Omibatela na bilimo mabe
JAMES akolá na mboka moko mosika ya esanga Malaita, na bisanga Salomon. Banda bomwana na ye, bateyaki ye akumisaka bilimo. Alobi boye: “Ata mokolo moko te nasɛngaki bilimo bányokola moto, kasi nazalaki kokanisa ete moto akoki kozala na bomoi ya esengo kaka soki asalaka rarafono [milulu mpo na kosɛnga lisungi ya bilimo] mpo na kobimibatela.”
Ndenge moko na ebele ya bato ya mikili mosusu, bato oyo bafandaka na bisanga Salomon bandimaka ete bilimo bakoki kosalisa moto to kosala ye mabe. Kutu, bato mosusu ya Mélanésie basepelaka na bilimo oyo bango bakanisaka ete basalaka bato mabe te, mpe babangaka bango te.
Bato basalaka makambo ndenge na ndenge mpo na komonisa ete bandimaka misala ya bilimo mabe. Na ndakisa, ntango James azalaki mwana moke, bamama ya mboka na bango bazalaki kokimisa bana na bango na ndako soki bayoki makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ oyo babengaka korokoro. Mpo na nini? Bazalaki kokanisa ete makɛlɛlɛ ya ndɛkɛ yango ezali komonisa ete likama elingi kokómela moto moko.
Bato mosusu ya mboka batyaka libanga moko ya mpɛmbɛ likoló ya baporte ya bandako na bango. James mpe asalaki bongo mpo azalaki kokanisa ete libanga yango ekobatela ye na bilimo mabe. Mpe na mosala, soki James alei, azalaki kotya biloko nyonso oyo etikali na sakosi na ye mpo abwaka yango na nsima. Azalaki kosala bongo mpo azalaki kobanga ete moto moko ya maji akoki kozwa yango mpe kosalela yango mpo na kobwakela ye maladi.
Ata soki na mboka na bino bato basalaka mpenza bongo te, ekoki kozala ete lokola James, yo mpe omonaka ete osengeli kolanda mimesano ya bonkɔkɔ mpo bilimo mabe babatela yo. Okoki kokanisa ete kolanda mimesano yango ezali na ntina mpo ozala na bomoi ya malamu.
Soki ondimaka Biblia, na ntembe te okosepela koyeba biyano oyo epesi na mituna oyo: (1) Mabe nini bilimo mabe bakoki kosala yo? (2) Kolanda mimesano mosusu ya bonkɔkɔ ekoki mpenza kokɔtisa yo na boyokani na bademo? (3) Ndenge nini okoki komibatela mpenza na bilimo mabe mpe kozala na esengo?
Mabe oyo bilimo mabe basalaka
Biblia emonisi ete bilimo mabe bakoki te kozala bilimo ya bato oyo bakufá. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Bilimo mabe bazali nde baanzelu ya mabe oyo basangani na Satana mpo na kobungisa bato nzela.—Emoniseli 12:9.
Makomami emonisi polele ete tosengeli komibatela na bilimo mabe. Ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Efese ete: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi . . . ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” Ntoma Petelo alobaki ete mokonzi ya bilimo mabe, Satana Zabolo, azali lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.”—Baefese 6:12; 1 Petelo 5:8.
Mabe ya libosoliboso oyo Satana asalaka ezali ya kobungisa bato nzela, kokosa to kotinda bango básala makambo oyo epesaka Nzambe mpasi. Biblia elobi ete Satana “azali kokoba komibimisa lokola anzelu moko ya pole.” (2 Bakolinti 11:14) Amimonisaka lokola elimo oyo abatelaka, nzokande makanisi na ye ezalaka mabe. Satana azipaka makanisi ya bato mpo báyeba solo te na ntina na ye mpe na ntina na Nzambe. (2 Bakolinti 4:4) Mpo na nini abungisaka bato nzela?
Satana azalaka na mposa makasi ete bato básambela ye, báyeba yango to te. Ntango Yesu, Mwana ya Nzambe, azalaki awa na mabelé, Satana alingaki ete Yesu ‘akwea na nse mpe asambela’ ye. Yesu alobaki ete: “Longwá awa, Satana! Mpo ekomamá ete, ‘Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela.’” (Matai 4:9, 10) Yesu aboyaki kosala likambo nyonso oyo ekomonisa ete atosi Satana, mpo elingaki komonisa ete asambeli ye.
Yehova aleki bilimo nyonso na nguya mpe akotika te ete bato oyo batosaka ye bányokwama mpo na libela. (Nzembo 83:18; Baloma 16:20) Kasi, soki tolingi kokoba kosepelisa Yehova Nzambe ndenge Yesu asalaki, tosengeli koboya kotosa ata likambo moko oyo ekomonisa ete tosambeli Satana to bademo na ye. Mpo na yango, tosengeli koyeba mimesano oyo emonisaka ete moto asambeli bilimo mabe. Ndenge nini okoki koyeba yango?
Luká koyeba mimesano oyo esepelisaka Nzambe te
Yehova Nzambe akebisaki libota na ye Yisalaele ete bámekola te mimesano ya bikólo oyo ezalaki pembeni na bango. Alobaki boye: “Epai ya bino moto moko te . . . akende epai ya nganga mpo ya koyeba makambo makoya nsima, to epai ya moto akotalaka nzela ya minzoto, to epai ya moto akosalaka mosala mwa koloko to mwa nkisi, epai ya moto ayebi koloko bato.” Mpo na bato oyo basalaka makambo wana, Biblia elobi ete: “Moto asali bongo azwi likambo lya nsomo o miso ma Yawe Nzambe wa yo.”—Mibeko 18:10-12, Biblia Liloba lya Nzambe.
Yango wana, ntango ozali kotalela mimesano oyo ezalaka na mboka na bino, omituna boye: Momesano oyo elendisaka bato báluka koyeba makambo oyo ekoya? Etindaka bato bákanisa ete biloko oyo ezangi bomoi ezali na nguya ya kobatela? Esalelamaka mpo na kolɔka basusu to kosɛnga libateli ya bilimo? Ezali na likambo moko oyo soki osali yango ekomonisa ete otosi elimo mosusu na esika ya kotosa Yehova, to momonisi na ye, Yesu?—Baloma 14:11; Bafilipi 2:9, 10.
Osengeli koboya mimesano nyonso ya ndenge wana. Mpo na nini? Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki ete: “Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.” Alobaki ete bato oyo balukaka kosepelisa ná Nzambe ná bilimo mosusu bazali “koyokisa Yehova zuwa.” (1 Bakolinti 10:20-22) Yehova Nzambe asɛngaka ete tósambela kaka ye mpe abongi kozwa losambo na biso.—Exode 20:4, 5.
Talelá mpe motuna oyo: Momesano yango etindaka moto amona ete azali na ngambo te mpo na makambo oyo azali kosala? Na ndakisa, ekobo mpe kosangisa nzoto liboso ya kobala epekisami na mikili mingi mpe na Biblia. (1 Bakolinti 6:9, 10) Nzokande, na mikili mosusu ya Pasifike, mimesano ya ndenge wana ekoki komonana mabe te soki mwana mwasi alobi ete azali na “lokasa mobesu,”a elingi koloba asangisaka nzoto mpo lokasa wana nde etindaka ye asala bongo.
Kasi, Biblia eteyaka ete tokozongisa monɔkɔ mpo na makambo oyo tosalaka. (Baloma 14:12; Bagalatia 6:7) Na ndakisa, Eva, mwasi ya liboso amonisaki ete Satana nde akosaki ye aboya kotosa Nzambe ntango alobaki ete: “Nyoka akosi ngai, mpe nalei.” Atako bongo, Yehova apesaki Eva etumbu mpo na makambo oyo asalaki. (Genese 3:13, 16, 19) Biso mpe tokozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe mpo na makambo oyo tosalaka.—Baebele 4:13.
Osengeli kosala nini?
Mpo osepelisa Nzambe mpe otosa mitinda ya Biblia, osengeli kosala nyonso mpo omibatela na Satana mpe bademo na ye. Bato ya mitema sembo oyo bazalaki kofanda na Efese na ekeke ya liboso batiká ndakisa malamu na likambo yango. Mpo na kokata boyokani nyonso oyo bazalaki na yango na bilimo mabe, basangisaki babuku na bango nyonso oyo ezalaki kolobela misala ya bademo mpe “batumbaki yango na miso ya bato nyonso.”—Misala 19:19.
Liboso bátumba babuku, bato yango “bazalaki koya koyambola mpe koyebisa misala na bango polelepolele.” (Misala 19:18) Lokola makambo oyo Paulo ateyaki na ntina na Klisto esimbaki mitema na bango, batumbaki babuku na bango oyo ezalaki kolobela misala ya bademo. Babongolaki mpe lolenge na bango ya kotalela mimesano ya bonkɔkɔ.
Ya solo, ekoki kozala mpasi kotika mimesano ya bonkɔkɔ. James, oyo tolobelaki na ebandeli, akutanaki na mokakatano yango. Abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe azalaki kosepela na makambo oyo azalaki koyekola. Kasi, azalaki kaka kosala rarafono. Nsima ya kotalela makanisi na ye na oyo etali mimesano wana, amonaki ete andimaki bilaka oyo Yehova apesi mpo na mikolo ezali koya, kasi amonaki ete mpo na komibatela na mabe, asengeli kokoba kosala milulu wana ya bonkɔkɔ.
Nini esalisaki James abongola makanisi na ye? Alobi boye: “Nabondelaki Yehova abatela ngai mpe asalisa ngai natyelaka ye motema. Longola yango, natikaki kosala mimesano ya bonkɔkɔ.” Likambo moko ya mabe ekómelaki ye? James alobi boye: “Te. Likambo oyo ekómaki ezali ete nayekolaki kotyela Yehova motema. Namonaki ete Yehova akoki mpenza kokóma moninga ya motema.” Kutu, na mbula nsambo oyo euti koleka, James amipesaki mingi na mosala ya kosakola mpo na kosalisa bato mosusu báyeba makambo oyo Biblia eteyaka.
Mpo na nini te komekola ndakisa ya James? Talelá mimesano oyo bato ya mboka na bino basalaka, mpe salelá ‘likoki na yo ya kokanisa’ mpo oyeba soki mimesano yango eyokani na “mokano ya Nzambe.” (Baloma 12:1, 2) Na nsima, zalá na mpiko ya kotika kosala makambo oyo ekomonisa ete ozali kobanga bilimo mabe. Soki osali bongo, okoki kozala na elikya ete Yehova ‘akoyamba yo’ mpe akobatela yo. (2 Bakolinti 6:16-18) Lokola James, okomona bosolo ya elaka ya Biblia oyo: “Nkombo ya [Yehova] ezali ndako molai ya nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.”—Masese 18:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Basalelaka maloba “lokasa mobesu” soki balɔki lokasa ya nzete moko boye to bilei. Na nsima bapesaka yango na elenge mwasi moko. Balobaka ete lokasa to bilei yango esalaka ete abenda mibali. Momesano wana ekeseni na kolangwisa mwana mwasi kozanga ete ayeba mpe kosangisa na ye nzoto na makasi. Soki esalami bongo, mwana mwasi yango azali na foti te.
[Elilingi na lokasa 19]
“Korokoro”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Dr. Bakshi Jehangir
[Elilingi na lokasa 19]
Elenge oyo azali kolɔkɔta biloko oyo ekwei mpo esalelama te mpo na kolɔka