Ezali mabe kosalela nkombo ya Nzambe?
NA MAKOMAMI ya Liebele, oyo bato mingi babengaka “Kondimana ya Kala,” nkombo ya Nzambe ezali na bisika soki 7 000 mpe na Liebele, ezalaki kokomama יהוה (kotánga banda na lobɔkɔ ya mobali). Yango elingi koloba ete nkombo ya Nzambe ezalaki kokomama na balɛtrɛ minei ya Liebele Yôdh, He’, Waw, mpe He, oyo na alfabɛ ezali YHWH.
Na ntango ya kala, Bayuda bakómaki komona ete ezali mabe kosalela nkombo ya Nzambe. Yango wana bazalaki lisusu kotánga nkombo yango te, mpe na mikanda na bango, bakómaki kosalela bibengeli mosusu. Nzokande, babongoli mingi ya Biblia basaleli nkombo “Yawe,” to “Yehova.” Moko na Babiblia oyo esaleli nkombo yango ezali Liloba lya Nzambe, libongoli moko ya Lingomba ya Katolike. Biblia yango emonisi ete ntango Moize atunaki Nzambe ndenge oyo akoloba na Bayisalaele soki batuni ye nani atindi ye, Nzambe ayanolaki boye: “Okoloba na bango mpe: YAWE, Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Izaka, Nzambe wa Yakob atindi ngai epai ya bino. Eye ezali nkombo ya ngai ya seko; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo ena o bileko binso seko.”—Kobima 3:15.
Na libondeli moko, Yesu alobaki boye mpo na nkombo ya Nzambe: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.” Lisusu, na libondeli ya Tata wa biso, Yesu alobaki ete: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.”—Yoane 17:26; Matai 6:9.
Na yango, ezali likambo ya kokamwa na komona ete na buku na ye oyo abimisi sika (Yesu moto ya Nazalete), Pápa Benoît XVI akomi boye na likambo etali kosalela nkombo ya Nzambe: “Bayisalaele . . . bakanisaki malamu ndenge baboyaki kotánga nkombo yango oyo Nzambe amibengaki na yango, oyo emonisami na maloba YHWH, mpo na koboya kokitisa lokumu na yango mpe koboya ete ekóma lokola bankombo ya banzambe ya bapakano. Ndenge moko mpe, babongoli ya Babiblia oyo ezali kobima mikolo oyo basali libunga ndenge bakomi nkombo yango polele lokola nkombo mosusu nyonso ya kala; nzokande Bayisalaele bazalaki kotalela yango lokola libombami mpe bakokaki kotánga yango te.”
Okanisi nini? Ezali mabe kosalela nkombo ya Nzambe? Soki Yehova ye moko alobi ete: “Eye ezali nkombo ya ngai ya seko; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo ena o bileko binso seko,” moto azali nde na lotomo ya koboya yango?
[Elilingi na lokasa 30]
Yesu asalelaki nkombo ya Nzambe na libondeli