Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/10 nk. 3-4
  • Nani akoki koyeba oyo ekoya lobi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani akoki koyeba oyo ekoya lobi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Yehova azali ‘Nzambe ya boyengebene mpe mobikisi’
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Mosakoli moko ya Nzambe amemeli bato pole
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Moto akoki koyeba avenire?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bisakweli oyo elobelaki Masiya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/10 nk. 3-4

Nani akoki koyeba oyo ekoya lobi?

“Ngai nazali Nzambe . . . , oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalami naino te.”​—Yisaya 46:9, 10.

NA NTANGO oyo ya yikiyiki, bato ya mayele na makambo ya politiki, ya mimbongo mpe na makambo etali bizaleli ya bato bayekolaka makambo ya kala mpe oyo ya sika mpo na koluka koyeba oyo ekosalema lobi. Basusu, lokola balingi koyeba oyo ekokómela bango lobi, bazali kokende kokutana na banganga-nkisi mpe bato oyo basakolaka makambo. Mbala mingi, bato yango bazwaka mpenza biyano ya malonga te. Tokoki mpenza koyeba makambo oyo ekokómela mokili oyo, mabota na biso mpe biso moko? Moto akoki mpenza koyeba oyo ekoya lobi?

Na maloba oyo Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ayebisaki mosakoli Yisaya, oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo, Yehova amonisi ete azali na likoki ya koyebisa makambo oyo ekosalema lobi. Na nzela ya Yisaya, Nzambe asakolaki ete akosikola Bayisalaele na boombo na Babilone mpe bakozonga mpo na kotonga lisusu Yelusaleme mpe tempelo. Esakweli yango elobelaki mpenza nini? Mbula soki 200 liboso, Yisaya atángaki mpenza nkombo ya Sirise, moto oyo asengelaki kolonga Babilone. Lisusu, Yisaya alobelaki mpe na bosikisiki mayele oyo Sirise asengelaki kosalela mpo na kolonga Babilone: Kolekisa mai ya Efalata oyo ezalaki kobatela engumba epai mosusu. Asakolaki kutu ete bato ya Babilone, kozanga koyeba, bakotika baporte minene ya engumba polele, mpe yango ekosala ete Sirise alonga engumba yango kozanga mpasi.​—Yisaya 44:24-45:7.

Nzambe aleki bato mosika na koyeba makambo oyo ekoya lobi. Salomo, Mokonzi ya bwanya akomaki ete: “Omikumisa mpo na mokolo ya lobi te zambi oyebi te soki mokolo ekobimisa nini.” (Masese 27:1) Likambo yango ezali solo ata tii lelo. Moto moko te akoki koyeba ata makambo oyo ekokómela ye moko. Kasi, mpo na nini Nzambe ayebaka makambo ya lobi? Mpo ayebi malamu mpenza biloko nyonso oyo akelá, ezala ata bizaleli mpe makanisi ya moto. Soki asepeli kosala yango, Nzambe akoki kosakola na bosikisiki makambo oyo bato mpe bikólo bakosala. Lisusu, azali mpenza na likoki ya koyeba ndenge makambo ekosuka. Soki ayebisi na nzela ya basakoli na ye ete likambo moko ekosalema, akómaka ‘mokokisi ya makambo oyo mosali na ye alobaki, akokisaka bilaka oyo bantoma na ye bayebisaki.’ (Yisaya 44:26, Bible na lingala ya lelo oyo) Kaka Yehova Nzambe nde akoki koloba bongo.

Yisaya azalaki na bomoi mbula koleka 700 liboso Yesu, Masiya aya. Atako bongo, Yisaya asakolaki koya ya Masiya. Nzokande, mingimingi kobanda na ekeke ya 18, bato oyo batyolaka Biblia bakómá kobɛta ntembe na mokanda ya Yisaya. Balobaka ete bisakweli ya Yisaya ezali mpenza bisakweli te, kasi moto moko nde akomaki makambo yango ntango esilaki kosalema. Ezali mpenza bongo? Na 1947, bamonaki kopi moko ya mokanda ya Yisaya ná barulo mosusu ya kala na lidusu moko pene na Mbu Ekufá. Bato ya mayele bamonaki ete mokanda yango ekomamaki bambula ebele liboso Masiya to Klisto abotama. Ya solo, Biblia elobelaka makambo oyo ekoya lobi.

Yisaya mpe bakomi mosusu ya Biblia bakokaki te kosakola makambo ekoya na mayele na bango moko. “Balobaki [nde] oyo eutaki epai ya Nzambe wana bazalaki kopusama na elimo santu.” (2 Petelo 1:21) Na masolo oyo elandi, tokolobela makambo mosusu oyo etali bomoi ya Yesu, oyo Yisaya asakolaki. Na nsima, tokolobela makambo oyo Yesu ná bayekoli na ye basakolaki mpo na mikolo na biso mpe mpo na mikolo ekoya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto