Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/5 lok. 18
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi na Nzambe ebotami!
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Yebá monguna na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/5 lok. 18

Mituna ya batángi

Ntango nini Satana abwakamaki awa na nse?​—Emon. 12:1-9.

Atako mokanda ya Emoniseli elobi te ntango ya sikisiki oyo Satana abwakamaki awa na nse, elobeli makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntango oyo likambo yango esalemaki. Kati na makambo yango, oyo ya liboso ezali kobotama ya Bokonzi ya Masiya. Nsima na yango, “etumba ebimaki na likoló,” Satana alongaki te mpe abwakamaki awa na nse.

Makomami emonisi polele ete na 1914, “bantango oyo etyamá ya bikólo” esukaki mpe ete Bokonzi ebandaki koyangela.a (Luka 21:24) Ndenge nini kaka mwa moke na nsima etumba ebimaki na likoló mpe Satana abwakamaki?

Emoniseli 12:4 elobi boye: “Dalagona akobaki kotɛlɛma liboso ya mwasi yango oyo alingaki kobota, mpo, ntango akobota, akoka kolya mwana na ye.” Yango emonisi ete Satana alukaki kobebisa Bokonzi yango ya sika nokinoki, kaka na ntango ebotamaki. Atako Yehova apesaki nzela te na likambo yango, Satana alɛmbaki te na milende na ye mpo na kobebisa Bokonzi yango oyo eutaki kobotama. Yango wana, “Mikaele mpe baanzelu na ye” balekisaki ntango te mpo na kobengana “Dalagona mpe baanzelu na ye” na likoló mpo básala mabe moko te na Bokonzi. Na yango, tokoki koloba ete etumba mpe kobwakama ya Satana awa na nse esalemaki mwa moke nsima ya kobotama ya Bokonzi na 1914.

Likambo mosusu oyo tosengeli kotalela ezali kosekwa ya baklisto bapakolami oyo, ndenge Makomami ezali komonisa yango ebandaki mwa moke nsima ya kotyama ya Bokonzi.b (Emon. 20:6) Lokola Makomami elobi te ete ata ndeko moko ya Klisto abundaki na etumba yango ná dalagona mpe baanzelu na ye, yango emonisi ete ntango bandeko ya Klisto babandaki kosekwa, etumba yango esilaki kosalema mpe Satana ná bademo na ye basilaki kobwakama awa na nse.

Na yango, Biblia elobi te ntango ya sikisiki oyo Satana ná bademo na ye babwakamaki awa na nse. Atako bongo, emonani ete likambo yango esalemaki mwa moke nsima ya kotyama ya Yesu Klisto na Bokonzi, na 1914.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 215-218.

b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2007, nkasa 27-28, paragrafe 9-13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto