Ozalaka ‘kapita ya boboto monene ya Nzambe’?
“Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.”—LOM. 12:10.
1. Maloba nini ya kolendisa tokoki kotánga na Liloba ya Nzambe?
MBALA na mbala, Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete Yehova akosalisa biso ntango tokutani na makambo oyo elɛmbisi biso to epesi biso mpasi na motema. Na ndakisa, talelá maloba oyo: “[Yehova] akosimbaka nyonso baoyo balingi kokwea mpe akonɛtola nyonso bagumbami.” “Azali kobɔndisa baoyo na mawa na mitema; azali kokanga mpota na bango.” (Nz. 145:14; 147:3) Longola yango, Tata na biso ya likoló ye moko alobi boye: “Ngai [Yehova], Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali; ngai nazali koloba na yo ete, Bangá te: ngai nakosunga yo.”—Yis. 41:13.
2. Ndenge nini Yehova asungaka basaleli na ye?
2 Kasi, na ndenge nini Yehova, ye oyo afandaka na likoló, akoki ‘kosimba lobɔkɔ na biso’? Na ndenge nini ‘anɛtolaka biso ntango togumbami’ na mpasi na motema? Yehova Nzambe asalaka yango na ndenge mingi. Na ndakisa, apesaka basaleli na ye “nguya oyo eleki makasi” na nzela ya elimo santu na ye. (2 Kol. 4:7; Yoa. 14:16, 17) Basaleli ya Nzambe bazwaka mpe nguya na nzela ya nsango oyo ezali na Biblia, Liloba na ye. (Ebe. 4:12) Kasi, ezali nde na lolenge mosusu oyo Yehova apesaka biso makasi? Tokozwa eyano na mokanda ya Liboso ya Petelo.
“Boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge”
3. (a) Ntoma Petelo alobaki nini na ntina na mikakatano? (b) Eteni ya nsuka ya Mokanda ya 1 Petelo elobeli nini?
3 Ntango ntoma Petelo akomelaki bandimi oyo bazalaki bapakolami na elimo, alobaki ete bazali na ntina ya kozala na esengo mpamba te mbano moko monene ezali kozela bango. Na nsima abakisaki boye: “Atako mpo na mwa ntango moke sikoyo, soki yango esengeli, bozali koyokisama mawa na komekama ndenge na ndenge.” (1 Pet. 1:1-6) Simbá liloba “ndenge na ndenge.” Emonisi ete mikakatano oyo tokokutana na yango ekozala ya ndenge na ndenge. Nzokande, Petelo asukaki wana te mpe atikaki te bandeko na ye bámituna soki bakokoka kolonga mikakatano yango ya ndenge na ndenge. Kasi, Petelo alobaki ete baklisto bakoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa bango bálonga mokakatano mokomoko oyo bakokutana na yango, ata soki ezali ya ndenge nini. Likambo yango emonisami na eteni ya nsuka ya mokanda ya Petelo, esika alobeli makambo oyo etaleli “nsuka ya makambo nyonso.”—1 Pet. 4:7.
4. Mpo na nini maloba oyo ezali na 1 Petelo 4:10 ezali kolendisa biso?
4 Petelo alobi boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana bino na bino lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge.” (1 Pet. 4:10) Petelo asaleli lisusu liloba “ndenge na ndenge.” Ezali lokola nde azali koloba ete, ‘Mikakatano eyaka na mitindo ndenge na ndenge, kasi boboto monene ya Nzambe mpe emonisamaka na mitindo ndenge na ndenge.’ Mpo na nini maloba yango esengeli kolendisa biso? Ezali komonisa ete ata soki tokutani na mokakatano nini, ekozala ntango nyonso na motindo moko ya boboto monene ya Nzambe oyo ekosalisa biso tólonga yango. Kasi, omoni na maloba ya Petelo ndenge oyo boboto monene ya Yehova emonisamaka epai na biso? Na nzela ya bandeko na biso baklisto.
“Mpo na kosalelana bino na bino”
5. (a) Moklisto mokomoko asengeli kosala nini? (b) Mituna nini yango ebimisi?
5 Petelo akomelaki baklisto nyonso ya lisangá ete: “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi.” Na nsima abakisaki boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana bino na bino.” (1 Pet. 4:8, 10) Na yango, ndeko mokomoko na lisangá asengeli kolendisa baklisto mosusu. Yehova apesi mokomoko na biso eloko ya motuya, mpe tosengeli kosalela yango mpo na bolamu ya basusu. Na yango, biloko yango ya motuya ezali nini? Petelo abengaki yango “likabo.” Likabo yango ezali nini? Ndenge nini tokoki ‘kosalela yango mpo na kosalelana biso na biso’?
6. Wapi mwa makabo oyo Yehova apesi baklisto?
6 Liloba ya Nzambe elobi boye: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló.” (Yak. 1:17) Ya solo, makabo nyonso oyo Yehova apesi basaleli na ye emonisaka boboto monene na ye. Likabo moko monene oyo Yehova apesaka biso ezali elimo santu. Likabo yango esalisaka biso tólona bizaleli lokola bolingo, bolamu, mpe boboto. Bizaleli yango etindaka biso tólinga bandeko na biso baklisto mpe tósalisaka bango na motema moko. Bwanya mpe boyebi ya solo ezali mpe na kati ya makabo kitoko oyo tozwaka na lisalisi ya elimo santu. (1 Kol. 2:10-16; Gal. 5:22, 23) Kutu, tokoki mpe kotalela makasi, makoki, mpe mayele na biso lokola makabo oyo tosengeli kosalela mpo na kosanzola Tata na biso ya likoló mpe kokumisa ye. Nzambe apesi biso mokumba ya kosalela makoki mpe bizaleli na biso mpo na komonisa boboto monene na ye epai ya bandeko na biso baklisto.
Ndenge nini ‘kosalela yango’ mpo na basusu?
7. (a) Maloba “na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi” emonisi nini? (b) Mituna nini mokomoko na biso asengeli komituna, mpe mpo na nini?
7 Na ntina na makabo oyo tozwi, Petelo alobaki lisusu boye: “Na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango.” Maloba “na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi” emonisi ete moto na moto akoki kozala na bizaleli mpe makoki oyo ekeseni mpenza na oyo ya basusu. Atako bongo, mokomoko asengeli ‘kosalela yango [elingi koloba, likabo oyo ye azwi]’ mpo na basusu. Longola yango, maloba “bósalela yango . . . lokola bakapita malamu” ezali mobeko. Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nasalelaka mpenza makabo oyo nazwi mpo na kolendisa bandeko na ngai baklisto?’ (Talá mpe 1 Timote 5:9, 10.) ‘To nasalelaka makoki oyo Yehova apesi ngai kaka mpo na matomba na ngai moko, mbala mosusu mpo nazwa bomɛngo to nakóma moto monene na mokili?’ (1 Kol. 4:7) Soki tozali kosalela makabo na biso ‘mpo na kosalelana biso na biso,’ tokosepelisa Yehova.—Mas. 19:17; tángá Baebele 13:16.
8, 9. (a) Tángá mwa makambo oyo baklisto na mokili mobimba basalaka mpo na bolamu ya bandeko na bango. (b) Ndenge nini bandeko ya lisangá na bino basalisanaka?
8 Liloba ya Nzambe elobeli mitindo ndenge na ndenge oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosalelana bango na bango. (Tángá Baloma 15:25, 26; 2 Timote 1:16-18.) Ndenge moko mpe lelo oyo, baklisto ya solo batosaka na motema mobimba mobeko ya kosalela likabo oyo bazwi mpo na bolamu ya bandeko na bango. Tótalela ndenge nini tokoki kosala yango.
9 Bandeko mibali mingi balekisaka bangonga ebele sanza nyonso mpo na kobongisa masolo oyo bakosala na makita. Na makita, ntango bazali koyebisa makambo kitoko oyo bazwaki na boyekoli na bango ya Biblia, maloba na bango ya bwanya elendisaka bandeko nyonso ya lisangá báyika mpiko. (1 Tim. 5:17) Bandeko mingi bayebani lokola bato ya boboto, oyo bayokelaka bandeko na bango baklisto mawa. (Lom. 12:15) Bamosusu bakendaka mbala na mbala kotala bandeko oyo bazali konyokwama na makanisi mpe babondelaka elongo na bango. (1 Tes. 5:14) Bamosusu mpe bazwaka ntango mpo na kokomela bandeko na bango baklisto oyo bazali na mikakatano mikanda mpo na kolendisa bango. Longola yango, ezali na bamosusu oyo basalisaka bandeko oyo bazali bibɔsɔnɔ mpe mibange báyanganaka na makita. Bankóto ya Batatoli bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga to kobongisa bandako ya bandeko oyo ebebisami na makama. Bolingo ya bandeko yango mpe lisungi oyo bapesaka ezali mpe “boboto monene ya Nzambe oyo emonisami na mitindo ndenge na ndenge.”—Tángá 1 Petelo 4:11.
Likambo oyo eleki ntina
10. (a) Mitindo nini mibale ya mosala na ye mpo na Nzambe Paulo azalaki komibanzabanza mpo na yango? (b) Ndenge nini tozali komekola Paulo lelo oyo?
10 Nzambe apesi basaleli na ye kaka te likabo oyo bakoki kosalela mpo na bolamu ya bandeko na bango baklisto, kasi mpe nsango oyo bakoki koyebisa bazalani na bango. Ntoma Paulo alobelaki ndenge yango mibale ya mosala na ye mpo na Yehova. Akomelaki baklisto ya Efese mpo na “mosala ya kapita ya boboto monene ya Nzambe” oyo amoniselaki ye mpo na bolamu na bango. (Ef. 3:2) Kasi, alobaki mpe ete: “Tomekamaki na Nzambe mpe tomonani ete tobongi kozwa mokumba ya nsango malamu.” (1 Tes. 2:4) Lokola Paulo, biso mpe toyebi ete tozali na mokumba ya kosakola Bokonzi ya Nzambe. Ntango tozali kosakola na molende, tosalaka makasi tómekola ndakisa ya Paulo, oyo azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu. (Mis. 20:20, 21; 1 Kol. 11:1) Toyebi ete kosakola nsango ya Bokonzi ekoki kobikisa bato. Nzokande, tosalaka mpe makasi tómekola Paulo na ndenge tolukaka mabaku ya ‘kokabela bandeko na biso baklisto mwa likabo ya elimo.’—Tángá Baloma 1:11, 12; 10:13-15.
11. Ndenge nini tosengeli kotalela mokumba ya kosakola mpe oyo ya kolendisa bandeko na biso?
11 Na mitindo mibale yango ya mosala ya boklisto, wapi oyo eleki ntina? Kotuna bongo ezali lokola koluka koyeba soki na mapapu mibale ya ndɛkɛ, oyo wapi eleki ntina. Eyano ezali polele. Ndɛkɛ asengeli kosalela mapapu nyonso mibale mpo na kopumbwa malamu. Ndenge moko, tosengeli kokokisa lolenge yango mibale ya mosala ya Nzambe mpo tózala baklisto oyo bakoki. Na yango, na esika tóloba ete mosala ya kosakola nsango malamu eyokani te na oyo ya kolendisa bandeko na biso baklisto, tosengeli nde kotalela yango lokola mikumba oyo etambolaka nzela moko, ndenge Petelo mpe Paulo bazalaki kotalela yango. Na ndenge nini?
12. Na ndenge nini tozali lokola bisaleli na lobɔkɔ ya Yehova?
12 Lokola tozali basakoli, tosalelaka mayele nyonso oyo tozali na yango mpo na kosimba mitema ya bato oyo tomemeli nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Na ndenge yango, tozalaka na elikya ete bakokóma bayekoli ya Klisto. Nzokande, tosalelaka mpe makoki nyonso mpe makambo mosusu oyo tozali na yango mpo na kolendisa bandeko na biso baklisto na maloba mpe na misala oyo emonisaka boboto monene ya Nzambe. (Mas. 3:27; 12:25) Na ndenge yango, tolingaka ete bátikala bayekoli ya Klisto. Na mikumba yango mibale—kosakola nsango malamu mpe ‘kosalelana biso na biso’—tozali na libaku kitoko ya kozala lokola bisaleli na lobɔkɔ ya Yehova.—Gal. 6:10.
“Bózalaka na bolingo ya motema”
13. Nini ekosalema soki totiki ‘kosalelana’?
13 Paulo akomelaki baklisto ete: “Na kati ya bolingo ya bondeko bózalaka na bolingo ya motema bino na bino. Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Lom. 12:10) Ya solo, bolingo mpo na bandeko na biso etindaka biso tósala na motema mobimba lokola bakapita ya boboto monene ya Nzambe. Toyebi ete soki Satana alongi kopekisa biso ‘tósalelanaka,’ akobebisa bomoko na biso. (Kols. 3:14) Kozanga bomoko ekotinda biso tózala na bopɔtu na mosala ya kosakola. Satana ayebi malamu ete soki abebisi ata lipapu na biso moko, tokokokisa lisusu mokumba na biso te.
14. ‘Kosalelana’ ezalaka na matomba mpo na banani? Pesá ndakisa.
14 ‘Kosalelana biso na biso’ ezali na matomba kaka te mpo na baoyo bazwi boboto monene ya Nzambe, kasi mpe mpo na baoyo basaleli yango epai ya basusu. (Mas. 11:25) Tózwa ndakisa ya ndeko Ryan ná mwasi na ye Roni, oyo bafandaka na Illinois, na États-Unis. Ntango bayokaki ete mopɛpɛ moko makasi (Katerina) ebebisi bankama ya bandako ya bandeko na bango Batatoli, bolingo ya bondeko etindaki bango bálongwa na mosala, bátɛka ndako na bango, básomba wagɔ moko, mpe babongisaki yango mpo na kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 1 400 mpo na kokende na Louisiane. Bafandaki kuna mbula mobimba na ndambo; bapesaki ntango, makasi, mpe biloko na bango mosusu mpo na kosalisa bandeko na bango. Ryan, oyo azali na mbula 29 alobi boye: “Kosalisa bandeko ndenge yango esalisaki ngai napusana penepene na Nzambe. Namonaki na miso ndenge Yehova abatelaka basaleli na ye.” Abakisi boye: “Kosala elongo na bandeko oyo bazali mikóló eteyaki ngai ndenge ya kosalisa bandeko. Nayekolaki mpe ete ezali na makambo mingi oyo biso bilenge tokoki kosala na lisangá ya Yehova.” Roni, oyo azali na mbula 25 alobi boye: “Nasepeli mingi ndenge napesaki mabɔkɔ mpo na kosalisa basusu. Nazali na esengo oyo nayoká naino te na bomoi. Nayebi ete na bambula oyo ezali koya, nakokoba kozwa matomba ya makambo oyo nasalaki kuna.”
15. Wapi bantina oyo tozali na yango ya kokoba kosala lokola bakapita ya boboto monene ya Nzambe?
15 Ya solo, kotosa mobeko ya Nzambe ya kosakola nsango malamu mpe kolendisa bandeko na biso baklisto ezali na matomba mpo na biso nyonso. Bato oyo tosalisaka bakómaka makasi na elimo, mpe biso moko toyokaka esengo oyo eutaka kaka na kopesa. (Mis. 20:35) Bandeko nyonso ya lisangá bazalaka malamu soki mokomoko azali kolinga basusu mpe kotyela bango likebi. Longola yango, bolingo oyo tomoniselanaka ezali elembo ete tozali baklisto ya solo. Yesu alobaki boye: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Koleka nyonso wana, tokopesa Tata na biso Yehova lokumu, mpamba te tozali kokokisa mposa na ye ya kolendisa basaleli na ye awa na mabelé. Na yango, tozali na ntina mpenza ya kosalela likabo na biso ya ‘kosalelana biso na biso lokola bakapita malamu ya boboto monene ya Nzambe’! Okokoba kosala yango?—Tángá Baebele 6:10.
Ozali koyeba lisusu?
• Na banzela nini Yehova alendisaka basaleli na ye?
• Yehova apesi biso mokumba nini?
• Na makambo nini tokoki kosalela bandeko na biso baklisto?
• Nini ekotinda biso tókoba kosalela likabo na biso ‘mpo na kosalelana biso na biso’?
[Bililingi na lokasa 13]
Osalelaka “likabo” na yo mpo na kosalela basusu to mpo na matomba na yo moko?
[Bililingi na lokasa 15]
Tosakolaka nsango malamu epai ya basusu mpe tosalisaka bandeko na biso baklisto
[Elilingi na lokasa 16]
Bandeko oyo basalisaka basusu babongi mpenza kozwa longonya mpo na elimo na bango ya komipimela