Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/11 lok. 10
  • Alingaka bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Alingaka bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Lisumu ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Tókesenisa bolembu, motema mabe, mpe kobongola motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/11 lok. 10

Pusaná penepene na Nzambe

Alingaka bosembo

Baebele 10:26-31

ESILÁ kokóma ete moto moko asala yo likambo ya mabe to anyokola yo, kozanga ete ayoka mawa to azwa etumbu? Kozanga bosembo ezali kati na makambo oyo esalaka mpasi mingi, mingimingi soki moto oyo asali yango asengelaki kolinga mpe kobatela yo. Okoki komituna ete, ‘Mpo na nini Nzambe atikaka ete makambo ya ndenge wana esalema?’a Yebá ete Yehova Nzambe ayinaka lolenge nyonso ya kozanga bosembo. Biblia, Liloba na ye, elobi ete Nzambe akozanga te kopesa etumbu na bato oyo basalaka masumu na nko. Tótalela maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Baebele 10:26-31.

Paulo akomaki boye: “Soki tozali na momeseno ya kosala lisumu na nko nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki ya solo, etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu.” (Vɛrsɛ 26) Bato oyo basalaka masumu na nko babongi kozwa etumbu ya makasi. Mpo na nini? Ya liboso, basalaka lisumu mpo na bolɛmbu te​—ndenge biso nyonso tosalaka yango mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Kosala masumu ekómá momeseno na bango. Ya mibale, basalaka masumu na nko. Ndenge Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli yango, basalaka mabe “ndenge mitema [na bango] elingi.” Lokola bazali na momeseno ya kosala masumu, kosala mabe ekómá bomoto na bango. Ya misato, basalaka masumu mpo na kozanga koyeba te. Bazali na “boyebi ya sikisiki ya solo” na ntina na mokano ya Nzambe mpe mibeko na ye.

Ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo basalaka masumu na nko mpe baboyi kobongola motema? Paulo alobi ete “etikali lisusu te na mbeka mpo na masumu.” Mbeka ya Klisto, likabo oyo Nzambe apesaki bato, elongolaka masumu oyo tosalaka mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka. (1 Yoane 2:1, 2) Nzokande, baoyo bazali na momeseno ya kosala masumu kozanga kobongola motema bamonisaka ete bazali na botɔndi te mpo na likabo yango ya motuya mingi. Na miso ya Nzambe, ‘banyati Mwana ya Nzambe mpe bamoni lokola eloko moko ya mpamba makila ya’ Yesu. (Vɛrsɛ 29) Na etamboli na bango, bato yango batyolaka Yesu mpe makila na ye, lokola nde makila yango ezali kaka lokola makila ya bato ya kozanga kokoka. Bato yango oyo bazangi botɔndi babongi te kozwa mapamboli ya mbeka ya Klisto.

Nini ekokómela bato ya mabe? Nzambe ya bosembo alobi boye: “Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nde nakozongisa.” (Vɛrsɛ 30) Bato nyonso oyo bazali na momeseno ya kosala masumu mpo na konyokola basusu basengeli koyeba likambo oyo: Moto nyonso oyo aboyaka kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe akozwa etumbu. Mbala mingi, bato oyo basalaka mabe babukaka mbuma mabe ya misala na bango. (Bagalatia 6:7) Ata soki babuki yango te lelo, mosika te, bakozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe ntango akolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo awa na mabelé. (Masese 2:21, 22) Paulo alobaki boye: “Ezali likambo ya nsɔmɔ kokwea na mabɔkɔ ya Nzambe ya bomoi.”​—Vɛrsɛ 31.

Koyeba ete Yehova Nzambe akangaka miso te na masumu oyo bato basalaka na nko ebɔndisaka mpe ekitisaka motema, mingimingi ya bato oyo bakutani na makambo ya kozanga bosembo. Tosengeli kotika na mabɔkɔ ya Nzambe mabe nyonso oyo basaleli biso, mpamba te ye ayini makambo nyonso ya kozanga bosembo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki ete bampasi ezala, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? na nkasa 106-114, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto