesu na miso ya bato nyonso, mpe asalaki yango mbala misato mobimba. Na mbala ya misato, Yesu “abalukaki mpe atalaki Petelo.” (Luka 22:55-61) Kanisá naino ndenge Petelo ayokaki ntango miso na ye ná oyo ya Yesu ekutanaki! Ntango Petelo amonaki ete asalaki likambo moko ya mabe koleka, “alɛmbaki nzoto mpe abandaki kolela.” (Malako 14:72) Lokola awanganaki Yesu mbala misato mobimba, Petelo akómaki komituna soki Nzambe akolimbisa ye.

Lisolo oyo Yesu asololaki na Petelo nsima ya lisekwa na ye esalisaki Petelo amona ete balimbisi ye. Yesu akatelaki Petelo mangala te. Kasi, atunaki Petelo boye: “olingaka ngai?” Petelo ayanolaki ete: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Yesu alobaki na ye boye: “Leisá bana-mpate na ngai.” Yesu azongelaki motuna yango mpo na mbala ya mibale, mpe Petelo azongelaki kaka eyano yango, kasi ekoki kozala ete na mbala wana amatisaki mwa mongongo. Yesu alobaki boye: “Batelá bampate na ngai ya mike.” Na nsima, Yesu azongelaki motuna yango mpo na mbala ya misato: “Olingaka ngai mingi?” Na mbala wana, “Petelo ayokaki mawa” mpe alobaki ete: “Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi yango ete nalingaka yo mingi.” Yesu alobaki na ye: “Leisá bampate na ngai ya mike.”​—Yoane 21:15-17.

Mpo na nini Yesu atunaki mituna oyo ayebaki biyano na yango? Yesu azalaki na likoki ya kotánga mitema, yango wana ayebaki ete Petelo alingaka ye. (Malako 2:8) Na mituna wana, Yesu apesaki Petelo libaku ya komonisa mbala misato ete alingaka ye. Biyano ya Yesu oyo: “Leisá bana-mpate na ngai. . . . Batelá bampate na ngai ya mike. . . . Leisá bampate na ngai ya mike,” endimisaki ntoma Petelo ete Yesu atikaki kotyela ye motema te. Kutu, Yesu apesaki Petelo mokumba ya kobatela eloko moko ya motuya mingi, elingi koloba bampate to bayekoli ya Yesu. (Yoane 10:14, 15) Na ntembe te, motema ya Petelo ekitaki ntango ayebaki ete Yesu azalaki kaka kotyela ye motema.

Emonani polele ete Yesu alimbisaki ntoma Petelo. Lokola Yesu asalaka makambo lokola Tata na ye, tokoki koloba ete Yehova mpe alimbisaki Petelo. (Yoane 5:19) Yehova akakatanaka te kolimbisa, kasi azali Nzambe ya motema mawa “oyo akolimbisaka” mosumuki oyo abongoli motema. Koyeba bongo esengeli mpenza kobɔndisa biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto