Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/7 nk. 4-5
  • 1. Sengá Nzambe asalisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1. Sengá Nzambe asalisa yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Elimo santu ezali likabo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tambolá na elimo mpe zalá na bomoi oyo eyokani na komipesa na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/7 nk. 4-5

Ndenge oyo okoki koyeba Biblia

1. Sɛngá Nzambe asalisa yo

Ninfa, oyo afandaka na Italie, alobi boye: “Kala, nazalaki kotánga Biblia liboso nalala. Nazalaki kosala bongo mpo nayebaki ete ezali Liloba ya Nzambe, mpe atako nazalaki kosepela kotánga te, nazalaki na mposa ya koyeba makambo oyo Nzambe akómá na Biblia. Nazalaki na mokano ya kotánga yango mobimba. Na ebandeli, ezalaki mpasi te; kasi na nsima, nakómaki na bisika oyo ezali mpasi, mpe natikaki kotánga.”

YO MPE okutaná na likambo oyo Ninfa akutanaki na yango? Bato mingi bakutaná na yango. Kasi, ndenge tomonaki na lisolo eleki, Yehova Nzambe, Mobandisi ya Biblia, alingi ete okanga ntina ya Liloba na ye. Kasi, ndenge nini? Ya liboso, osengeli kosɛnga Nzambe asalisa yo.

Bato mosusu bazalaki komona ete bantoma ya Yesu bazali “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba” mpo bakɔtaki te na bakelasi ya Balabi mpo na koyekola makambo ya Nzambe. (Misala 4:13) Atako bongo, Yesu amonisaki bango ete bakoki kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Ndenge nini? Yesu alobaki boye: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso.” (Yoane 14:26) Nzambe asalelaki elimo santu yango to nguya na ye oyo esalaka mosala, mpo na kokela mabelé mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali kati na yango. (Genese 1:2) Asalelaki mpe elimo yango mpo na kosalisa bato soki 40 bákoma makanisi na ye na Biblia. (2 Petelo 1:20, 21) Lelo oyo mpe, elimo yango ekoki kosalisa bato oyo balingi koyeba Biblia.

Ndenge nini okoki kozwa elimo santu ya Nzambe? Osengeli kosɛnga yango na kondima. Kutu, ekoki kosɛnga ete osɛnga yango na etingya. Yesu alobaki boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango.” Abakisaki boye: “Soki bino . . . boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!” (Luka 11:9, 13) Yehova akopesa elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango na bosembo. Nguya yango ekoki kosalisa yo oyeba ndimbola ya maloba ya Nzambe oyo ekomamá na Biblia esili koleka bankóto ya bambula. Elimo ya Nzambe ekoki mpe kopesa yo bwanya oyo osengeli na yango mpo na kosalela na bomoi na yo makambo oyo ezali na Biblia.​—Baebele 4:12; Yakobo 1:5, 6.

Na yango, mbala nyonso oyo olingi kotánga Biblia, bondeláká Nzambe mpo na kosɛnga ye elimo santu mpo esalisa yo okanga ntina ya Liloba na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto