Namoni bokoli oyo esalemi na Corée
Lisolo ya Milton Hamilton
“Tozali na mawa ya koyebisa bino ete guvɛrnema ya ekólo Corée eboyi kopesa bamisionɛrɛ nyonso mikanda (visa) mpe eboyi bókende na ekólo yango. . . . Yango wana, tozali kotinda bino naino na Japon.”
NA 1954, bandeko ya Brooklyn, New York, batindelaki ngai ná mwasi na ngai mokanda oyo ezalaki na maloba yango. Mwa Liboso, kaka na mbula wana, tozwaki badiplome na kelasi ya mbala ya 23 ya Gileadi, oyo na ntango wana ezalaki kosalema na nɔrdi ya etúká ya New York. Ntango tozwaki mokanda wana, tozalaki kosakola mpo na mwa ntango na engumba Indianapolis, na etúká ya Indiana.
Ngai ná mwasi na ngai Liz (Liz Semock liboso abala) totángaki kelasi moko ntango tozalaki bilenge. Na nsima, na 1948, tobalanaki. Alingaki mosala ya ntango nyonso, kasi azalaki kobanga kolongwa na États-Unis mpo na kokende kosala na mboka mopaya. Nini ebongolaki makanisi na ye?
Liz andimaki tókende na likita moko mpo na bandeko oyo balingi kokɔta na eteyelo ya Gileadi. Likita yango esalemaki na Liyangani oyo esangisaki bato bautaki na mikili ndenge na ndenge, na Yankee Stadium, na engumba New York, na 1953. Nsima ya likita yango ya kolendisa mpenza, totondisaki baformilɛrɛ mpo na kokɔta na Gileadi. Tokamwaki ntango babengaki biso na kelasi oyo elandaki, oyo esengelaki kobanda na sanza ya Febwali 1954.
Totindamaki na ekólo Corée, atako etumba ya mbula misato oyo ebebisaki mpenza ekólo yango eutaki kosila, na 1953. Ndenge mokanda oyo nalobelaki na ebandeli emonisaki yango, tokendaki liboso na Japon. Nsima ya mobembo ya mikolo 20 na masuwa, tokómaki kuna na sanza ya Yanuali 1955 elongo na bamisionɛrɛ mosusu motoba oyo batindamaki mpe na Corée. Ndeko Lloyd Barry, oyo azalaki mokɛngɛli ya filiale ya Japon, ayaki kozwa biso na libongo, na ngonga ya 6 ya ntɔngɔ. Mwa moke na nsima, tokendaki na ndako ya bamisionɛrɛ na engumba Yokohama. Kaka na mokolo yango, tobimaki na mosala ya kosakola.
Tokei na Corée
Na nsima, tozwaki mikanda mpo na kokɔta na ekólo Corée. Na mokolo ya 7 Marsi 1955, mpɛpɔ ememaki biso longwa na libándá ya mpɛpɔ ya Haneda na engumba Tokyo mpe ngonga misato na nsima, tokitaki na libándá ya mpɛpɔ ya Yoido, na engumba Séoul. Batatoli soki 200 ya Corée bayaki koyamba biso, mpe tolelaki mpo na esengo. Na ntango wana, Batatoli bazalaki kaka 1 000 na Corée mobimba. Lokola bato mingi ya Mpoto mpe ya Amerika, tozalaki kokanisa ete ata soki bazali na bikoló ekeseni, bato nyonso ya Azia bakokani bilongi mpe basalaka makambo ndenge moko. Kasi, eumelaki te, tomonaki ete ezali bongo te. Bato ya Corée bazali na monɔkɔ, na ekomeli mpe elambeli na bango moko, bilongi na bango ezali ndenge mosusu, bazali na molato ya mboka na bango, mpe makambo mosusu ya bango moko kaka, na ndakisa lolenge ya bandako na bango.
Mokakatano monene ya liboso oyo tokutanaki na yango ezalaki koyekola monɔkɔ na bango. Tozalaki na babuku te mpo na koyekola monɔkɔ ya Coréen. Tomonaki mpe ete ekozala mpasi tólobaka malamu maloba ya Coréen soki tozali kokoma yango ndenge Lingelesi ekomamaka. Mpo moto ayeba kotánga malamu maloba ya Coréen, asengeli koyekola ekomeli na bango.
Tozalaki kosala mabunga mingi. Na ndakisa, mokolo moko Liz atunaki mwasi moko soki azali na Biblia. Tomonaki na elongi ya mwasi yango ete azalaki kokamwa ntango akɔtaki na ndako mpe ayaki na pakɛ ya alimɛti. Nzokande, Liz atunaki ye sungnyang (baalimɛti) na esika atuna sungkyung, elingi koloba “Biblia.”
Nsima ya mwa basanza, totindamaki na Pusan, engumba moko ya sudi oyo ezali na libongo, mpo na kofungola ndako ya sika ya bamisionɛrɛ. Tozwaki mwa bandako mike misato ya kofutela mpo na ngai ná mwasi na ngai mpe bandeko basi mibale oyo batindamaki mpe kuna. Bandako yango ezalaki na pɔmpi te mpe batwalɛti ezalaki na mai te. Kaka na butu nde mai ezalaki kobima mwa mingi mpe tozalaki kosalela tiyo mpo na kobenda mai tii na etaze ya liboso. Yango wana, tokabolaki mikolo mpo moto na moto na ngala na ye alamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpo na kotya mai na basaani. Tozalaki kotɔkisa mai to kotya yango nkisi liboso tómɛla yango.
Mikakatano mosusu mpe ezalaki. Lokola kura ezalaki makasi te, likoki ya kosalela masini ya kosukola bilamba to fɛlo ya kura ezalaki te. Esika ya kolamba ezalaki kaka na kulware mpe tozalaki kaka na resho ya petrole. Mosika te, tokabolaki moto na moto mokolo na ye ya kolamba. Mbula misato na nsima, ngai ná Liz tobɛlaki hépatite. Na eleko yango, bamisionɛrɛ mingi babɛlaki maladi yango. Eumelaki mwa basanza liboso tóyoka malamu; tokutanaki mpe na mikakatano mosusu ya kolɔngɔnɔ ya nzoto.
Lisalisi mpo na kolonga mikakatano
Na boumeli ya mbula 55 oyo eleki, bikólo mibale ya Corée ezalaki moko na bisika ya Azia oyo ezalaki na kimya te. Bikólo yango mibale ekabwani na ndelo moko epai basoda bakoki kozala te. Ndelo yango ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 55 kolongwa na Séoul, engumba-mokonzi ya Corée. Na 1971, Ndeko Frédéric Franz oyo autaki na Brooklyn, ayaki kotala biso. Namemaki ye na ndelo yango, oyo ezali ndelo ekɛngɛlami makasi koleka ndelo mosusu nyonso na mokili. Bakonzi minene ya ONU bazalaki mbala na mbala kokutana na esika yango ná bamonisi ya baguvɛrnema ya bikólo yango mibale.
Kasi, biso tokɔtaka na makambo ya politiki te; tokɔtaki mpe te na kowelana ya bikólo mibale ya Corée. (Yoa. 17:14) Lokola baboyaka kosimba mandoki mpo na koboma bazalani na bango, Batatoli koleka 13 000 ya Corée basili kokɔta bolɔkɔ; soki tosangisi bitumbu oyo bakatelaki bango nyonso, ekopesa mbula 26 000 ya bolɔkɔ. (2 Kol. 10:3, 4) Na ekólo yango, bandeko mibali nyonso oyo bazali bilenge bayebaka ete bakokutana na mokakatano yango, kasi ebangisaka bango te. Ezali mawa ete guvɛrnema ebengaka baministre baklisto yango “basali-mabe” mpo “mabe” na bango ezali kaka ete baboyaka kokɔta na makambo ya politiki.
Na 1944, na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ngai mpe naboyaká kosala mosala ya soda mpe mpo na yango, nalekisaki mbula mibale ná ndambo na bolɔkɔ na Lewisburg, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Na yango, atako bandeko na biso na Corée banyokwamaka mingi na bolɔkɔ, nayebaka mpasi oyo bilenge Batatoli yango bakutanaka na yango. Bilenge mingi balendisamaki na koyeba ete bamisionɛrɛ mosusu oyo bazali na Corée bakutanaki mpe na likambo ya ndenge wana.—Yis. 2:4.
Tokutani na mokakatano moko
Lokola toboyaka kokɔta na makambo ya politiki, tokutanaki na mokakatano moko na 1977. Bakonzi ya Leta bakanisaki ete biso nde topesaki bilenge ya Corée motó makasi mpo báboya mosala ya soda mpe kosimba mandoki. Yango wana, guvɛrnema ezwaki ekateli ya kopesa mikanda ya sika te na bamisionɛrɛ oyo babimi na Corée, ezala mpo na ntina nini. Mobeko yango oyo ebandaki na 1977 eumelaki tii 1987. Na eleko yango, soki tobimaki na Corée, tolingaki lisusu kozwa ndingisa ya kozonga te. Yango wana, na boumeli ya bambula wana nyonso, tozongaki na mboka na biso te, ata mpo na kotala bandeko na biso.
Tozalaki mbala na mbala kokutana na bakonzi ya Leta mpo na kolimbola bango ntina oyo bayekoli ya Klisto bakɔtaka na makambo ya politiki te. Nsukansuka, lokola bamonaki ete mobeko yango ekolɛmbisa biso te, balongolaki yango; kasi nsima ya mbula zomi. Na boumeli ya bambula yango, mwa ndambo ya bamisionɛrɛ babimaki na Corée mpo na maladi, kasi mingi kati na biso totikalaki mpe tozali na esengo mpo na yango.
Na katikati ya bambula ya 1980, bato oyo batɛmɛlaka mosala na biso ya kosakola bakosaki ete bakambi ya ebongiseli na biso mpo na kotosa mibeko ya Leta (association légale) bazalaki koyebisa bilenge mibali ete bákɔta na mosala ya soda te. Mpo na yango, bakonzi ya Leta babengisaki mokomoko na biso mpo na kotuna ye mituna. Mokolo ya 22 Yanuali 1987, biro ya prokirɛrɛ emonisaki ete bifundeli yango ezali lokuta. Yango esalisaki biso mpo na makambo ya lokuta oyo ekokaki lisusu kobima.
Nzambe apamboli mosala na biso
Na Corée, mbula na mbula botɛmɛli na mosala na biso ezalaki se kokóma makasi lokola tozalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki. Na yango, ekómaki mpasi mpo na kozwa bisika ya malamu mpo na mayangani ya minene. Yango wana, Batatoli bazwaki likanisi ya kotonga Ndako ya Mayangani na Pusan; yango ezali Ndako ya Mayangani ya liboso mpenza na Azia. Nazwaki libaku malamu ya kosala lisukulu ya bofungoli na mokolo ya 5 Aprili 1976, liboso ya bato 1 300.
Kobanda 1950, bankóto na bankóto ya basoda ya États-Unis bayaka mpo na mwa ntango na Corée. Nsima ya kozonga na États-Unis, bamosusu kati na bango bakómaki Batatoli. Mbala mingi bakomelaka biso mikanda, mpe tomonaka ete ezali lipamboli na ndenge tosalisaki bango na elimo.
Likambo ya mawa ezali ete Liz, mwasi na ngai ya bolingo, akufaki na mokolo ya 26 Sɛtɛmbɛ 2006. Nayokaka mpasi soki nakanisi ye. Na boumeli ya mbula 51 oyo tofandaki na ye awa, andimaki mokumba nyonso oyo bapesaki biso mpe amilelalelaki ata mokolo moko te. Ata mokolo moko te apesaki likanisi ete tózonga na États-Unis, mboka oyo, na ebandeli azalaki kolinga kotika te!
Nazali kokoba kosala na Betele ya Corée. Bandeko ya Betele oyo bazalaki moke mpenza, bakómi lelo soki bato 250. Nazali na libaku malamu ya kosala elongo na bandeko 7 ya Komite ya filiale na biso.
Corée ezalaki ekólo ya bobola ntango tokómaki awa; kasi lelo oyo ezali moko na bikólo ya bozwi mingi na mokili. Batatoli bazali koleka 95 000 na Corée, mpe pene na basakoli 40 likoló na monkama (40 %) bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nyonso wana ezali bantina oyo esali ete nasepela kosalela Nzambe na mboka oyo mpe komona ndenge oyo mosala na ye ekoli.
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango tokómaki na Corée, ná bamisionɛrɛ mosusu
[Elilingi na lokasa 24]
Ntango tozalaki na engumba Pusan
[Elilingi na lokasa 25]
Elongo na Ndeko Franz na ndelo ya bikólo mibale, na 1971
[Elilingi na lokasa 26]
Ná Liz, mwa moke liboso akufa
[Elilingi na lokasa 26]
Filiale ya Corée epai nazali kosala na libota ya Betele