Batatoli ya Yehova bapanzaka mabala ya bato?
BATO mingi balobaka boye: “Soki molongani moko akómi na lingomba mosusu, libala ekopanzana.” Bato balobaka bongo ntango mosusu epai ya moto oyo aponi kokóma Motatoli ya Yehova. Makanisi yango ezali mpenza solo?
Ya solo, ntango moto akómi kosepela na lingomba mosusu to atiki bindimeli oyo azalaki na yango, likambo yango ekoki kobulunganisa molongani na ye. Molongani yango akoki kotungisama, kolɛmba nzoto, ata mpe koyoka nkanda.
Mbala mingi, mwasi nde akɔtaka na lingomba mosusu. Soki mwasi na yo azali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, yango ekoki kosala nini na libala na bino? Soki ozali mwasi ya libala mpe ozali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, okoki kosala nini mpo mobali na yo amitungisa mingi te?
Makanisi ya mobali moko
Mark, oyo afandaka na Australie, abalaki banda mbula 12 ntango mwasi na ye akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Libala na biso ezalaki na esengo mpe nazalaki na mosala ya malamu. Bomoi ezalaki malamu. Na nsima, mwasi na ngai akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Na mbala moko, namonaki lokola nde bomoi ya libota na biso ekómi na likama. Na ebandeli, nazalaki kosepela te ndenge mwasi na ngai akómaki koyekola Biblia; kasi, ntango ayebisaki ngai ete alingi kozwa batisimo, nakómaki kotungisama mpenza.”
Mark akómaki kobanga ete lokola mwasi na ye akɔti na lingomba mosusu, libala na bango ekokufa. Mark alingaki kopekisa mwasi na ye koyekola Biblia mpe kosolola na Batatoli ya Yehova. Kasi, amonaki ete malamu mwa ntango eleka naino. Likambo nini esalemaki?
Mark alobi boye: “Boyokani ya ngai ná mwasi na ngai ekómaki kutu makasi koleka. Ezali se kokóma makasi banda mwasi na ngai akómá Motatoli ya Yehova eleki sikoyo mbula 15.” Mpo na nini libala na bango ekómaki malamu? Mark alobi boye: “Soki nakanisi malamu, ezali mpo mwasi na ngai akómaki kosalela batoli malamu oyo ezali na Biblia. Asalaka makasi ya kosalela ngai makambo na limemya.”
Batoli ya basi oyo balongi na mabala na bango
Soki ozali mwasi ya libala mpe ozali koyekola na Batatoli ya Yehova, okoki kosala mpe koloba nini mpo mobali na yo amitungisa mingi te? Talelá maloba ya basi mosusu ya mikili ndenge na ndenge.
Sakiko oyo afandaka na Japon, alobi boye: “Nakokisi mbula 31 na libala mpe nazali na bana misato. Nazali Motatoli ya Yehova eleki sikoyo mbula 22. Kozala na mobali oyo azali na lingomba mosusu ezalaka mpasi na bantango mosusu. Kasi, nasalaka makasi ya kosalela toli ya Biblia oyo elendisi biso ‘tóyokaka noki, tówelaka koloba te, tóyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19) Nasalelaka mobali na ngai makambo na boboto mpe nakokisaka bamposa na ye nyonso soki ebuki mibeko ya Biblia te. Yango esalaka ete tózala na esengo na libala na biso.”
Nadezhda oyo afandaka na Russie, alobi boye: “Nakokisi mbula 28 na libala mpe nazali Motatoli oyo azwi batisimo eleki sikoyo mbula 16. Liboso nayekola Biblia, nayebaki te ete mobali nde asengeli kozala mokonzi ya libota. Nazalaki kozwa bikateli mingi ngai moko. Kasi, nakómaki komona mokemoke ete kosalela mitinda ya Biblia ezalaki kobakisa kimya mpe esengo na libala na biso. (1 Bakolinti 11:3) Mokemoke, nakómaki kotosa mobali na ngai, mpe ye moko amonaki ete nabongwani.”
Marli oyo afandaka na Brésil, alobi boye: “Nazali na bana mibale mpe nasali mbula 21 na libala. Nazali Motatoli eleki sikoyo mbula 16. Nayekolaki ete Yehova Nzambe alingi ete mwasi akabwana na mobali na ye te. Yango wana, nasalaka makasi ya kozala mwasi ya malamu, koloba mpe kosala makambo na ndenge oyo ekosepelisa Yehova mpe mobali na ngai.”
Larisa oyo afandaka na Russie, alobi boye: “Ntango nakómaki Motatoli ya Yehova eleki sikoyo mbula 19, namonaki ete likambo eleki ntina ezali ya kobongwana. Mobali na ngai amonaka ete Biblia esalisi ngai nakóma mwasi malamu mpe nasepelaka na ye mingi koleka. Liboso, tozalaki koyokana te na ndenge oyo tosengeli kobɔkɔla bana, kasi tosilisaki mokakatano yango. Mobali na ngai atikelá ngai nzela namemaka bana na makita mpamba te amonaka ete bayekolaka makambo oyo ekosalisa bango na bomoi.”
Valquíria oyo afandaka na Brésil, alobi boye: “Nazali na mwana moko mpe nasali mbula 19 na libala. Nakómaki Motatoli ya Yehova eleki sikoyo mbula zomi na misato. Na ebandeli, mobali na ngai azalaki kolinga te ete nabimaka na mosala ya kosakola. Kasi, nazalaki kosolola na ye na boboto mpe kosalisa ye amona ete Biblia ebongoli bomoto na ngai. Mokemoke, mobali na ngai amonaki ete kobima na mosala ya kosakola ezali na ntina mingi mpo na ngai. Lelo oyo, asalisaka ngai mpenza mpo nakokisa makambo oyo Nzambe asɛngi ngai. Soki nakokende koyekola na moto Biblia mosika mingi na ndako na biso, akendaka kotika ngai na motuka mpe azelaka ngai tii ntango nakosilisa.”
Biblia ebongisaka mabala
Soki molongani na yo azali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, kobanga te ete libala na bino ekopanzana. Ndenge basi ná mibali ya mikili ndenge na ndenge bamoni yango, Biblia ebongisaka mabala.
Mobali moko oyo azali Motatoli ya Yehova te alobaki boye: “Na ebandeli, nazalaki koyoka nkanda ntango mwasi na ngai akómaki Motatoli ya Yehova, kasi lelo oyo, namoni ete ezali na matomba mingi.” Mobali mosusu alobaki boye mpo na mwasi na ye: “Bosembo mpe mpiko ya mwasi na ngai esali ete nakóma kosepela mingi na Batatoli ya Yehova. Libala na biso ebongi mingi lokola akómá na lingomba yango. Mokomoko na biso asalaka makambo mpo na bolamu ya moninga mpe tolingi ete libala na biso ezala mpo na libela.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 13]
Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka libala?
Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Yango wana, batosaka mpenza makambo oyo elobi mpo na libala. Talá biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo:
▪ Batatoli ya Yehova balendisaka kokabwana na molongani oyo azali Motatoli te? Te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, nzokande mwasi yango andimi kofanda elongo na ye, ndeko yango atika ye te; mpe mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda elongo na ye, mwasi yango atika mobali na ye te.” (1 Bakolinti 7:12, 13) Batatoli ya Yehova batosaka mobeko yango.
▪ Balendisaka mwasi oyo azali Motatoli akokisaka te bamposa ya mobali na ye oyo azali na lingomba mosusu? Te. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.”—1 Petelo 3:1, 2.
▪ Batatoli ya Yehova bateyaka ete bokonzi ya mobali ezali na ndelo te? Te. Ntoma Paulo alobaki boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Mwasi moklisto asengeli kotosa mobali na ye lokola mokonzi ya libota. Kasi, bokonzi ya mobali ezali na ndelo. Mobali akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpe Klisto. Yango wana, soki mobali moko asɛngi mwasi na ye asala makambo oyo ekobuka mibeko ya Nzambe, mwasi moklisto ‘akotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.’—Misala 5:29.
▪ Batatoli ya Yehova bateyaka ete koboma libala epekisami? Te. Yesu Klisto alobaki boye: “Nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo abomi libala ná mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:9) Yango wana, Batatoli ya Yehova balandaka makanisi ya Yesu ete libala ekoki kokufa ntango molongani moko asali ekobo. Kasi, bandimaka mpe ete libala ekoki kokufa te mpo na makambo oyo ezangi ntina. Balendisaka baoyo babalá bátosaka toli ya Yesu ete: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka . . . Na yango, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—Matai 19:5, 6.