Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/9 nk. 12-15
  • Zalá na “mposa makasi” ya kokola na boyebi ya solosolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na “mposa makasi” ya kokola na boyebi ya solosolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ mpo na kozala na kondima
  • “Nalingi mibeko na yo mingi!”
  • Omibongisaka liboso ya koyekola
  • Ndenge ya kozwa ntango ya koyekola
  • Kokola na boyebi ya solosolo ezali mpenza na ntina
  • Mpo na nini tozali na mposa na boyebi ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tolukaka biloko na motuya bibombami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Koyekola epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/9 nk. 12-15

Zalá na “mposa makasi” ya kokola na boyebi ya solosolo

BASALELI ya Yehova nyonso balukaka kosepelisa ye. Mpo na yango, tozalaka na mposa makasi ya kokolisa kondima na biso mpe ya kosalela ye mosala mosantu na molende mpenza. Nzokande, ntoma Paulo abendi likebi na biso na likama moko oyo ekómelaki Bayuda mosusu na ntango na ye. Alobaki boye: “Bazali na molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.” (Lom. 10:2) Yango emonisi ete kondimela Yehova mpe kosambela ye esengeli kozala te kaka likambo ya motema. Tosengeli kokóma na boyebi ya solosolo ya Mozalisi na biso mpe ya mokano na ye.

Na mokanda na ye mosusu, Paulo amonisaki boyokani oyo ezali na kati ya bizaleli oyo Nzambe asepelaka na yango mpe boyebi ya solosolo. Abondelaki ete bayekoli ya Klisto bátonda na “boyebi ya solosolo” ya mokano ya Nzambe “mpo na kotambola na ndenge ebongi na Yehova” mpo básepelisa ye, wana bazali “kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu mpe kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.” (Kols. 1:9, 10) Mpo na nini kokóma na “boyebi ya solosolo” ezali na ntina mingi mpo na biso? Mpe mpo na nini tosengeli kokola na boyebi yango?

Sɛkɛlɛ mpo na kozala na kondima

Boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya mokano na ye oyo emonisami na Biblia ezali na ntina mingi mpo na kozala na kondima. Soki tozali na boyebi yango te, kondima na biso epai ya Yehova ekozala lokola ndako ya kartɔ, oyo ekoki kopanzana ata na mwa mopɛpɛ ya moke. Paulo alendisi biso tósalelaka Yehova mosala mosantu “na likoki na biso ya kokanisa” mpe ‘tókómisa makanisi na biso sika.’ (Lom. 12:1, 2) Koyekola Biblia mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso na likambo yango.

Ewa, mobongisi-nzela moko na Pologne, alobi boye: “Soki nazalaki koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo te, nalingaki kotika kokola na boyebi ya solosolo ya Yehova. Mosika te, nalingaki kobungisa bizaleli ya boklisto, kondima na ngai elingaki kolɛmba mpe nalingaki kobungisa boyokani na ngai na Nzambe.” Tókeba ete likambo ya ndenge wana ekómela biso te! Tózwa ndakisa ya mobali moko oyo Yehova akómaki kosepela na ye mpo akómaki koyeba Yehova mingi.

“Nalingi mibeko na yo mingi!”

Nzembo kitoko oyo ezali na nimero 119 na kati ya Babiblia na biso emonisi ndenge mokomi na yango azalaki kotalela mibeko, batoli, malako, mitinda mpe bikateli ya Yehova. Mokomi yango akomaki boye: “Nakangami na mibeko na yo. . . . Makebisi na yo esepelisaka ngai mingi.” Akomaki mpe boye: “Nalingi mibeko na yo mingi! Nakanisaka yango mokolo mobimba.”​—Nz. 119:16, 24, 47, 48, 77, 97, NW.

Maloba “nalingi” mpe “nakanisaka” ezali kopesa likanisi ya kokanisa na mozindo Liloba ya Nzambe, elingi koloba kozala mpenza na esengo ya komanyolaka yango. Maloba wana ezali komonisa polele ndenge mokomi ya nzembo yango azalaki kosepela koyekola mibeko ya Nzambe. Bolingo yango ezalaki kaka likambo ya motema te. Azalaki nde na mposa makasi ya koyeba mibeko ya Nzambe, mpo asosola mpenza maloba ya Yehova. Ezaleli na ye emonisi ete azalaki na mposa ya kokóma na boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya mokano na ye.

Emonani mpenza ete bolingo oyo mokomi ya nzembo azalaki na yango mpo na Liloba ya Nzambe eutaki mpenza na motema na ye. Tokoki komituna boye: ‘Ngai mpe nalingaka Liloba ya Nzambe ndenge wana? Nasepelaka kotánga mpe kotalela eteni moko ya Biblia mokolo na mokolo? Nazalaka mpenza na molende ya kotánga Liloba ya Nzambe mpe nabondelaka Yehova liboso ya kosala yango?’ Soki tomoni ete tosalaka makambo wana, tóyeba ete tozali “kokola na kati ya boyebi ya solosolo ya Nzambe.”

Ewa alobi boye: “Nasalaka nyonso mpo na kobongisa lolenge na ngai ya koyekola. Bandá tozwá mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ nasalelaka yango mbala mingi ntango nazali koyekola. Nakómá na momeseno ya kosalela buku Étude perspicace des Écritures mpe mikanda mosusu oyo eyokani na makambo oyo nazali koyekola.”

Tózwa mpe ndakisa ya Wojciech ná mwasi na ye Małgorzata, oyo bazali na mokumba monene na libota na bango. Basalaka nini mpo bázwaka mpe ntango ya koyekola Biblia? “Mokomoko na biso asalaka makasi mpo na koyekola Liloba ya Nzambe ye moko. Ntango tozali koyekola na libota mpe ntango tozali kosolola masolo mosusu, toyebisanaka makanisi oyo tosepelaki na yango to oyo elendisaki biso.” Koyekola na mozindo ememeli bango esengo mingi mpe esalisi bango ‘bákola na boyebi ya solosolo.’

Omibongisaka liboso ya koyekola

Biso baklisto tondimaka ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Yango emonisi mpenza ntina ya kotánga mpe koyekola Biblia mpe kosala nyonso mpo na ‘kokanga ntina ya mateya na yango.’ (Mat. 15:10) Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso ezali komibongisaka liboso ya koyekola. Yango nde ezaleli oyo baklisto ya Beloya bamonisaki ntango Paulo asakwelaki bango nsango malamu: “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.”​—Mis. 17:11.

Oyambaka liloba na mposa makasi lokola baklisto ya Beloya mpe otyaka likebi te na makambo oyo ekoki komema makanisi na yo epai mosusu ntango ozali koyekola Biblia? Ata soki liboso azalaki mpenza kosepela koyekola te, moklisto akoki kosala makasi alanda ndakisa ya baklisto ya Beloya. Longola yango, bato mosusu bakokaka lisusu koyekola mpenza te ntango babandi kokóma mibange; kasi esengeli kozala bongo te mpo na moklisto. Ezala moto akómi na mbula boni, akoki kaka kosala makasi aboya komipesa na makambo oyo ekoki kopekisa ye koyekola. Mpe ntango ozali kotánga, okoki kosalaka makasi oluka makanisi oyo okoki koyebisa basusu. Na ndakisa, okoki komityela mokano ya koyebisa molongani na yo, moninga to ndeko moko makambo oyo otángi to outi koyeba sika na boyekoli na yo? Kosalaka bongo ekoki kosalisa yo obomba makambo oyo ozali koyekola na makanisi mpe na motema, mpe okozala mosungi monene mpo na basusu.

Ntango ozali koyekola, landá ndakisa ya Ezela, mosaleli moko ya Nzambe ya ntango ya kala, oyo “abongisaki motema na ye mpo na koyekola mobeko ya Yehova.” (Ezl. 7:10) Okoki kosala yango ndenge nini? Okoki kopona ntango mpe esika oyo ebongi mpo na koyekola. Na nsima, fandá mpe bondelá Yehova mpo na kosɛnga ye atambwisa yo mpe apesa yo bwanya. (Yak. 1:5) Omituna boye: ‘Makambo nini ya sika nakoki koyeba na boyekoli oyo?’ Ntango ozali kotánga, tyaká likebi na makanisi ya ntina. Okoki kokoma makanisi yango to kotya bilembo na bisika oyo okolinga kosalela nsima. Kanisá ndenge okoki kosalela makambo yango na mosala ya kosakola, ntango ozali kozwa bikateli to ntango ozali kolendisa baklisto mosusu. Soki okómi pene na kosilisa boyekoli na yo, okoki kozongela na mokuse makambo nyonso oyo oyekoli. Yango ekosalisa yo obosana yango te.

Ewa ayebisi ndenge asalaka: “Ntango nazali kotánga Biblia, nasalelaka bandimbola oyo batyaka na nse mpe bilembo oyo batyaka na bavɛrsɛ mpo na kotinda na bavɛrsɛ mosusu. Nasalelaka mpe Index des publications Watch Tower mpe CD-ROM Watchtower Library. Nakomaka makanisi oyo nakosalela na mosala ya kosakola.”

Bato mosusu bazalaki mpenza komipesa na koyekola Biblia na mozindo banda bambula ebele. (Mas. 2:1-5) Kasi, lokola bakómi na mikumba mingi, bakómi na mokakatano mpo na kozwa ntango ya koyekola. Soki ezali mpe bongo mpo na yo, mbongwana nini okoki kosala?

Ndenge ya kozwa ntango ya koyekola

Na ntembe te, yo mpe ondimi ete ezalaka mpasi te kozwa ntango ya kosala makambo oyo olingaka. Bato mingi bamoni ete mpo na koyekola malamu osengeli komityela mokano moko ya malamu lokola kotánga Biblia mobimba. Ya solo, ezali likambo ya pɛtɛɛ te kotánga milɔngɔ milaimilai ya mabota ya bato ya kala, makambo ebeleebele oyo elobeli ndenge tempelo ya kala etongamaki to bisakweli ya makasimakasi oyo ekoki komonana lokola ekosalisa biso na likambo moko te lelo oyo. Zwá bikateli oyo ekoki kosalisa yo okokisa mokano na yo. Na ndakisa, liboso ya kotánga mokapo moko ya Biblia oyo omoni ete ezali makasi, osengeli naino kotánga makambo oyo esalemaki ntango bakomaki yango mpe ndenge makambo yango ekoki kosalisa yo. Okoki kozwa makambo yango na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” oyo esilá kobima na minɔkɔ soki 50.

Kosalela makanisi na yo ntango ozali kotánga Biblia ekoki mpenza kosalisa yo. Yango ekosalisa yo omona na makanisi bato mpe makambo oyo Biblia ezali kolobela. Soki ozali kosalela mwa makanisi oyo, na ntembe te okokóma koyekola Biblia na esengo mpe okozwa matomba mingi. Yango ekolendisa yo okóma kozwa ntango mingi mpo na koyekola. Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekozala lisusu mokakatano te mpo na yo.

Soki makanisi oyo epesami awa ekoki kosalisa mokomoko na biso, libota oyo ezalaka na ntango te ya koyekola elongo ekoki kosala nini? Mpo na nini te kofanda libota mobimba mpo na kolobela matomba oyo bokoki kozwa soki bozali koyekola na libota? Ntango mosusu na lisolo yango bokopesana makanisi oyo ekosalisa bino mpenza, na ndakisa kolamukaka na ntɔngɔ makasi mikolo nyonso to na mikolo oyo bokopona, mpo na kotánga ata mokapo moko ya Biblia. To mpe lisolo na bino ekosalisa bino bóbongola mwa moke programɛ ya libota na bino. Na ndakisa, mabota mosusu bamonaki malamu kotalelaka mokapo ya mokolo to kotángaka ata mokapo moko ya Biblia nsima ya kolya. Liboso kutu bálongola basaani na mesa to liboso bákende kosala makambo mosusu, libota mobimba bazwaka miniti 10 to 15 mpo na kotalela mikapo ya Biblia to kotánga mikapo ya Biblia oyo ebongisami mpo na pɔsɔ wana. Na ebandeli, ekoki kozala mwa mpasi, kasi mosika te libota mobimba bakomesana mpe bakokóma kosepela na yango.

Wojciech ná Małgorzata bayebisi likambo oyo esalisaki libota na bango: “Liboso, tozalaki kolekisa ntango na biso na makambo ezangi ntina. Tozwaki ekateli ete tólekisaka lisusu ntango mingi te na kotindela bato mikanda na Internet. Tomonaki mpe malamu tólekisaka lisusu ntango mingi te na kominanola mpe toponaki mokolo moko mpo na koyekolaka na mozindo.” Libota yango bayokaka mawa te mpo na mbongwana wana oyo basalaki; bino mpe bokoyoka mawa te soki bosali lokola bango.

Kokola na boyebi ya solosolo ezali mpenza na ntina

Koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo ekoki komemela moto “mbuma na mosala nyonso ya malamu.” (Kols. 1:10) Soki ozali kosala bongo, bato nyonso bakomona bokoli na yo. Okokóma moto ya elimo, oyo ayebi mpenza Biblia. Okobanda kozwa bikateli oyo ebongi mpe okozala mosungi monene ya bandeko, mpe okobanda kopesa bango batoli na bokatikati. Oyo eleki nyonso, okokóma mpenza moninga ya Yehova. Okokóma mpenza kosepela na bizaleli na ye, mpe yango ekobanda komonana polele ntango ozali koyebisa bato mosusu makambo na ye.​—1 Tim. 4:15; Yak. 4:8.

Ata soki ozali na mbula boni to oumeli mbula boni na lisangá, salá nyonso okoba kosepela na Liloba ya Nzambe mpe omibongisaka liboso mpo na koyekola yango na mozindo. Zalá na elikya ete Yehova akobosana te milende oyo ozali kosala. (Ebe. 6:10) Akosopela yo ebele ya mapamboli.

[Etanda na lokasa 13]

SOKI ‘TOKOLI NA BOYEBI YA SOLOSOLO’. . .

Kondima na biso ekokóma makasi mpe tokokóma kotambola na ndenge oyo ebongi na Yehova.​—Kols. 1:9, 10

Tokokóma na bososoli mpe tokobanda kosalela yango mpo na kozwa bikateli oyo ebongi.​—Nz. 119:99

Tokozala mpenza na esengo ya kosalisa basusu bápusana penepene na Yehova.​—Mat. 28:19, 20

[Bililingi na lokasa 14]

Ekoki kozala mpasi mpo na kozwa esika oyo ebongi mpo na koyekola, kasi ezali mpenza na ntina kosala yango

[Elilingi na lokasa 15]

Mabota mosusu batángaka ata mokapo moko ya Biblia nsima ya kolya

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto