Baklisto basengeli kokunda bakufi kozanga mindɔndɔ mpe na ndenge oyo esepelisaka Nzambe
BATO bazali kolela. Balati bilamba ya moindo, bazali komibwakabwaka na mabelé mpo na mawa. Bato mosusu bazali kobina na kolanda miziki oyo ezali kobɛta makasi. Kasi, bato mosusu mpe bazali kolya mpe kosɛka na mongongo makasi mpe bazali kosepela. Basusu balali na nse mpo balangwi masanga ya mbila mpe bière. Bazali kosala bongo mpo na nini? Na bisika mosusu ya mokili, ezali ndenge wana nde ebele ya bato basalaka ntango bakei esika oyo moto akufi mpo na kopesa ye mbote ya nsuka.
Ebele ya Batatoli ya Yehova bazali kofanda na bamboka oyo bandeko mpe bato ya kartye na bango babangabangaka bato oyo bakufá. Bamilio ya bato bandimaka ete soki moto akufi, akómaka elimo moko ya bankɔkɔ oyo azali na likoki ya kosalisa to kosala mabe bato oyo batikali na bomoi. Likanisi wana nde ebimisá milulu ndenge na ndenge ya kokunda bawei. Ya solo, kolela moto oyo akufi ezali mabe te. Yesu ná bayekoli na ye balelaki mpe baninga na bango oyo bakufaki. (Yoa. 11:33-35, 38; Mis. 8:2; 9:39) Nzokande, ata mbala moko te balelaki na kolekisa ndelo ndenge bato bazalaki kosala na eleko na bango. (Luka 23:27, 28; 1 Tes. 4:13) Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete bayebaki solo na ntina ya liwa.
Biblia elobi polele ete: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” (Mos. 9:5, 6, 10) Bavɛrsɛ oyo emonisi polele ete ntango moto akufi, ayebaka lisusu likambo te. Akoki kokanisa te, kosilika te, kolinga te, kosolola na bato te, mpe koyeba likambo moko te. Ndenge nini koyeba solo wana ya Biblia ekoki kosalisa ntango tolingi kokunda ndeko moko ya lisangá oyo akufi?
“Bótika kosimba eloko ya mbindo”
Bázala bato ya ekólo boye to boye, Batatoli ya Yehova baboyaka kosangana na mimeseno nyonso oyo emonisaka ete soki moto akufi, ayebaka makambo mpe akoki kosalisa bato oyo batikali na bomoi to kosala bango mabe. Mimeseno lokola kolala ntɔngɔ saa na ebembe, koyangana mpo na kolya, komɛla mpe kobina nsima ya kokunda moto, komikundola mokolo oyo moto akufaki, kopesa moto oyo akufi bambeka, konyokola mwasi oyo akufeli mobali na makambo lokola mokuya, ezali mbindo mpe esepelisaka Nzambe te mpo euti na mateya ya Satana oyo elobaka ete molimo to elimo ekufaka te. (Ezek. 18:4) Baklisto ya solo ‘bakoki te kolya na mesa ya Yehova mpe na mesa ya bademo,’ yango wana, basanganaka te na mimeseno ya ndenge wana. (1 Kol. 10:21) Batosaka mobeko oyo: “Bókabwana . . . mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.” (2 Kol. 6:17) Nzokande, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koboya komikɔtisa na milulu ya ndenge wana.
Na Afrika mpe bipai mosusu, bato balobaka ete soki milulu ya bakufi esalemi te, bankɔkɔ bakosilika. Koboya kosala yango ekoki kosala ete mboka mobimba elakelama mabe mpe makambo na bango etambola lisusu malamu te. Lokola Batatoli ya Yehova mingi baboyaka kosangana na milulu wana oyo eyokani na Biblia te, bato batyolaka bango, bafingaka bango mpe babenganaka bango na bamboka to na mabota na bango. Bato mosusu balobaka na bango ete balingaka bato te mpe bamemyaka bakufi te. Ntango mosusu, bato oyo bazali bandimi te babɔtɔlaka ebembe ya Batatoli na makasi. Na yango, ndenge nini tokoki koboya kobendana na bato oyo balingi kaka ete milulu ya kokunda bakufi oyo esepelisaka Nzambe te esalema? To mpe, tokoki kosala nini mpo tókabwana na milulu to mimeseno oyo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova?
Monisá polele ekateli na yo
Na mikili mosusu, basɛngaka ete bandeko mosusu ya libota ná bankumu ya libota bákata ndenge moto oyo akufi akokundama. Na yango, moklisto ya sembo asengeli komonisa polele ete Batatoli ya Yehova nde bakokunda moto oyo akufi na kolanda mitinda ya Biblia. (2 Kol. 6:14-16) Makambo oyo ekosalema na ebembe ya moklisto esengeli te kotungisa lisosoli ya baklisto mosusu to kobɛtisa libaku bato oyo bayebi bindimeli na biso mpe mateya na biso na ntina etali bakufi.
Soki basɛngi ndeko moko ya lisangá atambwisa makambo nyonso oyo etali kokunda ndeko oyo akufi, bankulutu bakoki kopesa makanisi oyo ebongi mpe kosalisa bandeko ya libota ya mowei mpo makambo nyonso esalema na boyokani na mitinda ya Biblia. Soki bato ya libota oyo bazali Batatoli te balingi kokɔtisa milulu ya mbindo, tosengeli kozwa ekateli ya makasi mpe na mpiko nyonso kolimbola bango bindimeli na biso na boboto mpe na limemya. (1 Pet. 3:15) Kasi, tokosala nini soki bato yango batingami kaka básala milulu wana? Na ntango wana, bandeko ya libota yango oyo bazali Batatoli bakoki kotikela bango ebembe bákunda. (1 Kol. 10:20) Soki makambo ekómi bongo, mwa lisukulu ya bokundi ebembe ekoki kosalema na Ndako ya Bokonzi to na esika mosusu oyo ebongi mpo na kobɔndisa na nzela ya Makomami baoyo bazali na mawa ya ndeko na bango. (Lom. 15:4) Ata soki nzoto ya mowei ezali wana te, lisukulu ya ndenge wana ekoki kosalema, kasi na lokumu. (Det. 34:5, 6, 8) Ezaleli mabe ya bandeko oyo bazali Batatoli te ekoki kobakisa mitungisi mpe mawa, kasi tokoki kobɔndisama mpo toyebi ete Nzambe azali komona ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu, mpe akopesa biso “nguya oyo eleki makasi.”—2 Kol. 4:7.
Komá makambo oyo okolinga básala soki okufi
Ntango moto akomi makambo oyo alingi básala soki akufi, ezalaka pɛtɛɛ kosolola na bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te, mpo batosaka maloba ya mowei. Mokanda yango esengeli kozala na makambo ya ntina lokola oyo: ndenge makambo esengeli kosalema, bakolela nzoto wapi, mpe kaka nani nde akoki kobongisa makambo nyonso wana. (Gen. 50:5) Mpo bázwa mokanda yango na kilo, esengeli kozala na sinyatire ya moto oyo akomi yango mpe ya batemwe. Bato oyo bamonaka mosika mpe bazali na bwanya mpe bososoli ya mitinda ya Biblia, bayebaka ete basengeli te kozela tii bákóma mibange makasi to bábanda kobunda na liwa mpo na kokoma mokanda ya ndenge wana.—Mas. 22:3; Mos. 9:12.
Bato mosusu bayokaka mabe kokoma mokanda ya ndenge wana. Nzokande, kosala bongo emonisaka ete ozali moklisto oyo akɔmeli mpe amibanzabanzaka mpo na basusu. (Filp. 2:4) Eleki malamu kobongisa makambo ya ndenge wana biso moko na esika ya kotikela yango bandeko na biso ya libota, oyo bakoki kotinda bango bándima mimeseno ya mbindo oyo tozalaki kondima te ntango tozalaki na bomoi.
Moklisto asengeli kokundama kozanga mindɔndɔ
Na bisika mingi ya Afrika, balobaka ete esengeli kosala makambo minene soki moto akufi mpo bankɔkɔ basilika te. Bato mosusu bamonaka ete ezali libaku ya “kolakisa na lolendo” ete bazali bato ya mbongo. (1 Yoa. 2:16) Bato bapesaka ntango, makasi mpe mbongo mpo na kokunda mowei na ndenge ya lokumu mpo na bango. Mpo bato mingi báya na ebembe na bango, babambaka bafoto minene ya mowei na bisika ndenge na ndenge. Basalaka batriko oyo ezali na elongi ya mowei mpe bakabolelaka yango bato oyo bazali kolela. Basalisaka to basombaka sanduku ya mowei ya ntalo mingi, oyo ekoki kokamwisa bato oyo bamoni yango. Na ekólo moko ya Afrika, bato mosusu basalisaka kutu sanduku ya mowei oyo ezali lokola vuatire, lokola mpɛpɔ, lokola masuwa to lokola biloko mosusu oyo ekomonisa ete bato libota wana bazali na mbongo mingi. Bakoki kobimisa ebembe na sanduku mpe kolalisa yango na mbeto moko oyo babongisi na biloko ya langi ndenge na ndenge. Soki ezali mwasi nde akufi, bakoki kolatisa ye robɛ ya mpɛmbɛ ya libala, babiju mpe kosala ye maquillage. Kosala makambo ya ndenge wana ebongi mpenza mpo na basaleli ya Nzambe?
Baklisto oyo bakɔmeli na elimo bamonaka ete ezali malamu koboya kosala mimeseno ya bato oyo bayebi Nzambe te mpe batosaka mitinda na ye te. Toyebi malamu ete mimeseno mpe misala oyo eyokani na Makomami te, ‘euti epai ya Nzambe te, kasi euti na mokili oyo ezali koleka.’ (1 Yoa. 2:15-17) Tosengeli kokeba ete tómikɔtisa te na elimo mabe ya kowelana, to koluka kolakisa ete toleki basusu na mbongo. (Gal. 5:26) Emonani ete soki bato ya mboka moko babangaka bakufi, bato bayaka ebele na esika ya ebembe, mpe ekómaka mpasi mpo na kotambwisa makambo na molɔngɔ. Kokumisa bakufi ekoki kotinda bato oyo bazali baklisto te básala makambo ya mbindo. Na bibembe ya ndenge wana, bato bakoki kobanda kolela na mongongo makasi mpe kozanga kotika, kosimbasimba mowei, koloba na ye lokola nde azali koyoka, mpe kotya mbongo to biloko mosusu na nzoto na ye. Soki makambo ya ndenge wana esalemi na ebembe ya moklisto, yango ekoyokisa Yehova mpe basaleli na ye nsɔni.—1 Pet. 1:14-16.
Lokola toyebi ete bakufi bayebaka eloko te, yango epesi biso mpenza mpiko ya kokunda bibembe ya baklisto oyo bakufi kozanga kolanda ata molulu moko ya mokili. (Ef. 4:17-19) Ntango Yesu, moto oyo aleki bato nyonso kino lelo akufaki, bakundaki ye kozanga kobɛta bambonda mpe na ndenge ya mindɔndɔ te. (Yoa. 19:40-42) Mpo na bato oyo bazali “na makanisi ya Klisto,” kokunda moto kozanga mindɔndɔ ezali likambo ya nsɔni te. (1 Kol. 2:16) Ya solo, kokunda moklisto kozanga mindɔndɔ ezali lolenge eleki malamu ya koboya mimeseno ya mbindo oyo eyokani na Biblia te mpe kosala ete bato oyo balingaka Nzambe bázala na esika ya kimya, oyo makambo ezali kosalema na molɔngɔ.
Ezali nde esika ya bisengo?
Ekoki kozala ete nsima ya kokunda mowei, bandeko, baninga mpe bato mosusu bayanganaka ebele mpo na kolya mpe komɛla, kobɛta miziki makasi mpe kobina. Na milulu ya ndenge wana, mbala mingi bato balangwaka mpe basalaka pite to ekobo. Bato mosusu bakanisaka ete bisengo ya ndenge wana esalisaka mpo na kobengana mawa. Basusu bamonaka ete ezali kaka mimeseno ya mboka na bango. Nzokande, bato mingi bandimaka ete makambo ya ndenge wana ezali na ntina mpo na kokumisa moto oyo akufi mpe kopesa molimo na ye nzela ete ekende kokutana na bankɔkɔ na ye.
Baklisto ya solo bamonaka ntina ya maloba oyo: “Mawa eleki kosɛka na malamu, zambi mawa na elongi ekotya motema na malamu.” (Mos. 7:3) Lisusu, bayebaka ete ezali na ntina kokanisa ete bomoi ezali mokuse mpe ete elikya ya lisekwa ezali. Kutu, mpo na baoyo bazali na boyokani ya malamu na Yehova, ‘mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na bango na malamu.’ (Mos. 7:1) Na yango, lokola baklisto ya solo bayebi ete bafɛti oyo bato basalaka nsima ya kokunda mowei ezali na boyokani na bademo mpe makambo ya mbindo, bango basalaka bafɛti yango te, bakendeke mpe te na bafɛti ya ndenge wana. Kozala elongo na bato oyo bazali kosala bafɛti ya ndenge wana ekomonisa ete tozali na limemya te epai ya Nzambe mpe tozali te kotosa lisosoli ya bandeko na biso mosusu ya lisangá.
Tósalisa basusu bámona ete tokeseni na bango
Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge tosikolami na bibangabanga ya bakufi oyo bato oyo bazali na molili ya elimo bazali na yango! (Yoa. 8:32) Lokola tozali “bana ya pole,” tosengeli kolela bato na biso mpe komonisa mawa na lolenge oyo eyokani na mitinda ya Nzambe, elingi koloba kozanga kolekisa ndelo, na limemya mpe na elikya ete lisekwa ezali. (Ef. 5:8; Yoa. 5:28, 29) Elikya ya lisekwa ekopekisa biso tókóma kolela lokola baoyo “bazali na elikya te.” (1 Tes. 4:13) Ekopesa biso mpiko ya kokangama na losambo ya pɛto, mpe tókwea te na motambo ya kobanga bato.—1 Pet. 3:13, 14.
Soki tozali kotosa mitinda ya Biblia na bosembo nyonso, tokopesa basusu libaku ya komona banani bazali ‘kosalela Nzambe mpe banani bazali kosalela ye te.’ (Mki. 3:18) Ezali na mokolo oyo liwa ekozala lisusu te. (Emon. 21:4) Lokola tozali kozela kokokisama ya elaka monene wana, tósala makasi ete Yehova akuta biso kozanga litɔnɔ mpe mbeba, mpe tokabwani mpenza na mokili oyo mabe mpe mimeseno na yango oyo ekumisaka Nzambe te.—2 Pet. 3:14.
[Elilingi na lokasa 30]
Kokoma makambo oyo tokolinga esalema soki tokufi ezali likambo eleki malamu
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto basengeli kokundama kozanga mindɔndɔ mpe na lokumu