Pusaná penepene na Nzambe
“Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
MIKAKATANO mingi ya bomoi, na ndakisa bampasi, kolɛmba nzoto, mpe kozanga moninga, ekoki kosala ete moto azala mawamawa, to mpe azanga elikya. Makambo yango ekoki kotinda moto amituna boye: ‘Epai wapi nakoki kozwa lisalisi?’ Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 2 Bakolinti 1:3, 4 emonisi ete Yehova Nzambe abɔndisaka koleka moto mosusu nyonso.
Na vɛrsɛ 3, Paulo alobi ete Nzambe azali “Tata ya motema mawa mingi.” Maloba yango elimboli nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema mawa mingi” ezali komonisa likanisi ya komitya na esika ya bato oyo bazali na mpasi.a Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete liloba yango ekoki mpe kobongolama na “ayokaka mawa” to “amibanzabanzaka mingi.” “Motema mawa mingi” ya Nzambe etindaka ye asalisa biso. Koyeba ezaleli yango ya Nzambe ezali kotinda biso tópusana penepene na ye, boye te?
Paulo alobaki mpe ete Yehova azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” Na esika yango, Paulo asalelaki liloba oyo ekoki mpe kopesa “likanisi ya kolendisa moto oyo azali na mpasi to na mawa mpe likanisi ya kosalisa moto to kopesa ye makasi.” Buku moko (The Interpreter’s Bible) elobi boye: “Kobɔndisa moto oyo azali na mpasi elimboli kolendisa ye mpo akoka koyika mpiko.”
Okoki kotuna ete, ‘Ndenge nini Nzambe abɔndisaka biso mpe alendisaka biso mpo tókoka koyika mpiko?’ Asalaka yango libosoliboso na nzela ya Liloba na ye, Biblia, mpe na nzela ya likabo oyo apesi biso ya kobondela ye. Paulo alobaki ete na bolingo na ye, Nzambe apesi biso Liloba na ye mpo ete “na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” Longola yango, na nzela ya mabondeli oyo euti na motema, tokoki kozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”—Baloma 15:4; Bafilipi 4:7.
Yehova abɔndisaka basaleli na ye na makambo nini? Paulo alobaki ete Nzambe “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakolinti 1:4) Ezala mikakatano, mitungisi, to mpasi nini oyo tokutani na yango, Nzambe akoki kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko. Likanisi yango ezali kolendisa, boye te?
Libɔndisi ya Nzambe esukaka kaka te epai ya moto oyo azwi yango. Paulo abakisaki ete Nzambe abɔndisaka biso mpo “biso mpe tózala na likoki ya kobɔndisa baoyo bazali na kati ya ndenge nyonso ya bolɔzi na nzela ya kobɔndisama oyo biso moko tobɔndisami na yango epai ya Nzambe.” Ntango Nzambe abɔndisi biso na bolɔzi na biso, yango esalisaka biso tóyeba komitya na esika ya basusu mpe tósalisa baoyo bazali na bosɛnga.
Na bantango mosusu, Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” alongolaka mikakatano to bampasi na biso te. Kasi, tosengeli kobosana likambo oyo te: Soki toluki libɔndisi epai na ye, akoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko ata na mokakatano to mpasi nini oyo tokoki kokutana na yango. Ebongi mpenza ete tósambela mpe tósanzola Nzambe yango ya motema mawa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nzambe abengami “Tata [to, liziba] ya motema mawa mingi” mpamba te motema mawa eutaka epai na ye mpe ezali na kati ya bizaleli na ye.