2 Luká kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe
“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo.”—Yoane 17:3.
MOKAKATANO EZALI NINI? Bato mosusu balobaka ete Nzambe azalaka te. Basusu bamonaka ete Nzambe azali moto te, kasi azali nde nguya moko boye. Baoyo bandimaka ete Nzambe azali moto bateyaka makambo ekeseni na ntina na ye mpe bizaleli na ye.
NDENGE NINI OKOKI KOLONGA MOKAKATANO YANGO? Lolenge moko ya koyeba Nzambe ezali ya kotala biloko oyo akelá. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpamba te yango emonanaka na nzela ya biloko oyo esalemá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baloma 1:20) Soki ozali kotala na likebi biloko oyo Nzambe akelá, okomona bwanya mpe nguya ya Mozalisi na biso.—Nzembo 104:24; Yisaya 40:26.
Kasi, mpo moto ayeba mpenza bizaleli ya Nzambe, asengeli kofungola Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe koyekola yango ye moko. Kotika te ete basusu báyebisa yo makambo oyo osengeli kondima. Landá nde toli ya Biblia oyo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Na ndakisa, talá makambo oyo Biblia elobi na ntina na Nzambe.
Nzambe azali na nkombo. Na makomi ya ebandeli, nkombo ya Nzambe ezalaki na bankóto ya bisika na Biblia. Mabongoli mingi ezali na nkombo yango na Nzembo 83:18, oyo elobaka boye: “Báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo Yawe [Yehova, NW] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.”
Yehova Nzambe ayokaka mawa to esengo na makambo oyo bato basalaka. Nsima ya kosikola bango na boombo na Ezipito, Bayisalaele bazalaki mbala mosusu kobosana toli ya Yehova. Botomboki na bango ‘etungisaki’ ye. “Bayokisaki kutu Mosantu ya Yisalaele mpasi na motema” na misala na bango.—Nzembo 78:40, 41 NW.
Yehova amibanzabanzaka mpo na mokomoko na biso. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Batɛkaka te bakɛngɛli-mboka mibale na mbongo moko ya ebende ya motuya moke? Nzokande moko te na yango ekokwea na nse kozanga ete Tata na bino ayeba. Kasi nsuki mpenza ya motó na bino etángami yango nyonso. Na yango bóbanga te: Bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.”—Matai 10:29-31.
Na miso ya Nzambe, bato ya mposo nyonso bazali ndenge moko. Ntoma Paulo ayebisaki Bagrɛki ya Atene ete Nzambe “asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato, mpo na kofanda na etando mobimba ya mabelé.” Abakisaki ete Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:26, 27) Ntoma Petelo alobaki boye: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.
MBANO NINI OKOZWA? Bato mosusu bazali na “molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.” (Baloma 10:2) Soki oyebi mpenza oyo Biblia ezali koteya na ntina na Nzambe, bato bakokosa yo te mpe okozala na likoki ya ‘kopusana penepene na Nzambe.’—Yakobo 4:8.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1, “Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 6]
Lolenge moko ya koyeba Nzambe ezali ya kotala biloko oyo akelá