Nzambe abongwanaka?
MPO na Nzambe, Biblia elobi boye: “Epai na ye kobongwana ya kobaluka ya elili ezalaka te.” Nzambe ye moko alobi boye: “Ngai [Yehova] nakobongwana te.” (Yakobo 1:17; Malaki 3:6) Yehova Nzambe akeseni mpenza na bato ya makambo makasi baoyo babongi kotyelama motema te, mpamba te bazali bongolabongola!
Nzokande, batángi mosusu ya Biblia bamitunaka soki Nzambe abongwaná te. Na ndakisa, na ntango moko Yehova Nzambe apesaki baklisto nguya ya kosala makamwisi, kasi lelo oyo apesaka yango lisusu te. Na ntango ya kala, Nzambe azalaki kotika mibali bábala basi ebele, kasi lelo apekisá. Na Mibeko ya Moize, Yehova asɛngaki Bayisalaele bápemaka mokolo nyonso ya Sabata, kasi lelo oyo asɛngaka lisusu bongo te. Makambo wana nyonso emonisi te ete Nzambe abongwani?
Ya liboso, tosengeli kondima ete Nzambe abongolaka te mibeko na ye na oyo etali bolingo mpe boyengebene. Lisusu, ‘mokano na ye ya seko’ ya kopambola bato na nzela ya Bokonzi na ye ebongwani te. (Baefese 3:11) Kasi, kaka ndenge moto akoki kobongola makanisi na ye mpo na moto oyo bizaleli na ye ezali kosepelisa ye te, Yehova mpe abongolaka makanisi na ye na kotalela ndenge makambo ezali kobongwana.
Nzambe abongolaka mpe malako na ye na kotalela bomoi mpe bamposa ya basaleli na ye. Yango esengeli kokamwisa biso te. Tókanisa likambo moto oyo azali kotambwisa bato akoki kosala soki amoni likama. Akoyebisa bato yango báleka na nzela mosusu, epai likama ezali te. Kasi, yango elimboli te ete abongoli makanisi na ye mpe atiki komema bango epai bazalaki kokende. Na yango, tótalela naino bandakisa misato oyo tolobelaki, oyo bato mosusu bakokaka kokanga ntina na yango te.
Mpo na nini makamwisi esilaki?
Mpo na nini Nzambe apesaki baklisto mosusu ya liboso nguya ya kosala makamwisi? Na ntembe te, oyebi ete ntango Yisalaele ezalaki libota oyo Nzambe aponaki, mbala mingi Nzambe azalaki komonisa na makamwisi ete azalaki na bango. Na nzela ya Moize, Nzambe amonisaki nguya na ye na ndenge abimisaki Bayisalaele na Ezipito mpe atambwisaki bango na esobe tii na Mokili ya Ndaka. Likambo ya mawa, mbala na mbala Bayisalaele bazangaki kondima. Ntango Yehova abwakaki libota yango mpe asalaki lisangá ya boklisto, apesaki bantoma mpe bato mosusu nguya ya kosala makamwisi. Na ndakisa, ntoma Petelo ná ntoma Yoane babikisaki mobali moko oyo azalaki motɛngumi banda kobotama na ye, mpe ntoma Paulo asekwisaki elenge mobali moko. (Misala 3:2-8; 20:9-11) Makamwisi oyo basalaki esalaki ete bato na bamboka mingi bándima Klisto. Kasi, mpo na nini makamwisi esilaki?
Ntoma Paulo apesaki ndakisa moko mpo na kolimbola likambo yango; alobaki boye: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.” (1 Bakolinti 13:11) Kaka ndenge baboti basalelaka mwana moke makambo ya mbula na ye, ndenge moko mpe Yehova abongolaki ndenge na ye ya kosalela lisangá ya boklisto makambo ntango ezalaki lisusu “mwana moke” te. Ntoma Paulo amonisaki ete makamwisi yango, na ndakisa likoki ya koloba monɔkɔ mosusu to bisakweli “ekosuka.”—1 Bakolinti 13:8.
Mpo na nini atikaki mibali bábalaka basi ebele?
Yesu alobaki ete Nzambe amonisaki ndenge oyo libala esengeli kozala; alobaki na mobali ná mwasi ya liboso boye: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko kaka.” (Matai 19:5) Libala esengelaki kosangisa bato mibale mpo na libela. Nzokande, ntango Nzambe abongisaki ekólo ya Yisalaele mpe apesaki bango Mibeko, kobala basi ebele ekómaki momemeseno mpenza. Na yango, atako Nzambe te nde abandisaki likambo yango to asepelaki ete básalaka bongo, atyaki mibeko mpo mobulu ezala te na likambo yango. Ntango lisangá ya boklisto esalemaki, Liloba ya Nzambe epekisaki likambo yango polele.—1 Timote 3:2.
Yehova Nzambe atikaka makambo mosusu esalema tii na ngonga oyo ye moko abongisi mpo na kosembola yango. (Baloma 9:22-24) Yesu amonisaki ete Yehova ‘atikelaki Bayisalaele nzela’ ya kosala makambo mosusu oyo elongobani te na libala, mpo na “mitema makasi” na bango.—Matai 19:8; Masese 4:18.
Mpo na nini Sabata ezalaki kaka mpo na mwa ntango?
Nsima ya kobimisa Bayisalaele na boombo na Ezipito, Nzambe asɛngaki bango bápemaka mokolo nyonso ya Sabata. Na nsima, akɔtisaki yango na Mibeko ya Moize. (Exode 16:22-30; 20:8-10) Ntoma Paulo alobaki ete Yesu amikabaki lokola mbeka mpe “alongolaki . . . Mibeko ya bakomandema oyo esalemi na mitindo mipesami” mpe “abomaki mokanda ekomamá na mabɔkɔ.” (Baefese 2:15; Bakolose 2:14) Sabata ezalaki na kati ya eloko oyo “alongolaki” mpe oyo “abomaki,” mpamba te Biblia elobi boye: “Na yango moto moko te asambisa bino na oyo etali kolya mpe komɛla to mpo na fɛti moko boye to mpo na kokumisa sanza ya sika to mpe mpo na sabata.” (Bakolose 2:16) Mpo na nini Nzambe apesaki mobeko ya Sabata mpe Mibeko mosusu?
Ntoma Paulo akomaki boye: “Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.” Abakisaki boye: “Sikoyo lokola kondima eyei, tozali lisusu na nse ya molakisi te.” (Bagalatia 3:24, 25) Nzambe abongolaki makanisi te, kasi asalelaki nde Sabata mpo na mwa ntango mpo na koteya libota na ye ete basengeli kozwaka ntango ya komanyola makambo ya elimo. Atako mobeko ya Sabata ezalaki kaka mpo na mwa ntango, emonisaki eleko oyo bato bakozwa bopemi ya libela, ezala na nzoto to na elimo.—Baebele 4:10; Emoniseli 21:1-4.
Nzambe ya bolingo oyo tokoki kotyela motema
Bandakisa ya Biblia oyo touti komona emonisi ete Yehova Nzambe apesaki litambwisi mpe malako ndenge na ndenge na bileko ekeseni. Kasi, yango elingi koloba te ete abongolaki makanisi na ye. Kutu, azalaki nde kokokisa bamposa ya basaleli na ye na makambo ndenge na ndenge oyo bazalaki kokutana na yango mpe azalaki kosala bongo mpo na bolamu na bango. Ezali mpe bongo lelo oyo.
Lokola Yehova abongolaka mibeko na ye te, tokoki ntango nyonso koyeba oyo tosengeli kosala mpo na kosepelisa ye. Lisusu, tokoki mpenza kondima ete bilaka nyonso ya Nzambe ekokokisama. Yehova alobi boye: “Nakokokisa mokano mobimba na ngai . . . Nakani yango mpe nakokokisa yango.”—Yisaya 46:10, 11.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
Nzambe abongolaka te mibeko na ye na oyo etali bolingo mpe boyengebene
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Paulo alobaki ete ekozala na ntango oyo makabo ya kosala makamwisi “ekosuka”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Libala esengelaki kosangisa bato mibale mpo na libela