Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/6 nk. 16-20
  • Tólobanaka solo na bazalani na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólobanaka solo na bazalani na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nani azali mozalani na biso?
  • Tólobaka solo na makambo ya libota
  • Tólobaka solo na makambo ya lisangá
  • Tólobaka solo na makambo ya mombongo
  • Tólobaka solo liboso ya bakonzi ya Leta
  • Matomba ya kolobaka solo
  • Tómekola Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yehova, Nzambe oyo alingaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tólobaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • “Nakotambola na solo na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/6 nk. 16-20

Tólobanaka solo na bazalani na biso

“Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.”​—EF. 4:25.

1, 2. Ndenge nini bato mingi batalelaka solo?

BANDA kala, bato balukaka koyeba soki solo ezali nini. Na ekeke ya motoba L.T.B., Alcaeus, Mogrɛki moko oyo azalaki mokomi ya maloba ya ntɔki alobaki ete: “Solo ezali na kati ya vinyo.” Alingaki koloba ete solo emonanaka soki moto amɛli vinyo mingi mpe yango ekoki kotinda ye aloba mingi. Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma ya ekeke ya liboso amonisaki mpe ete azalaki na likanisi oyo ebongi te na likambo etali solo ntango atunaki na lityo nyonso ete: “Solo ezali nini?”​—Yoa. 18:38.

2 Na mikolo na biso mpe bato batyanaka ntembe mingi na likambo etali solo. Bato mingi balobaka ete moto na moto azali na ndenge oyo atalelaka likambo etali koloba solo. Bato mosusu balobaka solo kaka soki bamoni ete yango ekozala mpo na bolamu na bango moko to mpo na kosilisa likambo moko noki. Buku moko (The Importance of Lying) elobi ete: “Kozala sembo ekoki kozala likambo ya malamu, kasi ezali na ntina te na etumba ya kotikala na bomoi mpe mpo na kozala malamu. Na likambo yango, moto azalaka na likambo mosusu ya kopona te​—asengeli kaka kokosa mpo atikala na bomoi.”

3. Mpo na nini Yesu azalaki ndakisa monene na oyo etali solo?

3 Bayekoli ya Klisto bakeseni mpenza na bato yango! Yesu azalaki kotalela solo ndenge bato ya mayele bazali kotalela yango te. Azalaki ntango nyonso koloba solo. Ata banguna na ye balobaki ete: “Moteyi, toyebi ete yo olobaka solo mpe oteyaka nzela ya Nzambe na solo.” (Mat. 22:16) Ndenge moko mpe lelo, baklisto ya solo balandaka ndakisa ya Yesu. Bakakatanaka te mpo na koloba solo. Bandimaka na motema moko toli oyo ntoma Paulo apesaki baninga na ye bandimi ete: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.” (Ef. 4:25) Tótala makambo misato na maloba wana ya Paulo. Ya liboso, nani azali mozalani na biso? Ya mibale, koloba solo elimboli nini? Mpe ya misato, ndenge nini tokoki kosalela toli yango na bomoi na biso?

Nani azali mozalani na biso?

4. Na bokeseni na bakonzi ya Bayuda ya ekeke ya liboso, ndenge nini Yesu amonisaki likanisi ya Yehova na likambo etali nani azali mozalani na biso?

4 Na ekeke ya liboso T.B., bakonzi mosusu ya Bayuda bazalaki koteya ete kaka bandeko na bango Bayuda mpe baninga na bango nde babongaki kobengama “mozalani.” Nzokande, Yesu azalaki komekola mpenza Tata na ye mpe azalaki kotalela makambo ndenge ye atalelaka. (Yoa. 14:9) Likambo eleki ntina, amonisaki bayekoli na ye ete Nzambe alingaka te mposo to ekólo moko koleka mosusu. (Yoa. 4:5-26) Lisusu, elimo santu emonisaki ntoma Petelo ete “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Mis. 10:28, 34, 35) Yango wana, biso mpe tosengeli kotalela moto nyonso lokola mozalani na biso, mpe kolinga ata banguna na biso.​—Mat. 5:43-45.

5. Koloba solo na mozalani na biso elimboli nini?

5 Kasi, Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete tosengeli kolobanaka solo na mozalani na biso? Koloba solo esɛngaka koloba makambo ndenge ezali mpenza, makambo ya lokuta te. Baklisto ya solo babakisaka to babongolaka makambo te mpo na kokosa basusu. ‘Bayinaka oyo ezali mabe mpe bakangamaka na oyo ezali malamu.’ (Lom. 12:9) Mpo na komekola “Nzambe ya solo,” tosengeli kosala makasi tózala sembo na maloba mpe na misala na biso nyonso. (Nz. 15:1, 2; 31:5, NW) Soki tozali kopona malamu maloba oyo tokobimisa, tokoki kosilisa na mayele nyonso ata makambo oyo ekoki kopesa biso nsɔni to kotungisa biso kozanga ete tókosa.​—Tángá Bakolose 3:9, 10.

6, 7. (a) Koloba solo elimboli nde ete tosengeli kobimisaka ata sɛkɛlɛ na biso moko epai ya moto nyonso oyo atuni biso? Limbolá. (b) Nani azali na lotomo ya koyeba solo nyonso soki atuni biso likambo?

6 Koloba solo na basusu elingi nde koloba ete tosengeli kobimisaka sɛkɛlɛ nyonso oyo toyebi na likambo moko epai ya moto nyonso oyo atuni biso motuna? Mpenza te. Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu amonisaki ete bato mosusu babongi te kozwa eyano ya polele na mituna mosusu to koyeba makambo mosusu. Ntango bakonzi ya mangomba oyo bazalaki bato ya bokosi batunaki ye soki azalaki kosala makamwisi na nguya to bokonzi nini, Yesu alobaki ete: “Nakotuna bino motuna moko. Bóyanola ngai, mpe ngai nakoyebisa bino na bokonzi nini nazali kosala makambo wana.” Ntango bakomeli mpe mikóló baboyaki koyanola, Yesu alobaki ete: “Ngai mpe nakoyebisa bino te na bokonzi nini nazali kosala makambo wana.” (Mko. 11:27-33) Yesu aboyaki koyanola motuna ya bato wana mpo bazalaki na misala mabe mpe bazangaki kondima. (Mat. 12:10-13; 23:27, 28) Ndenge moko mpe lelo, basaleli ya Yehova basengeli kokeba na bapɛngwi mpe bato mosusu ya mabe oyo basalelaka lokuta to mayele mabe mpo na kokokisa mikano na bango moko.​—Mat. 10:16; Ef. 4:14.

7 Paulo mpe amonisaki ete bato mosusu bazali na lotomo te ya koyeba makambo nyonso. Alobaki ete ‘bato ya bilobaloba mpe oyo bamikɔtisaka na makambo ya bato mosusu balobaka makambo oyo basengeli te koloba.’ (1 Tim. 5:13) Ya solo, baoyo bamikɔtisaka na makambo ya basusu to oyo bakokaka kobomba makambo te bakoki komona ete bato mosusu bazali kolinga te koyebisa bango makambo na bango. Ekozala malamu tólanda toli oyo Paulo apesaki ete ‘tómityela mokano ya kofanda na kimya mpe tókɔta na makambo ya bato te.’ (1 Tes. 4:11) Kasi, na ntango mosusu bankulutu ya lisangá bakoki kotuna biso mituna na makambo etali biso mpo na kokokisa malamu mikumba na bango. Na ntango wana, ekozala malamu tókakatana te mpo na koyebisa bango solo.​—1 Pet. 5:2.

Tólobaka solo na makambo ya libota

8. Ndenge nini koloba solo ekoki kosalisa bato ya libota bázala na bomoko makasi?

8 Mbala mingi, libota ezalaka esika oyo bato bazalaka na bomoko makasi. Mpo bomoko yango ezala makasi mingi, tosengeli kolobanaka solo. Mikakatano mingi mpe kozanga koyokana ekoki kokita to kosila soki bato ya libota bazali kobombelana makambo te mpe bazali koyebisana makambo na bosembo mpe na boboto. Na ndakisa, ntango tosali mabe, tokakatanaka mpo na kondima yango epai ya molongani na biso, bana na biso, to epai ya bato mosusu ya libota? Kosɛnga bolimbisi na motema mobimba esalisaka mpo kimya mpe bomoko ezonga na kati ya libota.​—Tángá 1 Petelo 3:8-10.

9. Mpo na nini koloba solo epesi biso nzela te ya kozanga bonkonde to limemya?

9 Koloba solo elimboli te ete tosengeli kozanga limemya. Kozanga bonkonde to limemya ekokómisa maloba na yo solo te, ekopesa yango mpe kilo mingi te. Paulo alobaki ete: “Tiká makambo nyonso ya bololo ya koyokisa mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongolama epai na bino elongo na mabe nyonso. Kasi bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bino na motema moko.” (Ef. 4:31, 32) Koloba na boboto mpe na lolenge ebongi ekopesa maloba na biso kilo mpe ekomonisa ete tozali kopesa bato oyo tozali kosolola na bango lokumu.​—Mat. 23:12.

Tólobaka solo na makambo ya lisangá

10. Liteya nini bankulutu bakoki kozwa na ndakisa malamu oyo Yesu atikaki na oyo etali koloba solo?

10 Yesu azalaki kosolola na bayekoli na ye na lolenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Toli na ye ezalaki ntango nyonso ya bolingo, kasi azalaki kolɛmbisa solo te mpo na kosepelisa bayoki na ye. (Yoa. 15:9-12) Na ndakisa, ntango bantoma na ye bazalaki kowelana mbala na mbala mpo na koyeba soki nani aleki baninga, Yesu asalisaki bango na motema molai, kasi mpe na lolenge ya polele, mpo bákanga ntina ete komikitisa ezali na ntina. (Mko. 9:33-37; Luka 9:46-48; 22:24-27; Yoa. 13:14) Ndenge moko mpe, atako lelo bankulutu bakangamaka na oyo ezali sembo, bayangelaka etonga ya Nzambe te. (Mko. 10:42-44) Bamekolaka Klisto na ndenge bazalaka ‘na boboto na kati na bango’ mpe bayokelaka basusu “mawa mingi.”

11. Bolingo mpo na bandeko na biso esengeli kotinda biso tósalela lolemo na biso ndenge nini?

11 Soki tozali koyebisa bandeko na biso makambo polele, kasi na kolekisa ndelo te, tokoki kobimisa oyo tozali na yango na motema kozanga kozokisa bango. Ya solo, tokolinga te ete lolemo na biso ‘epela lokola razware,’ mpo tósalelaka yango mpo na kozokisa basusu na maloba ya mpasi to ya kokitisa bango. (Nz. 52:2, NW; Mas. 12:18) Bolingo mpo na bandeko na biso ekotinda biso ‘tópekisa lolemo na biso na mabe mpe bibɛbu na biso ete eloba lokuta te.’ (Nz. 34:13) Na ndenge yango, tokokumisa Nzambe mpe lisangá ekozala na bomoko.

12. Ntango nini lokuta ekosɛnga moto akɔta na komite ya kosambisa? Limbolá.

12 Bankulutu basalaka makasi bábatela lisangá na bato oyo balobaka makambo ya lokuta mpo na kosala basusu mabe. (Tángá Yakobo 3:14-16.) Lokuta ya ndenge wana elobamaka mpo na konyokola moto; ezalaka nde mpo moto amona mpasi to akutana na mikakatano. Lokuta yango ezali kaka te koloba maloba ya kokosa na makambo ya mikemike to kobakisa mungwa na lisolo. Ya solo, lokuta nyonso ezali mabe, kasi nyonso te nde ememaka na komite ya kosambisa. Na yango, bankulutu basengeli kozala na bokatikati, kozala makambo makasi te, mpe kozala na bososoli ntango bazali koluka koyeba soki moto abuki lokuta na nko mpo na kosala moto mabe, likambo oyo ekosɛnga básambisa ye. To ekosɛnga kaka kopesa ye toli ya makasi mpe ya bolingo oyo euti na Makomami?

Tólobaka solo na makambo ya mombongo

13, 14. (a) Ndenge nini bato mosusu bazalaka sembo te epai ya bapatrɔ na bango? (b) Likambo nini ya malamu ekoki kosalema soki moto azali sembo mpe alobaka solo na mosala?

13 Tozali na eleko oyo kozanga bosembo epalangani bisika nyonso, na yango ekoki kozala mpasi mpo tózala sembo epai ya patrɔ na biso. Ntango bazali koluka mosala, bato mingi babukaka lokuta mpenza. Na ndakisa, ntango bazali kotondisa lokasa mpo na koyebisa makambo na bango, bakoki kokosa ete basalá na bakompanyi boye to boye to batángá bakelasi boye to boye, kaka mpo bázwa mosala oyo efutaka malamu. Lisusu, basali mingi bakosaka ete bazali kosala mosala, nzokande bazali kosala makambo na bango moko, atako mibeko ya kompanyi epekisi yango. Mbala mosusu bazali kotánga makambo oyo ezali na boyokani na mosala na bango te, kobenga bato na telefone, kotinda bansango na ordinatɛrɛ to kolekisa ngonga na kotánga makambo na Internet.

14 Baklisto ya solo bamonaka te ete kozala sembo mpe koloba solo ezali likambo oyo moto akoki kosala soki alingi. (Tángá Masese 6:16-19.) Paulo alobaki ete: “Tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.” (Ebe. 13:18) Na yango, baklisto basalelaka bapatrɔ na bango mosala oyo esɛngami mpo na mokolo mobimba, mpo bápesa bango lifuta ya mosala yango. (Ef. 6:5-8) Kozala basali ya sembo ekoki mpe kopesa Tata na biso ya likoló nkembo. (1 Pet. 2:12) Na ndakisa, na Espagne, patrɔ ya Roberto akumisaki ye mpo azali mosali moko ya sembo mpe asalaka malamu. Mpo na etamboli malamu ya Roberto, bazwaki Batatoli mosusu na mosala na kompanyi yango. Bango mpe bazalaki basali ya malamu mpenza. Na boumeli ya bambula mingi, Roberto azwelaki bandeko mibali 23 mpe bayekoli ya Biblia 8 mosala.

15. Ndenge nini moklisto oyo asalaka mimbongo akomonisa ete alobaka solo?

15 Soki tosalaka mosala na biso moko, tolobaka ntango nyonso solo, to ntango mosusu tokosaka bazalani na biso? Moklisto oyo asalaka mimbongo asengeli te kokosa soki eloko oyo azali kotɛka to mosala na ye ezali mabe, mpo kaka bato básomba yango noki to básalela kaka mosala yango; asengeli mpe te kopesa kanyaka to kozwa yango. Tokolinga kosala basusu ndenge tokolinga básala biso.​—Mas. 11:1; Luka 6:31.

Tólobaka solo liboso ya bakonzi ya Leta

16. Baklisto bapesaka nini (a) na bakonzi ya Leta? (b) na Yehova?

16 Yesu alobaki ete: “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” (Mat. 22:21) “Biloko” nini tosengeli kopesa Kaisala, elingi koloba bakonzi ya Leta? Ntango Yesu alobaki maloba wana, bazalaki kolobela likambo ya kofuta mpako. Na yango, mpo lisosoli na bango ezala ntango nyonso pɛto liboso ya Nzambe mpe bato, baklisto batosaka mibeko ya mboka, ezala mpe ya kofuta mpako. (Lom. 13:5, 6) Kasi, toyebi ete Yehova nde Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Nzambe ya solo kaka moko, oyo tolingaka na motema mobimba, na molimo mobimba, na makanisi nyonso mpe na makasi nyonso. (Mko. 12:30; Emon. 4:11) Na yango, ye oyo totosaka na makambo nyonso ezali nde Yehova Nzambe.​—Tángá Nzembo 86:11, 12.

17. Ndenge nini basaleli ya Yehova batalelaka likambo ya kozwa lisalisi ya Leta?

17 Bikólo mingi ezalaka na bibongiseli mpo na kosalisa bato oyo bazali na mposa ya lisalisi. Ezali mabe te moklisto azwa lisungi ya ndenge wana soki akokisi masɛngami mpo na kozwa yango. Kolobana solo na mozalani na biso elimboli mpe koboya kokosa bakonzi ya Leta mpo kaka tózwa lisalisi.

Matomba ya kolobaka solo

18-20. Mapamboli nini tokozwa soki tolobanaka solo na mozalani na biso?

18 Matomba oyo tokoki kozwa soki tolobaka solo ezali beboo. Tokozala ntango nyonso na lisosoli ya pɛto, oyo ekopesa biso kimya ya makanisi mpe ya motema. (Mas. 14:30; Filp. 4:6, 7) Kozala na lisosoli ya pɛto ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe. Lisusu, soki tolobaka solo na makambo nyonso, tokobanga te ete mokolo mosusu bakokanga biso mpo na lokuta.​—1 Tim. 5:24.

19 Tótala litomba mosusu. Paulo alobaki ete: “Na makambo nyonso tozali komilobela lokola baministre ya Nzambe, . . . na maloba ya solo.” (2 Kol. 6:4, 7) Likambo yango emonanaki mpenza epai ya Motatoli moko oyo afandaka na Grande-Bretagne. Ntango alingaki kotɛkɛla moto moko motuka na ye, ndeko yango amonisaki polele makambo malamu ná mabe oyo ezalaki na motuka yango, ata oyo ezalaki komonana te. Ntango azwaki motuka mpo ameka yango, mosombi wana atunaki ndeko wana soki azali Motatoli ya Yehova. Mpo na nini akanisaki bongo? Moto yango amonaki ete ndeko yango azalaki na bosembo mpe alataki malamu. Lisolo na bango epesaki ndeko wana libaku ya kopesa mobali yango litatoli ya malamu.

20 Biso mpe tozali kokumisa Mozalisi na biso na ezaleli na biso ya malamu? Paulo alobaki ete: “Tobwaki makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni, tozali te kotambola na mayele mabe.” (2 Kol. 4:2) Na yango, tósala makasi mpo na kolobanaka solo na mozalani na biso. Soki tosali bongo, tokopesa Tata na biso ya likoló mpe basaleli na ye nkembo.

Okopesa eyano nini?

• Mozalani na biso nde nani?

• Kolobana solo na mozalani na biso elimboli nini?

• Ndenge nini kolobaka solo epesaka Nzambe nkembo?

• Matomba nini tokozwa soki tolobaka solo?

[Elilingi na lokasa 17]

Ondimaka na mbala moko mabunga ya mikemike?

[Elilingi na lokasa 18]

Olobaka solo ntango ozali koluka mosala?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto