Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/5 nk. 22-25
  • Betele ya Brooklyn ekokisi mbula 100

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Betele ya Brooklyn ekokisi mbula 100
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bakendaki na Brooklyn?
  • Mpo na nini babengaki esika yango Betele?
  • Mokolo oyo bayambaki bapaya
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/5 nk. 22-25

Betele ya Brooklyn ekokisi mbula 100

MOBU 1909 ezalaki mobu ya ntina mingi mpo na engumba New York. Basilisaki kotonga gbagba mibale: gbagba Queensboro oyo esangisá komine ya Queens ná komine ya Manhattan, mpe gbagba Manhattan oyo esangisá komine ya Manhattan ná komine ya Brooklyn.

Mobu yango ezalaki mpe na ntina mingi mpo na Batatoli ya Yehova. Liboso, ndeko Charles Russell, prezida ya Watch Tower Bible and Tract Society, ebongiseli ya Batatoli ya Yehova oyo eyebani na Leta, amonaki ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ekoki kopanzana mingi. (Matai 24:14) Akanisaki ete soki biro monene ya Batatoli ya Yehova elongwe na engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, mpe ekei na Brooklyn, na New York, ekosalisa mingi mpo nsango malamu esakolama na mokili mobimba. Bibongiseli mpo na kokende na Brooklyn ebandaki na 1908, mpe bakendaki kuna na ebandeli ya mbula oyo elandaki.

Mpo na nini bakendaki na Brooklyn?

Bato oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola na ntango wana bayebaki ete kotya masolo ya Biblia na bazulunalo ezalaki kosalisa mpenza mpo na kopalanganisa mateya ya solo. Kobanda na mobu 1908, masolo ya Biblia oyo ndeko Russell azalaki kosala pɔsɔ na pɔsɔ ezalaki kobima na bazulunalo 11 mpe pɔsɔ nyonso bazalaki kobimisa bakopi 402 000 ya bazulunalo yango.

Nzokande, ndeko Russell akomaki boye: “Bandeko oyo bamesanaki kosalela bazulunalo mpo na kosakola . . . bayebisi biso ete soki masolo ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ ekómi kosalema na esika oyo eyebani mingi, ekoki kosala ete masolo yango epanzana na États-Unis mobimba; na bongo na boumeli ya mbula moko bankama ya bazulunalo ekoki kobanda kobimisa masolo yango mbala na mbala.” Yango wana, bakómaki koluka esika ya malamu oyo ekosalisa mpo na kopalanganisa nsango malamu.

Mpo na nini Brooklyn? Russell alobaki boye: “Nsima ya kobondela Nzambe, biso nyonso tomonaki ete lokola Brooklyn, na New York, ezali na bato mingi . . . mpe eyebani lokola ‘engumba oyo ezalaka na bandako-nzambe ebele,’ ekozala esika oyo ebongi mpo na mosala ya kobuka mbuma.” Makambo oyo esalemaki na nsima emonisaki ete bazwaki ekateli ya malamu. Nsima ya ntango moke kaka, bazulunalo 2 000 ekómaki kobimisa masolo ya ndeko Russell.

New York ezalaki esika ya malamu mpo na ntina mosusu. Na 1909, bafungolaki babiro ya Batatoli ya Yehova na Grande-Bretagne, na Allemagne, na Australie mpe na bisika mosusu. Yango wana, ezalaki malamu kotya biro monene ya Batatoli ya Yehova na engumba oyo ezali na libongo mpe babalabala ná banzela mingi ya engbunduka oyo ekendá na bisika mosusu.

Mpo na nini babengaki esika yango Betele?

Biro monene ya libosoliboso ya Watch Tower Bible and Tract Society efungwamaki na bambula ya 1880, na Allegheny (lelo oyo ekómá na kati ya Pittsburgh), na etúká ya Pennsylvanie. Na ntango wana, bazalaki kobenga yango Ndako ya Biblia. Na 1896, bato 12 bazalaki kosala kuna.

Nzokande, ntango biro monene ya Batatoli ekómaki na Brooklyn na 1909, bandako ya sika oyo bato ya mosala bazalaki kofanda ekómaki kobengama Betele.a Mpo na nini Betele? Ndako oyo Watch Tower esombaki na balabala Hicks nimero 13-17 ezalaki liboso ndako ya mokonzi moko ya lingomba oyo nkombo na ye ezalaki Henry Ward Beecher mpe bazalaki kobenga yango Betele ya Beecher. Basombaki mpe ndako mosusu ya Beecher oyo ezalaki na balabala Columbia Heights, nimero 124. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1909 elobaki boye: “Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge tosombaki ndako oyo ezalaki kobengama Betele ya Beecher mpe na nsima tosombi ndako mosusu epai Beecher azalaki kofanda kala. . . . Tokobanda kobenga ndako yango ya sika ‘Betele,’ mpe biro ya sika ná ndako oyo tokobanda kosala makita tokobenga yango ‘Tabenakle ya Brooklyn’; tokosalela bankombo yango na esika ya ‘Ndako ya Biblia.’”

Lelo oyo, bandako minene oyo ezali na Brooklyn mpe na bingumba mosusu mibale na etúká ya New York, Wallkill ná Patterson, bandako oyo bato bafandaka, esika babimisaka mikanda, mpe babiro ebengamaka mpe Betele. Kutu, lelo oyo Babetele ezali na mikili 113. Ezali na bato koleka 19 000 oyo basalaka kuna mpo na kopalanganisa mateya ya Biblia.

Mokolo oyo bayambaki bapaya

Molulu ya kofungola bandako yango esalemaki na mokolo ya 31 Yanuali 1909. Mokolo ya yambo, 6 Sɛtɛmbɛ 1909 ezalaki mokolo oyo bayambaki bapaya na Betele. Bankama ya Bayekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana, batambolaki na kati ya Betele mpo na kotala yango. Mingi kati na bango bautaki mbala moko na liyangani ya etúká oyo esalemaki na engumba Saratoga Springs, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 320 na nɔrdi ya engumba New York. Charles Russell ye moko ayambaki bapaya.b

Tii lelo bayambaka bapaya na Betele. Kutu, mbula na mbula bato koleka 40 000 bakendaka kotala bandako ya Betele oyo ezali na Brooklyn. Betele ya Brooklyn ezali kokoba kosala mosala monene mpo matomba ya Bokonzi ya Yehova ekende liboso, mpe yango ezali komemela bamilio ya bato matomba.

a Liloba ya Liebele “Betele” elimboli “Ndako ya Nzambe.” Betele oyo Biblia elobeli ezalaki engumba ya ntina mingi na Yisalaele. Kasi, Biblia elobeli mingi engumba Yelusaleme.

b Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina ya likambo yango, talá buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, nkasa 718-723, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Makambo nini oyebi na ntina na WATCH TOWER BIBLE and TRACT SOCIETY?

Ebongiseli oyo eyebani lelo na nkombo Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania endimamaki na Leta na 1884 na nkombo Zion’s Watch Tower Tract Society. Mokano na yango ezalaki ya kopalanganisa mateya ya Biblia na mokili mobimba, mingimingi na nzela ya mikanda. Lelo oyo, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania ezali moko ya bibongiseli oyo endimami na Leta oyo Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba basalelaka.c​—Bafilipi 1:7.

Watch Tower Bible and Tract Society ebimisi Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ 473. Ebimisi Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu koleka milio 150 na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 72. Longola Libongoli ya Mokili ya Sika, la société ebimisaki na imprimeri na yango moko to na ba-imprimeri ya bato mosusu mabongoli ya Biblia oyo: American Standard Version, The Bible in Living English, The Emphatic Diaglott, Holman’s Linear Parallel Edition, King James Version (ná ebimeli ya Bayekoli ya Biblia), mpe The New Testament Newly Translated and Critically Emphasized, ebimeli ya mibale.

Longola Babiblia, kaka na boumeli ya mbula 10 oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova babimisi bisaleli mosusu koleka miliare 20, na ndakisa babuku, bazulunalo, batrakte, ba-CD, ba-DVD, mpe bisaleli mosusu oyo elobelaka Biblia.d Biloko yango mingi ebimisamaki, etyamaki na bakartɔ, mpe Babetele ya mikili oyo elandi etindaki yango na mikili mosusu: Afrique du Sud, Allemagne, Argentine, Australie, Brésil, Canada, Colombie, Corée, Espagne, États-Unis, Finlande, Grande-Bretagne, Inde, Italie, Japon, Liban, Mexique, Myanmar, Nigeria, mpe Philippines.

BANDA 1998 TII 2008

BABIMISI

Babuku

458 230 708

Bazulunalo

11 292 413 199

Batrakte

7 996 906 376

Mwa babuku

862 050 233

CD/MP3

34 621 130

Ba-DVD

13 500 125

Biloko mosusu

129 083 031

Nyonso esali

20 786 804 802

c Na 2008, Batatoli ya Yehova bazalaki 7 124 443 na mikili 236. Bazalaki na masangá 103 267.

d Batɛkaka biloko yango te. Mosala ya koteya Biblia oyo Batatoli ya Yehova basalaka esimbami na makabo ya bolingo malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto