Obangaka bakufi?
NA MOTUNA wana, bato mingi bayanolaka: “Te. Mpo na nini kobanga bango?” Bandimaka ete bato oyo bakufá, bakufá mpenza. Nzokande, bamilio ya bato bandimaka ete bato oyo bakufá bakómaka bilimo.
Na Bénin, bato mingi bandimaka ete bato oyo bakufá bakoki kozonga mpo na koboma bato mosusu ya libota na bango. Bato batɛkaka biloko na bango to bakɔtaka banyongo mpo na kosomba banyama ya kopesa mbeka mpe kosala milulu mpo na kosepelisa bandeko na bango oyo bakufá. Bato mosusu basalaka bikelakela, oyo emonisaka ete ezali na eloko moko oyo ebimaka soki moto akufi mpe ekoki kosolola na bato ya bomoi. Bato mosusu bakutaná na makambo ya nsɔmɔ mpe balobaka ete eutaki na bilimo ya bato bakufá.
Moko na bango ezali Agboola, mobali moko oyo afandaka na esika oyo Bénin ná Nigeria ekabwaná. Alobi boye: “Bato basalelaka bikelakela mikolo nyonso epai na biso. Bazalaka na momeseno ya kosala milulu ya kosukola bibembe mpo na kobongisa yango mpo ekende na mokili ya bilimo. Mbala mingi, nazalaki kolokɔta basabuni oyo ezalaki kotikala mpe nazalaki kosangisa yango na nkasa. Na nsima, nazalaki kotya yango na mondoki na ngai, mpe nazalaki koloba na mongongo makasi nyama oyo nalingi koboma. Makambo ya ndenge wana ezalaka mingi mpe bato bamonaka yango malamu. Kasi, makambo mosusu ya bikelakela ezalaki kobangisa ngai.
“Ntango bana na ngai mibale bakufaki na ndenge ya kokamwa, namonaki ete moto moko alokaki ngai. Mpo na koyeba yango, nakendaki epai ya mobange moko, oyo ayebanaki makasi mpo na bondɔki. Andimaki ete moto moko alokaki ngai. Likambo ya mabe koleka, alobaki na ngai ete bana na ngai bazali na mokili ya bilimo, bazali kozela bákóma baombo ya moto oyo abomaki bango ntango akokufa. Nganga yango abakisaki ete mwana na ngai ya misato mpe akokufa. Nsima ya mikolo moke kaka, mwana yango mpe akufaki.”
Na nsima, Agboola akutanaki na John, Motatoli ya Yehova oyo autaki na Nigeria. John amonisaki ye oyo Biblia elobi mpo na bakufi. Ndimbola yango ebongolaki bomoi ya Agboola. Ekoki mpe kobongola oyo ya yo.
Bakufi bazali na bomoi?
Nani akoki mpenza kopesa eyano na motuna yango? Ata nganga moko te, ata soki azali na nguya ndenge nini. Kasi, Yehova, Mozalisi ya bomoi nyonso “na likoló mpe na mabelé, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te,” nde akoki kopesa eyano na motuna yango. (Bakolose 1:16) Akelaki baanzelu mpo báfandaka na likoló mpe moto ná banyama mpo báfandaka awa na mabelé. (Nzembo 104:4, 23, 24) Ye nde asimbi bomoi bisika nyonso. (Emoniseli 4:11) Na yango, tótala oyo Biblia, Liloba na ye, elobi na ntina na liwa.
Yehova azali moto ya liboso oyo alobelaki liwa. Alobaki ete Adama ná Eva bakokufa soki batosi ye te. (Genese 2:17) Yango elingaki koloba nini? Yehova alobaki boye: “Ozali putulu, mpe okozonga kati na putulu.” (Genese 3:19) Soki moto akufi, azongaka na putulu. Bomoi esukaka.
Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe na nko, yango wana, akatelaki bango etumbu ya liwa. Kasi, bazali te bato ya liboso oyo bakufaki. Moto ya liboso oyo akufaki ezalaki mwana na bango Abele. Yaya na ye Kaina nde abomaki ye. (Genese 4:8) Kaina abangaki te ete ndeko na ye oyo akufaki akosala ya mabe. Kasi, azalaki nde komitungisa mpo na makambo oyo bato bakoki kosala ye.—Genese 4:10-16.
Bikeke mingi na nsima, Mokonzi Elode amitungisaki ntango banganga-minzoto bayebisaki ye ete “mokonzi ya Bayuda” abotami na mboka na ye. Lokola azalaki na ekateli ya koboma mwana wana oyo azalaki komona ete akozwa esika na ye, Elode asalaki mwango ete bana mibali nyonso ya Beteleme oyo bazali na mbula mibale to na nse bábomama. Kasi, anzelu ayebisaki Yozefe azwa Yesu ná Malia mpe ‘bákima na Ezipito.’—Matai 2:1-16.
Ntango Elode akufaki, anzelu ayebisaki Yozefe azonga na Yisalaele, “mpo baoyo bazalaki koluka molimo ya mwana yango ya moke [basilaki kokufa].” (Matai 2:19, 20) Anzelu ekelamu ya elimo, ayebaki ete Elode akokaki lisusu kosala Yesu mabe te. Yozefe azalaki kobanga Mokonzi Elode te mpo akufaki. Kasi, azalaki nde kobanga makambo oyo Alakelausi, mwana ya Elode oyo azalaki moto mabe, akokaki kosala. Yango wana, Yozefe ná libota na ye bakendaki kofanda na Galilai, epai Alakelausi azalaki koyangela te.—Matai 2:22.
Masolo oyo esalisi biso tómona ete bakufi bazali na nguya te. Kasi, ndenge nini tokoki kolimbola makambo oyo Agboola ná bato mosusu bakutanaki na yango?
“Bademo” to bilimo mabe
Ntango akómaki mokóló, Yesu akutanaki na bilimo mabe. Bilimo yango bayebaki Yesu mpe babengaki ye “Mwana ya Nzambe.” Yesu mpe ayebaki bango malamu. Ayebaki ete bazali te bilimo ya bato bakufá. Kasi, Yesu abengaki bango “bademo,” to bilimo mabe.—Matai 8:29-31; 10:8; Malako 5:8.
Biblia elobeli bikelamu ya elimo oyo bazali sembo epai ya Nzambe mpe baoyo batombokelaki ye. Mokanda ya Genese elobi ete ntango Yehova abenganaki Adama ná Eva na elanga ya Edene, atyaki bakeluba, to baanzelu, na ɛsti ya elanga yango mpo Adama to Eva bákɔta lisusu te kuna. (Genese 3:24) Ekoki kozala ete wana mbala ya liboso oyo bato bamonaki bikelamu ya elimo.
Mwa moke na nsima, baanzelu mosusu bayaki awa na mabelé mpe balataki nzoto ya bato. Yehova te nde apesaki bango mosala awa na mabelé. Kasi, “basundolaki efandelo na bango” na likoló. (Yuda 6) Ezalaki mpo na matomba na bango moko. Bazwaki basi, babotaki na bango bana, oyo babengamaki Banefilime. Banefilime yango ná batata na bango oyo bakómaki batomboki, batondisaki mabelé na mobulu mpe na makambo mosusu ya mabe. (Genese 6:1-5) Mpo na kolongola mabe wana, Yehova atindaki Mpela na ntango ya Noa. Mpela yango ebomaki bato mabe ná bana oyo babotamaki. Nini ekómelaki baanzelu?
Mpo na kokima Mpela, bazongaki na likoló. Kasi, Yehova apesaki bango nzela te bázongela “esika na bango ya ebandeli.” (Yuda 6) Biblia elobi ete: “Nzambe amipekisaki te kopesa etumbu na baanzelu oyo basumukaki, kasi, na kobwakáká bango na Tartare, atyaki bango na mabulu ya molili tuu mpo bábombama mpo na kozwa lisambisi.”—2 Petelo 2:4.
Tartare ezali esika ya solo te; ezali nde lokola bolɔkɔ oyo ezali kopekisa baanzelu wana básalaka makambo oyo bazalaki kosala liboso. Bademo bakoki lisusu te kolata nzoto ya bato, kasi bazali na nguya mingi mpe bakoki mpenza kobebisa makanisi mpe bomoi ya bato. Bakoki kokɔtela bato mpe banyama. (Matai 12:43-45; Luka 8:27-33) Bazali mpe kokosa bato bákanisaka ete bango nde bazali bilimo ya bakufi. Mpo na nini? Mpo na kopekisa bato básambela Yehova ndenge alingaka mpe kobulunganisa bango makanisi mpo báyeba te bosolo na ntina na bakufi.
Ndenge ya kolonga kobanga
Agboola amonaki ete bandimbola ya polele oyo Biblia epesi na ntina na bakufi mpe bilimo mabe ezali solo. Amonaki ete esengeli ayekola lisusu makambo mosusu. Abandaki kotánga Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na John. Agboola abɔndisamaki ntango ayebaki ete bana na ye bazali kopema na nkunda, kasi bazali te kozela na mokili ya bilimo mpo bákóma baombo ya moto oyo abomaki bango.—Yoane 11:11-13.
Agboola ayaki mpe komona ete esengeli atika misala nyonso oyo ezali na boyokani na bilimo mabe. Atumbaki biloko nyonso oyo ezalaki kotya ye na boyokani na bademo. (Misala 19:19) Bato mosusu ya mboka na ye bayebisaki ye ete bademo bakosilikela ye. Kasi Agboola abangaki te. Alandaki toli ya Baefese 6:11, 12 oyo elobi ete: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe . . . mpo tozali kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe.” Molato yango ya etumba esangisi makambo lokola solo, boyengebene, nsango malamu ya kimya, kondima, mompanga ya elimo, Liloba ya Nzambe. Nzambe nde apesaka molato yango mpe ezali na nguya makasi!
Baninga mpe bandeko mosusu ya Agboola baboyaki ye ntango atikaki mimeseno oyo ezalaki na boyokani na bademo. Kasi, azwaki baninga mosusu oyo bandimaka makambo oyo Biblia eteyaka na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na mboka na bango.
Agboola ayebi sikoyo ete mosika te, Yehova akolongola mabe nyonso na mabelé mpe akosukisa misala nyonso ya bademo. Nsukansuka, mpe akoboma bango mpo na libela. (Emoniseli 20:1, 2, 10) Nzambe akosekwisa “baoyo nyonso bazali na malita ya kokanisama.” (Yoane 5:28, 29) Na bato yango oyo bakosekwa, tokoki kotánga Abele, bana oyo Mokonzi Elode abomaki kaka mpamba, mpe bamilio mosusu ya bato. Agboola azali na kondima ete bana na ye misato mpe bakosekwa. Ekoki kozala ete bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá mpe bakozala na kati ya bato yango. Bato yango nyonso oyo bakosekwa bakoloba polele ete banda bakufaká tii mokolo basekwi, bayebaki likambo moko te, ezala ata milulu nyonso oyo basalaki mpo na bango.
Ozali na ntina ya kobanga bakufi te. Kutu, okoki kozela ntango oyo okozala lisusu esika moko na bato na yo oyo bakufá. Lokola eleko yango ekómi naino te, mpo na nini te koyekola Biblia mpo na kokómisa kondima na yo makasi? Bandá koyangana na bato oyo bandimaka oyo Biblia eteyeka. Soki ozali na misala ya bademo ata moke, katá mbala moko. ‘Latá molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe’ mpo omibatela na bademo. (Baefese 6:11) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo. Bayekolaka na bato Biblia ofele epai na bango na lisalisi ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a
Agboola abangaka lisusu bakufi te, mpe ayebi sikoyo ndenge ya kotɛmɛla bademo. Alobi boye: “Nayebi te nani abomá bana na ngai misato. Kasi, bandá nakómá kosalela Yehova, nabotá bana nsambo. Ata demo moko te asali bango mabe.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Agboola abangaka lisusu bakufi te, mpe ayebi sikoyo ndenge ya kotɛmɛla bademo
[Elilingi na lokasa 12]
Kaina abangaki te ete ndeko na ye oyo akufaki akosala ye mabe