Tóyeba mokumba ya Moize Monene
“Yehova Nzambe akotɛlɛmisela bino na kati ya bandeko na bino mosakoli moko lokola ngai. Bosengeli koyoka ye.”—MIS. 3:22.
1. Na ndenge nini makambo oyo Yesu Klisto asalaki esalisaka bato mingi banda kala?
ELEKI lelo mbula nkóto mibale, ebele ya baanzelu bakumisaki Nzambe ntango mwana moko ya mobali abotamaki, mpe babateli mosusu ya mpate bayokaki masanzoli yango. (Luka 2:8-14) Mbula ntuku misato na nsima, mwana yango akómaki mokóló mpe abandaki mosala oyo eumelaki kaka mbula misato na ndambo, kasi ememaki matomba mpo na bato. Philip Schaff, moto moko ya mayele na istware oyo ayebani mingi, alobaki mpo na elenge yango ete: “Atako akomaki mokanda ata moko te, makambo oyo alobaki mpe asalaki esalisaka bato mingi banda kala bákoma babuku, banzembo, masolo, mpe makambo ya ntɔki. Yango emonisi ete makambo oyo asalaki ezalaki na ntina mingi mpo na bato.” Elenge yango ezalaki Yesu Klisto.
2. Ntoma Yoane alobaki nini mpo na Yesu mpe mosala na ye?
2 Ntoma Yoane akomaki lisolo ya mosala ya Yesu mpe na nsuka alobaki boye: “Ya solo, ezali mpe na makambo mosusu mingi oyo Yesu asalaki, oyo, soki mpenza ekomamaki yango nyonso na mobimba, nakanisi ete, mokili yango moko elingaki kokoka te barulo oyo ekomami.” (Yoa. 21:25) Yoane ayebaki ete akokaki kokoma kaka mwa makambo moke na kati ya nyonso oyo Yesu alobaki mpe asalaki na boumeli ya mbula misato na ndambo. Atako bongo, makambo oyo Yoane akomaki na Evanzile na ye ezali na ntina mingi.
3. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba malamumalamu mokumba oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe?
3 Longola Baevanzile minei, mikanda mosusu ya Biblia elobeli mingi bomoi ya Yesu na ndenge oyo ekoki kolendisa kondima na biso. Na ndakisa, masolo ya Biblia oyo elobeli bato mosusu ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso ya Yesu ezali na makambo ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso tóyeba malamumalamu mokumba monene oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe. Tólobela mwa ndambo ya bato yango.
Bato ya sembo ya kala oyo bazalaki elilingi ya Klisto
4, 5. Banani bazalaki elilingi ya Yesu, mpe na ndenge nini?
4 Yoane mpe bakomi mosusu misato ya Baevanzile batángi Moize, Davidi, mpe Salomo lokola bato oyo bazalaki elilingi ya Yesu, oyo azali Mopakolami ya Nzambe mpe Mokonzi oyo aponami. Na ndenge nini basaleli wana ya Nzambe bazalaki elilingi ya Yesu, mpe mateya nini tokoki kozwa na masolo na bango?
5 Biblia elobi ete Moize azalaki mosakoli, moyokanisi mpe mosikoli. Yesu mpe akokisaki mikumba yango. Davidi azalaki mobateli ya bampate mpe mokonzi oyo alongaki banguna ya Yisalaele. Yesu mpe azali mobateli ya bampate mpe mokonzi oyo azali kolonga. (Ezek. 37:24, 25) Ntango Salomo azalaki sembo, azalaki mokonzi ya bwanya mpe na boyangeli na ye, Yisalaele ezalaki na kimya. (1 Mik. 4:25, 29) Yesu mpe azali na bwanya mingi, mpe abengami “Nkolo ya kimya.” (Yis. 9:6) Emonani polele ete mokumba ya Yesu Klisto ekokani mpenza na oyo ya bato wana ya kala, kasi esika ya Yesu na mokano ya Nzambe eleki monene. Ya liboso, tólobela makambo oyo Yesu akokani na yango na Moize mpe tómona ndenge makambo yango ekosalisa biso tóyeba malamumalamu mokumba oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe.
Moize—moto oyo ayaki liboso ya Yesu
6. Ndenge nini ntoma Petelo amonisaki ntina ya koyoka Yesu?
6 Mwa moke nsima ya Pantekote ya 33 T.B., ntoma Petelo atángaki esakweli moko ya Moize oyo Yesu Klisto akokisaki. Petelo atɛlɛmaki liboso ya ebele ya Bayuda oyo bazalaki na tempelo. Bato yango bazalaki “na kokamwa moko ya koloba te” ntango Petelo ná Yoane babikisaki mosɛngi-biloko moko oyo azalaki kotɛnguma banda kobotama, mpe bango nyonso balukaki koyeba likambo nini esalemaki. Petelo alobaki ete likambo wana ya kokamwa esalemaki mpo Yehova apesaki bango elimo santu na nzela ya Yesu Klisto. Na nsima, atángaki Makomami ya Liebele; alobaki boye: “Kutu, Moize alobaki ete, ‘Yehova Nzambe akotɛlɛmisela bino na kati ya bandeko na bino mosakoli moko lokola ngai. Bosengeli koyoka ye engebene makambo nyonso oyo akoloba na bino.’”—Mis. 3:11, 22, 23; tángá Deteronome 18:15, 18, 19.
7. Mpo na nini bato oyo Petelo azalaki koteya bayebaki makambo oyo azalaki koloba na ntina na mosakoli oyo aleki Moize?
7 Bato oyo Petelo azalaki koteya bayebaki maloba wana ya Moize. Lokola bazalaki Bayuda, bazalaki na limemya mingi mpo na Moize. (Det. 34:10) Bazalaki mpenza kozela koya ya mosakoli oyo aleki Moize. Mosakoli yango asengelaki kozala kaka te mopakolami ya Nzambe lokola Moize, kasi asengelaki kozala Masiya, “Klisto ya Nzambe, Moponami” ya Yehova.—Luka 23:35; Ebe. 11:26.
Makambo oyo Yesu ná Moize bakokani na yango
8. Wapi mwa makambo ya bomoi ya Moize oyo ekokani na oyo ya Yesu?
8 Bomoi ya Yesu awa na mabelé ekokanaki na oyo ya Moize na makambo mosusu. Na ndakisa, ntango bazalaki bana mike, Moize ná Yesu babikaki na liwa na mabɔkɔ ya bakonzi ya mabe. (Ex. 1:22–2:10; Mat. 2:7-14) Lisusu, bango nyonso ‘babengamaki longwa na Ezipito.’ Mosakoli Hosea alobaki ete: “Wana Yisalaele azalaki mwana moke, nalingaki ye, mpe nabyangaki mwana na ngai longwa na Ezipito.” (Hos. 11:1) Makambo oyo Hosea alobi etaleli ntango oyo ekólo ya Yisalaele, oyo etambwisamaki na Moize, oyo Nzambe aponaki, ebimaki na Ezipito. (Ex. 4:22, 23; 12:29-37) Nzokande, maloba wana ya Hosea etalelaki kaka te likambo wana ya kala, kasi esengelaki mpe kokokisama na makambo mosusu oyo esengelaki koya. Maloba yango ezalaki esakweli oyo ekokisamaki ntango Yozefe ná Malia balongwaki na Ezipito elongo na Yesu nsima ya liwa ya Mokonzi Elode.—Mat. 2:15, 19-23.
9. (a) Makamwisi nini Moize mpe Yesu basalaki? (b) Tángá makambo mosusu oyo Moize ná Yesu bakokani na yango. (Talá etanda “Makambo mosusu oyo Yesu ná Moize bakokani na yango,” na lokasa 26.)
9 Moize mpe Yesu basalaki makamwisi, mpe yango emonisaki ete Yehova azalaki na bango. Kutu, Biblia emonisi ete Moize azali moto ya liboso oyo asalaki makamwisi. (Ex. 4:1-9) Moize asalaki makamwisi ya mai; na ndakisa ntango apesaki mitindo, mai ya Ebale Nil ebongwanaki makila, Mbu Motane ekabwanaki, mpe mai ebimaki na mabanga na esobe. (Ex. 7:19-21; 14:21; 17:5-7) Yesu mpe asalaki makamwisi ya mai. Likamwisi na ye ya liboso mpenza ezalaki oyo abongolaki mai vinyo na fɛti moko ya libala. (Yoa. 2:1-11) Na nsima, akitisaki mbonge makasi oyo ebɛtaki na Mbu ya Galilai. Kutu mokolo moko atambolaki likoló ya mai! (Mat. 8:23-27; 14:23-25) Mpo na koyeba makambo mosusu oyo Moize ná Yesu bakokani na yango, talá etanda na lokasa 26.
Klisto azalaki mosakoli
10. Mosakoli ya solosolo asalaka nini, mpe na ndenge nini Moize azalaki mosakoli ya solosolo?
10 Bato mingi bakanisaka ete mosakoli ezali kaka moto oyo asakolaka makambo ekoya; kasi wana ezali kaka likambo moko na kati ya makambo oyo mosakoli asalaka. Mosakoli ya solosolo azali molobeli ya Yehova, oyo asakolaka “makambo minene ya Nzambe.” (Mis. 2:11, 16, 17) Longola koyebisa makambo oyo ekoya, mosakoli ayebisaka mpe mikano ya Yehova mpe asakolaka bitumbu na ye. Moize azalaki mosakoli ya ndenge wana. Asakolaki bolɔzi mokomoko na kati na malɔzi zomi oyo esalemaki na Ezipito. Ayebisaki kondimana ya Mibeko na Ngomba Sinai. Mpe ayebisaki libota ya Yisalaele mokano ya Nzambe. Nzokande, mosakoli oyo alekaki Moize asengelaki koya.
11. Na ndenge nini Yesu azalaki mosakoli oyo aleki Moize?
11 Bambula mingi na nsima, na ekeke ya liboso, Zekalia asalaki lokola mosakoli na ndenge ayebisaki mokano ya Nzambe mpo na mwana na ye, Yoane. (Luka 1:76) Mwana yango akómaki Yoane Mobatisi, oyo asakolaki koya ya Yesu Klisto—mosakoli oyo aleki Moize, oyo bato bazalaki kozela banda kala. (Yoa. 1:23-36) Lokola Yesu azalaki mosakoli, asakolaki makambo mingi. Na ndakisa, alobelaki liwa na ye, ndenge oyo asengelaki kokufa, esika oyo akokufa, mpe bato oyo bakoboma ye. (Mat. 20:17-19) Yesu asakolaki mpe ete Yelusaleme ná tempelo na yango ekobomama, mpe yango ekamwisaki bayoki na ye. (Mko. 13:1, 2) Bisakweli na ye mosusu ezali kokokisama na mikolo na biso.—Mat. 24:3-41.
12. (a) Ndakisa nini ya molende Yesu atikaki ndakisa ya kozala na molende na mosala ya kosakola oyo ezali kosalema tii lelo? (b) Mpo na nini tolandaka ndakisa ya Yesu lelo?
12 Yesu azalaki mpe moteyi. Asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende mpenza koleka bato nyonso. (Luka 4:16-21, 43) Azalaki moteyi oyo aleki bateyi nyonso. Bato mosusu oyo bayokaki ye balobaki boye: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” (Yoa. 7:46) Yesu azalaki kosakola nsango malamu na molende mpe yango esalaki ete bayekoli na ye mpe bázala na molende mpo na Bokonzi. Na yango, atikaki ndakisa ya molende na mosala ya kosakola mpe ya koteya bato, oyo ezali kosalema tii lelo. (Mat. 28:18-20; Mis. 5:42) Na mbula oyo eleki, bayekoli ya Klisto soki milio nsambo balekisaki ngonga soki 1 500 000 000 na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe koteya bato oyo basepelaki na mateya ya Biblia. Yo mpe osakolaka nsango malamu yango na molende?
13. Nini ekosalisa biso ‘tózala ekɛngɛ’?
13 Na ntembe te, Yehova akokisaki esakweli na ye ya kotɛlɛmisa mosakoli oyo azali lokola Moize. Boyebi yango esengeli kotinda yo osala nini? Esengeli kotinda yo ozala na elikya ete bisakweli mosusu oyo elobeli makambo oyo ekosalema mosika te ekokokisama mpenza. Kokanisa na mozindo na ndakisa ya Yesu oyo azali Moize Monene ekotinda biso ‘tózala ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso’ na makambo oyo Nzambe akosala mosika te.—1 Tes. 5:2, 6.
Tótalelaka Klisto lokola Moyokanisi
14. Na ndenge nini Moize azalaki moyokanisi na kati ya Bayisalaele mpe Nzambe?
14 Yesu azalaki moyokanisi lokola Moize. Moyokanisi azali lokola gbagba oyo esangisaka mboka mibale. Moize azalaki moyokanisi ya kondimana ya Mibeko na kati ya Yehova mpe Bayisalaele. Soki bana ya Yakobo bátosaka mibeko ya Nzambe, balingaki mpenza kozala bato na ye, lisangá na ye. (Ex. 19:3-8) Kondimana yango ebandaki na 1513 L.T.B. tii na ekeke ya liboso T.B.
15. Na ndenge nini Yesu azali moyokanisi oyo aleki Moize?
15 Na 33 T.B., Yehova asalaki kondimana ya malamu koleka na Yisalaele ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” oyo ekómaki lisangá ya mokili mobimba ya baklisto bapakolami. (Gal. 6:16) Moize azalaki moyokanisi ya kondimana ya mibeko oyo Nzambe akomaki na libanga; Yesu azali moyokanisi ya kondimana oyo eleki oyo ya Moize. Nzambe akomi mibeko ya kondimana yango na mitema ya bato. (Tángá 1 Timote 2:5; Baebele 8:10.) Na yango, “Yisalaele ya Nzambe” ezali lelo oyo libota mpenza ya Nzambe, ‘oyo ezali kobota bambuma’ ya Bokonzi ya Masiya. (Mat. 21:43) Bato ya libota wana ya elimo bazali basangani ya kondimana ya sika. Nzokande, kaka bango moko te nde bakozwa matomba ya kondimana yango. Ebele ya bato oyo motángo na bango eyebani te, ezala baoyo bakufá, bakozwa mapamboli ya seko mpo na kondimana wana.
Tótalelaka Klisto lokola mosikoli
16. (a) Ndenge nini Yehova asalelaki Moize mpo na kosikola Yisalaele? (b) Na kotalela Exode 14:13, nani mpenza abikisaki Bayisalaele?
16 Na butu ya nsuka liboso bábima na Ezipito, bana mosusu ya Yisalaele bazalaki na likama monene. Anzelu ya Nzambe asengelaki koleka na Ezipito mpo na koboma bana nyonso ya liboso. Yehova ayebisaki Moize ete bana ya liboso ya Bayisalaele bakobika soki Bayisalaele bazwi makila ya mwana-mpate ya Elekeli mpe bapakoli yango na baporte ya bandako na bango. (Ex. 12:1-13, 21-23) Esalemaki bongo. Na nsima, ekólo mobimba ezalaki na likama monene. Mbu motane ezalaki liboso na bango mpe mampinga ya Baezipito ezalaki kolanda bango. Yehova asikolaki bango lisusu na nzela ya Moize, oyo na ndenge ya kokamwa akabolaki mai ya mbu.—Ex. 14:13, 21.
17, 18. Na ndenge nini Yesu azali mosikoli monene koleka Moize?
17 Ata soki makambo oyo Yehova asalaki mpo na kobikisa Bayisalaele ezalaki minene, oyo asali na nzela ya Yesu eleki monene. Yehova asikoli bato ya botosi na boombo ya lisumu na nzela ya Yesu. (Lom. 5:12, 18) Mpe kosikolama yango ezali “kosikolama ya seko.” (Ebe. 9:11, 12) Nkombo Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.” Yesu, oyo azali Mosikoli to Mobikisi, asikoli biso kaka te na masumu oyo tosalaki, kasi afungoleli biso mpe nzela ya kozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya. Lokola Yesu asikoli bayekoli na ye na masumu, abikisi bango na nkanda ya Nzambe mpe asalisi bango bákóma na boyokani malamu na Yehova.—Mat. 1:21.
18 Na mikolo ezali koya, kosikola oyo Yesu akosikola biso na masumu ekolongola makambo oyo lisumu ememá: maladi mpe liwa. Mpo na komona ndenge likambo yango ekozala, tótalela likambo oyo elekaki ntango Yesu akendaki na ndako ya moto moko na nkombo Yailusi, oyo mwana na ye ya mwasi ya mbula 12 akufaki. Yesu ayebisaki Yailusi ete: “Kobanga te, monisá kaka kondima, mpe akobikisama.” (Luka 8:41, 42, 49, 50) Maloba yango ekokisamaki, mwana yango asekwisamaki! Kanisá naino esengo oyo baboti ya mwana yango bayokaki! Na yango okoki komona sikoyo esengo monene oyo tokozala na yango ntango “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Yesu] mpe bakobima” na lisekwa. (Yoa. 5:28, 29) Ya solo, Yesu azali mpenza Mobikisi to Mosikoli na biso!—Tángá Misala 5:31; Tito 1:4; Emon. 7:10.
19, 20. (a) Kokanisa na mokumba ya Yesu lokola Moize Monene ekosalisa biso na nini? (b) Lisolo oyo elandi ekolobela nini?
19 Lokola toyebi ete tokoki kosalisa basusu bábika na nzela ya Yesu, tosengeli komipesa na mosala ya kosakola mpe ya koteya. (Yis. 61:1-3) Lisusu, kokanisa na mozindo mokumba ya Yesu lokola Moize Monene ekosalisa biso tózala mpenza na elikya ete akosikola bayekoli na ye ntango akoya kopesa bato mabe etumbu.—Mat. 25:31-34, 41, 46; Emon. 7:9, 14.
20 Yesu azali mpenza Moize monene. Asalaki makambo minene oyo Moize akokaki kosala te. Makambo oyo Yesu alobaki lokola mosakoli mpe misala na ye lokola moyokanisi etali bato nyonso. Lokola Mosikoli, Yesu azali kosikola bato kaka mpo na ntango moke te, kasi mpo na libela. Kasi, ezali na makambo mingi oyo masolo ya bato ya sembo ya ntango ya kala ekoki koteya biso na ntina na Yesu. Lisolo oyo elandi ekomonisa ndenge nini Yesu azalaki Davidi Monene mpe Salomo monene.
[Okoki kolimbola?]
Na ndenge nini Yesu azali
• mosakoli oyo aleki Moize?
• moyokanisi oyo aleki Moize?
• mosikoli oyo aleki Moize?
[Etanda/Elilingi na lokasa 26]
Makambo mosusu oyo Yesu ná Moize bakokani na yango
◻ Bango mibale batikaki lokumu oyo bazalaki na yango mpo na kosalela Yehova mpe bato na ye.—2 Kol. 8:9; Filp. 2:5-8; Ebe 11:24-26.
◻ Bango mibale bazalaki bapakolami to ‘baklisto.’—Mko. 14:61, 62; Yoa. 4:25, 26; Ebe. 11:26.
◻ Bango mibale bayaki na nkombo ya Yehova.—Ex. 3:13-16; Yoa. 5:43; 17:4, 6, 26.
◻ Bango mibale bazalaki bato ya komikitisa.—Mit. 12:3; Mat. 11:28-30.
◻ Bango mibale baleisaki bato ebele.—Ex. 16:12; Yoa. 6:48-51.
◻ Bazalaki basambisi mpe bapesi-mibeko.—Ex. 18:13; Mki. 4:4; Yoa. 5:22, 23; 15:10.
◻ Bango mibale batambwisaki ndako ya Nzambe.—Mit. 12:7; Ebe. 3:2-6.
◻ Biblia elobeli bango mibale lokola batatoli ya Yehova ya sembo.—Ebe. 11:24-29; 12:1; Emon. 1:5.
◻ Nsima ya liwa na bango mibale, Nzambe abombaki banzoto na bango.—Det. 34:5, 6; Luka 24:1-3; Mis. 2:31; 1 Kol. 15:50; Yuda 9.