Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/4 nk. 15-19
  • Bwanya ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bwanya ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu​—“Mosali ya mayele”
  • Molende ya nsɛlɛlɛ ekoki koteya biso
  • Tóbatela boyokani na biso na Nzambe
  • Tólendendela atako botɛmɛli ezali
  • ‘Tókangama na oyo ezali malamu’
  • Mateya oyo tokoki kozwa na biloko oyo Nzambe akelá
  • Mokolo ya Yehova ebɛlɛmi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • ‘E! Bwanya ya Nzambe ezali bozindo boni!’
    Pusaná penepene na Yehova
  • Bozalisi ezali koteya biso nini?
    Lamuká!—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/4 nk. 15-19

Bwanya ya Yehova emonanaka na biloko oyo akelá

“Bizaleli na ye oyo emonanaka te . . . emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá.”​—LOM. 1:20.

1. Bwanya ya mokili oyo ezali kokómisa bato mingi ndenge nini?

LELO oyo, bato mingi babengamaka bato ya “bwanya” nzokande bazali na yango te. Bamosusu balobaka ete moto ya bwanya ezali moto oyo azali na boyebi mingi. Nzokande, bato oyo bamonanaka lokola bato ya bwanya na mokili oyo basalisaka bato te báyeba mpenza ntina ya bomoi. Bato oyo balandaka makanisi ya bato yango bazali “kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.”​—Ef. 4:14.

2, 3. (a) Mpo na nini kaka Yehova “nde azali moto ya bwanya”? (b) Na ndenge nini bwanya oyo eutaka epai ya Nzambe ekeseni na bwanya ya mokili?

2 Bato oyo bazali kozwa bwanya ya solosolo, oyo eutaka epai ya Yehova Nzambe, bakeseni mpenza na bato oyo balandaka bwanya ya mokili! Biblia elobi ete “kaka [Yehova] ye moko nde azali moto ya bwanya.” (Lom. 16:27) Yehova ayebi biloko nyonso oyo akelá mpe ayebi ndenge asalaki mpo na kokela eloko mokomoko. Yehova nde atyá mibeko nyonso ya molɔ́ngɔ́ oyo bato ya mayele balandaka mpo na koyekola makambo ya sika. Yango wana, biloko oyo bato babimisaka mpe makanisi mineneminene ya bato ya filozofi ekamwisaka ye te. “Bwanya ya mokili oyo ezali bozoba epai ya Nzambe.”​—1 Kol. 3:19.

3 Biblia elobi ete Yehova apesaka basaleli na ye “bwanya.” (Mas. 2:6, NW) Na bokeseni na filozofi ya bato, bwanya oyo eutaka epai ya Nzambe ezalaka polele. Emonisaka bososoli malamu mpe eutaka na boyebi mpe mayele ya solosolo. (Tángá Yakobo 3:17.) Ntoma Paulo akamwaki bwanya ya Yehova. Akomaki ete: “E! bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali bozindo boni! Kosambisa na ye ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki komonana te!” (Lom. 11:33) Lokola Yehova aleki bato nyonso na bwanya, tondimi ete mibeko na ye etambwisaka biso na nzela ya malamu. Kutu, Yehova ayebi malamu koleka moto mosusu nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na esengo.​—Mas. 3:5, 6.

Yesu​—“Mosali ya mayele”

4. Tángá likambo moko oyo ekoki kosalisa biso tómona bwanya ya Yehova.

4 Tokoki komona bwanya ya Yehova mpe bizaleli na ye mosusu ya minene na biloko oyo akelá. (Tángá Baloma 1:20.) Biloko nyonso oyo Yehova akelá, ezala ya minene to ya mike, emonisaka bizaleli na ye. Ezala totali na likoló to awa na mabelé, tokomona ete Mozalisi na biso azali mpenza na bwanya mpe bolingo. Tokoki koyekola makambo mingi na ntina na ye soki totaleli biloko oyo akelá.​—Nz. 19:1; Yis. 40:26.

5, 6. (a) Yehova azalaki elongo na nani ntango azalaki kozalisa? (b) Tokolobela nini, mpe mpo na nini?

5 Yehova azalaki ye moko te ntango “azalisaki likoló mpe mokili.” (Gen. 1:1) Biblia emonisi ete bambula mingi liboso Yehova abanda kokela biloko oyo tomonaka, akelaki ekelamu moko ya elimo oyo na nzela na ye azalisaki “biloko mosusu nyonso.” Ekelamu yango ya elimo ezalaki Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe, “mwana ya liboso na bozalisi nyonso,” oyo na nsima ayaki awa na mabelé lokola moto na nkombo Yesu. (Kols. 1:15-17) Ndenge moko na Yehova, Yesu mpe azali na bwanya. Kutu, Masese mokapo 8 ebengi ye bwanya. Mokapo yango ebengi mpe Yesu “mosali ya mayele.”​—Mas. 8:12, 22-31, NW.

6 Na yango, biloko oyo Yehova akelá, emonisaka bwanya na ye mpe ya Yesu, Mosali ya mayele. Biloko yango ekoki koteya biso makambo mingi. Tótalela ndakisa ya biloko minei oyo Masese 30:24-28 (NW) elobi ete ezali na “mayele ya lɔɔmbi.”a

Molende ya nsɛlɛlɛ ekoki koteya biso

7, 8. Makambo nini oyo nsɛlɛlɛ esalaka esepelisaka yo?

7 Soki totaleli ndenge esalemá mpe misala oyo esalaka, ata biloko “mike kati na mokili” ekoki koteya biso. Na ndakisa, tólobela mayele ya lɔɔmbi ya nsɛlɛlɛ.​—Tángá Masese 30:24, 25.

8 Bato mosusu ya mayele balobaka ete soki bakaboleli bato bansɛlɛlɛ nyonso, moto mokomoko akoki kozwa 200 000; yango nyonso esalaka mosala makasi, ezala na libándá to na kati ya mabelé. Bansɛlɛlɛ ebongisamá na bituluku ndenge na ndenge, mpe na etuluku mokomoko okoki kokuta lolenge misato ya nsɛlɛlɛ: bakonzi-basi, mibali mpe basali. Etuluku mokomoko esalaka mpo na kokokisa bamposa ya etuluku mobimba. Na ndakisa nsɛlɛlɛ moko ya Amerika ya Sudi oyo babengi fourmi défoliante esalaka lokola mosali-bilanga ya mayele. Nsɛlɛlɛ yango etyaka vitamini na elanga na yango ya mayebo, ememaka mayebo na elanga mosusu ya sika mpe ebongisaka yango mpo ebota malamu. Bato ya mayele balobi ete “mosali-bilanga” yango ya mayele asalelaka makasi na ye na kotalela bilei oyo baninga na ye ya etuluku basengeli na yango.b

9, 10. Ndenge nini tokoki komekola molende ya nsɛlɛlɛ?

9 Nsɛlɛlɛ ekoki koteya biso. Eteyi biso ete tosengeli kosala na molende soki tolingi kobuka mbuma ya malamu. Biblia elobi na biso ete: “Kendá epai na nsɛlɛlɛ, yo moto ya gɔigɔi, [kanisá] mpo na nzela na ye, ozala mpe na mayele. Ata ye azali na mokonzi te to na motambwisi te to na mokóló te nde akobongisa bilei na ye na ntango ya moi makasi, mpe akoyanganisa biloko na ye na ntango ya kobuka mbuma.” (Mas. 6:6-8) Yehova ná mosali na ye ya mayele, Yesu, bazali basali ya molende. Yesu alobaki boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, mpe ngai nazali kokoba kosala.”​—Yoa. 5:17.

10 Lokola tozali bamekoli ya Nzambe mpe ya Klisto, tosengeli kozala na molende na mosala. Ata soki tozali na mikumba nini na lisangá ya Nzambe, biso nyonso tosengeli kozala na “mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58) Yango wana, tosengeli kolanda toli oyo Paulo apesaki baklisto ya Loma: “Bósalaka misala na bino kozanga kolekisa ntango mpambampamba. Bópela na elimo. Bósalela Yehova lokola baombo.” (Lom. 12:11) Milende na biso mpo na kosala mokano ya Yehova ezali ya mpamba te, mpo Biblia elobi ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”​—Ebe. 6:10.

Tóbatela boyokani na biso na Nzambe

11. Lobelá mwa makambo etali simbiliki ya mabanga.

11 Balapa (simbiliki ya mabanga) ezali ekelamu mosusu ya moke oyo ekoki koteya biso makambo ya ntina mingi. (Tángá Masese 30:26, NW.) Ezali lokola lapin ya monene kasi ezali na matoi mokuse mpe ekɔtá mpe ezali na makolo mikuse. Mwa nyama yango efandaka na bisika ya mabanga. Miso na yango oyo emonaka mosika ebatelaka yango mingi. Soki emoni nyama ya mabe oyo ekoki kolya yango, ekimaka na kati ya mabanga mpo na kobombana. Basimbiliki ya mabanga efandaka mbala mingi esika moko, mpe kosala bongo ebatelaka yango mpe esalisaka yango epesana molunge na eleko ya malili makasi.c

12, 13. Simbiliki ya mabanga ekoki koteya biso nini?

12 Simbiliki ya mabanga ekoki koteya biso nini? Ya liboso, tomonaki ete nyama yango emityaka na likama te. Kasi, esalelaka miso na yango mpo na komona banguna na yango na mosika, mpe ezalaka mosika te na madusu ya mabanga epai ekoki kobombana mpo na komibatela. Ndenge moko mpe, tosengeli kozala ekɛngɛ na elimo mpo tómonaka na mosika makama ya mokili ya Satana. Ntoma Petelo apesaki baklisto toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Pet. 5:8) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki ekɛngɛ, azalaki komibatela na makambo nyonso oyo Satana azalaki kosala mpo na kobebisa bosembo na Ye. (Mat. 4:1-11) Yesu atikelá bayekoli na ye ndakisa ya malamu mpenza!

13 Mpo na kozala ekɛngɛ, tosengeli kondima libateli ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso lelo oyo. Tosengeli koyekolaka Liloba ya Nzambe mpe koyanganaka na makita ya lisangá. (Luka 4:4; Ebe. 10:24, 25) Lisusu, ndenge kaka simbiliki ya mabanga efandaka elongo na baninga, biso mpe tosengeli kozalaka elongo na bandeko na biso baklisto mpo ‘tólendisanaka.’ (Lom. 1:12) Soki tozali kosala nyonso mpo na kozwa libateli oyo Yehova azali kopesa, tokomonisa ete tondimi maloba ya Davidi, mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai, Nzambe na ngai, libanga na ngai oyo nakokima epai na ye.”​—Nz. 18:2.

Tólendendela atako botɛmɛli ezali

14. Atako liyoyo moko ebangisaka te, tokoki koloba nini mpo na limpinga mobimba ya mayoyo?

14 Tokoki mpe kozwa mateya epai ya mayoyo. Liyoyo moko, oyo ezalaka kaka na molai ya santimɛtrɛ soki 5, ekoki kobangisa te; kasi soki esangani ebele esika moko ebangisaka mpenza. (Tángá Masese 30:27, NW.d) Lokola mayoyo elyaka na lokoso, limpinga mobimba ya mwa banyama-nkɛkɛ wana oyo elɛmbaka te ekoki kosilisa elanga mobimba ya biloko oyo ekɔmeli. Biblia ekokanisi makɛlɛlɛ ya banyama-nkɛkɛ, na ndakisa mayoyo, na makɛlɛlɛ ya makalo mpe makɛlɛlɛ ya mɔtɔ oyo ezali kopela makasi. (Yoe. 2:3, 5) Bato bapelisaka mɔtɔ mpo mayoyo ekende mosika te, kasi mbala mingi balongaka te. Mpo na nini? Mpo mayoyo oyo ekufi ebomaka mɔtɔ, mpe oyo etikali ekobaka mosala na yango. Ata soki mayoyo ezalaka na mokonzi to motambwisi te, esalaka lokola limpinga oyo ebongisamá malamu mpe elongaka ata mokakatano nini.e​—Yoe. 2:25.

15, 16. Na ndenge nini basakoli ya Bokonzi ya ntango na biso bazali lokola limpinga ya mayoyo?

15 Mosakoli Yoele akokanisaki mosala ya basaleli ya Yehova na oyo ya mayoyo. Akomaki boye: “Bazali kopota mbangu lokola bato ya etumba, bazali [komata] likoló ya mapango lokola basoda; moto na moto akotambolaka na nzela na ye, bakolongwaka na milɔngɔ na bango te. Moto akobebisaka moninga na ye te, moko na moko akotambolaka na nzela na ye. Bazali kokóma epai ya bibundeli nde bakotɛmisama te.”​—Yoe. 2:7, 8.

16 Esakweli yango elobeli malamu basakoli ya Bokonzi ya Nzambe na ntango na biso! “Lopango,” elingi koloba botɛmɛli ata moko te elongi kopekisa mosala na bango ya kosakola. Kasi, bazali komekola Yesu, oyo akobaki kosala mokano ya Nzambe atako bato mingi bazalaki kotyola ye. (Yis. 53:3) Ya solo, baklisto mosusu ‘bakómaki epai ya bibundeli,’ elingi koloba bakufaki lokola bamartiru mpo na kondima na bango. Atako bongo, mosala ya kosakola ekobaki, mpe motángo ya basakoli ya Bokonzi ezali se kobakisama. Kutu, mbala mingi botɛmɛli esalaka ete nsango malamu ya Bokonzi ekómela bato oyo balingaki koyoka yango na ndenge mosusu te. (Mis. 8:1, 4) Na mosala na yo ya kosakola, olendendelaka lokola mayoyo, ata soki bato bazali koboya koyoka yo to bazali kotɛmɛla yo?​—Ebe. 10:39.

‘Tókangama na oyo ezali malamu’

17. Mpo na nini gecko ekweaka te ntango etambolaka ata na bisika ya mosɛlu?

17 Moselekete oyo babengaka gecko ekweaka mpambampamba te. (Tángá Masese 30:28.) Kutu, bato ya siansi bakamwaka na likoki oyo mwa nyama wana ezalaka na yango ya kokima mbangu na bifelo mpe kotambola na baplafɔ oyo ezali mosɛlu kozanga ete ekwea. Nini esalaka ete gecko etambola bongo? Ezalaka na kole na makolo te. Kasi, mosapi mokomoko ya gecko ezalaka na ebele ya biloko mikemike lokola nsuki. Biloko yango ezalaka na bankama ya bansinga ya mikemike mpenza. Bansinga yango nde esalaka ete gecko ekwea te ata ntango ezali kokima mbangu na esika ya mosɛlu lokola vitre! Likoki wana ya kokamwa oyo gecko ezali na yango etindaka bato ya mayele báloba ete soki basali eloko moko oyo ekokani na makolo ya gecko, eloko yango ekozala kole moko ya makasi.f

18. Ndenge nini tokoki koyeba ete tozali ntango nyonso ‘kokangama na oyo ezali malamu’?

18 Liteya nini tokoki kozwa na gecko? Biblia epesi biso toli oyo: “Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.” (Lom. 12:9) Makambo ya mabe oyo etondi na mokili ya Satana ekoki kotinda biso tótika kokangama na mitinda ya Nzambe. Na ndakisa, kozala na baninga oyo batosaka mibeko ya Nzambe te, ezala na eteyelo, na mosala, to na kominanola na lolenge ya mabe, ekoki kobebisa ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu. Kotika te ete makambo ya ndenge wana ekómela yo. Liloba ya Nzambe ekebisi biso na maloba oyo: “Tiká te ete omonana na mayele na miso na yo moko.” (Mas. 3:7) Kasi tosengeli kolanda toli ya bwanya oyo Moize apesaki basaleli ya Nzambe na ntango ya kala ete: “Okosalela [Yehova Nzambe] mpe okokangama na ye.” (Det. 10:20) Soki tokangami na Yehova, tokomekola Yesu, oyo Biblia elobaki mpo na ye ete: “Olingaki boyengebene, mpe oyinaki botyoli-mibeko.”​—Ebe. 1:9.

Mateya oyo tokoki kozwa na biloko oyo Nzambe akelá

19. (a) Bizaleli nini ya Yehova omonaka na biloko oyo akelá? (b) Bwanya oyo eutaka na Nzambe ekoki komemela biso matomba nini?

19 Ndenge tomonaki yango, bizaleli ya Yehova emonanaka polele na biloko oyo akelá, mpe biloko yango ekoki koteya biso makambo ya ntina mingi. Soki tozali kokanisa na misala nyonso ya Yehova, tokomona bonene ya bwanya na ye. Soki tozali kotya likebi na bwanya oyo eutaka epai ya Nzambe, tokozala na esengo mingi lelo oyo, mpe tokobatelama na mikolo ezali koya. (Mos. 7:12) Tokomona bosolo ya Masese 3:13, 18 oyo elobi ete: “Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo [alandaka] boyebi. Ye azali lokola nzete ya bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bana bakoki kotánga mikanda oyo lisolo oyo etindi biso tótánga mpe bálobela makambo oyo bakotánga kuna na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá.

b Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali fourmi défoliante, talá Lamuká! ya 22 Marsi 1997, lokasa 31, mpe ya 22 Mai 2002, lokasa 31 (nyonso na Lifalanse.)

c Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali simbiliki ya mabanga, talá Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ 1990, nkasa 15-16 (na Lifalanse.)

d Mayoyo ezalaka na mokonzi te, kasi ebimaka na etuluku.

e Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mayoyo, talá Lamuká! ya 8 Febwali 1977, lokasa 11 (na Lifalanse.)

f Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali gecko, talá Lamuká! ya Aprili 2008, lokasa 26 (na Lifalanse.)

Ozali koyeba lisusu?

Mateya nini ya ntina tozwi na ndakisa ya . . .

• nsɛlɛlɛ?

• simbiliki ya mabanga?

• mayoyo?

• gecko?

[Elilingi na lokasa 16]

Ozalaka molende na mosala lokola fourmi défoliante?

[Bililingi na lokasa 17]

Simbiliki ya mabanga ezalaka makasi mpo ezalaka elongo na baninga. Yo mpe osalaka bongo?

[Bililingi na lokasa 18]

Na ndakisa ya mayoyo, basakoli balendendelaka na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 18]

Ndenge kaka gecko ekweaka te ata na bisika ya mosɛlu, baklisto bakangamaka na oyo ezali malamu

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Stockbyte/​Getty Images

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto