Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/3 nk. 29-31
  • Nini ekosalisa yo otika te kosakola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekosalisa yo otika te kosakola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tómekola basakoli ya kala
  • Ozali yo moko te
  • Kobosanaka bamposa na yo te
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/3 nk. 29-31

Nini ekosalisa yo otika te kosakola?

ESILÁ kokómela yo olɛmba nzoto mpe oyoka mposa ya kotika kosakola? Botɛmɛli ya makasi, mitungisi, maladi, baninga, to soki bato bazali koboya koyoka nsango na biso ekoki kosala ete tólɛmba kosakola. Kasi, kanisá naino ndakisa ya Yesu. Ayikaki mpiko na komekama ya makasi koleka “mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye.” (Ebe. 12:2) Ayebaki ete soki amonisi ete makambo oyo Satana alobaki mpo na Nzambe ezali lokuta, akosepelisa motema ya Yehova.​—Mas. 27:11.

Soki yo mpe ozali koyika mpiko na mosala ya kosakola okosepelisa motema ya Yehova. Nzokande, ezali boni soki mikakatano mosusu ezali kolɛmbisa yo? Krystyna, ndeko mwasi moko oyo akómi mobange mpe abɛlaka alobi boye: “Ntango mosusu nalɛmbaka mpe nakómaka mawamawa. Bobange, maladi mpe mitungisi mosusu ya bomoi ekitisaka molende na ngai.” Ntango okutani na mikakatano ya ndenge wana, nini ekosalisa yo otika te kosakola?

Tómekola basakoli ya kala

Mpo na koyika mpiko na mosala ya kosakola, basakoli ya Bokonzi basengeli kozala na makanisi lokola oyo ya basakoli ya kala. Tózwa ndakisa ya Yilimia. Ntango Nzambe aponaki ye mpo azala mosakoli, akakatanaki naino. Kasi, Yilimia akokisaki mokumba yango ya mpasi na boumeli ya mbula 40, mpo atyelaki Nzambe motema.​—Yil. 1:6; 20:7-11.

Ndakisa ya Yilimia elendisaka ndeko Henryk. Alobi boye: “Na boumeli ya mbula koleka 70 oyo nazali kosakola, ekómelaka ngai nalɛmba ntango bato baboyi koyoka nsango, bazali kotyola to kotɛmɛla ngai. Na ntango yango, nakanisaka ndakisa ya Yilimia. Bolingo na ye mpo na Yehova mpe kondima makasi oyo azalaki na yango, epesaki ye makasi mpo na kokoba kosakola.” (Yil. 1:17) Ndakisa ya Yilimia elendisaka mpe ndeko Rafał. Alobi boye: “Yilimia azalaki kotya motema epai ya Nzambe na esika ya kolanda kaka makanisi na ye moko. Na mpiko nyonso, akobaki mosala na ye atako bato bazalaki koyina ye. Nasalaka makasi nabosana likambo yango te.”

Mosakoli mosusu oyo ndakisa na ye elendisaka mpe ebele ya bandeko bátika kosakola te ezali Yisaya. Nzambe ayebisaki ye ete bato ya ekólo na ye bakoboya koyoka ye. Yehova alobaki boye: “Zalisá motema ya bato oyo na mafuta mpe matoi na bango na bozito.” Yango esalaki nde ete Yisaya alonga te? Ezalaki bongo te na miso ya Nzambe! Ntango Nzambe aponaki ye lokola mosakoli, alobaki boye: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yis. 6:8-10) Yisaya atikaki mosala na ye te. Yo mpe osalaka bongo mpo na mosala ya kosakola?

Na ndakisa ya Yisaya, mpo tótika te kosakola ata soki bato bazali koboya koyoka biso, tosengeli koboya kotya likebi na botɛmɛli na bango. Rafał alobi boye: “Nasalaka makasi natya motema te na makambo mabe oyo bato bazali koloba. Bato na teritware bazali na bonsomi ya kondima to koboya.” Anna alobi boye: “Nasalaka makasi nakanisa te makambo ya mabe oyo ekoki kolɛmbisa ngai. Libondeli mpe kotalela mokapo ya mokolo liboso nabima na mosala ya kosakola esalisaka ngai. Esalaka ete nabengana likanisi nyonso oyo ekoki kolɛmbisa ngai.”

Mosakoli Ezekiele asakolaki epai ya Bayuda ya motó makasi oyo bazalaki baombo na Babilone. (Ezek. 2:6) Soki mosakoli akangaki monɔkɔ mpe ayebisaki bango maloba ya Nzambe te mpe moto moko akufaki kozanga ete ayoka makebisi yango, Ezekiele alingaki kozala na ngambo. Yehova ayebisaki Ezekiele boye: “Nakotuna makila na ye na lobɔkɔ na yo.”​—Ezek. 3:17, 18.

Henryk asalaka makasi azala na makanisi lokola oyo ya Ezekiele; alobi boye: “Nalingi kozala pɛto na makila ya bato nyonso. Bomoi ya bato ezali na likama.” (Mis. 20:26, 27) Ndeko Zbigniew azalaka mpe na makanisi yango; alobi boye: “Ezekiele asengelaki kosakola ata soki bato bazalaki kokanisa nini. Yango esalisaka ngai natalela mosala ya kosakola ndenge Yehova amonaka yango.”

Ozali yo moko te

Ozalaka yo moko te ntango ozali kosakola. Lokola ntoma Paulo, tokoki koloba ete ‘tozali kosala elongo na Nzambe.’ (1 Kol. 3:9) Ndeko Krystyna oyo alobaki ete na bantango mosusu alɛmbaka nzoto, alobi boye: “Yango wana nabondelaka Yehova apesa ngai makasi. Ye mpe atikaka ngai te.” Ya solo, tozalaka na mposa ya elimo ya Nzambe na mosala ya kosakola!​—Zek. 4:6.

Ntango tozali na mosala ya kosakola, elimo santu esalisaka biso tómonisa bizaleli ya “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22, 23) Yango esalisaka biso tólendendela na mosala ya kosakola ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini. Henryk alobi boye: “Kosakola esalisaka ngai nabongisa bizaleli na ngai. Nayekolaka kozala motema molai, komemya basusu mpe kolɛmba nzoto noki te.” Koyika mpiko na mosala ya kosakola atako mikakatano ezali ekoki kosalisa yo olona mbuma ya elimo mingi.

Yehova asalelaka baanzelu mpo na kotambwisa mosala ya kosakola. (Emon. 14:6) Biblia elobi ete baanzelu yango bazali “bamiliadi na bamiliadi mpe bankóto na bankóto.” (Emon. 5:11) Na litambwisi ya Yesu, baanzelu bazali kosunga basaleli ya Nzambe awa na mabelé. Okanisaka likambo yango ntango ozali na mosala ya kosakola?

Anna alobi boye: “Koyeba ete baanzelu bazalaka elongo na biso na mosala ya kosakola elendisaka ngai mpenza. lisungi oyo bapesaka na litambwisi ya Yehova ná Yesu ezalaka na motuya mpenza na miso na ngai.” Oyo nde libaku kitoko ya kosala elongo na baanzelu ya sembo!

Ezali boni mpo na bandeko na biso na lisangá? Ezali mpenza lipamboli ndenge toyebani na ebele ya batatoli ya sembo. Na ntembe te, osili komona bosolo ya maloba ya Masese oyo: “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.”​—Mas. 27:17, NW.

Kosakola elongo na bandeko epesaka biso libaku kitoko ya kozwa mayele mosusu ya sika ya koteya. Ndeko Elżbieta alobi boye: “Kosakola elongo na basakoli ndenge na ndenge epesaka ngai libaku ya komonisa bolingo epai ya bandeko na ngai baklisto mpe epai ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola.” Luká kosakolaka na bandeko ndenge na ndenge. Ekopesa yo esengo na mosala ya kosakola.

Kobosanaka bamposa na yo te

Mpo na kobatela esengo na biso na mosala ya kosakola, tosengeli kozala na programɛ ya malamu ya koyekolaka mpe kopemaka malamu. Na maloba mosusu, tosengeli kobosanaka te bamposa na biso ya elimo mpe ya mosuni.

Biblia elobi boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.” (Mas. 21:5, NW) Zygmunt, ndeko oyo azali na mbula 88 alobi boye: “Programɛ ya malamu ya mosala ya kosakola epesaka ngai matomba mingi. Nasalaka programɛ ya malamu mpo nazwaka ntango ya kosakola.”

Soki toyebi mpenza Makomami, yango ekolendisa biso mpe ekosalisa biso tósala malamu mosala ya kosakola. Mpo tózala nzoto kolɔngɔnɔ tosengeli kolya malamu; ndenge moko mpe tosengeli kolyaka malamu na elimo mpo tókoba na mosala ya kosakola. Komileisa na Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe kolya ‘bilei na ntango oyo ebongi’ ekopesa biso makasi na mosala ya kosakola.​—Mat. 24:45-47.

Elżbieta asalaki mbongwana monene na bomoi na ye mpo na kobongisa lolenge na ye ya kosakola. Alobi boye: “Nakómaki kosalela ntango oyo nazalaki kolekisa liboso ya televizyo mpo na kobongisa mosala na ngai ya kosakola. Ntango natángaka Biblia mpokwa nyonso, nakanisaka bato oyo nakutanaki na bango na teritware. Nalukaka mikapo mpe masolo oyo ekosalisa bango.”

Kopema na ndenge ebongi ekosalisa yo ozala nzoto makasi mpe osakolaka mingi. Epai mosusu, kolekisa ndelo na kominanola ekoki kobebisa mosala na yo. Andrzej, mosakoli moko ya molende alobi boye: “Kozanga kopema esilisaka moto makasi na nzoto, mpe ekoki kosala ete alɛmba kosakola. Nasalaka nyonso mpo yango ekómela ngai te.”​—Mos. 4:6.

Ata soki tosali milende ndenge nini, kaka bato moke nde bandimaka nsango malamu. Nzokande, Yehova akobosana mosala na biso te. (Ebe. 6:10) Ata soki baboyi koyoka biso, toyebi ete bakobɛta ata lisolo na nsima na biso. Yango ekozala ndenge totángaka na lisolo ya Ezekiele ete bato “bakoyeba ete mosakoli azalaki na kati na bango.” (Ezek. 2:5) Mpo na koloba solo, mosala na biso ya kosakola ezali pɛtɛɛ te, kasi yango ememelaka biso mpe bato oyo bayokaka biso matomba.

Zygmunt alobi boye: “Kosakola nsango malamu esalisaka biso tólata bomoto ya sika mpe tólinga Nzambe mpe bazalani na biso.” Andrzej abakisi boye: “Ezali mpenza libaku malamu kosala mosala yango ya kobikisa bato. Mosala yango ekosalema lisusu te na ndenge oyo ezali kosalema lelo oyo.” Yo mpe okozwa mapamboli soki oyiki mpiko na mosala yango.​—2 Kol. 4:1, 2.

[Bililingi na lokasa 31]

Kokokisa bamposa na biso ya elimo mpe ya mosuni esalisaka biso tóyika mpiko na mosala ya kosakola

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto